Jeremiah 52 (BOLCB2)

1 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki Amutali, mwana ya Jeremi, moto ya Libina. 2 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Yeoyakimi asalaki. 3 Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika na Ye.Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni. 4 Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango na libanda ya engumba mpe batimolaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso. 5 Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi. 6 Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba, mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te, 7 bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani. 8 Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi Sedesiasi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki mpe bapanzanaki. 9 Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi, bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila kati na mokili ya Amati ; mpe mokonzi ya Babiloni akatelaki ye etumbu. 10 Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso ya Sedesiasi. Mokonzi ya Babiloni apesaki lisusu mitindo ete baboma bakalaka nyonso ya Yuda. 11 Bongo, atobolaki miso ya Sedesiasi, akangaki ye minyololo ya bibende mpe amemaki ye na Babiloni. Mokonzi ya Babiloni abwakaki ye na boloko kino na mokolo oyo akufaki. 12 Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, oyo azalaki kosala esika moko na mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya zomi ya sanza ya mitano. 13 Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene. 14 Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi. 15 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu ndambo ya babola, ndambo ya bato oyo batikalaki kati na engumba, ndambo ya bato ya misala ya maboko mpe ba-oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni. 16 Kasi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga. 17 Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango nyonso na Babiloni bisalelo. 18 Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo : basani ya putulu, bapawu, bambeli, basani ya kobwakela mayi, bakopo. 19 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata : basani ya minene, bambabola, basani ya kobwakela mayi, basani ya putulu, bitelemiselo ya minda, bakopo mpe milangi mpo na makabo ya masanga. 20 Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo mokonzi Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe : makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki kosimba nzungu ya monene mpe bashario. 21 Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa, na bosanda, mpe bametele pene motoba, na kovimba na yango ; bongo bronze oyo basalelaki yango ezalaki evimba na basantimetele pene mwambe, mpe ezalaki polele na kati. 22 Basalaki na bronze moto ya likonzi moko na moko, mpe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe na bambuma ya grenade ; nyonso esalemaki na bronze. 23 Bangambo nyonso ezalaki na bambuma ya grenade tuku libwa na motoba mpe motango nyonso ya bambuma ya grenade oyo ezalaki zingazinga ya basinga oyo basala lokola basheni ezalaki nkama moko. 24 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko : Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo. 25 Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba ; bapesi toli sambo ya mokonzi, oyo batikalaki kati na engumba ; mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga ; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba. 26 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila. 27 Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango. 28 Tala motango ya bato oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu : Bayuda nkoto misato na tuku mibale na misato,na mobu ya sambo wuta tango akomaki mokonzi~; 29 Bayuda nkama mwambe na tuku misato na mibale oyo bawutaki na Yelusalemi,na mobu ya zomi na mwambe wuta tango Nabukodonozori akomaki mokonzi~; 30 bongo na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Nabukodonozori,Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu Bayuda nkama sambo na tuku minei na mitano. Bango nyonso bazalaki bato nkoto minei na nkama motoba. 31 Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi. 32 Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni ; 33 apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye. 34 Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye kino na mokolo ya kufa na ye.

In Other Versions

Jeremiah 52 in the ANGEFD

Jeremiah 52 in the ANTPNG2D

Jeremiah 52 in the AS21

Jeremiah 52 in the BAGH

Jeremiah 52 in the BBPNG

Jeremiah 52 in the BBT1E

Jeremiah 52 in the BDS

Jeremiah 52 in the BEV

Jeremiah 52 in the BHAD

Jeremiah 52 in the BIB

Jeremiah 52 in the BLPT

Jeremiah 52 in the BNT

Jeremiah 52 in the BNTABOOT

Jeremiah 52 in the BNTLV

Jeremiah 52 in the BOATCB

Jeremiah 52 in the BOATCB2

Jeremiah 52 in the BOBCV

Jeremiah 52 in the BOCNT

Jeremiah 52 in the BOECS

Jeremiah 52 in the BOGWICC

Jeremiah 52 in the BOHCB

Jeremiah 52 in the BOHCV

Jeremiah 52 in the BOHLNT

Jeremiah 52 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 52 in the BOICB

