Job 40 (BOLCB2)

1 Yawe ayanolaki Yobo : 2 « Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonsoakoki koteya Ye ?Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! » 3 Yobo azongiselaki Yawe : 4 « Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba,eyano nini nakoki kopesa Yo ?Natie loboko na ngai na monoko. 5 Nalobaki mbala moko,kasi nakoyanola lisusu te ;na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. » 6 Yawe alobaki na Yobo wuta na mopepe makasi : 7 « Kanga mokaba na loketo na yo lokola elombe mobali ;nakotuna yo mituna, mpe okoyanola ngai. 8 Olingi kotiola bosembo na ngai ?Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ? 9 Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ?Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ? 10 Lata nkembo mpe kongenga,milatisa lokumu mpe monene ! 11 Sopa nguya ya kanda na yo likolo ya bato,tala bato nyonso ya lolendo liboso na yompe kitisa bango ! 12 Tala bato nyonso ya lolendo, yokisa bango soni !Nyata-nyata bato mabe na esika oyo bazali. 13 Kunda bango nyonso kati na putulu,zipa bilongi na bango na esika ya kobombama. 14 Boye, ngai moko nakopesa yo lokumu,pamba te loboko na yo ya mobali ekoki mpo na kobikisa yo. 15 Tala ngubu : nakelaki yango ndenge nakelaki yo,kasi eliaka kaka matiti lokola ngombe. 16 Tala makasi oyo ezali kati na loketo na yango,nguya oyo ezali kati na misuni ya libumu na yango ! 17 Ekembisaka mokila na yango lokola nzete ya sedele ;misisa ya mipende na yango elingama-lingama ; 18 mikuwa na yango ezali lokola bibende ya bronze ;mipanzi na yango ezali lokola biteni ya bibende. 19 Ezali ekelamu ya liboso ya Nzambe,kasi Mokeli na yango atieli yango mopanga pene. 20 Ngomba ezali kopesa yango matiti ya kolia,esika oyo banyama nyonso ya zamba esakanaka. 21 Elalaka na se ya banzete ya mike-mike,na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto. 22 Banzete ya mike-mike ebombaka yango na se ya elili na yango,banzete ya pepiliye ezingeli yango. 23 Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te ;ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko,evandaka kaka kimia. 24 Boni, moto akoki kokanga yangona motambo na tango ezali kotalato kotobola yango zolo na ndobo,mpo na kobenda yango ? 25 Boni, okoki koloba ngando na ndobo ?Okoki kokanga lolemo na yango na singa ? 26 Okoki kokanga yango singa ya kekele na zolo ?Okoki kotobola mbanga na yango na ndobo ? 27 Boni, ekobondela yo mingi ?Ekoloba na yo maloba ya boboto ? 28 Ekoki kosala boyokani elongo na yompo ete ekoma mowumbu na yo mpo na libela ? 29 Okoki kosakana na yango lokola ndeke ?Okoki kokanga yango na singampo na kosepelisa bana na yo ya basi ? 30 Boni, lisanga ya balobi mbisi bakoki kosala na yango mombongo ?Bakoki kokabola yango epai ya bateki ? 31 Okoki kotobola mokongo na yango na makonga ?Okoki kotobola moto na yango na ndobooyo bakangelaka bambisi ? 32 Tia loboko na yo na likolo na yango :soki okanisi etumba oyo okutani na yango,okozongela lisusu te kotia loboko na yo na likolo na yango.

