Judges 14 (BOLCB2)

1 Mokolo moko, Samison akendeki na Timina mpe amonaki kuna elenge mwasi moko ya Filisitia. 2 Tango azongaki, alobaki na tata mpe mama na ye :— Namoni mwasi moko kati na basi ya bato ya Filisitia, na Timina ; bokende kobalela ngai ye. 3 Tata mpe mama na ye bazongisaki :— Boni, kati na bandeko na yo to kati na bato na biso nyonso, ezali te na bana basi ya kitoko mpo ete okende kozwa mwasi kati na bato ya Filisitia oyo bakatama ngenga te ?Kasi Samison alobaki na tata na ye :— Balela ngai ye, pamba te ye nde abongi mpo na ngai. 4 Baboti na ye bayebaki te ete likambo wana ewutaki epai na Yawe, pamba te Yawe azalaki koluka nzela mpo na kokotisa mobulu kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Filisitia. Pamba te na tango wana, bato ya Filisitia bazalaki kokonza bana ya Isalaele. 5 Samison akendeki na Timina elongo na tata mpe mama na ye. Tango bakomaki pembeni ya bilanga ya vino ya Timina, mbala moko, mwana nkosi moko eyaki konguluma liboso ya Samison. 6 Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Boye, Samison apasolaki nkosi na kati-kati, na maboko pamba, ndenge bapasolaka mwana ntaba. Kasi kati na makambo oyo asalaki, ayebisaki eloko moko te epai ya tata to mama na ye. 7 Sima na yango, Samison akendeki na Timina, asololaki na mwana mwasi mpe alingaki ye. 8 Sima na mwa mikolo, tango azongaki na Timina mpo na kobala mwasi na ye, alekaki pembeni mpo na kotala nzoto ya nkosi oyo ekufaki. Kati na nzoto yango, amonaki liboke ya banzoyi mpe mafuta na yango. 9 Akamataki yango na maboko na ye mpe aliaki yango nzela-nzela. Tango akutanaki na baboti na ye, apesaki bango ndambo ya mafuta ya nzoyi. Bongo bango mpe baliaki yango ; kasi atikalaki koyebisa bango te ete azwaki mafuta yango ya nzoyi kati na nzoto ya nkosi oyo ekufa. 10 Tata na ye akendeki kotala elenge mwasi yango, mpe Samison asalisaki kuna feti moko ya monene, kolanda ndenge ezalaki momesano mpo na libala. 11 Tango abimaki, bapesaki bato tuku misato mpo ete bavanda na ye elongo. 12 Samison alobaki na bango :— Nalingi koyebisa bino lisese moko. Soki bopesi ngai eyano, na mikolo sambo ya feti, nakopesa bino bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti. 13 Soki bokoki te kopesa ngai eyano, bokopesa ngai bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti.Balobaki :— Yebisa biso lisese na yo, tolingi koyoka yango ! 14 Samison alobaki na bango :— Kati na oyo eliaka, ebimi oyo baliaka ;kati na oyo ezali makasi, ebimi oyo ezali elengi.Mikolo misato mobimba, bakokaki te kopesa ye eyano. 15 Bongo na mokolo ya minei, balobaki na mwasi ya Samison :— Bondela mobali na yo mpo ete apesa biso ndimbola ya lisese ; sima na yango, yaka koyebisa biso ndimbola yango. Soki te, tokotumba yo elongo na ndako ya tata na yo. Obengisi biso awa mpo na koyiba biso ? 16 Bongo mwasi ya Samison akomaki kolela liboso ya mobali mpe alobaki na ye :— Oyina ngai ! Solo, olingaka ngai te ! Oyebisaki bato na ngai lisese, kasi oyebisaki ngai ndimbola na yango te !Samison azongisaki :— Natikala kutu kolimbola yango epai ya tata to mama na ngai te, bongo ndenge nini nalimbola yango epai na yo ? 17 Na mikolo nyonso sambo ya feti, azalaki kaka kolela. Suka na suka, na mokolo ya sambo, Samison alimbolelaki ye yango, pamba te mwasi na ye atungisaki ye mingi. Bongo mwasi ya Samison, ye mpe akendeki kopesa ndimbola ya lisese yango epai ya bato na ye. 18 Na mokolo ya sambo, liboso ete moyi elala, bato ya engumba bayaki koloba na Samison :— Eloko nini ezali elengi koleka mafuta ya nzoyi ?Mpe eloko nini eleki nkosi na makasi ?Samison alobaki na bango :— Soki bosalaki likita te na mwasi na ngai,bokokaki koyeba te ndimbola ya lisese na ngai. 19 Bongo Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Akendeki na Ashikeloni mpe abomaki bato tuku misato, azwaki bilamba na bango mpe apesaki yango epai ya bato oyo bapesaki ye ndimbola ya lisese. Azongaki na ndako ya tata na ye na kanda makasi. 20 Mpe babalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga ya Samison, oyo babengisaki na feti.

