Genesis 24 (BOLCB2)

1 Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso. 2 Abrayami alobaki na mosali na ye, oyo awumelaki mingi na ndako na ye mpe azalaki kokamba biloko na ye nyonso :— Tia loboko na yo na se ya mopende na ngai 3 mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango. 4 Kasi okokende na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe okozwa mwasi moko mpo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. 5 Mosali atunaki ye :— Tango mosusu mwasi yango akolinga na ye te kolanda ngai na mokili oyo. Boni, nakoki na ngai kozongisa mwana na yo ya mobali na mokili epai wapi owuta ? 6 Abrayami alobaki :— Keba na yo ! Kozongisa mwana na ngai kuna te. 7 Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana. 8 Soki mwasi yango aboyi na ye kolanda yo, wana okangolami na ndayi oyo nazali kosenga yo kolapa. Kasi komeka kozongisa mwana na ngai ya mobali kuna te. 9 Boye, mosali atiaki loboko na se ya mopende ya Abrayami, nkolo na ye, alapaki ndayi ya kosala makambo yango. 10 Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori. 11 Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi. 12 Abondelaki : « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai. 13 Tala, natelemi pene ya libulu ya mayi mpe bana basi ya engumba bazali kobima mpo na koya kotoka mayi. 14 Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. » 15 Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami. 16 Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te ; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki. 17 Mosali akimaki mbangu mpo na kokutana na ye mpe alobaki :— Nabondeli yo, tika ngai namela ndambo ya mayi na mbeki na yo. 18 Mwana mwasi alobaki :— Mela na yo, nkolo na ngai !Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela. 19 Sima na kopesa ye mayi ya komela, alobaki :— Nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo nyonso kino ekosilisa komela. 20 Asalaki na lombangu mpe asopaki mayi nyonso ya mbeki na ye na esika oyo banyama emelelaka mayi ; akimaki lisusu na libulu mpe atokaki mayi mpo na bashamo na ye nyonso. 21 Mosali azalaki kotala ye na bokebi, alobaki eloko moko te mpo na koyeba soki Yawe alongisi mobembo na ye to te. 22 Tango bashamo esilisaki komela mayi, mosali azwaki lopete moko ya wolo, oyo batiaka na zolo mpe ezalaki ya bagrame motoba. Azwaki mpe basheneti mibale ya wolo : moko na moko ezalaki na bagrame koleka nkama moko. 23 Atunaki ye :— Ozali mwana mwasi ya nani ? Nabondeli yo, yebisa ngai. Boni, esika ekoki komonana na ndako ya tata na yo mpo na biso mpo ete tolekisa kuna butu ? 24 Azongiselaki ye :— Nazali mwana ya Betweli, mwana mobali ya Milika mpe Naori. 25 Abakisaki :— Tozali na matiti mpe biloko ebele ya koleisa bibwele ; tozali mpe na esika mpo na yo mpo ete olekisa butu. 26 Boye, mosali akitisaki moto na ye na se mpe agumbamelaki Yawe. 27 Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! » 28 Elenge mwasi akimaki mbangu na ndako mpe alobaki epai ya mama na ye makambo oyo elekaki. 29 Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi. 30 Tango kaka amonaki lopete oyo batiaki na zolo mpe basheneti na maboko ya ndeko na ye ya mwasi, mpe ayokaki Rebeka koloba makambo oyo mosali alobaki mpo na ye, akendeki epai ya mosali mpo ete amonaki ye ya kotelema pene ya bashamo, pembeni ya libulu ya mayi. 31 Alobaki : « Yaka na ndako na biso, yo oyo opambolama na Yawe. Mpo na nini otelemi awa na libanda ? Nabongisi ndako mpe esika mpo na bashamo. » 32 Boye mosali ya Abrayami akotaki na ndako ya Labani, mpe bakitisaki biloko oyo ezalaki na likolo ya bashamo. Bamemaki bashamo na ye na esika oyo ezalaki na matiti mpe bilei ya banyama. Bamemaki mpe mayi mpo na ye mpe mpo na bato oyo bazalaki elongo na ye mpo ete basukola makolo. 33 Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki :— Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango.Labani alobaki na ye :— Yebisa biso makambo yango. 34 Azongisaki :— Nazali mosali ya Abrayami. 35 Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo. 36 Sara, mwasi ya nkolo na ngai, na kimobange na ye, abotelaki nkolo na ngai mwana mobali, mpe nkolo na ngai apesaki biloko na ye nyonso epai ya mwana yango. 