Genesis 29 (BOLCB2)

1 Jakobi akobaki mobembo na ye mpe akomaki na mokili ya bato ya este. 2 Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu. 3 Tango bibwele nyonso ezalaki kosangana wana, babateli bibwele bazalaki kolongola libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe komelisa bameme. Mpe na sima, bazalaki kozongisa libanga na esika na yango, na monoko ya libulu. 4 Jakobi atunaki babateli bibwele :— Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi ?Bazongisaki :— Towuti na Arani. 5 Atunaki bango lisusu :— Boyebi Labani, koko ya Naori ?Bazongisaki :— Iyo, toyebi ye. 6 Jakobi abakisaki lisusu :— Boni, azali malamu ?Bazongisaki :— Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme. 7 Kasi Jakobi alobaki :— Tala, moyi ezali nanu makasi ; tango ekoki nanu te mpo na kozongisa bibwele. Bomelisa bameme mpe bozonga lisusu koleisa yango matiti. 8 Bazongisaki :— Tokoki kosala yango kaka soki bibwele nyonso esangani ; bongo tokolongola libanga na monoko ya libulu mpe tokomelisa bameme mayi. 9 Wana azalaki nanu kosolola na bango, Rasheli ayaki elongo na bameme ya tata na ye, pamba te azalaki mwasi mobateli bibwele. 10 Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi. 11 Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi. 12 Jakobi ayebisaki Rasheli : « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye. 13 Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. 14 Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba. 15 Labani alobaki na Jakobi :— Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai ? Yebisa ngai : olingi ete lifuti na yo ezala nini ? 16 Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo : Lea mpe leki na ye Rasheli. 17 Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko. 18 Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki :— Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai. 19 Labani alobaki :— Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai. 20 Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli. 21 Sima, Jakobi alobaki na Labani :— Mikolo na ngai ekoki ; pesa ngai mwasi na ngai, pamba te nalingi kozala na ye. 22 Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti. 23 Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto. 24 Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. 25 Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani :— Likambo nini oyo osali ngai ? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo ? Mpo na nini okosi ngai ? 26 Labani azongisaki :— Na bokoko na biso awa, topesaka te leki na libala liboso ya kulutu. 27 Silisa nanu poso ya babalani elongo na ye. Bongo sima, oyo ya leki mpe akopesamela yo soki osaleli ngai lisusu mibu sambo. 28 Jakobi asalaki bongo : asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye. 29 Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. 30 Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo. 31 Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te. 32 Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni ; » alobaki : « Yawe amoni pasi na ngai ; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. » 33 Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. » 34 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, pamba te naboteli ye bana mibali misato. » Boye bapesaki ye kombo « Levi. » 35 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.

