Joshua 13 (BOLCB2)

1 Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene. 2 Tala mokili oyo etikali : Bituka nyonso ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Geshuri~: 3 etuka oyo batangaka na molongo ya mikili ya Kanana ; wuta na ebale ya Shiyori, oyo etalana na Ejipito kino na ngambo ya nor, na etuka ya Ekroni. Kuna, ezalaki na bakambi mitano ya bato ya Filisitia : mokambi ya Gaza, ya Asidodi, ya Ashikeloni, ya Gati mpe ya Ekroni ;etuka ya bato ya Avi~; 4 mpe wuta na ngambo ya sude, mokili mobimba ya bato ya Kanana mpe Meara oyo ezalaki mokili ya bato ya Sidoni kino na Afeki, kino na bandelo ya bato ya Amori ; 5 etuka ya bato ya Gebali ;mpe ngambo nyonso ya este ya Libani, wuta na Bala-Gadi, na ebandeli ya ngomba Erimoni kino na Lebo-Amati. 6 Mpo na bavandi nyonso ya etuka ya bangomba, wuta na Libani kino na Misirefoti-Mayimi, bato nyonso ya Sidoni, nakobengana bango Ngai moko liboso ya Isalaele. Sala keba ete opesa mokili yango lokola libula epai ya Isalaele, ndenge kaka natindaki yo ; 7 mpe kabola yango lokola libula kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota ya Manase. » 8 Bato ya ndambo mosusu ya libota ya Manase, elongo na bato ya libota ya Ribeni mpe ya Gadi bazwaki libula oyo Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. 9 Ezalaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba mobimba Medeba kino na Diboni, 10 mpe bingumba nyonso ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kokonza na Eshiboni kino na bandelo ya bato ya Amoni. 11 Galadi mpe ezalaki na kati, elongo na etuka ya bato ya Geshuri mpe ya Maakati, ngomba Erimoni nyonso mpe Bashani mobimba kino na Salika. 12 Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango. 13 Kasi bana ya Isalaele babenganaki te bato ya Geshuri mpe ya Maakati ; yango wana bakobaki kovanda elongo na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo. 14 Nzokande, Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te libula na bango ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge Yawe alakaki bango. 15 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango : 16 Mabele oyo ezwamaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba Medeba mobimba, 17 kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni, 18 Yakatsi, Kedemoti, Mefati, 19 Kiriatayimi, Sibima, Tsereti-Shaari na ngomba moke ya lubwaku, 20 Beti-Peori, mipanzi ya ngomba Pisiga mpe Beti-Yeshimoti : 21 bingumba nyonso ya ngomba mpe mokili mobimba ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori oyo azalaki kokonza na Eshiboni. Moyize alongaki ye elongo na bakambi ya Madiani : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba, oyo bazalaki kosalela Sikoni mpe kovanda na mokili na ye. 22 Kati na bato oyo babomaki na bitumba, bana ya Isalaele babomaki mpe na mopanga Balami, mwana mobali ya Beori, moto oyo asololaka na milimo ya bakufi. 23 Mondelo ya bato ya libota ya Ribeni ezalaki nde Yordani. Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango. 24 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Gadi, kolanda bituka na bango : 25 Etuka ya Yaezeri, bingumba nyonso ya Galadi, mpe ndambo ya mokili ya bato ya Amoni kino na Aroeri oyo etalana na Raba ; 26 mpe wuta na Eshiboni kino na Ramati-Mitsipe mpe Betonimi, wuta na Maanayimi kino na mondelo ya Debiri ; 27 mpe na lubwaku, na Beti-Arami, na Beti-Nimira, na Sukoti, na Tsafoni, mpe na mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni, oyo etikalaki elongo na Yordani mpe bazingazinga na yango kino na suka ya Ebale monene ya Kinereti, na ngambo ya este ya Yordani. 28 Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Gadi, kolanda bituka na bango. 29 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na ndambo ya libota ya Manase, kolanda bituka na bango : 30 Mabele oyo ezwamaki wuta na Maanayimi, bakisa mokili mobimba ya Bashani, mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe bamboka mike-mike nyonso ya Yairi oyo ezalaka na Bashani, bingumba tuku motoba, 31 ndambo ya mokili ya Galadi ; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani ; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango. 32 Yango nde libula oyo Moyize apesaki tango azalaki na etando ya Moabi, na ngambo ya Yordani, na ngambo ya este ya Jeriko. 33 Kasi Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te Ye moko Yawe, Nzambe ya Isalaele, nde azali libula na bango, ndenge alakaki bango.