In Other Versions

Judges 14 in the ANGEFD

Judges 14 in the ANTPNG2D

Judges 14 in the AS21

Judges 14 in the BAGH

Judges 14 in the BBPNG

Judges 14 in the BBT1E

Judges 14 in the BDS

Judges 14 in the BEV

Judges 14 in the BHAD

Judges 14 in the BIB

Judges 14 in the BLPT

Judges 14 in the BNT

Judges 14 in the BNTABOOT

Judges 14 in the BNTLV

Judges 14 in the BOATCB

Judges 14 in the BOATCB2

Judges 14 in the BOBCV

Judges 14 in the BOCNT

Judges 14 in the BOECS

Judges 14 in the BOGWICC

Judges 14 in the BOHCB

Judges 14 in the BOHCV

Judges 14 in the BOHLNT

Judges 14 in the BOHNTLTAL

Judges 14 in the BOICB

Judges 14 in the BOILNTAP

Judges 14 in the BOITCV

Judges 14 in the BOKCV

Judges 14 in the BOKCV2

Judges 14 in the BOKHWOG

Judges 14 in the BOKSSV

Judges 14 in the BOLCB

Judges 14 in the BOMCV

Judges 14 in the BONAV

Judges 14 in the BONCB

Judges 14 in the BONLT

Judges 14 in the BONUT2

Judges 14 in the BOPLNT

Judges 14 in the BOSCB

Judges 14 in the BOSNC

Judges 14 in the BOTLNT

Judges 14 in the BOVCB

Judges 14 in the BOYCB

Judges 14 in the BPBB

Judges 14 in the BPH

Judges 14 in the BSB

Judges 14 in the CCB

Judges 14 in the CUV

Judges 14 in the CUVS

Judges 14 in the DBT

Judges 14 in the DGDNT

Judges 14 in the DHNT

Judges 14 in the DNT

Judges 14 in the ELBE

Judges 14 in the EMTV

Judges 14 in the ESV

Judges 14 in the FBV

Judges 14 in the FEB

Judges 14 in the GGMNT

Judges 14 in the GNT

Judges 14 in the HARY

Judges 14 in the HNT

Judges 14 in the IRVA

Judges 14 in the IRVB

Judges 14 in the IRVG

Judges 14 in the IRVH

Judges 14 in the IRVK

Judges 14 in the IRVM

Judges 14 in the IRVM2

Judges 14 in the IRVO

Judges 14 in the IRVP

Judges 14 in the IRVT

Judges 14 in the IRVT2

Judges 14 in the IRVU

Judges 14 in the ISVN

Judges 14 in the JSNT

Judges 14 in the KAPI

Judges 14 in the KBT1ETNIK

Judges 14 in the KBV

Judges 14 in the KJV

Judges 14 in the KNFD

Judges 14 in the LBA

Judges 14 in the LBLA

Judges 14 in the LNT

Judges 14 in the LSV

Judges 14 in the MAAL

Judges 14 in the MBV

Judges 14 in the MBV2

Judges 14 in the MHNT

Judges 14 in the MKNFD

Judges 14 in the MNG

Judges 14 in the MNT

Judges 14 in the MNT2

Judges 14 in the MRS1T

Judges 14 in the NAA

Judges 14 in the NASB

Judges 14 in the NBLA

Judges 14 in the NBS

Judges 14 in the NBVTP

Judges 14 in the NET2

Judges 14 in the NIV11

Judges 14 in the NNT

Judges 14 in the NNT2

Judges 14 in the NNT3

Judges 14 in the PDDPT

Judges 14 in the PFNT

Judges 14 in the RMNT

Judges 14 in the SBIAS

Judges 14 in the SBIBS

Judges 14 in the SBIBS2

Judges 14 in the SBICS

Judges 14 in the SBIDS

Judges 14 in the SBIGS

Judges 14 in the SBIHS

Judges 14 in the SBIIS

Judges 14 in the SBIIS2

Judges 14 in the SBIIS3

Judges 14 in the SBIKS

Judges 14 in the SBIKS2

Judges 14 in the SBIMS

Judges 14 in the SBIOS

Judges 14 in the SBIPS

Judges 14 in the SBISS

Judges 14 in the SBITS

Judges 14 in the SBITS2

Judges 14 in the SBITS3

Judges 14 in the SBITS4

Judges 14 in the SBIUS

Judges 14 in the SBIVS

Judges 14 in the SBT

Judges 14 in the SBT1E

Judges 14 in the SCHL

Judges 14 in the SNT

Judges 14 in the SUSU

Judges 14 in the SUSU2

Judges 14 in the SYNO

Judges 14 in the TBIAOTANT

Judges 14 in the TBT1E

Judges 14 in the TBT1E2

Judges 14 in the TFTIP

Judges 14 in the TFTU

Judges 14 in the TGNTATF3T

Judges 14 in the THAI

Judges 14 in the TNFD

Judges 14 in the TNT

Judges 14 in the TNTIK

Judges 14 in the TNTIL

Judges 14 in the TNTIN

Judges 14 in the TNTIP

Judges 14 in the TNTIZ

Judges 14 in the TOMA

Judges 14 in the TTENT

Judges 14 in the UBG

Judges 14 in the UGV

Judges 14 in the UGV2

Judges 14 in the UGV3

Judges 14 in the VBL

Judges 14 in the VDCC

Judges 14 in the YALU

Judges 14 in the YAPE

Judges 14 in the YBVTP

Judges 14 in the ZBP