Jeremiah 41 (BOLCB2)

1 Na sanza ya sambo, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi mpe moko kati na bakengeli ya mokonzi, ayaki elongo na basoda zomi epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, na Mitsipa. Wana bazalaki kolia na Mitsipa, 2 Isimaeli, mwana mobali ya Netania, elongo na basoda wana zomi oyo bazalaki elongo na ye babomaki na mopanga Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli kati na mokili. 3 Isimaeli abomaki lisusu Bayuda oyo bazalaki elongo na Gedalia, na Mitsipa, elongo na basoda ya Babiloni oyo bazalaki wana. 4 Mokolo oyo elandaki kufa ya Gedalia, liboso ete sango eyebana epai ya bato, 5 bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari ; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe. 6 Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abimaki na Mitsipa mpo na kokende kokutana na bango ; wana azalaki kokende kokutana na bango, azalaki kolela nzela-nzela. Bongo tango akutanaki na bango, alobaki na bango :— Boya kotala Gedalia, mwana mobali ya Ayikami ! 7 Tango bakotaki kati na engumba, Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato oyo bazalaki elongo na ye babomaki bango mpe babwakaki bango na libulu. 8 Kasi bato zomi kati na bango balobaki na Isimaeli :— Koboma biso te ! Tozali na ble, na orje, na mafuta mpe na mafuta ya nzoyi, oyo tobombaki kati na bilanga.Boye, abomaki bango lisusu te, abikisaki bango elongo na bandeko na bango. 9 Libulu epai wapi Isimaeli abwakaki bato nyonso oyo abomaki ezalaki libulu ya Gedalia, libulu oyo mokonzi Asa asalaki mpo na komibatela liboso ya Baesha, mokonzi ya Isalaele. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, atondisaki yango na bibembe ; 10 bongo akomisaki bato nyonso oyo batikalaki na Mitsipa bawumbu : bana basi ya mokonzi mpe bato mosusu oyo batikalaki kuna na Mitsipa, oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atiaki na se ya bokonzi ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki bato oyo amemaki bango lokola bawumbu kati na mokili ya bato ya Amoni. 11 Tango Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye bayokaki sango ya makambo mabe oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, asalaki, 12 basangisaki bato na bango nyonso mpe bakendeki kobundisa Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; bakutanaki na ye pene ya liziba monene ya Gabaoni. 13 Tango bawumbu nyonso oyo Isimaeli akangaki bamonaki Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye, batondisamaki na esengo makasi ; 14 mpe bato nyonso oyo Isimaeli amemaki lokola bawumbu, na Mitsipa, babalukaki mpe bakendeki kosangana na Yoanani, mwana mobali ya Karea. 15 Kasi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato mwambe oyo bazalaki elongo na ye babikaki na maboko ya Yoanani mpe bakimaki epai ya bato ya Amoni. 16 Sima na yango, Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye bamemaki bato nyonso ya Mitsipa oyo babikaki, oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki na bowumbu wuta na Mitsipa sima na ye koboma Gedalia, mwana mobali ya Ayikami : basoda, basi, bana mpe bakalaka ya lokumu ya mokonzi ; elingi koloba bato nyonso oyo azongisaki wuta na Gabaoni. 17 Bakobaki nzela na bango mpe batelemaki na molako ya Kimeami, pene ya Beteleemi, mpo ete bazalaki na posa ya kokende na Ejipito 18 mpo na kokima bato ya Babiloni, pamba te bazalaki kobanga bango ; mpe mpo ete Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abomaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli ya mokili.

In Other Versions

Jeremiah 41 in the ANGEFD

Jeremiah 41 in the ANTPNG2D

Jeremiah 41 in the AS21

Jeremiah 41 in the BAGH

Jeremiah 41 in the BBPNG

Jeremiah 41 in the BBT1E

Jeremiah 41 in the BDS

Jeremiah 41 in the BEV

Jeremiah 41 in the BHAD

Jeremiah 41 in the BIB

Jeremiah 41 in the BLPT

Jeremiah 41 in the BNT

Jeremiah 41 in the BNTABOOT

Jeremiah 41 in the BNTLV

Jeremiah 41 in the BOATCB

Jeremiah 41 in the BOATCB2

Jeremiah 41 in the BOBCV

Jeremiah 41 in the BOCNT

Jeremiah 41 in the BOECS

Jeremiah 41 in the BOGWICC

Jeremiah 41 in the BOHCB

Jeremiah 41 in the BOHCV

Jeremiah 41 in the BOHLNT

Jeremiah 41 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 41 in the BOICB

