Judges 19 (BOLCB2)

1 Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda. 2 Kasi makangu yango atambolaki na ekobo liboso na ye, alongwaki na libala mpe azongaki na ndako ya tata na ye, na Beteleemi kati na Yuda. Sima na basanza minei wuta azongaki na ndako ya tata na ye, 3 mobali na ye ayaki epai na ye mpo na kobondela ye ete azonga na libala. Mobali ayaki elongo na mosali na ye mpe amemaki ba-ane mibale. Mwasi yango akotisaki mobali na ye kati na ndako ya tata na ye ; mpe tango tata na ye amonaki mobali yango, asepelaki koyamba ye. 4 Tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, akangaki ye mpo ete avanda mwa moke. Boye avandaki na ye mikolo misato, aliaki, amelaki mpe alalaki kuna. 5 Na mokolo ya minei, balamukaki na tongo-tongo, mpe Molevi abongamaki mpo na kokende. Kasi tata ya mwana mwasi alobaki na bokilo na ye : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi ; bongo sima, okoki na yo kokende. » 6 Boye, bango mibale bavandaki esika moko mpo na kolia mpe komela. Sima na yango, tata ya mwana mwasi alobaki : « Nabondeli yo, vanda lisusu, na butu ya lelo, mpo ete motema na yo esepela. » 7 Mobali atelemaki mpo na kokende ; kasi lokola tata-bokilo na ye abondelaki ye makasi ete avanda, avandaki kuna na butu yango. 8 Na tongo ya mokolo ya mitano, tango mobali alamukaki, tata ya mwana mwasi alobaki : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi, zela kino na sima ya midi. » Boye, bango mibale baliaki mesa moko. 9 Tango mobali elongo na makangu na ye mpe mosali na ye batelemaki mpo na kokende, tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, alobaki na ye : « Tala, pokwa esili koya ! Nabondeli yo : lekisa lisusu butu awa ; mokolo esili, vanda mpe sepelisa motema na yo. Bongo lobi, na tongo-tongo, bokoki kotelema mpo na kokende, mpe okozonga na ndako na yo. » 10 Kasi mosali asepelaki te kolekisa butu mosusu ; alongwaki mpe, elongo na ba-ane na ye mibale mpe makangu na ye, akendeki na Yebusi oyo ezali Yelusalemi. Ba-ane na ye ezalaki na bivandelo ya malamu penza. 11 Tango bakomaki pembeni ya Yebusi mpe mokolo ekomaki pene ya kosila, mosali alobaki na nkolo na ye :— Nabondeli yo, tokota na engumba oyo ya bato ya Yebusi mpe tolekisa kuna butu. 12 Nkolo azongiselaki ye :— Te, tokotelema te na engumba oyo ya bapaya, epai wapi ata mwana moko te ya Isalaele azali ; tokokoma kino na Gibea. 13 Alobaki lisusu na mosali na ye :— Yaka, topusana pene na moko ya bamboka oyo ; bongo tokolekisa butu kati na Gibea to na Rama. 14 Boye bakobaki kotambola, mpe moyi ebungaki tango bakomaki pene ya Gibea, kati na mokili ya Benjame. 15 Batelemaki na Gibea mpo na kolekisa butu. Bakotaki mpe bavandaki na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka, kasi moto moko te ayambaki bango na ndako na ye mpo na kolekisa butu. 16 Na pokwa, mobali moko ya mobange awutaki na mosala na ye ya bilanga ; azalaki moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe azalaki kovanda na Gibea. Nzokande bato ya esika wana bazalaki bato ya libota ya Benjame. 