Joshua 15 (BOLCB2)

1 Eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, kolanda bituka na bango, ezalaki na ngambo ya sude, wuta na bandelo ya Edomi kino na esobe ya Tsini, na suka penza ya sude. 2 Mondelo na yango ya sude ebandaki na suka ya ebale monene ya Barozo, longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale monene oyo etalana na Negevi, 3 emataki kino na ngambo ya sude ya Akarabimi mpe elekaki na Tsini, sima emataki na ngambo ya sude ya Kadeshi-Barinea mpe ekitaki na Etsironi ; emataki na ngambo ya Adari mpe ebalukaki na ngambo ya Karika. 4 Elekaki na Atsimoni, ekendeki kotutana na moluka ya Ejipito mpe esukaki na Ebale monene. Yango nde ezali mondelo na bango na ngambo ya sude. 5 Na ngambo ya este, mondelo ezalaki ebale monene ya Barozo kino na suka ya Yordani.Na ngambo ya nor, ezalaki longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale kino na suka ya Yordani. 6 Mondelo emataki na Beti-Ogila, elekaki na ngambo ya nor ya Beti-Araba mpe emataki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni. 7 Mondelo yango emataki kino na Debiri, longwa na Lubwaku ya Akori, mpe ebalukaki na ngambo ya nor kino na Giligali oyo etalana na nzela oyo emata na Adumimi, na ngambo ya sude ya moluka. Elekaki pene ya mayi ya Eyini-Shemeshi mpe ekendeki kosuka na Eyini-Rogeli. 8 Bongo mondelo yango emataki na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, pene ya mopanzi ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi (oyo ezali Yelusalemi). Longwa na esika yango, emataki kino na songe ya ngomba oyo ezali na weste ya Lubwaku ya Inomi, na suka ya ngambo ya nor ya Lubwaku ya Refayimi. 9 Longwa na songe ya ngomba, mondelo yango ekatisaki kino na etima ya mayi ya Nefitoa, ebimaki na bingumba ya ngomba Efroni mpe ekitaki na ngambo ya Baala (oyo ezali Kiriati-Yearimi). 10 Longwa na Baala, mondelo yango ekatisaki na ngambo ya weste, pene ya ngomba Seiri ; elekaki na mopanzi ya ngomba ya bazamba, na ngambo ya nor (oyo ezali ngomba Kesaloni) ; ekobaki kokita kino na Beti-Shemeshi mpe ekatisaki kino na Timina. 11 Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala ; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene. 12 Mondelo ya ngambo ya weste elekaki pembeni-pembeni ya ebale monene Mediterane. Yango nde ezalaki, na bangambo nyonso, eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda kolanda bituka na bango. 13 Kolanda mitindo oyo Yawe apesaki ye, Jozue apesaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, eteni ya mabele : Kiriati-Ariba (oyo ezali Ebron), kati na libota ya bato ya Yuda. (Ariba azalaki tata ya Anaki). 14 Kalebi abenganaki, wuta na Ebron, bakitani misato ya Anaki : Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi. 15 Longwa wana, akendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. » 16 Kalebi alobaki : « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. » 17 Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko mobali ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli. 18 Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye :— Olingi nini ? 