Genesis 35 (BOLCB2)

1 Nzambe alobaki na Jakobi : « Kende na Beteli, vanda kuna mpe tonga kuna etumbelo mpo na Nzambe oyo abimelaki yo tango ozalaki kokima ndeko na yo Ezawu. » 2 Jakobi alobaki na bato ya libota na ye mpe na bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo : « Bolongola banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino, bomipetola mpe bolata bilamba mosusu. 3 Tokomata na Beteli epai wapi nakotonga etumbelo mpo na Nzambe oyo ayanolaki ngai na mokolo oyo nazalaki na pasi mpe azalaki elongo na ngai bisika nyonso oyo nazalaki kokende. » 4 Bapesaki Jakobi banzambe nyonso ya bapaya, oyo bazalaki na yango mpe biloko na bango ya matoyi. Boye Jakobi akundaki yango na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki pene ya Sishemi. 5 Sima, bakendeki. Kanda na Nzambe ekweyelaki bingumba nyonso ya zingazinga na bango, mpe moko te alandaki bana mibali ya Jakobi. 6 Jakobi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakomaki na Luze, oyo ezali Beteli, kati na mokili ya Kanana. 7 Kuna nde atongaki etumbelo mpe abengaki esika yango « Eli Beteli, » pamba te ezalaki kuna nde Nzambe amimonisaki epai na ye tango azalaki kokima ndeko na ye. 8 Ezalaki wana nde Debora, mama mobokoli ya Rebeka, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya Beteli, na se ya nzete oyo, wuta na tango wana, bakomaki kobenga « Aloni-Bakuti. » 9 Nzambe abimelaki lisusu Jakobi tango azongaki wuta na Padani-Arami mpe apambolaki ye. 10 Nzambe alobaki na ye : « Kombo na yo ezali Jakobi ; kasi okobengama lisusu Jakobi te, kombo na yo ekomi Isalaele. » Yango wana Nzambe apesaki ye kombo « Isalaele. » 11 Nzambe alobaki na ye lisusu : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele ; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo. 12 Mokili oyo napesaki na Abrayami mpe na Izaki, napesi yango mpe na yo. Nakopesa yango lisusu na bakitani na yo. » 13 Sima, Nzambe atikaki ye na esika oyo asololaki na ye. 14 Jakobi atelemisaki libanga ya elembo na esika oyo Nzambe asololaki na ye ; asopaki likolo ya libanga yango likabo ya masanga mpe mafuta. 15 Jakobi apesaki esika oyo Nzambe asololaki na ye kombo « Beteli. » 16 Jakobi mpe libota na ye balongwaki na Beteli. Wana bazalaki nanu mwa mosika na Efrata, Rasheli abotaki, kasi na pasi makasi. 17 Lokola azalaki na pasi makasi ya kobota, mwasi mobotisi ayebisaki ye : « Kobanga te ! Pamba te ozali na mwana mobali mosusu. » 18 Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame. 19 Rasheli akufaki mpe bakundaki ye na nzela ya Efrata, elingi koloba Beteleemi. 20 Jakobi atelemisaki libanga ya elembo likolo ya kunda ya Rasheli ; mpe kino lelo oyo, libanga wana ya elembo elakisaka kunda ya Rasheli. 21 Sima, Isalaele alongwaki mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo mosika ya Migidali-Ederi. 22 Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango.Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale~: 23 Bana mibali ya Lea :Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi~;Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni. 24 Bana mibali ya Rasheli :Jozefi mpe Benjame. 25 Bana mibali ya Bila, mwasi mosali ya Rasheli :Dani mpe Nefitali. 26 Bana mibali ya Zilipa, mwasi mosali ya Lea :Gadi mpe Aseri. Bango nde bana mibali ya Jakobi oyo babotelaki ye na Padani-Arami. 27 Jakobi azongaki epai ya Izaki, tata na ye, na Mamire, pene ya Kiriati-Ariba oyo ebengami Ebron, epai wapi Abrayami mpe Izaki bazalaki kovanda. 28 Izaki awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mwambe. 29 Sima, Izaki akataki motema mpe akufaki ; awumelaki na bomoi mibu ebele, akomaki mobange mpe alandaki bakoko na ye. Bana na ye ya mibali, Ezawu mpe Jakobi, bakundaki ye.

