Judges 21 (BOLCB2)

1 Mibali ya Isalaele balapaki ndayi, na Mitsipa, na koloba : « Moto moko te kati na biso akopesa lisusu na libala mwana na ye ya mwasi epai ya mobali ya libota ya Benjame. » 2 Bato bakendeki na Beteli, bavandaki wana liboso ya Nzambe kino na pokwa. Batombolaki mingongo na bango mpe balelaki makasi. 3 Bazalaki koloba : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele ! Mpo na nini likambo ya boye ekomeli Isalaele ? Mpo na nini lelo, libota moko ezangi kati na Isalaele ? » 4 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato batongaki kuna etumbelo ; batumbaki na likolo na yango bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. 5 Bongo bana ya Isalaele batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe ? » Pamba te balapaki ndayi ete moto nyonso oyo akoya te na mayangani yango liboso ya Yawe, na Mitsipa, basengeli koboma ye. 6 Bana ya Isalaele bakomaki na mawa mpo na bandeko na bango, bato ya libota ya Benjame ; balobaki : « Mokolo ya lelo, libota moko elongwe na Isalaele. 7 Tokosala ndenge nini mpo na kopesa na libala, basi epai ya mibali oyo batikali na bomoi ? Nzokande tosili kolapa ndayi na Kombo na Yawe ete tokopesa te na libala bana na biso ya basi epai ya mibali ya libota ya Benjame. » 8 Boye, batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe, na Mitsipa ? » Bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi ayaki na molako mpe na mayangani. 9 Pamba te tango batangaki bato, bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi azalaki wana. 10 Lisanga etindelaki bango basoda nkoto zomi na mibale, bapesaki bango mitindo oyo : « Bokende koboma na mopanga bato nyonso ya Yabeshi ya Galadi elongo na basi mpe bana. 11 Tala makambo oyo bokosala : ‹ Bokobebisa mobali nyonso mpe mwasi nyonso oyo ayebi nzoto ya mibali. › » 12 Kati na bato ya Yabeshi ya Galadi, bamonaki bilenge basi nkama minei oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te ; bazwaki bango mpe bamemaki bango na molako, na Silo, kati na mokili ya Kanana. 13 Lisanga mobimba etindaki sango ya kimia epai ya bato ya libota ya Benjame, oyo bazalaki na libanga monene ya Rimoni. 14 Boye, na tango wana, bato ya libota ya Benjame bazongaki, mpe lisanga mobimba epesaki bango na libala, basi ya Yabeshi ya Galadi oyo batikaki na bomoi. Kasi basi yango bazalaki ya kokoka te mpo na bango nyonso. 15 Bato bayokaki mawa mpo na bato ya libota ya Benjame, pamba te Yawe alongolaki libota moko kati na mabota ya Isalaele. 16 Bakambi ya lisanga balobaki : « Tokosala ndenge nini mpo na kozwa basi ya kopesa na libala mpo na mibali oyo batikali, pamba te basi ya libota ya Benjame basili kokufa ? » 17 Balobaki lisusu : « Bato ya libota ya Benjame oyo batikali basengeli kozala na bakitani na bango, mpo ete ekolo elimwa te kati na Isalaele. 18 Tokoki te kopesa bango bana na biso ya basi na libala, pamba te, biso bana ya Isalaele, tolapaki ndayi oyo : ‹ Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobalisa mwana na ye ya mwasi na mobali ya libota ya Benjame. › » 19 Bongo balobaki : « Tala, feti moko ya Yawe ezalaka mibu nyonso, kati na Silo oyo ezali na ngambo ya nor ya Beteli mpe na ngambo ya este ya nzela oyo ekenda longwa na Beteli kino na Sishemi, mpe na ngambo ya sude ya Lebona. » 20 Boye bapesaki mitindo oyo epai ya bato ya libota ya Benjame : « Bokende kobombama kati na bilanga ya vino 21 mpe botala malamu. Tango bokomona bana basi ya Silo babimi mpo na kobina, bobimela bango wuta na bilanga ya vino, mpe moko na moko kati na bino akanga mwasi moko kati na bana ya Silo mpe azonga na ye na mokili ya Benjame. 22 Tango batata na bango to bandeko na bango ya mibali bakoya kolela epai na biso, tokoloba na bango : ‹ Bosalela bango ngolu mpo na biso, pamba te tozwelaki bango basi te na tango ya bitumba. Bozali na bino na ngambo te, pamba te bino te bato bopesaki bana na bino ya basi na libala. › » 23 Bato ya libota ya Benjame basalaki bongo. Tango bana basi bazalaki kobina, mobali moko na moko akangaki mwana mwasi moko mpe amemaki ye mpo ete azala mwasi na ye. Bongo bazongaki na mabele na bango, batongaki bingumba mpe bavandaki kuna. 24 Na tango wana, bana ya Isalaele balongwaki na esika wana mpe bazongaki na bandako na bango, na bituka na bango mpe na mabota ya botata na bango, moto na moto na mabele na ye. 25 Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te ; moto na moto azalaki kosala makambo oyo azalaki komona ete ezali malamu.

