Leviticus 19 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule. 3 Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino. 4 Bomipesa te na banzambe ya bikeko to bomisalela te banzambe ya bikeko ya bibende ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. 5 Tango bokobonza mbeka ya boyokani epai na Yawe, bosala yango na ndenge esengeli mpo ete endimama mpo na bolamu na bino. 6 Bosengeli kolia yango kaka na mokolo oyo bobonzi yango lokola mbeka to na mokolo oyo elandi. Mpe eloko nyonso oyo ekotikala, bosengeli kozikisa yango na moto na mokolo ya misato. 7 Kasi na mokolo yango ya misato, mbeka yango ekokoma mbindo ; soki moto moko alie yango, nakondima yango lisusu te. 8 Moto nyonso oyo akolia yango, akomema mokumba ya mabe na ye mpo ete asambwisi eloko oyo ezali bule mpo na Yawe, mpe basengeli kobengana ye kati na bato na ye. 9 Tango okobuka mbuma ya bilanga na yo, okobuka yango te kino na mondelo, mpe okozonga te mpo na kolokota mbuma oyo ekokweya. 10 Okobuka mpe te mbuma ya vino oyo ekotikala to kolokota oyo ekokweya. Okotika yango mpo na babola to bapaya : nazali Yawe Nzambe na yo. 11 Okoyiba te, okoloba lokuta te, moto moko te akosa moninga na ye. 12 Okolapa te ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai mpe okobebisa te bosantu ya Kombo ya Nzambe na yo. Nazali Yawe, Nzambe na yo. 13 Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo. 14 Okolakela mabe te moto oyo akufa matoyi mpe okotia libaku te liboso ya mokufi miso, kasi okotosa Nzambe na yo. Nazali Yawe. 15 Okosambisa na bosembo. Okokotela te, ezala mobola to mozwi. Okosambisa moninga na yo na bosembo. 16 Okokende te kotonga bato na yo bipai na bipai. Okosala eloko moko te oyo ekoyeisa pasi na bomoi ya moninga na yo. Nazali Yawe. 17 Okoyina ndeko na yo te na motema na yo ; kasi pamela moninga mpo ete omema ngambo te na likambo na ye. 18 Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe. 19 Okobatela bikateli na ngai : okosangisa nzoto te ya banyama mibale ya lolenge mibale ekesana ; okolona mpe te na elanga na yo nkona mibale ekesana. Okolata te elamba oyo batongi na basinga mibale ekesana. 20 Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi oyo azali mobandami ya mobali mosusu, kasi nanu bapeseli ye te biloko ya libala to kopesa ye bonsomi, esengeli mobali wana afuta lomande. Nzokande bango mibale, bakoboma bango te mpo ete mwasi yango asikolamaki nanu te. 21 Mpe mobali asengeli komema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani meme ya mobali oyo akobonza epai na Yawe lokola mbeka mpo na masumu. 22 Bongo na nzela ya meme yango ya mbeka mpo na masumu, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mobali yango liboso ya Yawe, mpe masumu oyo asilaki kosala ekolimbisama. 23 Tango bokokota na mokili ya Kanana, bokolona banzete ya lolenge nyonso oyo ebotaka mbuma. Na mibu misato, bokozwa bambuma na yango nyonso lokola bambuma ya mbindo ; boye bokolia yango te. 24 Na mobu ya minei, bokobulisa bambuma na yango nyonso ekozala bule mpo na Yawe lokola litatoli ya kozongisa matondi epai na Ye. 25 Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino. 26 Bokolia te nyama oyo ezali na makila kati na yango. Bokosalela soloka to kindoki te. 27 Okokata suki te na bangambo nyonso ya moto na yo, okokata mpe te mandefu na bapembeni na yango. 28 Soki bozwi matanga, bomikata-kata banzoto na bino te to bomikatisa banzoloko te. Nazali Yawe. 29 Bobebisa te lokumu ya bana na bino ya basi na kokomisa bango basi ya ndumba, noki te mboka mobimba ekomipesa na kindumba mpe ekotonda na mabe. 30 Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe. 31 Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. 32 Bokotelema liboso ya bato oyo banuni, bokolakisa botosi na bino epai ya mibange ; na nzela wana, bokokumisa Nzambe na bino. Nazali Yawe. 33 Soki mopaya moko ayei kovanda kati na bino, na mokili na bino, bonyokola ye te. 34 Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino. 35 Bokosalela lokuta te tango bokomeka molayi, bakilo mpe tango bokoluka koyeba ebele oyo ekoki kozala na kati. 36 Bokosalela bimekelo ya malamu, bakilo ya malamu, efa ya malamu ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito. 37 Bokobatela bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso mpe bokosalela yango. Nazali Yawe. › »