Jeremiah 41 in the BOILNTAP

Jeremiah 41 in the BOITCV

Jeremiah 41 in the BOKCV

Jeremiah 41 in the BOKCV2

Jeremiah 41 in the BOKHWOG

Jeremiah 41 in the BOKSSV

Jeremiah 41 in the BOLCB

Jeremiah 41 in the BOMCV

Jeremiah 41 in the BONAV

Jeremiah 41 in the BONCB

Jeremiah 41 in the BONLT

Jeremiah 41 in the BONUT2

Jeremiah 41 in the BOPLNT

Jeremiah 41 in the BOSCB

Jeremiah 41 in the BOSNC

Jeremiah 41 in the BOTLNT

Jeremiah 41 in the BOVCB

Jeremiah 41 in the BOYCB

Jeremiah 41 in the BPBB

Jeremiah 41 in the BPH

Jeremiah 41 in the BSB

Jeremiah 41 in the CCB

Jeremiah 41 in the CUV

Jeremiah 41 in the CUVS

Jeremiah 41 in the DBT

Jeremiah 41 in the DGDNT

Jeremiah 41 in the DHNT

Jeremiah 41 in the DNT

Jeremiah 41 in the ELBE

Jeremiah 41 in the EMTV

Jeremiah 41 in the ESV

Jeremiah 41 in the FBV

Jeremiah 41 in the FEB

Jeremiah 41 in the GGMNT

Jeremiah 41 in the GNT

Jeremiah 41 in the HARY

Jeremiah 41 in the HNT

Jeremiah 41 in the IRVA

Jeremiah 41 in the IRVB

Jeremiah 41 in the IRVG

Jeremiah 41 in the IRVH

Jeremiah 41 in the IRVK

Jeremiah 41 in the IRVM

Jeremiah 41 in the IRVM2

Jeremiah 41 in the IRVO

Jeremiah 41 in the IRVP

Jeremiah 41 in the IRVT

Jeremiah 41 in the IRVT2

Jeremiah 41 in the IRVU

Jeremiah 41 in the ISVN

Jeremiah 41 in the JSNT

Jeremiah 41 in the KAPI

Jeremiah 41 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 41 in the KBV

Jeremiah 41 in the KJV

Jeremiah 41 in the KNFD

Jeremiah 41 in the LBA

Jeremiah 41 in the LBLA

Jeremiah 41 in the LNT

Jeremiah 41 in the LSV

Jeremiah 41 in the MAAL

Jeremiah 41 in the MBV

Jeremiah 41 in the MBV2

Jeremiah 41 in the MHNT

Jeremiah 41 in the MKNFD

Jeremiah 41 in the MNG

Jeremiah 41 in the MNT

Jeremiah 41 in the MNT2

Jeremiah 41 in the MRS1T

Jeremiah 41 in the NAA

Jeremiah 41 in the NASB

Jeremiah 41 in the NBLA

Jeremiah 41 in the NBS

Jeremiah 41 in the NBVTP

Jeremiah 41 in the NET2

Jeremiah 41 in the NIV11

Jeremiah 41 in the NNT

Jeremiah 41 in the NNT2

Jeremiah 41 in the NNT3

Jeremiah 41 in the PDDPT

Jeremiah 41 in the PFNT

Jeremiah 41 in the RMNT

Jeremiah 41 in the SBIAS

Jeremiah 41 in the SBIBS

Jeremiah 41 in the SBIBS2

Jeremiah 41 in the SBICS

Jeremiah 41 in the SBIDS

Jeremiah 41 in the SBIGS

Jeremiah 41 in the SBIHS

Jeremiah 41 in the SBIIS

Jeremiah 41 in the SBIIS2

Jeremiah 41 in the SBIIS3

Jeremiah 41 in the SBIKS

Jeremiah 41 in the SBIKS2

Jeremiah 41 in the SBIMS

Jeremiah 41 in the SBIOS

Jeremiah 41 in the SBIPS

Jeremiah 41 in the SBISS

Jeremiah 41 in the SBITS

Jeremiah 41 in the SBITS2

Jeremiah 41 in the SBITS3

Jeremiah 41 in the SBITS4

Jeremiah 41 in the SBIUS

Jeremiah 41 in the SBIVS

Jeremiah 41 in the SBT

Jeremiah 41 in the SBT1E

Jeremiah 41 in the SCHL

Jeremiah 41 in the SNT

Jeremiah 41 in the SUSU

Jeremiah 41 in the SUSU2

Jeremiah 41 in the SYNO

Jeremiah 41 in the TBIAOTANT

Jeremiah 41 in the TBT1E

Jeremiah 41 in the TBT1E2

Jeremiah 41 in the TFTIP

Jeremiah 41 in the TFTU

Jeremiah 41 in the TGNTATF3T

Jeremiah 41 in the THAI

Jeremiah 41 in the TNFD

Jeremiah 41 in the TNT

Jeremiah 41 in the TNTIK

Jeremiah 41 in the TNTIL

Jeremiah 41 in the TNTIN

Jeremiah 41 in the TNTIP

Jeremiah 41 in the TNTIZ

Jeremiah 41 in the TOMA

Jeremiah 41 in the TTENT

Jeremiah 41 in the UBG

Jeremiah 41 in the UGV

Jeremiah 41 in the UGV2

Jeremiah 41 in the UGV3

Jeremiah 41 in the VBL

Jeremiah 41 in the VDCC

Jeremiah 41 in the YALU

Jeremiah 41 in the YAPE

Jeremiah 41 in the YBVTP

Jeremiah 41 in the ZBP