Genesis 6 (BOLCB2)

1 Tango bato babandaki kokoma ebele na mokili mpe babotaki bana basi, 2 milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko ; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango. 3 Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. » 4 Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango. 5 Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe. 6 Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye. 7 Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. » 8 Kasi Noa azwaki ngolu na miso ya Yawe. 9 Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe. 10 Noa azalaki na bana mibali misato : Semi, Cham mpe Jafeti. 11 Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu. 12 Nzambe amonaki ndenge mokili ebebaki, pamba te bato nyonso ya mokili babebisaki banzela na bango. 13 Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili. 14 Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo ; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango. 15 Tala ndenge okotonga yango : molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. 16 Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango ; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato. 17 Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi : ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa. 18 Kasi nasali boyokani elongo na yo, yango wana okokota na masuwa : yo, bana na yo ya mibali, mwasi na yo mpe basi ya bana na yo. 19 Okokotisa mpe kati na masuwa, mibale-mibale, bikelamu nyonso ya bomoi, mwasi mpe mobali, mpo ete obatela yango na bomoi elongo na yo. 20 Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu ; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi. 21 Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. » 22 Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Nzambe atindaki ye.

In Other Versions

Genesis 6 in the ANGEFD

Genesis 6 in the ANTPNG2D

Genesis 6 in the AS21

Genesis 6 in the BAGH

Genesis 6 in the BBPNG

Genesis 6 in the BBT1E

Genesis 6 in the BDS

Genesis 6 in the BEV

Genesis 6 in the BHAD

Genesis 6 in the BIB

Genesis 6 in the BLPT

Genesis 6 in the BNT

Genesis 6 in the BNTABOOT

Genesis 6 in the BNTLV

Genesis 6 in the BOATCB

Genesis 6 in the BOATCB2

Genesis 6 in the BOBCV

Genesis 6 in the BOCNT

Genesis 6 in the BOECS

Genesis 6 in the BOGWICC

Genesis 6 in the BOHCB

Genesis 6 in the BOHCV

Genesis 6 in the BOHLNT

Genesis 6 in the BOHNTLTAL

Genesis 6 in the BOICB

Genesis 6 in the BOILNTAP

Genesis 6 in the BOITCV

Genesis 6 in the BOKCV

Genesis 6 in the BOKCV2

Genesis 6 in the BOKHWOG

Genesis 6 in the BOKSSV

Genesis 6 in the BOLCB

Genesis 6 in the BOMCV

Genesis 6 in the BONAV

Genesis 6 in the BONCB

Genesis 6 in the BONLT

Genesis 6 in the BONUT2

Genesis 6 in the BOPLNT

Genesis 6 in the BOSCB

Genesis 6 in the BOSNC

Genesis 6 in the BOTLNT

Genesis 6 in the BOVCB

Genesis 6 in the BOYCB

Genesis 6 in the BPBB

Genesis 6 in the BPH

Genesis 6 in the BSB

Genesis 6 in the CCB

Genesis 6 in the CUV

Genesis 6 in the CUVS

Genesis 6 in the DBT

Genesis 6 in the DGDNT

Genesis 6 in the DHNT

Genesis 6 in the DNT

Genesis 6 in the ELBE

Genesis 6 in the EMTV

Genesis 6 in the ESV

Genesis 6 in the FBV

Genesis 6 in the FEB

Genesis 6 in the GGMNT

Genesis 6 in the GNT

Genesis 6 in the HARY

Genesis 6 in the HNT

Genesis 6 in the IRVA

Genesis 6 in the IRVB

Genesis 6 in the IRVG

Genesis 6 in the IRVH

Genesis 6 in the IRVK

Genesis 6 in the IRVM

Genesis 6 in the IRVM2

Genesis 6 in the IRVO

Genesis 6 in the IRVP

Genesis 6 in the IRVT

Genesis 6 in the IRVT2

Genesis 6 in the IRVU

Genesis 6 in the ISVN

Genesis 6 in the JSNT

Genesis 6 in the KAPI

Genesis 6 in the KBT1ETNIK

Genesis 6 in the KBV

Genesis 6 in the KJV

Genesis 6 in the KNFD

Genesis 6 in the LBA

Genesis 6 in the LBLA

Genesis 6 in the LNT

Genesis 6 in the LSV

Genesis 6 in the MAAL

Genesis 6 in the MBV

Genesis 6 in the MBV2

Genesis 6 in the MHNT

Genesis 6 in the MKNFD

Genesis 6 in the MNG

Genesis 6 in the MNT

Genesis 6 in the MNT2

Genesis 6 in the MRS1T

Genesis 6 in the NAA

Genesis 6 in the NASB

Genesis 6 in the NBLA

Genesis 6 in the NBS

Genesis 6 in the NBVTP

Genesis 6 in the NET2

Genesis 6 in the NIV11

Genesis 6 in the NNT

Genesis 6 in the NNT2

Genesis 6 in the NNT3

Genesis 6 in the PDDPT

Genesis 6 in the PFNT

Genesis 6 in the RMNT

Genesis 6 in the SBIAS

Genesis 6 in the SBIBS

Genesis 6 in the SBIBS2

Genesis 6 in the SBICS

Genesis 6 in the SBIDS

Genesis 6 in the SBIGS

Genesis 6 in the SBIHS

Genesis 6 in the SBIIS

Genesis 6 in the SBIIS2

Genesis 6 in the SBIIS3

Genesis 6 in the SBIKS

Genesis 6 in the SBIKS2

Genesis 6 in the SBIMS

Genesis 6 in the SBIOS

Genesis 6 in the SBIPS

Genesis 6 in the SBISS

Genesis 6 in the SBITS

Genesis 6 in the SBITS2

Genesis 6 in the SBITS3

Genesis 6 in the SBITS4

Genesis 6 in the SBIUS

Genesis 6 in the SBIVS

Genesis 6 in the SBT

Genesis 6 in the SBT1E

Genesis 6 in the SCHL

Genesis 6 in the SNT

Genesis 6 in the SUSU

Genesis 6 in the SUSU2

Genesis 6 in the SYNO

Genesis 6 in the TBIAOTANT

Genesis 6 in the TBT1E

Genesis 6 in the TBT1E2

Genesis 6 in the TFTIP

Genesis 6 in the TFTU

Genesis 6 in the TGNTATF3T

Genesis 6 in the THAI

Genesis 6 in the TNFD

Genesis 6 in the TNT

Genesis 6 in the TNTIK

Genesis 6 in the TNTIL

Genesis 6 in the TNTIN

Genesis 6 in the TNTIP

Genesis 6 in the TNTIZ

Genesis 6 in the TOMA

Genesis 6 in the TTENT

Genesis 6 in the UBG

Genesis 6 in the UGV

Genesis 6 in the UGV2

Genesis 6 in the UGV3

Genesis 6 in the VBL

Genesis 6 in the VDCC

Genesis 6 in the YALU

Genesis 6 in the YAPE

Genesis 6 in the YBVTP

Genesis 6 in the ZBP