19 Akisa azongisaki :— Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima.Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se. 20 Yango nde ezalaki eteni ya mabele oyo bato ya libota ya Yuda bazwaki lokola libula, kolanda mabota na bango. 21 Tala bingumba oyo ezalaki na suka ya eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, na ngambo ya mondelo ya Edomi, na Negevi :Kabiseyeli, Ederi, Yaguri, 22 Kina, Dimona, Adada, 23 Kedeshi, Atsori, Itinani, 24 Zifi, Telemi, Bealoti, 25 Atsori-Adata, Kerioti-Etsironi oyo bazalaki mpe kobenga Atsori, 26 Amami, Shema, Molada, 27 Atsari-Gada, Eshimoni, Beti-Paleti, 28 Atsari-Shuwali, Beri-Sheba, Biziotia, 29 Baala, Iyimi, Atsemi, 30 Elitoladi, Kesili, Orima, 31 Tsikilagi, Madimana, Sanisana, 32 Lebaoti, Shilimi, Ayini mpe Rimoni : bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 33 Tala bingumba oyo ezalaki na etando, pene ya ebale monene :Eshitaoli, Tsorea, Ashina, 34 Zanoa, Eyini-Ganimi, Tapua, Enami, 35 Yarimuti, Adulami, Soko, Azeka, 36 Shaarayimi, Aditayimi, Gedera to Gederotayimi : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 37 Tsenani, Adasha, Migidali-Gadi, 38 Dileani, Mitsipe, Yokiteyeli, 39 Lakishi, Botsikati, Egiloni, 40 Kaboni, Lakimasi, Kitilishi, 41 Gederoti, Beti-Dagoni, Naama mpe Makeda : bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 42 Libina, Eteri, Ashani ; 43 Yifita, Ashina, Netsibi, 44 Keila, Akizibi mpe Maresha : bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 45 Engumba ya Ekroni elongo na bamboka na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike oyo ezingelaki yango, 46 longwa na Ekroni mpe na ngambo ya weste, mabele nyonso oyo ezalaki pene ya Asidodi mpe bamboka na yango ; 47 Asidodi, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike ; Gaza, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike kino na moluka ya Ejipito, ebale monene Mediterane mpe bazingazinga na yango. 48 Na mokili ya bangomba :Shamiri, Yatiri, Soko, 49 Dana, Kiriati-Sana oyo bazalaki mpe kobenga Debiri, 50 Anabi, Eshitemoa, Animi, 51 Gosheni, Oloni mpe Gilo : bingumba nyonso ezalaki zomi na moko elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 52 Arabi, Duma, Esheani, 53 Yanumi, Beti-Tapua, Afeki, 54 Umeta, Kiriati-Ariba oyo bazalaki mpe kobenga Ebron, mpe Tsiori : bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na mboka na yango ya mike-mike. 55 Maoni, Karimeli, Zifi, Yuta, 56 Jizireyeli, Yokideami, Zanoa, 57 Kayini, Gibea mpe Timina : bingumba nyonso ezalaki zomi elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 58 Aliwuli, Beti-Tsuri, Gedori, 59 Maarati, Beti-Anoti mpe Elitekoni : bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 60 Kiriati-Bala oyo bazalaki mpe kobenga Kiriati-Yearimi, mpe Raba : bingumba nyonso ezalaki mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 61 Tala bingumba oyo ezalaki na esobe :Beti-Araba, Midini, Sekaka, 62 Nibishani, Iri-Amelayi mpe Eyini-Gedi : bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 63 Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.