In Other Versions

Judges 21 in the ANGEFD

Judges 21 in the ANTPNG2D

Judges 21 in the AS21

Judges 21 in the BAGH

Judges 21 in the BBPNG

Judges 21 in the BBT1E

Judges 21 in the BDS

Judges 21 in the BEV

Judges 21 in the BHAD

Judges 21 in the BIB

Judges 21 in the BLPT

Judges 21 in the BNT

Judges 21 in the BNTABOOT

Judges 21 in the BNTLV

Judges 21 in the BOATCB

Judges 21 in the BOATCB2

Judges 21 in the BOBCV

Judges 21 in the BOCNT

Judges 21 in the BOECS

Judges 21 in the BOGWICC

Judges 21 in the BOHCB

Judges 21 in the BOHCV

Judges 21 in the BOHLNT

Judges 21 in the BOHNTLTAL

Judges 21 in the BOICB

Judges 21 in the BOILNTAP

Judges 21 in the BOITCV

Judges 21 in the BOKCV

Judges 21 in the BOKCV2

Judges 21 in the BOKHWOG

Judges 21 in the BOKSSV

Judges 21 in the BOLCB

Judges 21 in the BOMCV

Judges 21 in the BONAV

Judges 21 in the BONCB

Judges 21 in the BONLT

Judges 21 in the BONUT2

Judges 21 in the BOPLNT

Judges 21 in the BOSCB

Judges 21 in the BOSNC

Judges 21 in the BOTLNT

Judges 21 in the BOVCB

Judges 21 in the BOYCB

Judges 21 in the BPBB

Judges 21 in the BPH

Judges 21 in the BSB

Judges 21 in the CCB

Judges 21 in the CUV

Judges 21 in the CUVS

Judges 21 in the DBT

Judges 21 in the DGDNT

Judges 21 in the DHNT

Judges 21 in the DNT

Judges 21 in the ELBE

Judges 21 in the EMTV

Judges 21 in the ESV

Judges 21 in the FBV

Judges 21 in the FEB

Judges 21 in the GGMNT

Judges 21 in the GNT

Judges 21 in the HARY

Judges 21 in the HNT

Judges 21 in the IRVA

Judges 21 in the IRVB

Judges 21 in the IRVG

Judges 21 in the IRVH

Judges 21 in the IRVK

Judges 21 in the IRVM

Judges 21 in the IRVM2

Judges 21 in the IRVO

Judges 21 in the IRVP

Judges 21 in the IRVT

Judges 21 in the IRVT2

Judges 21 in the IRVU

Judges 21 in the ISVN

Judges 21 in the JSNT

Judges 21 in the KAPI

Judges 21 in the KBT1ETNIK

Judges 21 in the KBV

Judges 21 in the KJV

Judges 21 in the KNFD

Judges 21 in the LBA

Judges 21 in the LBLA

Judges 21 in the LNT

Judges 21 in the LSV

Judges 21 in the MAAL

Judges 21 in the MBV

Judges 21 in the MBV2

Judges 21 in the MHNT

Judges 21 in the MKNFD

Judges 21 in the MNG

Judges 21 in the MNT

Judges 21 in the MNT2

Judges 21 in the MRS1T

Judges 21 in the NAA

Judges 21 in the NASB

Judges 21 in the NBLA

Judges 21 in the NBS

Judges 21 in the NBVTP

Judges 21 in the NET2

Judges 21 in the NIV11

Judges 21 in the NNT

Judges 21 in the NNT2

Judges 21 in the NNT3

Judges 21 in the PDDPT

Judges 21 in the PFNT

Judges 21 in the RMNT

Judges 21 in the SBIAS

Judges 21 in the SBIBS

Judges 21 in the SBIBS2

Judges 21 in the SBICS

Judges 21 in the SBIDS

Judges 21 in the SBIGS

Judges 21 in the SBIHS

Judges 21 in the SBIIS

Judges 21 in the SBIIS2

Judges 21 in the SBIIS3

Judges 21 in the SBIKS

Judges 21 in the SBIKS2

Judges 21 in the SBIMS

Judges 21 in the SBIOS

Judges 21 in the SBIPS

Judges 21 in the SBISS

Judges 21 in the SBITS

Judges 21 in the SBITS2

Judges 21 in the SBITS3

Judges 21 in the SBITS4

Judges 21 in the SBIUS

Judges 21 in the SBIVS

Judges 21 in the SBT

Judges 21 in the SBT1E

Judges 21 in the SCHL

Judges 21 in the SNT

Judges 21 in the SUSU

Judges 21 in the SUSU2

Judges 21 in the SYNO

Judges 21 in the TBIAOTANT

Judges 21 in the TBT1E

Judges 21 in the TBT1E2

Judges 21 in the TFTIP

Judges 21 in the TFTU

Judges 21 in the TGNTATF3T

Judges 21 in the THAI

Judges 21 in the TNFD

Judges 21 in the TNT

Judges 21 in the TNTIK

Judges 21 in the TNTIL

Judges 21 in the TNTIN

Judges 21 in the TNTIP

Judges 21 in the TNTIZ

Judges 21 in the TOMA

Judges 21 in the TTENT

Judges 21 in the UBG

Judges 21 in the UGV

Judges 21 in the UGV2

Judges 21 in the UGV3

Judges 21 in the VBL

Judges 21 in the VDCC

Judges 21 in the YALU

Judges 21 in the YAPE

Judges 21 in the YBVTP

Judges 21 in the ZBP