In Other Versions

Genesis 29 in the ANGEFD

Genesis 29 in the ANTPNG2D

Genesis 29 in the AS21

Genesis 29 in the BAGH

Genesis 29 in the BBPNG

Genesis 29 in the BBT1E

Genesis 29 in the BDS

Genesis 29 in the BEV

Genesis 29 in the BHAD

Genesis 29 in the BIB

Genesis 29 in the BLPT

Genesis 29 in the BNT

Genesis 29 in the BNTABOOT

Genesis 29 in the BNTLV

Genesis 29 in the BOATCB

Genesis 29 in the BOATCB2

Genesis 29 in the BOBCV

Genesis 29 in the BOCNT

Genesis 29 in the BOECS

Genesis 29 in the BOGWICC

Genesis 29 in the BOHCB

Genesis 29 in the BOHCV

Genesis 29 in the BOHLNT

Genesis 29 in the BOHNTLTAL

Genesis 29 in the BOICB

Genesis 29 in the BOILNTAP

Genesis 29 in the BOITCV

Genesis 29 in the BOKCV

Genesis 29 in the BOKCV2

Genesis 29 in the BOKHWOG

Genesis 29 in the BOKSSV

Genesis 29 in the BOLCB

Genesis 29 in the BOMCV

Genesis 29 in the BONAV

Genesis 29 in the BONCB

Genesis 29 in the BONLT

Genesis 29 in the BONUT2

Genesis 29 in the BOPLNT

Genesis 29 in the BOSCB

Genesis 29 in the BOSNC

Genesis 29 in the BOTLNT

Genesis 29 in the BOVCB

Genesis 29 in the BOYCB

Genesis 29 in the BPBB

Genesis 29 in the BPH

Genesis 29 in the BSB

Genesis 29 in the CCB

Genesis 29 in the CUV

Genesis 29 in the CUVS

Genesis 29 in the DBT

Genesis 29 in the DGDNT

Genesis 29 in the DHNT

Genesis 29 in the DNT

Genesis 29 in the ELBE

Genesis 29 in the EMTV

Genesis 29 in the ESV

Genesis 29 in the FBV

Genesis 29 in the FEB

Genesis 29 in the GGMNT

Genesis 29 in the GNT

Genesis 29 in the HARY

Genesis 29 in the HNT

Genesis 29 in the IRVA

Genesis 29 in the IRVB

Genesis 29 in the IRVG

Genesis 29 in the IRVH

Genesis 29 in the IRVK

Genesis 29 in the IRVM

Genesis 29 in the IRVM2

Genesis 29 in the IRVO

Genesis 29 in the IRVP

Genesis 29 in the IRVT

Genesis 29 in the IRVT2

Genesis 29 in the IRVU

Genesis 29 in the ISVN

Genesis 29 in the JSNT

Genesis 29 in the KAPI

Genesis 29 in the KBT1ETNIK

Genesis 29 in the KBV

Genesis 29 in the KJV

Genesis 29 in the KNFD

Genesis 29 in the LBA

Genesis 29 in the LBLA

Genesis 29 in the LNT

Genesis 29 in the LSV

Genesis 29 in the MAAL

Genesis 29 in the MBV

Genesis 29 in the MBV2

Genesis 29 in the MHNT

Genesis 29 in the MKNFD

Genesis 29 in the MNG

Genesis 29 in the MNT

Genesis 29 in the MNT2

Genesis 29 in the MRS1T

Genesis 29 in the NAA

Genesis 29 in the NASB

Genesis 29 in the NBLA

Genesis 29 in the NBS

Genesis 29 in the NBVTP

Genesis 29 in the NET2

Genesis 29 in the NIV11

Genesis 29 in the NNT

Genesis 29 in the NNT2

Genesis 29 in the NNT3

Genesis 29 in the PDDPT

Genesis 29 in the PFNT

Genesis 29 in the RMNT

Genesis 29 in the SBIAS

Genesis 29 in the SBIBS

Genesis 29 in the SBIBS2

Genesis 29 in the SBICS

Genesis 29 in the SBIDS

Genesis 29 in the SBIGS

Genesis 29 in the SBIHS

Genesis 29 in the SBIIS

Genesis 29 in the SBIIS2

Genesis 29 in the SBIIS3

Genesis 29 in the SBIKS

Genesis 29 in the SBIKS2

Genesis 29 in the SBIMS

Genesis 29 in the SBIOS

Genesis 29 in the SBIPS

Genesis 29 in the SBISS

Genesis 29 in the SBITS

Genesis 29 in the SBITS2

Genesis 29 in the SBITS3

Genesis 29 in the SBITS4

Genesis 29 in the SBIUS

Genesis 29 in the SBIVS

Genesis 29 in the SBT

Genesis 29 in the SBT1E

Genesis 29 in the SCHL

Genesis 29 in the SNT

Genesis 29 in the SUSU

Genesis 29 in the SUSU2

Genesis 29 in the SYNO

Genesis 29 in the TBIAOTANT

Genesis 29 in the TBT1E

Genesis 29 in the TBT1E2

Genesis 29 in the TFTIP

Genesis 29 in the TFTU

Genesis 29 in the TGNTATF3T

Genesis 29 in the THAI

Genesis 29 in the TNFD

Genesis 29 in the TNT

Genesis 29 in the TNTIK

Genesis 29 in the TNTIL

Genesis 29 in the TNTIN

Genesis 29 in the TNTIP

Genesis 29 in the TNTIZ

Genesis 29 in the TOMA

Genesis 29 in the TTENT

Genesis 29 in the UBG

Genesis 29 in the UGV

Genesis 29 in the UGV2

Genesis 29 in the UGV3

Genesis 29 in the VBL

Genesis 29 in the VDCC

Genesis 29 in the YALU

Genesis 29 in the YAPE

Genesis 29 in the YBVTP

Genesis 29 in the ZBP