17 Tango atombolaki miso, amonaki moto ya mobembo na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. Mobange yango atunaki ye :— Okeyi wapi mpe owuti wapi ? 18 Moto ya mobembo azongiselaki ye :— Towuti na Beteleemi ya Yuda ; tozali kokende na esika oyo navandaka, na suka ya mboka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nazalaki na Beteleemi, na Yuda, sik’oyo nazali kokende na Ndako ya Yawe. Moto moko te ayambi ngai kati na ndako na ye. 19 Nzokande tozali na matiti mpe biloko mpo na ba-ane na biso mibale, tozali lisusu na lipa mpe vino mpo na ngai, mwasi na ngai mpe mosali na ngai moko oyo nazali na ye elongo ; tozangi eloko moko te. 20 Mobange yango alobaki :— Tika ete kimia ezala na yo ! Bosenga na yo nyonso ekozala na moto na ngai. Kasi kolekisa butu te na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. 21 Akotisaki bango na ndako na ye mpe apesaki ba-ane na ye matiti. Sima, basukolaki makolo, baliaki mpe bamelaki. 22 Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako ; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako :— Bimisa mosali oyo ayei na ndako na yo ; tolingi kosangisa na ye nzoto ndenge basangisaka nzoto na basi. 23 Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango :— Te, bandeko na ngai, bozala mabe boye te ! Lokola mobali oyo azali kati na ndako na ngai, bosala ye mabe oyo te. 24 Botala mwana na ngai ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe makangu ya mobali oyo azali kati na ndako ! Nazali kobimisa bango sik’oyo libanda mpo na bino mpo ete bokoka kosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi mpo na mobali oyo, bosala likambo ya soni ya boye te. 25 Kasi mibali yango baboyaki koyokela ye. Boye mobali azwaki makangu na ye mpe abimisaki ye libanda epai na bango. Bakangaki ye mpe basangisaki na ye nzoto na makasi, butu mobimba ; mpe tango tongo ekomaki pene ya kotana, batikaki ye akende. 26 Tango tongo ezali kotana, mwasi azongaki na ndako epai wapi mobali na ye azalaki, akweyaki na ekuke mpe alelaki wana kino tongo etanaki malamu. 27 Na tongo, tango mobali na ye alamukaki, afungolaki ekuke ya ndako mpo na kobima libanda mpe kokoba mobembo na ye ; amonaki makangu na ye alali na ekuke ya ndako, maboko liboso ya ekuke. 28 Alobaki na ye : « Telema ; tokende ! »Kasi azwaki eyano te. Bongo mobali yango atiaki makangu na ye na likolo ya ane na ye, akobaki mobembo na ye mpo na kozonga na ndako na ye. 29 Tango akomaki na ndako na ye, azwaki mbeli, akataki nzoto ya makangu na ye na biteni zomi na mibale mpe atindaki yango na etando nyonso ya Isalaele. 30 Moto nyonso oyo amonaki yango alobaki : « Likambo ya boye nanu namona yango te mpe nanu esalema te, wuta mokolo oyo bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. Bokanisa na tina na yango, botala yango malamu mpe boyebisa biso nini tosengeli kosala. »