In Other Versions

Joshua 15 in the ANGEFD

Joshua 15 in the ANTPNG2D

Joshua 15 in the AS21

Joshua 15 in the BAGH

Joshua 15 in the BBPNG

Joshua 15 in the BBT1E

Joshua 15 in the BDS

Joshua 15 in the BEV

Joshua 15 in the BHAD

Joshua 15 in the BIB

Joshua 15 in the BLPT

Joshua 15 in the BNT

Joshua 15 in the BNTABOOT

Joshua 15 in the BNTLV

Joshua 15 in the BOATCB

Joshua 15 in the BOATCB2

Joshua 15 in the BOBCV

Joshua 15 in the BOCNT

Joshua 15 in the BOECS

Joshua 15 in the BOGWICC

Joshua 15 in the BOHCB

Joshua 15 in the BOHCV

Joshua 15 in the BOHLNT

Joshua 15 in the BOHNTLTAL

Joshua 15 in the BOICB

Joshua 15 in the BOILNTAP

Joshua 15 in the BOITCV

Joshua 15 in the BOKCV

Joshua 15 in the BOKCV2

Joshua 15 in the BOKHWOG

Joshua 15 in the BOKSSV

Joshua 15 in the BOLCB

Joshua 15 in the BOMCV

Joshua 15 in the BONAV

Joshua 15 in the BONCB

Joshua 15 in the BONLT

Joshua 15 in the BONUT2

Joshua 15 in the BOPLNT

Joshua 15 in the BOSCB

Joshua 15 in the BOSNC

Joshua 15 in the BOTLNT

Joshua 15 in the BOVCB

Joshua 15 in the BOYCB

Joshua 15 in the BPBB

Joshua 15 in the BPH

Joshua 15 in the BSB

Joshua 15 in the CCB

Joshua 15 in the CUV

Joshua 15 in the CUVS

Joshua 15 in the DBT

Joshua 15 in the DGDNT

Joshua 15 in the DHNT

Joshua 15 in the DNT

Joshua 15 in the ELBE

Joshua 15 in the EMTV

Joshua 15 in the ESV

Joshua 15 in the FBV

Joshua 15 in the FEB

Joshua 15 in the GGMNT

Joshua 15 in the GNT

Joshua 15 in the HARY

Joshua 15 in the HNT

Joshua 15 in the IRVA

Joshua 15 in the IRVB

Joshua 15 in the IRVG

Joshua 15 in the IRVH

Joshua 15 in the IRVK

Joshua 15 in the IRVM

Joshua 15 in the IRVM2

Joshua 15 in the IRVO

Joshua 15 in the IRVP

Joshua 15 in the IRVT

Joshua 15 in the IRVT2

Joshua 15 in the IRVU

Joshua 15 in the ISVN

Joshua 15 in the JSNT

Joshua 15 in the KAPI

Joshua 15 in the KBT1ETNIK

Joshua 15 in the KBV

Joshua 15 in the KJV

Joshua 15 in the KNFD

Joshua 15 in the LBA

Joshua 15 in the LBLA

Joshua 15 in the LNT

Joshua 15 in the LSV

Joshua 15 in the MAAL

Joshua 15 in the MBV

Joshua 15 in the MBV2

Joshua 15 in the MHNT

Joshua 15 in the MKNFD

Joshua 15 in the MNG

Joshua 15 in the MNT

Joshua 15 in the MNT2

Joshua 15 in the MRS1T

Joshua 15 in the NAA

Joshua 15 in the NASB

Joshua 15 in the NBLA

Joshua 15 in the NBS

Joshua 15 in the NBVTP

Joshua 15 in the NET2

Joshua 15 in the NIV11

Joshua 15 in the NNT

Joshua 15 in the NNT2

Joshua 15 in the NNT3

Joshua 15 in the PDDPT

Joshua 15 in the PFNT

Joshua 15 in the RMNT

Joshua 15 in the SBIAS

Joshua 15 in the SBIBS

Joshua 15 in the SBIBS2

Joshua 15 in the SBICS

Joshua 15 in the SBIDS

Joshua 15 in the SBIGS

Joshua 15 in the SBIHS

Joshua 15 in the SBIIS

Joshua 15 in the SBIIS2

Joshua 15 in the SBIIS3

Joshua 15 in the SBIKS

Joshua 15 in the SBIKS2

Joshua 15 in the SBIMS

Joshua 15 in the SBIOS

Joshua 15 in the SBIPS

Joshua 15 in the SBISS

Joshua 15 in the SBITS

Joshua 15 in the SBITS2

Joshua 15 in the SBITS3

Joshua 15 in the SBITS4

Joshua 15 in the SBIUS

Joshua 15 in the SBIVS

Joshua 15 in the SBT

Joshua 15 in the SBT1E

Joshua 15 in the SCHL

Joshua 15 in the SNT

Joshua 15 in the SUSU

Joshua 15 in the SUSU2

Joshua 15 in the SYNO

Joshua 15 in the TBIAOTANT

Joshua 15 in the TBT1E

Joshua 15 in the TBT1E2

Joshua 15 in the TFTIP

Joshua 15 in the TFTU

Joshua 15 in the TGNTATF3T

Joshua 15 in the THAI

Joshua 15 in the TNFD

Joshua 15 in the TNT

Joshua 15 in the TNTIK

Joshua 15 in the TNTIL

Joshua 15 in the TNTIN

Joshua 15 in the TNTIP

Joshua 15 in the TNTIZ

Joshua 15 in the TOMA

Joshua 15 in the TTENT

Joshua 15 in the UBG

Joshua 15 in the UGV

Joshua 15 in the UGV2

Joshua 15 in the UGV3

Joshua 15 in the VBL

Joshua 15 in the VDCC

Joshua 15 in the YALU

Joshua 15 in the YAPE

Joshua 15 in the YBVTP

Joshua 15 in the ZBP