Genesis 9 (BOLCB2)

1 Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. 2 Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi ; nyonso epesami na maboko na bino. 3 Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso. 4 Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi. 5 Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye. 6 Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye. 7 Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. » 8 Boye, Nzambe alobaki na Noa mpe na bana na ye ya mibali : 9 « Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo, 10 na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo : bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. 11 Nasali boyokani elongo na yo : bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. » 12 Nzambe alobaki lisusu : « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya : 13 natie monama na Ngai na mapata, mpe yango ekozala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe mokili. 14 Tango nyonso nakosangisa mapata na likolo ya mokili mpe monama ekobima na mapata, 15 nakokanisa boyokani na Ngai elongo na bino mpe na bikelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na bomoi. Mpe mayi ekokoma lisusu mpela te mpo na kobebisa nyonso oyo ezali na bomoi. 16 Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. » 17 Nzambe alobaki lisusu na Noa : « Yango nde ezali elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na mokili. » 18 Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa : Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana. 19 Bango misato bazalaki bana ya Noa mpe na nzela na bango nde mokili etondaki lisusu na bato. 20 Noa azalaki mosali bilanga mpe alonaki elanga ya vino. 21 Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo. 22 Cham, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye mpe ayebisaki bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki na libanda. 23 Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te. 24 Tango milangwa ya Noa esilaki, ayokaki likambo oyo mwana na ye ya suka asalaki. 25 Alobaki :« Tika ete Kanana alakelama mabe,azala mowumbu ya sukaya bandeko na ye ! » 26 Alobaki lisusu :« Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama !Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi ! 27 Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti !Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi,mpe Kanana azala mowumbu na ye ! » 28 Sima na mpela, Noa awumelaki na bomoi mibu nkama misato na tuku mitano. 29 Mibu nyonso ya bomoi ya Noa ezalaki nkama libwa na tuku mitano, sima akufaki.

