Judges 11 (BOLCB2)

1 Jefite, moto ya Galadi, azalaki elombe ya bitumba. Azalaki mwana mobali oyo Galadi abotaki na mwasi ya makangu. 2 Nzokande mwasi ya Galadi abotelaki ye mpe bana mibali. Mpe tango bakolaki, babenganaki Jefite ; balobaki na ye : « Ozali na libula te kati na ndako ya tata na biso, pamba te ozali mwana ya makangu. » 3 Boye, Jefite akimaki mosika ya bandeko na ye ya mibali mpe akomaki kovanda kati na etuka ya Tobi. Bato ya mobulu basanganaki na ye mpe bazalaki kotambola elongo na ye. 4 Sima na mwa tango, bato ya Amoni babundisaki Isalaele. 5 Wana bato ya Amoni bazalaki kobundisa bana ya Isalaele, bampaka ya Galadi bakendeki koluka Jefite, kati na Tobi. 6 Balobaki na Jefite :— Yaka, mpe zala mokambi na biso mpo ete tobundisa bato ya Amoni. 7 Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi :— Boni, ezali bino te bato oyo boyinaki ngai mpe bobenganaki ngai wuta na ndako ya tata na ngai ? Mpo na nini bozali koya sik’oyo epai na ngai, awa bokomi na pasi ? 8 Bampaka ya Galadi balobaki lisusu na Jefite :— Soki tozongi sik’oyo epai na yo, ezali mpo ete oya elongo na biso, obundisa bato ya Amoni mpe okoma mokonzi na biso, mokonzi ya bavandi nyonso ya Galadi. 9 Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi :— Soki bozongisi ngai mpo na kobundisa bato ya Amoni, bongo Yawe akabi bango na maboko na ngai, boni, nakozala solo mokonzi na bino ? 10 Bampaka ya Galadi bazongiselaki Jefite :— Tika ete Yawe azala Motatoli kati na biso ! Tika ete apesa biso etumbu soki tosali te ndenge olobi. 11 Boye Jefite akendeki nzela moko na bampaka ya Galadi, mpe bato ya Galadi bakomisaki ye mokambi mpe mokonzi ya mampinga. Mpe Jefite azongelaki koloba maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, kati na Mitsipa. 12 Bongo Jefite atindaki bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye :— Ozwi biso na likambo nini mpo ete oya kobundisa mboka na biso ? 13 Mokonzi ya bato ya Amoni azongiselaki bantoma ya Jefite :— Ezali mpo ete Isalaele abotolaki mokili na ngai tango abimaki na Ejipito ; babotolaki mokili yango longwa na lubwaku ya Arinoni, mayi moke ya Yaboki kino na lubwaku ya Yordani. Sik’oyo, zongisela ngai yango na kimia. 14 Jefite atindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye : 15 — Tala maloba oyo Jefite alobi : « Bana ya Isalaele bazwaki mokili ya Moabi te to mokili ya bato ya Amoni te. 16 Kasi tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, batambolaki na esobe kino na ebale monene ya Barozo, mpe bakomaki na Kadeshi. 17 Batindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi, mpo na koloba na ye : ‹ Pesa biso nzela ya koleka na mokili na yo. › Kasi mokonzi ya Edomi aboyaki koyoka. Bana ya Isalaele batindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya Moabi, kasi ye mpe aboyaki. Boye, bana ya Isalaele bawumelaki na Kadeshi. 18 Na sima, batambolaki na esobe mpe babalukaki na sima ya mokili ya Edomi mpe ya Moabi, balekaki na ngambo ya este ya mokili ya Moabi mpe batongaki milako na bango kuna, na ngambo mosusu ya lubwaku ya Arinoni. Kasi bakotaki te na mokili ya Moabi. 19 Bongo bana ya Isalaele batindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni mpo na koloba na ye : ‹ Tika biso toleka na mokili na yo mpo ete tokende na esika na biso. › 20 Kasi Sikoni andimaki te bana ya Isalaele mpo ete baleka na mokili na ye. Boye asangisaki bato na ye nyonso ; batongaki milako, na Yakatsi, mpe babundisaki Isalaele. 