37 Nzokande, nkolo na ngai alapisaki ngai ndayi na maloba oyo : « Kati na bana basi ya Kanana epai wapi nazali kovanda, okozwela mwana na ngai mwasi awa te. 38 Kasi okokende na libota ya tata na ngai mpe na ekolo na ngai, kuna nde okozwa mwasi mpo na mwana na ngai ya mobali. » 39 Nazongiselaki nkolo na ngai : « Tango mosusu, mwasi yango akolinga na ye kolanda ngai te. » 40 Mpe ye alobaki na ngai lisusu : « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai. 41 Boye tango okokende na ekolo na ngai, soki baboyi kopesa yo ye, okozala na ngambo te na ndayi oyo nalapisi yo. » 42 Nzokande lelo, tango nakomaki na libulu ya mayi, nasambelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, nabondeli Yo, longisa mobembo na ngai. 43 Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? › 44 Mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. » 45 Liboso ete nasilisa kosambela kati na motema na ngai, Rebeka abimaki na mbeki na lipeka na ye. Akitaki na libulu ya mayi mpe atokaki mayi. Nalobaki na ye : « Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. » 46 Akitisaki mbangu mbeki na ye wuta na lipeka na ye mpe alobaki : « Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo. » Boye namelaki mayi, mpe amelisaki lisusu bashamo mayi. 47 Natunaki ye : « Ozali mwana mwasi ya nani ? » Azongisaki : « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye. 48 Nakitisaki elongi na se mpe nagumbamelaki Yawe ; nakumisaki Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, oyo atambolisaki ngai na nzela ya sembo mpo na kozwela mwana na ye ya mobali mwana mwasi ya ndeko ya nkolo na ngai. 49 Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu. 50 Labani mpe Betweli bazongisaki :— Makambo oyo nyonso ewuti epai na Yawe. Tozali na likambo mosusu te ya koloba na yo. 51 Tala Rebeka, azali liboso na yo ! Kamata ye mpe kende na ye ; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi. 52 Tango mosali ya Abrayami ayokaki makambo oyo bayebisaki ye, akitisaki elongi na ye kino na se liboso ya Yawe. 53 Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba ; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye. 54 Sima na yango, mosali ya Abrayami mpe bato oyo bazalaki elongo na ye baliaki, bamelaki mpe balekisaki butu kati na ndako wana.Na tongo, tango balamukaki, mosali ya Abrayami alobaki na bango :— Botika ete nazonga epai ya nkolo na ngai. 55 Ndeko mobali mpe mama ya Rebeka bazongisaki :— Tika ete elenge mwasi atikala nanu elongo na biso mikolo zomi, sima nde bokoki kokende. 56 Kasi alobaki na bango :— Bowumisa ngai te, pamba te Yawe alongisi mobembo na ngai ; botika ngai kokende mpo ete nazonga epai ya nkolo na ngai. 57 Balobaki na ye :— Tika ete tobenga elenge mwasi mpe totuna posa na ye. 58 Babengaki Rebeka mpe batunaki ye :— Ondimi solo kokende na mobali oyo ?Rebeka azongisaki :— Iyo, nandimi. 59 Boye batikaki ndeko na bango ya mwasi Rebeka ete akende elongo na mama oyo asungaka ye, na mosali ya Abrayami elongo na bato na ye. 60 Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye :« Ndeko na biso ya mwasi,tika ete okoma mama ya nkoto ya bato,mpe tika ete bana na yo bakamatabingumba ya banguna na bango ! » 61 Boye Rebeka elongo na basali na ye ya basi batelemaki, bamataki likolo ya bashamo mpe balandaki mosali ya Abrayami. Bongo mosali ya Abrayami akamataki Rebeka mpe bakendeki na ye nzela moko. 62 Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi. 63 Na pokwa, Izaki akendeki na bilanga mpo na kozwa tango ya kokanisa na bozindo. Tango atombolaki miso, amonaki bashamo kopusana pene ya esika oyo azalaki. 64 Tango Rebeka mpe atombolaki miso, amonaki Izaki mpe akitaki wuta na shamo na ye. 65 Atunaki mosali ya Abrayami :— Nazali komona mobali moko kati na bilanga, azali koya kokutana na biso ; azali nani ?Mosali ya Abrayami azongisaki :— Azali nkolo na ngai.Bongo Rebeka azwaki vwale na ye mpe amizipaki na elongi. 66 Mosali ya Abrayami ayebisaki Izaki makambo nyonso oyo asalaki. 67 Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.

