Jeremiah 36 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : 2 « Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo. 3 Tango mosusu, soki bato ya Yuda bayoki sango ya pasi nyonso oyo nabongisi mpo na kotindela bango, moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; mpe, na bongo, Ngai nakolimbisa mabe mpe masumu na bango. » 4 Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda. 5 Jeremi alobaki na Baruki : « Ngai nakangami, nakolonga kokende na Tempelo ya Yawe te. 6 Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango. 7 Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. » 8 Baruki, mwana mobali ya Neriya, asalaki makambo nyonso oyo mosakoli Jeremi atindaki ye kosala ; atangaki na Tempelo ya Yawe maloba ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda. 9 Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda. 10 Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo. 11 Tango Mishe, mwana, mobali ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani, ayokaki maloba nyonso ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda, 12 akendeki na ndako ya mokonzi, akotaki kati na ndako ya mosala ya mokomi mikanda epai wapi bakalaka nyonso bazalaki na mayangani : Elishama, mokomi mikanda ; Delaya, mwana mobali ya Shemaya ; Elinatani, mwana mobali ya Akibori ; Gemaria, mwana mobali ya Shafani ; Sedesiasi, mwana mobali ya Anania ; mpe bakalaka nyonso mosusu. 13 Sima na Mishe koyebisa bango makambo nyonso oyo ayokaki epai ya Baruki tango azalaki kotangela bato makomi oyo ezalaki kati na mokanda, 14 bakambi nyonso batindaki Yewudi, mwana mobali ya Netania, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Kushi, epai ya Baruki mpo na koyebisa ye : « Yaka yo moko elongo na mokanda oyo atangelaki bato. »Baruki, mwana mobali ya Neriya, akendeki epai na bango mpe amemaki mokanda na maboko na ye. 15 Balobaki na ye :— Tobondeli yo, vanda, tangela biso mokanda oyo.Baruki atangelaki bango mokanda yango. 16 Tango bayokaki maloba wana nyonso, bakomaki kotalana bango na bango na somo mpe balobaki na Baruki :— Tosengeli penza koyebisa makambo oyo nyonso epai ya mokonzi. 17 Batunaki Baruki :— Yebisa biso ndenge nini osalaki mpo na kokoma makambo oyo nyonso. Ezali Jeremi te moto ayebisi yo makambo oyo ? 18 Baruki azongisaki :— Solo, ezali ye moto ayebisaki ngai makambo oyo nyonso, mpe ngai nasalelaki kaka ekomeli mpo na kotia yango na mokanda. 19 Bakambi bayebisaki Baruki :— Yo mpe Jeremi, bokende kobombama. Mpe tika ete moto moko te ayeba esika bokozala. 20 Sima na bango kotia mokanda yango kati na ndako ya mosala ya Elishama, mokomi mikanda, bakendeki epai ya mokonzi kati na lopango mpe bayebisaki ye makambo nyonso. 21 Mokonzi atindaki Yewudi mpo ete akende kozwa mokanda yango, mpe Yewudi akendeki kozwa yango na ndako ya mosala ya mokomi mikanda Elishama mpe atangaki yango liboso ya mokonzi mpe ya bakalaka nyonso oyo batelemaki pene na ye. 22 Ezalaki na sanza ya libwa ; mokonzi avandaki kati na shambre oyo bakimelaka na tango ya malili mpe azalaki koyetola moto oyo ezalaki kopela liboso na ye. 23 Soki Yewudi atangi milongo misato to minei ya makomi ya mokanda, mokonzi azalaki kokata yango na mbeli ya mokomi mikanda mpe kobwaka yango na moto, kino tango mokanda nyonso esilaki kozika na moto. 24 Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te. 25 Atako Elinatani, Delaya mpe Gemaria bazalaki kobondela mokonzi ete atumba mokanda yango te, atikalaki koyokela bango te. 26 Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango. 27 Tango mokonzi asilisaki kotumba mokanda oyo ezalaki na maloba oyo Baruki akomaki na etinda ya Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi : 28 — Kamata mokanda mosusu mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo ezalaki na mokanda ya liboso oyo mokonzi Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki. 29 Loba lisusu na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Ezali yo nde moto otumbaki mokanda wana mpe olobaki : ‹ Mpo na nini okomaki ete mokonzi ya Babiloni akoya kobebisa mokili oyo mpe koboma ezala bato to banyama ? › 30 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : Ekozala na mokitani na ye moko te oyo akokitana na ye na kiti ya bokonzi ya Davidi ; ebembe na ye ekobwakama na libanda, mpe bakotanda yango na molunge ya moyi mpe na malili ya butu. 31 Nakopesa ye, bana na ye mpe basali na ye nyonso etumbu mpo na mabe na bango ; nakotindela bango elongo na bavandi ya Yelusalemi mpe ya Yuda, pasi nyonso oyo nalakaki bango, mpo ete bayokaki Ngai te. » 32 Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati.