21 Kasi Yawe, Nzambe ya Isalaele, akabaki Sikoni mpe bato na ye nyonso na maboko ya bana ya Isalaele, mpe balongaki bango. Boye bana ya Isalaele babotolaki mokili nyonso ya bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na etando wana. 22 Babotolaki etuka nyonso ya bato ya Amori, longwa na lubwaku ya Arinoni kino na mayi moke ya Yaboki, longwa na esobe kino na Yordani. 23 Awa Yawe, Nzambe ya Isalaele, asili kobotola mokili ya bato ya Amori mpe apesi yango epai ya bana ya Isalaele, yo olingi sik’oyo kobotola bango yango ? 24 Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo ? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. 25 Boni, ozali malamu koleka Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi ? Boni, asila koswanisa to kobundisa bana ya Isalaele ? 26 Mibu nkama misato, bana ya Isalaele bavandaki na Eshiboni, na Aroeri, na bamboka na yango ya mike mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arinoni. Mpo na nini bobotolaki yango te na tango wana ? 27 Ngai nasali yo mabe te, kasi yo nde ozali kosala ngai mabe na kobundisa ngai. Tika ete Yawe, Mosambisi, akata lelo likambo kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Amoni. » 28 Kasi mokonzi ya Amoni aboyaki koyoka maloba oyo Jefite atindelaki ye. 29 Molimo na Yawe akitelaki Jefite. Jefite akatisaki Galadi mpe Manase, mpe alekaki na Mitsipe ya Galadi. Wuta na Mitsipe ya Galadi, akendeki kobundisa bato ya Amoni. 30 Jefite alapaki ndayi epai na Yawe, alobaki : « Soki okabi bato ya Amoni na maboko na ngai, 31 nakobonzela Yo, Yawe, lokola mbeka ya kotumba, nyonso oyo ekobima na ekuke ya ndako na ngai mpo na koyamba ngai, tango nakozonga na elonga wuta na bato ya Amoni. » 32 Bongo Jefite akatisaki bandelo ya bato ya Amoni, mpe Yawe akabaki bango na maboko na ye. 33 Abebisaki bingumba tuku mibale oyo ezali na kati-kati ya Aroeri mpe Miniti kino na Abele-Keramimi. Ezalaki kobebisama ya makasi mpo na bato ya Amoni oyo bakweyaki liboso ya bana ya Isalaele. 34 Tango Jefite azongaki na ndako na ye, na Mitsipa, mwana na ye ya mwasi abimaki mpo na koyamba ye ; azalaki kobina mpe kobeta mbonda ya moke. Azalaki mwana na ye kaka moko : azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mwasi to ya mobali. 35 Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki :— Ah, mwana na ngai ya mwasi ! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te. 36 Mwana na ye ya mwasi alobaki :— Tata na ngai, opesaki elaka epai na Yawe. Sala na ngai ndenge olakaki epai na Yawe, pamba te Yawe azongisi mabe na mabe epai ya banguna na yo, bato ya Amoni. 37 Abakisaki :— Pesa ngai nzela ete likambo oyo moko esalema mpo na ngai : Tikela ngai basanza mibale mpo ete nakende koyengayenga mpe kolela, elongo na baninga na ngai, bozangi na ngai koyeba nzoto ya mobali. 38 Jefite alobaki na ye :— Okoki na yo kokende.Mpe atikaki ye kokende mpo na basanza mibale. Boye mwana mwasi akendeki na ngomba elongo na baninga na ye ya basi, mpe alelaki mpo ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te. 39 Sima na basanza mibale, azongaki epai ya tata na ye, Jefite ; mpe Jefite akokisaki epai ya mwana na ye ya mwasi, ndayi oyo alapaki. Nzokande, atikalaki kaka koyeba nzoto ya mobali te. Boye, ekoma momesano kati na Isalaele : 40 mibu nyonso, bilenge basi ya Isalaele babimaka mikolo minei, mpo na kosala feti na tina na mwana mwasi ya Jefite, moto ya Galadi.