In Other Versions

Genesis 24 in the ANGEFD

Genesis 24 in the ANTPNG2D

Genesis 24 in the AS21

Genesis 24 in the BAGH

Genesis 24 in the BBPNG

Genesis 24 in the BBT1E

Genesis 24 in the BDS

Genesis 24 in the BEV

Genesis 24 in the BHAD

Genesis 24 in the BIB

Genesis 24 in the BLPT

Genesis 24 in the BNT

Genesis 24 in the BNTABOOT

Genesis 24 in the BNTLV

Genesis 24 in the BOATCB

Genesis 24 in the BOATCB2

Genesis 24 in the BOBCV

Genesis 24 in the BOCNT

Genesis 24 in the BOECS

Genesis 24 in the BOGWICC

Genesis 24 in the BOHCB

Genesis 24 in the BOHCV

Genesis 24 in the BOHLNT

Genesis 24 in the BOHNTLTAL

Genesis 24 in the BOICB

Genesis 24 in the BOILNTAP

Genesis 24 in the BOITCV

Genesis 24 in the BOKCV

Genesis 24 in the BOKCV2

Genesis 24 in the BOKHWOG

Genesis 24 in the BOKSSV

Genesis 24 in the BOLCB

Genesis 24 in the BOMCV

Genesis 24 in the BONAV

Genesis 24 in the BONCB

Genesis 24 in the BONLT

Genesis 24 in the BONUT2

Genesis 24 in the BOPLNT

Genesis 24 in the BOSCB

Genesis 24 in the BOSNC

Genesis 24 in the BOTLNT

Genesis 24 in the BOVCB

Genesis 24 in the BOYCB

Genesis 24 in the BPBB

Genesis 24 in the BPH

Genesis 24 in the BSB

Genesis 24 in the CCB

Genesis 24 in the CUV

Genesis 24 in the CUVS

Genesis 24 in the DBT

Genesis 24 in the DGDNT

Genesis 24 in the DHNT

Genesis 24 in the DNT

Genesis 24 in the ELBE

Genesis 24 in the EMTV

Genesis 24 in the ESV

Genesis 24 in the FBV

Genesis 24 in the FEB

Genesis 24 in the GGMNT

Genesis 24 in the GNT

Genesis 24 in the HARY

Genesis 24 in the HNT

Genesis 24 in the IRVA

Genesis 24 in the IRVB

Genesis 24 in the IRVG

Genesis 24 in the IRVH

Genesis 24 in the IRVK

Genesis 24 in the IRVM

Genesis 24 in the IRVM2

Genesis 24 in the IRVO

Genesis 24 in the IRVP

Genesis 24 in the IRVT

Genesis 24 in the IRVT2

Genesis 24 in the IRVU

Genesis 24 in the ISVN

Genesis 24 in the JSNT

Genesis 24 in the KAPI

Genesis 24 in the KBT1ETNIK

Genesis 24 in the KBV

Genesis 24 in the KJV

Genesis 24 in the KNFD

Genesis 24 in the LBA

Genesis 24 in the LBLA

Genesis 24 in the LNT

Genesis 24 in the LSV

Genesis 24 in the MAAL

Genesis 24 in the MBV

Genesis 24 in the MBV2

Genesis 24 in the MHNT

Genesis 24 in the MKNFD

Genesis 24 in the MNG

Genesis 24 in the MNT

Genesis 24 in the MNT2

Genesis 24 in the MRS1T

Genesis 24 in the NAA

Genesis 24 in the NASB

Genesis 24 in the NBLA

Genesis 24 in the NBS

Genesis 24 in the NBVTP

Genesis 24 in the NET2

Genesis 24 in the NIV11

Genesis 24 in the NNT

Genesis 24 in the NNT2

Genesis 24 in the NNT3

Genesis 24 in the PDDPT

Genesis 24 in the PFNT

Genesis 24 in the RMNT

Genesis 24 in the SBIAS

Genesis 24 in the SBIBS

Genesis 24 in the SBIBS2

Genesis 24 in the SBICS

Genesis 24 in the SBIDS

Genesis 24 in the SBIGS

Genesis 24 in the SBIHS

Genesis 24 in the SBIIS

Genesis 24 in the SBIIS2

Genesis 24 in the SBIIS3

Genesis 24 in the SBIKS

Genesis 24 in the SBIKS2

Genesis 24 in the SBIMS

Genesis 24 in the SBIOS

Genesis 24 in the SBIPS

Genesis 24 in the SBISS

Genesis 24 in the SBITS

Genesis 24 in the SBITS2

Genesis 24 in the SBITS3

Genesis 24 in the SBITS4

Genesis 24 in the SBIUS

Genesis 24 in the SBIVS

Genesis 24 in the SBT

Genesis 24 in the SBT1E

Genesis 24 in the SCHL

Genesis 24 in the SNT

Genesis 24 in the SUSU

Genesis 24 in the SUSU2

Genesis 24 in the SYNO

Genesis 24 in the TBIAOTANT

Genesis 24 in the TBT1E

Genesis 24 in the TBT1E2

Genesis 24 in the TFTIP

Genesis 24 in the TFTU

Genesis 24 in the TGNTATF3T

Genesis 24 in the THAI

Genesis 24 in the TNFD

Genesis 24 in the TNT

Genesis 24 in the TNTIK

Genesis 24 in the TNTIL

Genesis 24 in the TNTIN

Genesis 24 in the TNTIP

Genesis 24 in the TNTIZ

Genesis 24 in the TOMA

Genesis 24 in the TTENT

Genesis 24 in the UBG

Genesis 24 in the UGV

Genesis 24 in the UGV2

Genesis 24 in the UGV3

Genesis 24 in the VBL

Genesis 24 in the VDCC

Genesis 24 in the YALU

Genesis 24 in the YAPE

Genesis 24 in the YBVTP

Genesis 24 in the ZBP