In Other Versions

Job 40 in the ANGEFD

Job 40 in the ANTPNG2D

Job 40 in the AS21

Job 40 in the BAGH

Job 40 in the BBPNG

Job 40 in the BBT1E

Job 40 in the BDS

Job 40 in the BEV

Job 40 in the BHAD

Job 40 in the BIB

Job 40 in the BLPT

Job 40 in the BNT

Job 40 in the BNTABOOT

Job 40 in the BNTLV

Job 40 in the BOATCB

Job 40 in the BOATCB2

Job 40 in the BOBCV

Job 40 in the BOCNT

Job 40 in the BOECS

Job 40 in the BOGWICC

Job 40 in the BOHCB

Job 40 in the BOHCV

Job 40 in the BOHLNT

Job 40 in the BOHNTLTAL

Job 40 in the BOICB

Job 40 in the BOILNTAP

Job 40 in the BOITCV

Job 40 in the BOKCV

Job 40 in the BOKCV2

Job 40 in the BOKHWOG

Job 40 in the BOKSSV

Job 40 in the BOLCB

Job 40 in the BOMCV

Job 40 in the BONAV

Job 40 in the BONCB

Job 40 in the BONLT

Job 40 in the BONUT2

Job 40 in the BOPLNT

Job 40 in the BOSCB

Job 40 in the BOSNC

Job 40 in the BOTLNT

Job 40 in the BOVCB

Job 40 in the BOYCB

Job 40 in the BPBB

Job 40 in the BPH

Job 40 in the BSB

Job 40 in the CCB

Job 40 in the CUV

Job 40 in the CUVS

Job 40 in the DBT

Job 40 in the DGDNT

Job 40 in the DHNT

Job 40 in the DNT

Job 40 in the ELBE

Job 40 in the EMTV

Job 40 in the ESV

Job 40 in the FBV

Job 40 in the FEB

Job 40 in the GGMNT

Job 40 in the GNT

Job 40 in the HARY

Job 40 in the HNT

Job 40 in the IRVA

Job 40 in the IRVB

Job 40 in the IRVG

Job 40 in the IRVH

Job 40 in the IRVK

Job 40 in the IRVM

Job 40 in the IRVM2

Job 40 in the IRVO

Job 40 in the IRVP

Job 40 in the IRVT

Job 40 in the IRVT2

Job 40 in the IRVU

Job 40 in the ISVN

Job 40 in the JSNT

Job 40 in the KAPI

Job 40 in the KBT1ETNIK

Job 40 in the KBV

Job 40 in the KJV

Job 40 in the KNFD

Job 40 in the LBA

Job 40 in the LBLA

Job 40 in the LNT

Job 40 in the LSV

Job 40 in the MAAL

Job 40 in the MBV

Job 40 in the MBV2

Job 40 in the MHNT

Job 40 in the MKNFD

Job 40 in the MNG

Job 40 in the MNT

Job 40 in the MNT2

Job 40 in the MRS1T

Job 40 in the NAA

Job 40 in the NASB

Job 40 in the NBLA

Job 40 in the NBS

Job 40 in the NBVTP

Job 40 in the NET2

Job 40 in the NIV11

Job 40 in the NNT

Job 40 in the NNT2

Job 40 in the NNT3

Job 40 in the PDDPT

Job 40 in the PFNT

Job 40 in the RMNT

Job 40 in the SBIAS

Job 40 in the SBIBS

Job 40 in the SBIBS2

Job 40 in the SBICS

Job 40 in the SBIDS

Job 40 in the SBIGS

Job 40 in the SBIHS

Job 40 in the SBIIS

Job 40 in the SBIIS2

Job 40 in the SBIIS3

Job 40 in the SBIKS

Job 40 in the SBIKS2

Job 40 in the SBIMS

Job 40 in the SBIOS

Job 40 in the SBIPS

Job 40 in the SBISS

Job 40 in the SBITS

Job 40 in the SBITS2

Job 40 in the SBITS3

Job 40 in the SBITS4

Job 40 in the SBIUS

Job 40 in the SBIVS

Job 40 in the SBT

Job 40 in the SBT1E

Job 40 in the SCHL

Job 40 in the SNT

Job 40 in the SUSU

Job 40 in the SUSU2

Job 40 in the SYNO

Job 40 in the TBIAOTANT

Job 40 in the TBT1E

Job 40 in the TBT1E2

Job 40 in the TFTIP

Job 40 in the TFTU

Job 40 in the TGNTATF3T

Job 40 in the THAI

Job 40 in the TNFD

Job 40 in the TNT

Job 40 in the TNTIK

Job 40 in the TNTIL

Job 40 in the TNTIN

Job 40 in the TNTIP

Job 40 in the TNTIZ

Job 40 in the TOMA

Job 40 in the TTENT

Job 40 in the UBG

Job 40 in the UGV

Job 40 in the UGV2

Job 40 in the UGV3

Job 40 in the VBL

Job 40 in the VDCC

Job 40 in the YALU

Job 40 in the YAPE

Job 40 in the YBVTP

Job 40 in the ZBP