In Other Versions

Judges 11 in the ANGEFD

Judges 11 in the ANTPNG2D

Judges 11 in the AS21

Judges 11 in the BAGH

Judges 11 in the BBPNG

Judges 11 in the BBT1E

Judges 11 in the BDS

Judges 11 in the BEV

Judges 11 in the BHAD

Judges 11 in the BIB

Judges 11 in the BLPT

Judges 11 in the BNT

Judges 11 in the BNTABOOT

Judges 11 in the BNTLV

Judges 11 in the BOATCB

Judges 11 in the BOATCB2

Judges 11 in the BOBCV

Judges 11 in the BOCNT

Judges 11 in the BOECS

Judges 11 in the BOGWICC

Judges 11 in the BOHCB

Judges 11 in the BOHCV

Judges 11 in the BOHLNT

Judges 11 in the BOHNTLTAL

Judges 11 in the BOICB

Judges 11 in the BOILNTAP

Judges 11 in the BOITCV

Judges 11 in the BOKCV

Judges 11 in the BOKCV2

Judges 11 in the BOKHWOG

Judges 11 in the BOKSSV

Judges 11 in the BOLCB

Judges 11 in the BOMCV

Judges 11 in the BONAV

Judges 11 in the BONCB

Judges 11 in the BONLT

Judges 11 in the BONUT2

Judges 11 in the BOPLNT

Judges 11 in the BOSCB

Judges 11 in the BOSNC

Judges 11 in the BOTLNT

Judges 11 in the BOVCB

Judges 11 in the BOYCB

Judges 11 in the BPBB

Judges 11 in the BPH

Judges 11 in the BSB

Judges 11 in the CCB

Judges 11 in the CUV

Judges 11 in the CUVS

Judges 11 in the DBT

Judges 11 in the DGDNT

Judges 11 in the DHNT

Judges 11 in the DNT

Judges 11 in the ELBE

Judges 11 in the EMTV

Judges 11 in the ESV

Judges 11 in the FBV

Judges 11 in the FEB

Judges 11 in the GGMNT

Judges 11 in the GNT

Judges 11 in the HARY

Judges 11 in the HNT

Judges 11 in the IRVA

Judges 11 in the IRVB

Judges 11 in the IRVG

Judges 11 in the IRVH

Judges 11 in the IRVK

Judges 11 in the IRVM

Judges 11 in the IRVM2

Judges 11 in the IRVO

Judges 11 in the IRVP

Judges 11 in the IRVT

Judges 11 in the IRVT2

Judges 11 in the IRVU

Judges 11 in the ISVN

Judges 11 in the JSNT

Judges 11 in the KAPI

Judges 11 in the KBT1ETNIK

Judges 11 in the KBV

Judges 11 in the KJV

Judges 11 in the KNFD

Judges 11 in the LBA

Judges 11 in the LBLA

Judges 11 in the LNT

Judges 11 in the LSV

Judges 11 in the MAAL

Judges 11 in the MBV

Judges 11 in the MBV2

Judges 11 in the MHNT

Judges 11 in the MKNFD

Judges 11 in the MNG

Judges 11 in the MNT

Judges 11 in the MNT2

Judges 11 in the MRS1T

Judges 11 in the NAA

Judges 11 in the NASB

Judges 11 in the NBLA

Judges 11 in the NBS

Judges 11 in the NBVTP

Judges 11 in the NET2

Judges 11 in the NIV11

Judges 11 in the NNT

Judges 11 in the NNT2

Judges 11 in the NNT3

Judges 11 in the PDDPT

Judges 11 in the PFNT

Judges 11 in the RMNT

Judges 11 in the SBIAS

Judges 11 in the SBIBS

Judges 11 in the SBIBS2

Judges 11 in the SBICS

Judges 11 in the SBIDS

Judges 11 in the SBIGS

Judges 11 in the SBIHS

Judges 11 in the SBIIS

Judges 11 in the SBIIS2

Judges 11 in the SBIIS3

Judges 11 in the SBIKS

Judges 11 in the SBIKS2

Judges 11 in the SBIMS

Judges 11 in the SBIOS

Judges 11 in the SBIPS

Judges 11 in the SBISS

Judges 11 in the SBITS

Judges 11 in the SBITS2

Judges 11 in the SBITS3

Judges 11 in the SBITS4

Judges 11 in the SBIUS

Judges 11 in the SBIVS

Judges 11 in the SBT

Judges 11 in the SBT1E

Judges 11 in the SCHL

Judges 11 in the SNT

Judges 11 in the SUSU

Judges 11 in the SUSU2

Judges 11 in the SYNO

Judges 11 in the TBIAOTANT

Judges 11 in the TBT1E

Judges 11 in the TBT1E2

Judges 11 in the TFTIP

Judges 11 in the TFTU

Judges 11 in the TGNTATF3T

Judges 11 in the THAI

Judges 11 in the TNFD

Judges 11 in the TNT

Judges 11 in the TNTIK

Judges 11 in the TNTIL

Judges 11 in the TNTIN

Judges 11 in the TNTIP

Judges 11 in the TNTIZ

Judges 11 in the TOMA

Judges 11 in the TTENT

Judges 11 in the UBG

Judges 11 in the UGV

Judges 11 in the UGV2

Judges 11 in the UGV3

Judges 11 in the VBL

Judges 11 in the VDCC

Judges 11 in the YALU

Judges 11 in the YAPE

Judges 11 in the YBVTP

Judges 11 in the ZBP