In Other Versions

Jeremiah 36 in the ANGEFD

Jeremiah 36 in the ANTPNG2D

Jeremiah 36 in the AS21

Jeremiah 36 in the BAGH

Jeremiah 36 in the BBPNG

Jeremiah 36 in the BBT1E

Jeremiah 36 in the BDS

Jeremiah 36 in the BEV

Jeremiah 36 in the BHAD

Jeremiah 36 in the BIB

Jeremiah 36 in the BLPT

Jeremiah 36 in the BNT

Jeremiah 36 in the BNTABOOT

Jeremiah 36 in the BNTLV

Jeremiah 36 in the BOATCB

Jeremiah 36 in the BOATCB2

Jeremiah 36 in the BOBCV

Jeremiah 36 in the BOCNT

Jeremiah 36 in the BOECS

Jeremiah 36 in the BOGWICC

Jeremiah 36 in the BOHCB

Jeremiah 36 in the BOHCV

Jeremiah 36 in the BOHLNT

Jeremiah 36 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 36 in the BOICB

Jeremiah 36 in the BOILNTAP

Jeremiah 36 in the BOITCV

Jeremiah 36 in the BOKCV

Jeremiah 36 in the BOKCV2

Jeremiah 36 in the BOKHWOG

Jeremiah 36 in the BOKSSV

Jeremiah 36 in the BOLCB

Jeremiah 36 in the BOMCV

Jeremiah 36 in the BONAV

Jeremiah 36 in the BONCB

Jeremiah 36 in the BONLT

Jeremiah 36 in the BONUT2

Jeremiah 36 in the BOPLNT

Jeremiah 36 in the BOSCB

Jeremiah 36 in the BOSNC

Jeremiah 36 in the BOTLNT

Jeremiah 36 in the BOVCB

Jeremiah 36 in the BOYCB

Jeremiah 36 in the BPBB

Jeremiah 36 in the BPH

Jeremiah 36 in the BSB

Jeremiah 36 in the CCB

Jeremiah 36 in the CUV

Jeremiah 36 in the CUVS

Jeremiah 36 in the DBT

Jeremiah 36 in the DGDNT

Jeremiah 36 in the DHNT

Jeremiah 36 in the DNT

Jeremiah 36 in the ELBE

Jeremiah 36 in the EMTV

Jeremiah 36 in the ESV

Jeremiah 36 in the FBV

Jeremiah 36 in the FEB

Jeremiah 36 in the GGMNT

Jeremiah 36 in the GNT

Jeremiah 36 in the HARY

Jeremiah 36 in the HNT

Jeremiah 36 in the IRVA

Jeremiah 36 in the IRVB

Jeremiah 36 in the IRVG

Jeremiah 36 in the IRVH

Jeremiah 36 in the IRVK

Jeremiah 36 in the IRVM

Jeremiah 36 in the IRVM2

Jeremiah 36 in the IRVO

Jeremiah 36 in the IRVP

Jeremiah 36 in the IRVT

Jeremiah 36 in the IRVT2

Jeremiah 36 in the IRVU

Jeremiah 36 in the ISVN

Jeremiah 36 in the JSNT

Jeremiah 36 in the KAPI

Jeremiah 36 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 36 in the KBV

Jeremiah 36 in the KJV

Jeremiah 36 in the KNFD

Jeremiah 36 in the LBA

Jeremiah 36 in the LBLA

Jeremiah 36 in the LNT

Jeremiah 36 in the LSV

Jeremiah 36 in the MAAL

Jeremiah 36 in the MBV

Jeremiah 36 in the MBV2

Jeremiah 36 in the MHNT

Jeremiah 36 in the MKNFD

Jeremiah 36 in the MNG

Jeremiah 36 in the MNT

Jeremiah 36 in the MNT2

Jeremiah 36 in the MRS1T

Jeremiah 36 in the NAA

Jeremiah 36 in the NASB

Jeremiah 36 in the NBLA

Jeremiah 36 in the NBS

Jeremiah 36 in the NBVTP

Jeremiah 36 in the NET2

Jeremiah 36 in the NIV11

Jeremiah 36 in the NNT

Jeremiah 36 in the NNT2

Jeremiah 36 in the NNT3

Jeremiah 36 in the PDDPT

Jeremiah 36 in the PFNT

Jeremiah 36 in the RMNT

Jeremiah 36 in the SBIAS

Jeremiah 36 in the SBIBS

Jeremiah 36 in the SBIBS2

Jeremiah 36 in the SBICS

Jeremiah 36 in the SBIDS

Jeremiah 36 in the SBIGS

Jeremiah 36 in the SBIHS

Jeremiah 36 in the SBIIS

Jeremiah 36 in the SBIIS2

Jeremiah 36 in the SBIIS3

Jeremiah 36 in the SBIKS

Jeremiah 36 in the SBIKS2

Jeremiah 36 in the SBIMS

Jeremiah 36 in the SBIOS

Jeremiah 36 in the SBIPS

Jeremiah 36 in the SBISS

Jeremiah 36 in the SBITS

Jeremiah 36 in the SBITS2

Jeremiah 36 in the SBITS3

Jeremiah 36 in the SBITS4

Jeremiah 36 in the SBIUS

Jeremiah 36 in the SBIVS

Jeremiah 36 in the SBT

Jeremiah 36 in the SBT1E

Jeremiah 36 in the SCHL

Jeremiah 36 in the SNT

Jeremiah 36 in the SUSU

Jeremiah 36 in the SUSU2

Jeremiah 36 in the SYNO

Jeremiah 36 in the TBIAOTANT

Jeremiah 36 in the TBT1E

Jeremiah 36 in the TBT1E2

Jeremiah 36 in the TFTIP

Jeremiah 36 in the TFTU

Jeremiah 36 in the TGNTATF3T

Jeremiah 36 in the THAI

Jeremiah 36 in the TNFD

Jeremiah 36 in the TNT

Jeremiah 36 in the TNTIK

Jeremiah 36 in the TNTIL

Jeremiah 36 in the TNTIN

Jeremiah 36 in the TNTIP

Jeremiah 36 in the TNTIZ

Jeremiah 36 in the TOMA

Jeremiah 36 in the TTENT

Jeremiah 36 in the UBG

Jeremiah 36 in the UGV

Jeremiah 36 in the UGV2

Jeremiah 36 in the UGV3

Jeremiah 36 in the VBL

Jeremiah 36 in the VDCC

Jeremiah 36 in the YALU

Jeremiah 36 in the YAPE

Jeremiah 36 in the YBVTP

Jeremiah 36 in the ZBP