Joshua 4 (BOLCB2)

1 Tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa Yordani, Yawe alobaki na Jozue : 2 « Pona mibali zomi na mibale kati na bato, mobali moko mpo na libota moko. 3 Pesa bango mitindo oyo : ‹ Bozwa kati na mayi ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe bapikamaki, mabanga zomi na mibale, bomema yango elongo na bino mpe botia yango na esika oyo bokolekisa butu ya lelo. › » 4 Boye, Jozue abengaki mibali zomi na mibale oyo aponaki kati na bana ya Isalaele, mobali moko mpo na libota moko. 5 Jozue alobaki na bango : « Boleka liboso ya Sanduku ya Yawe, Nzambe na bino, kino na kati-kati ya Yordani. Moko na moko kati na bino amema libanga na lipeka na ye kolanda motango ya mabota ya Isalaele 6 mpo ete ezala lokola elembo kati na bino. Sima na tango, soki bana na bino batuni bino : ‹ Mabanga oyo elakisi nini ? › 7 Bokoyebisa bango ete mayi ya Yordani ekatanaki na biteni mibale liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Tango ekatisaki Yordani, mayi na yango mpe ekatanaki. Mabanga oyo ezali lokola ekaniseli ya seko na seko mpo na bana ya Isalaele. » 8 Boye, bana ya Isalaele basalaki ndenge Jozue atindaki bango. Bazwaki kati na Yordani, mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya Isalaele, ndenge Yawe alobaki na Jozue. Bamemaki yango kino na molako na bango, epai wapi batiaki yango. 9 Jozue atelemisaki mabanga zomi na mibale mosusu na kati-kati ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani bapikamaki, mpe etikala wana kino na mokolo ya lelo. 10 Nzokande, Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bawumelaki na kati-kati ya Yordani kino tango bato bakokisaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Jozue, ndenge kaka Moyize ayebisaki ye. Ezalaki na lombangu nde bato bakatisaki Yordani. 11 Tango bango nyonso basilisaki kokatisa, Sanduku ya Yawe elongo na Banganga-Nzambe balekaki lisusu liboso ya bato. 12 Bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bakatisaki, balataki bibundeli mpe batambolaki liboso ya bana ya Isalaele, ndenge Moyize atindaki bango. 13 Bazalaki bato pene nkoto tuku minei, bato ya bitumba, oyo bakamataki bibundeli mpo na kobunda ; balekaki liboso ya Yawe na nzela ya bitando ya Jeriko mpo na kobunda. 14 Na mokolo wana, Yawe atombolaki Jozue na miso ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe bapesaki ye lokumu mikolo nyonso ya bomoi na ye, ndenge kaka bapesaki Moyize lokumu. 15 Yawe alobaki na Jozue : 16 « Pesa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Litatoli mitindo ete babima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. » 17 Jozue apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe : « Bobima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. » 18 Boye Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe babimaki wuta na ebale. Tango kaka batiaki matambe na bango na mokili, mayi ya Yordani ezongaki na esika na yango, etondaki makasi mpe ekomaki kotiola ndenge ezalaki momesano na yango. 19 Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, bato bakendeki wuta na Yordani mpe batongaki molako na bango na Giligali, na mondelo ya este ya Jeriko. 20 Jozue atelemisaki, na Giligali, mabanga zomi na mibale oyo babimisaki na Yordani. 21 Alobaki na bana ya Isalaele : « Tango bakitani na bino bakotuna batata na bango : ‹ Mabanga oyo elakisi nini ? › 22 Boyebisa bango : ‹ Bato ya Isalaele bakatisaki Yordani na mabele ya kokawuka. › 23 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akawusaki liboso mayi ya Yordani kino tango bosilisaki kokatisa. Yawe asalaki na Yordani makambo oyo asalaki na ebale monene ya Barozo tango akawusaki yango liboso na biso, kino tango tosilisaki kokatisa yango. 24 Asalaki bongo mpo ete bato nyonso ya mokili bayeba ete loboko ya Yawe ezalaka na nguya, mpe mpo ete bobangaka Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso. »

