Joshua 8 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga te mpe kolemba nzoto te. Kamata elongo na yo basoda nyonso, mata mpe bundisa engumba Ayi. Pamba te nasili kokaba na maboko na yo : mokonzi ya Ayi, bato na ye, engumba na ye, mpe mokili na ye. 2 Okosala engumba Ayi mpe mokonzi na yango ndenge osalaki Jeriko mpe mokonzi na yango ; kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba, biloko mpe bibwele na yango. Bomba basoda na sima ya engumba. » 3 Jozue atelemaki elongo na basoda nyonso mpo na kobundisa engumba Ayi. Aponaki bilombe ya bitumba nkoto tuku misato mpe atindaki bango na butu. 4 Apesaki bango mitindo oyo : « Bobombama na sima ya engumba oyo ; bozala penza mosika mingi te na engumba, kasi bozala pene. 5 Ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai, tokopusana pene ya engumba. Tango bakobima mpo na kobundisa biso lokola na mbala oyo eleki, tokokima liboso na bango. 6 Bakolanda biso, mpe tokobenda bango mosika ya engumba, pamba te bakoloba : ‹ Bazali kokima liboso na biso lokola na mbala oyo eleki, › mpe tokokima liboso na bango. 7 Boye, bino bokobima wuta na bisika oyo bokobombama mpe bokobotola engumba. Yawe, Nzambe na bino, akabi yango na maboko na bino. 8 Tango bokobotola engumba, botia yango moto mpe bosala ndenge Yawe alobaki. » 9 Jozue atindaki bango, mpe bakendeki na esika oyo basengelaki kobombama. Babombamaki na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya Ayi. Jozue alekisaki butu wana elongo na bana ya Isalaele. 10 Jozue alamukaki na tongo-tongo penza mpe atalaki ndenge nini basoda na ye bamilengelaki. Sima na yango, alekaki liboso elongo na bakambi ya Isalaele mpo na kokende kobundisa engumba Ayi. 11 Basoda na ye nyonso bapusanaki kino na liboso ya engumba mpe batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Ayi, bongo lubwaku ezalaki kati na bango mpe Ayi. 12 Jozue azwaki basoda nkoto mitano mpe abombaki bango na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya engumba. 13 Mampinga ya basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya engumba ; mpe basoda oyo batikalaka na sima, na ngambo ya weste ya engumba. Na butu wana, Jozue akendeki na kati-kati ya etando. 14 Tango mokonzi ya Ayi amonaki bongo, ye elongo na bato na ye nyonso, bavandi ya engumba, batelemaki na lombangu mpe babimaki mpo na kobundisa Isalaele na esika oyo nzela ekutana, liboso ya Araba. Ayebaki te ete basoda mosusu babombamaki na sima ya engumba. 15 Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bakosaki lokola bato oyo basili kokweya na bitumba mpe bakimaki na ngambo ya esobe. 16 Babelelaki bato nyonso ya Ayi mpo ete balanda bango. Boye, balandaki Jozue mpe bakendeki mosika ya engumba. 17 Kati na Ayi mpe Beteli, mobali moko te atikalaki oyo azangaki kolanda Isalaele. Batikaki engumba ya kofungwama, wana bazalaki kolanda Isalaele. 18 Yawe alobaki na Jozue : « Sembola na ngambo ya Ayi likonga oyo osimbi na loboko, pamba te nalingi kokaba yango na maboko na yo. » Boye Jozue asembolaki na ngambo ya engumba likonga oyo ezalaki na loboko na ye. 19 Tango kaka asembolaki loboko, basoda oyo babombamaki babimaki na lombangu wuta na bisika oyo babombamaki, bakotaki na engumba, babotolaki yango mpe batiaki yango moto. 20 Tango bato ya Ayi batalaki na sima, bamonaki milinga komata na likolo wuta na engumba ; moko te akokaki lisusu kokima na ngambo moko to na ngambo mosusu. Bana ya Isalaele oyo bazalaki kokima na esobe babalukelaki bato oyo bazalaki kolanda bango. 