In Other Versions

Judges 19 in the ANGEFD

Judges 19 in the ANTPNG2D

Judges 19 in the AS21

Judges 19 in the BAGH

Judges 19 in the BBPNG

Judges 19 in the BBT1E

Judges 19 in the BDS

Judges 19 in the BEV

Judges 19 in the BHAD

Judges 19 in the BIB

Judges 19 in the BLPT

Judges 19 in the BNT

Judges 19 in the BNTABOOT

Judges 19 in the BNTLV

Judges 19 in the BOATCB

Judges 19 in the BOATCB2

Judges 19 in the BOBCV

Judges 19 in the BOCNT

Judges 19 in the BOECS

Judges 19 in the BOGWICC

Judges 19 in the BOHCB

Judges 19 in the BOHCV

Judges 19 in the BOHLNT

Judges 19 in the BOHNTLTAL

Judges 19 in the BOICB

Judges 19 in the BOILNTAP

Judges 19 in the BOITCV

Judges 19 in the BOKCV

Judges 19 in the BOKCV2

Judges 19 in the BOKHWOG

Judges 19 in the BOKSSV

Judges 19 in the BOLCB

Judges 19 in the BOMCV

Judges 19 in the BONAV

Judges 19 in the BONCB

Judges 19 in the BONLT

Judges 19 in the BONUT2

Judges 19 in the BOPLNT

Judges 19 in the BOSCB

Judges 19 in the BOSNC

Judges 19 in the BOTLNT

Judges 19 in the BOVCB

Judges 19 in the BOYCB

Judges 19 in the BPBB

Judges 19 in the BPH

Judges 19 in the BSB

Judges 19 in the CCB

Judges 19 in the CUV

Judges 19 in the CUVS

Judges 19 in the DBT

Judges 19 in the DGDNT

Judges 19 in the DHNT

Judges 19 in the DNT

Judges 19 in the ELBE

Judges 19 in the EMTV

Judges 19 in the ESV

Judges 19 in the FBV

Judges 19 in the FEB

Judges 19 in the GGMNT

Judges 19 in the GNT

Judges 19 in the HARY

Judges 19 in the HNT

Judges 19 in the IRVA

Judges 19 in the IRVB

Judges 19 in the IRVG

Judges 19 in the IRVH

Judges 19 in the IRVK

Judges 19 in the IRVM

Judges 19 in the IRVM2

Judges 19 in the IRVO

Judges 19 in the IRVP

Judges 19 in the IRVT

Judges 19 in the IRVT2

Judges 19 in the IRVU

Judges 19 in the ISVN

Judges 19 in the JSNT

Judges 19 in the KAPI

Judges 19 in the KBT1ETNIK

Judges 19 in the KBV

Judges 19 in the KJV

Judges 19 in the KNFD

Judges 19 in the LBA

Judges 19 in the LBLA

Judges 19 in the LNT

Judges 19 in the LSV

Judges 19 in the MAAL

Judges 19 in the MBV

Judges 19 in the MBV2

Judges 19 in the MHNT

Judges 19 in the MKNFD

Judges 19 in the MNG

Judges 19 in the MNT

Judges 19 in the MNT2

Judges 19 in the MRS1T

Judges 19 in the NAA

Judges 19 in the NASB

Judges 19 in the NBLA

Judges 19 in the NBS

Judges 19 in the NBVTP

Judges 19 in the NET2

Judges 19 in the NIV11

Judges 19 in the NNT

Judges 19 in the NNT2

Judges 19 in the NNT3

Judges 19 in the PDDPT

Judges 19 in the PFNT

Judges 19 in the RMNT

Judges 19 in the SBIAS

Judges 19 in the SBIBS

Judges 19 in the SBIBS2

Judges 19 in the SBICS

Judges 19 in the SBIDS

Judges 19 in the SBIGS

Judges 19 in the SBIHS

Judges 19 in the SBIIS

Judges 19 in the SBIIS2

Judges 19 in the SBIIS3

Judges 19 in the SBIKS

Judges 19 in the SBIKS2

Judges 19 in the SBIMS

Judges 19 in the SBIOS

Judges 19 in the SBIPS

Judges 19 in the SBISS

Judges 19 in the SBITS

Judges 19 in the SBITS2

Judges 19 in the SBITS3

Judges 19 in the SBITS4

Judges 19 in the SBIUS

Judges 19 in the SBIVS

Judges 19 in the SBT

Judges 19 in the SBT1E

Judges 19 in the SCHL

Judges 19 in the SNT

Judges 19 in the SUSU

Judges 19 in the SUSU2

Judges 19 in the SYNO

Judges 19 in the TBIAOTANT

Judges 19 in the TBT1E

Judges 19 in the TBT1E2

Judges 19 in the TFTIP

Judges 19 in the TFTU

Judges 19 in the TGNTATF3T

Judges 19 in the THAI

Judges 19 in the TNFD

Judges 19 in the TNT

Judges 19 in the TNTIK

Judges 19 in the TNTIL

Judges 19 in the TNTIN

Judges 19 in the TNTIP

Judges 19 in the TNTIZ

Judges 19 in the TOMA

Judges 19 in the TTENT

Judges 19 in the UBG

Judges 19 in the UGV

Judges 19 in the UGV2

Judges 19 in the UGV3

Judges 19 in the VBL

Judges 19 in the VDCC

Judges 19 in the YALU

Judges 19 in the YAPE

Judges 19 in the YBVTP

Judges 19 in the ZBP