In Other Versions

Genesis 9 in the ANGEFD

Genesis 9 in the ANTPNG2D

Genesis 9 in the AS21

Genesis 9 in the BAGH

Genesis 9 in the BBPNG

Genesis 9 in the BBT1E

Genesis 9 in the BDS

Genesis 9 in the BEV

Genesis 9 in the BHAD

Genesis 9 in the BIB

Genesis 9 in the BLPT

Genesis 9 in the BNT

Genesis 9 in the BNTABOOT

Genesis 9 in the BNTLV

Genesis 9 in the BOATCB

Genesis 9 in the BOATCB2

Genesis 9 in the BOBCV

Genesis 9 in the BOCNT

Genesis 9 in the BOECS

Genesis 9 in the BOGWICC

Genesis 9 in the BOHCB

Genesis 9 in the BOHCV

Genesis 9 in the BOHLNT

Genesis 9 in the BOHNTLTAL

Genesis 9 in the BOICB

Genesis 9 in the BOILNTAP

Genesis 9 in the BOITCV

Genesis 9 in the BOKCV

Genesis 9 in the BOKCV2

Genesis 9 in the BOKHWOG

Genesis 9 in the BOKSSV

Genesis 9 in the BOLCB

Genesis 9 in the BOMCV

Genesis 9 in the BONAV

Genesis 9 in the BONCB

Genesis 9 in the BONLT

Genesis 9 in the BONUT2

Genesis 9 in the BOPLNT

Genesis 9 in the BOSCB

Genesis 9 in the BOSNC

Genesis 9 in the BOTLNT

Genesis 9 in the BOVCB

Genesis 9 in the BOYCB

Genesis 9 in the BPBB

Genesis 9 in the BPH

Genesis 9 in the BSB

Genesis 9 in the CCB

Genesis 9 in the CUV

Genesis 9 in the CUVS

Genesis 9 in the DBT

Genesis 9 in the DGDNT

Genesis 9 in the DHNT

Genesis 9 in the DNT

Genesis 9 in the ELBE

Genesis 9 in the EMTV

Genesis 9 in the ESV

Genesis 9 in the FBV

Genesis 9 in the FEB

Genesis 9 in the GGMNT

Genesis 9 in the GNT

Genesis 9 in the HARY

Genesis 9 in the HNT

Genesis 9 in the IRVA

Genesis 9 in the IRVB

Genesis 9 in the IRVG

Genesis 9 in the IRVH

Genesis 9 in the IRVK

Genesis 9 in the IRVM

Genesis 9 in the IRVM2

Genesis 9 in the IRVO

Genesis 9 in the IRVP

Genesis 9 in the IRVT

Genesis 9 in the IRVT2

Genesis 9 in the IRVU

Genesis 9 in the ISVN

Genesis 9 in the JSNT

Genesis 9 in the KAPI

Genesis 9 in the KBT1ETNIK

Genesis 9 in the KBV

Genesis 9 in the KJV

Genesis 9 in the KNFD

Genesis 9 in the LBA

Genesis 9 in the LBLA

Genesis 9 in the LNT

Genesis 9 in the LSV

Genesis 9 in the MAAL

Genesis 9 in the MBV

Genesis 9 in the MBV2

Genesis 9 in the MHNT

Genesis 9 in the MKNFD

Genesis 9 in the MNG

Genesis 9 in the MNT

Genesis 9 in the MNT2

Genesis 9 in the MRS1T

Genesis 9 in the NAA

Genesis 9 in the NASB

Genesis 9 in the NBLA

Genesis 9 in the NBS

Genesis 9 in the NBVTP

Genesis 9 in the NET2

Genesis 9 in the NIV11

Genesis 9 in the NNT

Genesis 9 in the NNT2

Genesis 9 in the NNT3

Genesis 9 in the PDDPT

Genesis 9 in the PFNT

Genesis 9 in the RMNT

Genesis 9 in the SBIAS

Genesis 9 in the SBIBS

Genesis 9 in the SBIBS2

Genesis 9 in the SBICS

Genesis 9 in the SBIDS

Genesis 9 in the SBIGS

Genesis 9 in the SBIHS

Genesis 9 in the SBIIS

Genesis 9 in the SBIIS2

Genesis 9 in the SBIIS3

Genesis 9 in the SBIKS

Genesis 9 in the SBIKS2

Genesis 9 in the SBIMS

Genesis 9 in the SBIOS

Genesis 9 in the SBIPS

Genesis 9 in the SBISS

Genesis 9 in the SBITS

Genesis 9 in the SBITS2

Genesis 9 in the SBITS3

Genesis 9 in the SBITS4

Genesis 9 in the SBIUS

Genesis 9 in the SBIVS

Genesis 9 in the SBT

Genesis 9 in the SBT1E

Genesis 9 in the SCHL

Genesis 9 in the SNT

Genesis 9 in the SUSU

Genesis 9 in the SUSU2

Genesis 9 in the SYNO

Genesis 9 in the TBIAOTANT

Genesis 9 in the TBT1E

Genesis 9 in the TBT1E2

Genesis 9 in the TFTIP

Genesis 9 in the TFTU

Genesis 9 in the TGNTATF3T

Genesis 9 in the THAI

Genesis 9 in the TNFD

Genesis 9 in the TNT

Genesis 9 in the TNTIK

Genesis 9 in the TNTIL

Genesis 9 in the TNTIN

Genesis 9 in the TNTIP

Genesis 9 in the TNTIZ

Genesis 9 in the TOMA

Genesis 9 in the TTENT

Genesis 9 in the UBG

Genesis 9 in the UGV

Genesis 9 in the UGV2

Genesis 9 in the UGV3

Genesis 9 in the VBL

Genesis 9 in the VDCC

Genesis 9 in the YALU

Genesis 9 in the YAPE

Genesis 9 in the YBVTP

Genesis 9 in the ZBP