21 Boye, tango Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete basoda oyo babombamaki bazwi engumba mpe milinga ezali komata wuta na engumba, bazongaki mpe babomaki bato ya Ayi. 22 Basoda ya Isalaele oyo babombamaki, babimaki na engumba mpo na kobundisa bango. Bato ya Ayi bakomaki na kati-kati ya basoda ya Isalaele oyo bazalaki, bamoko na ngambo moko, mpe bamosusu, na ngambo mosusu. Basoda ya Isalaele basilisaki koboma bango nyonso, ata moko te atikalaki na bomoi, mpe ata moko te akimaki. 23 Kasi bakangaki ya bomoi mokonzi ya Ayi mpe bamemaki ye epai ya Jozue. 24 Tango Isalaele asilisaki koboma mibali nyonso ya Ayi, kati na zamba mpe kati na esobe epai wapi balandaki bango, mpe wana bango nyonso basilaki kokufa na mopanga, bana nyonso ya Isalaele bazongaki na Ayi mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna. 25 Motango ya bato nyonso oyo bakufaki na mokolo wana, basi mpe mibali, ezalaki nkoto zomi na mibale : bango nyonso bazalaki bato ya Ayi. 26 Jozue akitisaki te loboko na ye, oyo esimbaki likonga kino tango asilisaki koboma bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ayi. 27 Kasi Isalaele azwaki mpo na ye, lokola bomengo ya bitumba, bibwele mpe biloko ya engumba yango, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na Jozue. 28 Jozue atumbaki Ayi mpe akomisaki yango libebi mpo na libela, esika ezanga bato kino na mokolo ya lelo. 29 Adiembikaki mokonzi ya Ayi, na nzete kino na pokwa ; bongo tango moyi elalaki, Jozue atindaki ete balongola ebembe yango na nzete. Babwakaki yango na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe batondisaki na likolo na yango liboke monene ya mabanga oyo ezali kino na mokolo ya lelo. 30 Jozue atongaki etumbelo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, na ngomba Ebali, 31 ndenge Moyize, mosali na Yawe, atindaki bana ya Isalaele. Atongaki yango kolanda makambo oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize : etumbelo etongama na mabanga oyo bakata na esalelo ya ebende te. Na likolo na yango, batiaki mbeka ya kotumba mpo na Yawe mpe babonzaki mbeka ya boyokani. 32 Na esika yango, na miso ya bana nyonso ya Isalaele, Jozue akomaki, na likolo ya mabanga, Mobeko oyo Moyize akomaki mpo na bana ya Isalaele. 33 Bato nyonso ya Isalaele elongo na bakambi na bango, bakomi mibeko mpe basambisi na bango, batelemaki ngambo na ngambo ya Sanduku ya Boyokani, liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bamemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Mopaya elongo na mwana mboka ya Isalaele bazalaki wana. Ndambo ezalaki liboso ya ngomba Garizimi, mpe ndambo mosusu, liboso ya ngomba Ebali, kolanda mitindo oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki mpo na kopambola bana ya Isalaele. 34 Sima na yango, Jozue atangaki maloba nyonso ya Mobeko : mapamboli mpe bilakeli mabe kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko. 35 Jozue azangisaki te kotanga, liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, basi, bana mpe bapaya oyo bazalaki kati na bango, maloba nyonso oyo Moyize akomaki.