In Other Versions

Joshua 4 in the ANGEFD

Joshua 4 in the ANTPNG2D

Joshua 4 in the AS21

Joshua 4 in the BAGH

Joshua 4 in the BBPNG

Joshua 4 in the BBT1E

Joshua 4 in the BDS

Joshua 4 in the BEV

Joshua 4 in the BHAD

Joshua 4 in the BIB

Joshua 4 in the BLPT

Joshua 4 in the BNT

Joshua 4 in the BNTABOOT

Joshua 4 in the BNTLV

Joshua 4 in the BOATCB

Joshua 4 in the BOATCB2

Joshua 4 in the BOBCV

Joshua 4 in the BOCNT

Joshua 4 in the BOECS

Joshua 4 in the BOGWICC

Joshua 4 in the BOHCB

Joshua 4 in the BOHCV

Joshua 4 in the BOHLNT

Joshua 4 in the BOHNTLTAL

Joshua 4 in the BOICB

Joshua 4 in the BOILNTAP

Joshua 4 in the BOITCV

Joshua 4 in the BOKCV

Joshua 4 in the BOKCV2

Joshua 4 in the BOKHWOG

Joshua 4 in the BOKSSV

Joshua 4 in the BOLCB

Joshua 4 in the BOMCV

Joshua 4 in the BONAV

Joshua 4 in the BONCB

Joshua 4 in the BONLT

Joshua 4 in the BONUT2

Joshua 4 in the BOPLNT

Joshua 4 in the BOSCB

Joshua 4 in the BOSNC

Joshua 4 in the BOTLNT

Joshua 4 in the BOVCB

Joshua 4 in the BOYCB

Joshua 4 in the BPBB

Joshua 4 in the BPH

Joshua 4 in the BSB

Joshua 4 in the CCB

Joshua 4 in the CUV

Joshua 4 in the CUVS

Joshua 4 in the DBT

Joshua 4 in the DGDNT

Joshua 4 in the DHNT

Joshua 4 in the DNT

Joshua 4 in the ELBE

Joshua 4 in the EMTV

Joshua 4 in the ESV

Joshua 4 in the FBV

Joshua 4 in the FEB

Joshua 4 in the GGMNT

Joshua 4 in the GNT

Joshua 4 in the HARY

Joshua 4 in the HNT

Joshua 4 in the IRVA

Joshua 4 in the IRVB

Joshua 4 in the IRVG

Joshua 4 in the IRVH

Joshua 4 in the IRVK

Joshua 4 in the IRVM

Joshua 4 in the IRVM2

Joshua 4 in the IRVO

Joshua 4 in the IRVP

Joshua 4 in the IRVT

Joshua 4 in the IRVT2

Joshua 4 in the IRVU

Joshua 4 in the ISVN

Joshua 4 in the JSNT

Joshua 4 in the KAPI

Joshua 4 in the KBT1ETNIK

Joshua 4 in the KBV

Joshua 4 in the KJV

Joshua 4 in the KNFD

Joshua 4 in the LBA

Joshua 4 in the LBLA

Joshua 4 in the LNT

Joshua 4 in the LSV

Joshua 4 in the MAAL

Joshua 4 in the MBV

Joshua 4 in the MBV2

Joshua 4 in the MHNT

Joshua 4 in the MKNFD

Joshua 4 in the MNG

Joshua 4 in the MNT

Joshua 4 in the MNT2

Joshua 4 in the MRS1T

Joshua 4 in the NAA

Joshua 4 in the NASB

Joshua 4 in the NBLA

Joshua 4 in the NBS

Joshua 4 in the NBVTP

Joshua 4 in the NET2

Joshua 4 in the NIV11

Joshua 4 in the NNT

Joshua 4 in the NNT2

Joshua 4 in the NNT3

Joshua 4 in the PDDPT

Joshua 4 in the PFNT

Joshua 4 in the RMNT

Joshua 4 in the SBIAS

Joshua 4 in the SBIBS

Joshua 4 in the SBIBS2

Joshua 4 in the SBICS

Joshua 4 in the SBIDS

Joshua 4 in the SBIGS

Joshua 4 in the SBIHS

Joshua 4 in the SBIIS

Joshua 4 in the SBIIS2

Joshua 4 in the SBIIS3

Joshua 4 in the SBIKS

Joshua 4 in the SBIKS2

Joshua 4 in the SBIMS

Joshua 4 in the SBIOS

Joshua 4 in the SBIPS

Joshua 4 in the SBISS

Joshua 4 in the SBITS

Joshua 4 in the SBITS2

Joshua 4 in the SBITS3

Joshua 4 in the SBITS4

Joshua 4 in the SBIUS

Joshua 4 in the SBIVS

Joshua 4 in the SBT

Joshua 4 in the SBT1E

Joshua 4 in the SCHL

Joshua 4 in the SNT

Joshua 4 in the SUSU

Joshua 4 in the SUSU2

Joshua 4 in the SYNO

Joshua 4 in the TBIAOTANT

Joshua 4 in the TBT1E

Joshua 4 in the TBT1E2

Joshua 4 in the TFTIP

Joshua 4 in the TFTU

Joshua 4 in the TGNTATF3T

Joshua 4 in the THAI

Joshua 4 in the TNFD

Joshua 4 in the TNT

Joshua 4 in the TNTIK

Joshua 4 in the TNTIL

Joshua 4 in the TNTIN

Joshua 4 in the TNTIP

Joshua 4 in the TNTIZ

Joshua 4 in the TOMA

Joshua 4 in the TTENT

Joshua 4 in the UBG

Joshua 4 in the UGV

Joshua 4 in the UGV2

Joshua 4 in the UGV3

Joshua 4 in the VBL

Joshua 4 in the VDCC

Joshua 4 in the YALU

Joshua 4 in the YAPE

Joshua 4 in the YBVTP

Joshua 4 in the ZBP