In Other Versions

Genesis 35 in the ANGEFD

Genesis 35 in the ANTPNG2D

Genesis 35 in the AS21

Genesis 35 in the BAGH

Genesis 35 in the BBPNG

Genesis 35 in the BBT1E

Genesis 35 in the BDS

Genesis 35 in the BEV

Genesis 35 in the BHAD

Genesis 35 in the BIB

Genesis 35 in the BLPT

Genesis 35 in the BNT

Genesis 35 in the BNTABOOT

Genesis 35 in the BNTLV

Genesis 35 in the BOATCB

Genesis 35 in the BOATCB2

Genesis 35 in the BOBCV

Genesis 35 in the BOCNT

Genesis 35 in the BOECS

Genesis 35 in the BOGWICC

Genesis 35 in the BOHCB

Genesis 35 in the BOHCV

Genesis 35 in the BOHLNT

Genesis 35 in the BOHNTLTAL

Genesis 35 in the BOICB

Genesis 35 in the BOILNTAP

Genesis 35 in the BOITCV

Genesis 35 in the BOKCV

Genesis 35 in the BOKCV2

Genesis 35 in the BOKHWOG

Genesis 35 in the BOKSSV

Genesis 35 in the BOLCB

Genesis 35 in the BOMCV

Genesis 35 in the BONAV

Genesis 35 in the BONCB

Genesis 35 in the BONLT

Genesis 35 in the BONUT2

Genesis 35 in the BOPLNT

Genesis 35 in the BOSCB

Genesis 35 in the BOSNC

Genesis 35 in the BOTLNT

Genesis 35 in the BOVCB

Genesis 35 in the BOYCB

Genesis 35 in the BPBB

Genesis 35 in the BPH

Genesis 35 in the BSB

Genesis 35 in the CCB

Genesis 35 in the CUV

Genesis 35 in the CUVS

Genesis 35 in the DBT

Genesis 35 in the DGDNT

Genesis 35 in the DHNT

Genesis 35 in the DNT

Genesis 35 in the ELBE

Genesis 35 in the EMTV

Genesis 35 in the ESV

Genesis 35 in the FBV

Genesis 35 in the FEB

Genesis 35 in the GGMNT

Genesis 35 in the GNT

Genesis 35 in the HARY

Genesis 35 in the HNT

Genesis 35 in the IRVA

Genesis 35 in the IRVB

Genesis 35 in the IRVG

Genesis 35 in the IRVH

Genesis 35 in the IRVK

Genesis 35 in the IRVM

Genesis 35 in the IRVM2

Genesis 35 in the IRVO

Genesis 35 in the IRVP

Genesis 35 in the IRVT

Genesis 35 in the IRVT2

Genesis 35 in the IRVU

Genesis 35 in the ISVN

Genesis 35 in the JSNT

Genesis 35 in the KAPI

Genesis 35 in the KBT1ETNIK

Genesis 35 in the KBV

Genesis 35 in the KJV

Genesis 35 in the KNFD

Genesis 35 in the LBA

Genesis 35 in the LBLA

Genesis 35 in the LNT

Genesis 35 in the LSV

Genesis 35 in the MAAL

Genesis 35 in the MBV

Genesis 35 in the MBV2

Genesis 35 in the MHNT

Genesis 35 in the MKNFD

Genesis 35 in the MNG

Genesis 35 in the MNT

Genesis 35 in the MNT2

Genesis 35 in the MRS1T

Genesis 35 in the NAA

Genesis 35 in the NASB

Genesis 35 in the NBLA

Genesis 35 in the NBS

Genesis 35 in the NBVTP

Genesis 35 in the NET2

Genesis 35 in the NIV11

Genesis 35 in the NNT

Genesis 35 in the NNT2

Genesis 35 in the NNT3

Genesis 35 in the PDDPT

Genesis 35 in the PFNT

Genesis 35 in the RMNT

Genesis 35 in the SBIAS

Genesis 35 in the SBIBS

Genesis 35 in the SBIBS2

Genesis 35 in the SBICS

Genesis 35 in the SBIDS

Genesis 35 in the SBIGS

Genesis 35 in the SBIHS

Genesis 35 in the SBIIS

Genesis 35 in the SBIIS2

Genesis 35 in the SBIIS3

Genesis 35 in the SBIKS

Genesis 35 in the SBIKS2

Genesis 35 in the SBIMS

Genesis 35 in the SBIOS

Genesis 35 in the SBIPS

Genesis 35 in the SBISS

Genesis 35 in the SBITS

Genesis 35 in the SBITS2

Genesis 35 in the SBITS3

Genesis 35 in the SBITS4

Genesis 35 in the SBIUS

Genesis 35 in the SBIVS

Genesis 35 in the SBT

Genesis 35 in the SBT1E

Genesis 35 in the SCHL

Genesis 35 in the SNT

Genesis 35 in the SUSU

Genesis 35 in the SUSU2

Genesis 35 in the SYNO

Genesis 35 in the TBIAOTANT

Genesis 35 in the TBT1E

Genesis 35 in the TBT1E2

Genesis 35 in the TFTIP

Genesis 35 in the TFTU

Genesis 35 in the TGNTATF3T

Genesis 35 in the THAI

Genesis 35 in the TNFD

Genesis 35 in the TNT

Genesis 35 in the TNTIK

Genesis 35 in the TNTIL

Genesis 35 in the TNTIN

Genesis 35 in the TNTIP

Genesis 35 in the TNTIZ

Genesis 35 in the TOMA

Genesis 35 in the TTENT

Genesis 35 in the UBG

Genesis 35 in the UGV

Genesis 35 in the UGV2

Genesis 35 in the UGV3

Genesis 35 in the VBL

Genesis 35 in the VDCC

Genesis 35 in the YALU

Genesis 35 in the YAPE

Genesis 35 in the YBVTP

Genesis 35 in the ZBP