In Other Versions

Joshua 13 in the ANGEFD

Joshua 13 in the ANTPNG2D

Joshua 13 in the AS21

Joshua 13 in the BAGH

Joshua 13 in the BBPNG

Joshua 13 in the BBT1E

Joshua 13 in the BDS

Joshua 13 in the BEV

Joshua 13 in the BHAD

Joshua 13 in the BIB

Joshua 13 in the BLPT

Joshua 13 in the BNT

Joshua 13 in the BNTABOOT

Joshua 13 in the BNTLV

Joshua 13 in the BOATCB

Joshua 13 in the BOATCB2

Joshua 13 in the BOBCV

Joshua 13 in the BOCNT

Joshua 13 in the BOECS

Joshua 13 in the BOGWICC

Joshua 13 in the BOHCB

Joshua 13 in the BOHCV

Joshua 13 in the BOHLNT

Joshua 13 in the BOHNTLTAL

Joshua 13 in the BOICB

Joshua 13 in the BOILNTAP

Joshua 13 in the BOITCV

Joshua 13 in the BOKCV

Joshua 13 in the BOKCV2

Joshua 13 in the BOKHWOG

Joshua 13 in the BOKSSV

Joshua 13 in the BOLCB

Joshua 13 in the BOMCV

Joshua 13 in the BONAV

Joshua 13 in the BONCB

Joshua 13 in the BONLT

Joshua 13 in the BONUT2

Joshua 13 in the BOPLNT

Joshua 13 in the BOSCB

Joshua 13 in the BOSNC

Joshua 13 in the BOTLNT

Joshua 13 in the BOVCB

Joshua 13 in the BOYCB

Joshua 13 in the BPBB

Joshua 13 in the BPH

Joshua 13 in the BSB

Joshua 13 in the CCB

Joshua 13 in the CUV

Joshua 13 in the CUVS

Joshua 13 in the DBT

Joshua 13 in the DGDNT

Joshua 13 in the DHNT

Joshua 13 in the DNT

Joshua 13 in the ELBE

Joshua 13 in the EMTV

Joshua 13 in the ESV

Joshua 13 in the FBV

Joshua 13 in the FEB

Joshua 13 in the GGMNT

Joshua 13 in the GNT

Joshua 13 in the HARY

Joshua 13 in the HNT

Joshua 13 in the IRVA

Joshua 13 in the IRVB

Joshua 13 in the IRVG

Joshua 13 in the IRVH

Joshua 13 in the IRVK

Joshua 13 in the IRVM

Joshua 13 in the IRVM2

Joshua 13 in the IRVO

Joshua 13 in the IRVP

Joshua 13 in the IRVT

Joshua 13 in the IRVT2

Joshua 13 in the IRVU

Joshua 13 in the ISVN

Joshua 13 in the JSNT

Joshua 13 in the KAPI

Joshua 13 in the KBT1ETNIK

Joshua 13 in the KBV

Joshua 13 in the KJV

Joshua 13 in the KNFD

Joshua 13 in the LBA

Joshua 13 in the LBLA

Joshua 13 in the LNT

Joshua 13 in the LSV

Joshua 13 in the MAAL

Joshua 13 in the MBV

Joshua 13 in the MBV2

Joshua 13 in the MHNT

Joshua 13 in the MKNFD

Joshua 13 in the MNG

Joshua 13 in the MNT

Joshua 13 in the MNT2

Joshua 13 in the MRS1T

Joshua 13 in the NAA

Joshua 13 in the NASB

Joshua 13 in the NBLA

Joshua 13 in the NBS

Joshua 13 in the NBVTP

Joshua 13 in the NET2

Joshua 13 in the NIV11

Joshua 13 in the NNT

Joshua 13 in the NNT2

Joshua 13 in the NNT3

Joshua 13 in the PDDPT

Joshua 13 in the PFNT

Joshua 13 in the RMNT

Joshua 13 in the SBIAS

Joshua 13 in the SBIBS

Joshua 13 in the SBIBS2

Joshua 13 in the SBICS

Joshua 13 in the SBIDS

Joshua 13 in the SBIGS

Joshua 13 in the SBIHS

Joshua 13 in the SBIIS

Joshua 13 in the SBIIS2

Joshua 13 in the SBIIS3

Joshua 13 in the SBIKS

Joshua 13 in the SBIKS2

Joshua 13 in the SBIMS

Joshua 13 in the SBIOS

Joshua 13 in the SBIPS

Joshua 13 in the SBISS

Joshua 13 in the SBITS

Joshua 13 in the SBITS2

Joshua 13 in the SBITS3

Joshua 13 in the SBITS4

Joshua 13 in the SBIUS

Joshua 13 in the SBIVS

Joshua 13 in the SBT

Joshua 13 in the SBT1E

Joshua 13 in the SCHL

Joshua 13 in the SNT

Joshua 13 in the SUSU

Joshua 13 in the SUSU2

Joshua 13 in the SYNO

Joshua 13 in the TBIAOTANT

Joshua 13 in the TBT1E

Joshua 13 in the TBT1E2

Joshua 13 in the TFTIP

Joshua 13 in the TFTU

Joshua 13 in the TGNTATF3T

Joshua 13 in the THAI

Joshua 13 in the TNFD

Joshua 13 in the TNT

Joshua 13 in the TNTIK

Joshua 13 in the TNTIL

Joshua 13 in the TNTIN

Joshua 13 in the TNTIP

Joshua 13 in the TNTIZ

Joshua 13 in the TOMA

Joshua 13 in the TTENT

Joshua 13 in the UBG

Joshua 13 in the UGV

Joshua 13 in the UGV2

Joshua 13 in the UGV3

Joshua 13 in the VBL

Joshua 13 in the VDCC

Joshua 13 in the YALU

Joshua 13 in the YAPE

Joshua 13 in the YBVTP

Joshua 13 in the ZBP