In Other Versions

Joshua 8 in the ANGEFD

Joshua 8 in the ANTPNG2D

Joshua 8 in the AS21

Joshua 8 in the BAGH

Joshua 8 in the BBPNG

Joshua 8 in the BBT1E

Joshua 8 in the BDS

Joshua 8 in the BEV

Joshua 8 in the BHAD

Joshua 8 in the BIB

Joshua 8 in the BLPT

Joshua 8 in the BNT

Joshua 8 in the BNTABOOT

Joshua 8 in the BNTLV

Joshua 8 in the BOATCB

Joshua 8 in the BOATCB2

Joshua 8 in the BOBCV

Joshua 8 in the BOCNT

Joshua 8 in the BOECS

Joshua 8 in the BOGWICC

Joshua 8 in the BOHCB

Joshua 8 in the BOHCV

Joshua 8 in the BOHLNT

Joshua 8 in the BOHNTLTAL

Joshua 8 in the BOICB

Joshua 8 in the BOILNTAP

Joshua 8 in the BOITCV

Joshua 8 in the BOKCV

Joshua 8 in the BOKCV2

Joshua 8 in the BOKHWOG

Joshua 8 in the BOKSSV

Joshua 8 in the BOLCB

Joshua 8 in the BOMCV

Joshua 8 in the BONAV

Joshua 8 in the BONCB

Joshua 8 in the BONLT

Joshua 8 in the BONUT2

Joshua 8 in the BOPLNT

Joshua 8 in the BOSCB

Joshua 8 in the BOSNC

Joshua 8 in the BOTLNT

Joshua 8 in the BOVCB

Joshua 8 in the BOYCB

Joshua 8 in the BPBB

Joshua 8 in the BPH

Joshua 8 in the BSB

Joshua 8 in the CCB

Joshua 8 in the CUV

Joshua 8 in the CUVS

Joshua 8 in the DBT

Joshua 8 in the DGDNT

Joshua 8 in the DHNT

Joshua 8 in the DNT

Joshua 8 in the ELBE

Joshua 8 in the EMTV

Joshua 8 in the ESV

Joshua 8 in the FBV

Joshua 8 in the FEB

Joshua 8 in the GGMNT

Joshua 8 in the GNT

Joshua 8 in the HARY

Joshua 8 in the HNT

Joshua 8 in the IRVA

Joshua 8 in the IRVB

Joshua 8 in the IRVG

Joshua 8 in the IRVH

Joshua 8 in the IRVK

Joshua 8 in the IRVM

Joshua 8 in the IRVM2

Joshua 8 in the IRVO

Joshua 8 in the IRVP

Joshua 8 in the IRVT

Joshua 8 in the IRVT2

Joshua 8 in the IRVU

Joshua 8 in the ISVN

Joshua 8 in the JSNT

Joshua 8 in the KAPI

Joshua 8 in the KBT1ETNIK

Joshua 8 in the KBV

Joshua 8 in the KJV

Joshua 8 in the KNFD

Joshua 8 in the LBA

Joshua 8 in the LBLA

Joshua 8 in the LNT

Joshua 8 in the LSV

Joshua 8 in the MAAL

Joshua 8 in the MBV

Joshua 8 in the MBV2

Joshua 8 in the MHNT

Joshua 8 in the MKNFD

Joshua 8 in the MNG

Joshua 8 in the MNT

Joshua 8 in the MNT2

Joshua 8 in the MRS1T

Joshua 8 in the NAA

Joshua 8 in the NASB

Joshua 8 in the NBLA

Joshua 8 in the NBS

Joshua 8 in the NBVTP

Joshua 8 in the NET2

Joshua 8 in the NIV11

Joshua 8 in the NNT

Joshua 8 in the NNT2

Joshua 8 in the NNT3

Joshua 8 in the PDDPT

Joshua 8 in the PFNT

Joshua 8 in the RMNT

Joshua 8 in the SBIAS

Joshua 8 in the SBIBS

Joshua 8 in the SBIBS2

Joshua 8 in the SBICS

Joshua 8 in the SBIDS

Joshua 8 in the SBIGS

Joshua 8 in the SBIHS

Joshua 8 in the SBIIS

Joshua 8 in the SBIIS2

Joshua 8 in the SBIIS3

Joshua 8 in the SBIKS

Joshua 8 in the SBIKS2

Joshua 8 in the SBIMS

Joshua 8 in the SBIOS

Joshua 8 in the SBIPS

Joshua 8 in the SBISS

Joshua 8 in the SBITS

Joshua 8 in the SBITS2

Joshua 8 in the SBITS3

Joshua 8 in the SBITS4

Joshua 8 in the SBIUS

Joshua 8 in the SBIVS

Joshua 8 in the SBT

Joshua 8 in the SBT1E

Joshua 8 in the SCHL

Joshua 8 in the SNT

Joshua 8 in the SUSU

Joshua 8 in the SUSU2

Joshua 8 in the SYNO

Joshua 8 in the TBIAOTANT

Joshua 8 in the TBT1E

Joshua 8 in the TBT1E2

Joshua 8 in the TFTIP

Joshua 8 in the TFTU

Joshua 8 in the TGNTATF3T

Joshua 8 in the THAI

Joshua 8 in the TNFD

Joshua 8 in the TNT

Joshua 8 in the TNTIK

Joshua 8 in the TNTIL

Joshua 8 in the TNTIN

Joshua 8 in the TNTIP

Joshua 8 in the TNTIZ

Joshua 8 in the TOMA

Joshua 8 in the TTENT

Joshua 8 in the UBG

Joshua 8 in the UGV

Joshua 8 in the UGV2

Joshua 8 in the UGV3

Joshua 8 in the VBL

Joshua 8 in the VDCC

Joshua 8 in the YALU

Joshua 8 in the YAPE

Joshua 8 in the YBVTP

Joshua 8 in the ZBP