Jeremiah 52 in the BOILNTAP

Jeremiah 52 in the BOITCV

Jeremiah 52 in the BOKCV

Jeremiah 52 in the BOKCV2

Jeremiah 52 in the BOKHWOG

Jeremiah 52 in the BOKSSV

Jeremiah 52 in the BOLCB

Jeremiah 52 in the BOMCV

Jeremiah 52 in the BONAV

Jeremiah 52 in the BONCB

Jeremiah 52 in the BONLT

Jeremiah 52 in the BONUT2

Jeremiah 52 in the BOPLNT

Jeremiah 52 in the BOSCB

Jeremiah 52 in the BOSNC

Jeremiah 52 in the BOTLNT

Jeremiah 52 in the BOVCB

Jeremiah 52 in the BOYCB

Jeremiah 52 in the BPBB

Jeremiah 52 in the BPH

Jeremiah 52 in the BSB

Jeremiah 52 in the CCB

Jeremiah 52 in the CUV

Jeremiah 52 in the CUVS

Jeremiah 52 in the DBT

Jeremiah 52 in the DGDNT

Jeremiah 52 in the DHNT

Jeremiah 52 in the DNT

Jeremiah 52 in the ELBE

Jeremiah 52 in the EMTV

Jeremiah 52 in the ESV

Jeremiah 52 in the FBV

Jeremiah 52 in the FEB

Jeremiah 52 in the GGMNT

Jeremiah 52 in the GNT

Jeremiah 52 in the HARY

Jeremiah 52 in the HNT

Jeremiah 52 in the IRVA

Jeremiah 52 in the IRVB

Jeremiah 52 in the IRVG

Jeremiah 52 in the IRVH

Jeremiah 52 in the IRVK

Jeremiah 52 in the IRVM

Jeremiah 52 in the IRVM2

Jeremiah 52 in the IRVO

Jeremiah 52 in the IRVP

Jeremiah 52 in the IRVT

Jeremiah 52 in the IRVT2

Jeremiah 52 in the IRVU

Jeremiah 52 in the ISVN

Jeremiah 52 in the JSNT

Jeremiah 52 in the KAPI

Jeremiah 52 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 52 in the KBV

Jeremiah 52 in the KJV

Jeremiah 52 in the KNFD

Jeremiah 52 in the LBA

Jeremiah 52 in the LBLA

Jeremiah 52 in the LNT

Jeremiah 52 in the LSV

Jeremiah 52 in the MAAL

Jeremiah 52 in the MBV

Jeremiah 52 in the MBV2

Jeremiah 52 in the MHNT

Jeremiah 52 in the MKNFD

Jeremiah 52 in the MNG

Jeremiah 52 in the MNT

Jeremiah 52 in the MNT2

Jeremiah 52 in the MRS1T

Jeremiah 52 in the NAA

Jeremiah 52 in the NASB

Jeremiah 52 in the NBLA

Jeremiah 52 in the NBS

Jeremiah 52 in the NBVTP

Jeremiah 52 in the NET2

Jeremiah 52 in the NIV11

Jeremiah 52 in the NNT

Jeremiah 52 in the NNT2

Jeremiah 52 in the NNT3

Jeremiah 52 in the PDDPT

Jeremiah 52 in the PFNT

Jeremiah 52 in the RMNT

Jeremiah 52 in the SBIAS

Jeremiah 52 in the SBIBS

Jeremiah 52 in the SBIBS2

Jeremiah 52 in the SBICS

Jeremiah 52 in the SBIDS

Jeremiah 52 in the SBIGS

Jeremiah 52 in the SBIHS

Jeremiah 52 in the SBIIS

Jeremiah 52 in the SBIIS2

Jeremiah 52 in the SBIIS3

Jeremiah 52 in the SBIKS

Jeremiah 52 in the SBIKS2

Jeremiah 52 in the SBIMS

Jeremiah 52 in the SBIOS

Jeremiah 52 in the SBIPS

Jeremiah 52 in the SBISS

Jeremiah 52 in the SBITS

Jeremiah 52 in the SBITS2

Jeremiah 52 in the SBITS3

Jeremiah 52 in the SBITS4

Jeremiah 52 in the SBIUS

Jeremiah 52 in the SBIVS

Jeremiah 52 in the SBT

Jeremiah 52 in the SBT1E

Jeremiah 52 in the SCHL

Jeremiah 52 in the SNT

Jeremiah 52 in the SUSU

Jeremiah 52 in the SUSU2

Jeremiah 52 in the SYNO

Jeremiah 52 in the TBIAOTANT

Jeremiah 52 in the TBT1E

Jeremiah 52 in the TBT1E2

Jeremiah 52 in the TFTIP

Jeremiah 52 in the TFTU

Jeremiah 52 in the TGNTATF3T

Jeremiah 52 in the THAI

Jeremiah 52 in the TNFD

Jeremiah 52 in the TNT

Jeremiah 52 in the TNTIK

Jeremiah 52 in the TNTIL

Jeremiah 52 in the TNTIN

Jeremiah 52 in the TNTIP

Jeremiah 52 in the TNTIZ

Jeremiah 52 in the TOMA

Jeremiah 52 in the TTENT

Jeremiah 52 in the UBG

Jeremiah 52 in the UGV

Jeremiah 52 in the UGV2

Jeremiah 52 in the UGV3

Jeremiah 52 in the VBL

Jeremiah 52 in the VDCC

Jeremiah 52 in the YALU

Jeremiah 52 in the YAPE

Jeremiah 52 in the YBVTP

Jeremiah 52 in the ZBP