In Other Versions

Leviticus 19 in the ANGEFD

Leviticus 19 in the ANTPNG2D

Leviticus 19 in the AS21

Leviticus 19 in the BAGH

Leviticus 19 in the BBPNG

Leviticus 19 in the BBT1E

Leviticus 19 in the BDS

Leviticus 19 in the BEV

Leviticus 19 in the BHAD

Leviticus 19 in the BIB

Leviticus 19 in the BLPT

Leviticus 19 in the BNT

Leviticus 19 in the BNTABOOT

Leviticus 19 in the BNTLV

Leviticus 19 in the BOATCB

Leviticus 19 in the BOATCB2

Leviticus 19 in the BOBCV

Leviticus 19 in the BOCNT

Leviticus 19 in the BOECS

Leviticus 19 in the BOGWICC

Leviticus 19 in the BOHCB

Leviticus 19 in the BOHCV

Leviticus 19 in the BOHLNT

Leviticus 19 in the BOHNTLTAL

Leviticus 19 in the BOICB

Leviticus 19 in the BOILNTAP

Leviticus 19 in the BOITCV

Leviticus 19 in the BOKCV

Leviticus 19 in the BOKCV2

Leviticus 19 in the BOKHWOG

Leviticus 19 in the BOKSSV

Leviticus 19 in the BOLCB

Leviticus 19 in the BOMCV

Leviticus 19 in the BONAV

Leviticus 19 in the BONCB

Leviticus 19 in the BONLT

Leviticus 19 in the BONUT2

Leviticus 19 in the BOPLNT

Leviticus 19 in the BOSCB

Leviticus 19 in the BOSNC

Leviticus 19 in the BOTLNT

Leviticus 19 in the BOVCB

Leviticus 19 in the BOYCB

Leviticus 19 in the BPBB

Leviticus 19 in the BPH

Leviticus 19 in the BSB

Leviticus 19 in the CCB

Leviticus 19 in the CUV

Leviticus 19 in the CUVS

Leviticus 19 in the DBT

Leviticus 19 in the DGDNT

Leviticus 19 in the DHNT

Leviticus 19 in the DNT

Leviticus 19 in the ELBE

Leviticus 19 in the EMTV

Leviticus 19 in the ESV

Leviticus 19 in the FBV

Leviticus 19 in the FEB

Leviticus 19 in the GGMNT

Leviticus 19 in the GNT

Leviticus 19 in the HARY

Leviticus 19 in the HNT

Leviticus 19 in the IRVA

Leviticus 19 in the IRVB

Leviticus 19 in the IRVG

Leviticus 19 in the IRVH

Leviticus 19 in the IRVK

Leviticus 19 in the IRVM

Leviticus 19 in the IRVM2

Leviticus 19 in the IRVO

Leviticus 19 in the IRVP

Leviticus 19 in the IRVT

Leviticus 19 in the IRVT2

Leviticus 19 in the IRVU

Leviticus 19 in the ISVN

Leviticus 19 in the JSNT

Leviticus 19 in the KAPI

Leviticus 19 in the KBT1ETNIK

Leviticus 19 in the KBV

Leviticus 19 in the KJV

Leviticus 19 in the KNFD

Leviticus 19 in the LBA

Leviticus 19 in the LBLA

Leviticus 19 in the LNT

Leviticus 19 in the LSV

Leviticus 19 in the MAAL

Leviticus 19 in the MBV

Leviticus 19 in the MBV2

Leviticus 19 in the MHNT

Leviticus 19 in the MKNFD

Leviticus 19 in the MNG

Leviticus 19 in the MNT

Leviticus 19 in the MNT2

Leviticus 19 in the MRS1T

Leviticus 19 in the NAA

Leviticus 19 in the NASB

Leviticus 19 in the NBLA

Leviticus 19 in the NBS

Leviticus 19 in the NBVTP

Leviticus 19 in the NET2

Leviticus 19 in the NIV11

Leviticus 19 in the NNT

Leviticus 19 in the NNT2

Leviticus 19 in the NNT3

Leviticus 19 in the PDDPT

Leviticus 19 in the PFNT

Leviticus 19 in the RMNT

Leviticus 19 in the SBIAS

Leviticus 19 in the SBIBS

Leviticus 19 in the SBIBS2

Leviticus 19 in the SBICS

Leviticus 19 in the SBIDS

Leviticus 19 in the SBIGS

Leviticus 19 in the SBIHS

Leviticus 19 in the SBIIS

Leviticus 19 in the SBIIS2

Leviticus 19 in the SBIIS3

Leviticus 19 in the SBIKS

Leviticus 19 in the SBIKS2

Leviticus 19 in the SBIMS

Leviticus 19 in the SBIOS

Leviticus 19 in the SBIPS

Leviticus 19 in the SBISS

Leviticus 19 in the SBITS

Leviticus 19 in the SBITS2

Leviticus 19 in the SBITS3

Leviticus 19 in the SBITS4

Leviticus 19 in the SBIUS

Leviticus 19 in the SBIVS

Leviticus 19 in the SBT

Leviticus 19 in the SBT1E

Leviticus 19 in the SCHL

Leviticus 19 in the SNT

Leviticus 19 in the SUSU

Leviticus 19 in the SUSU2

Leviticus 19 in the SYNO

Leviticus 19 in the TBIAOTANT

Leviticus 19 in the TBT1E

Leviticus 19 in the TBT1E2

Leviticus 19 in the TFTIP

Leviticus 19 in the TFTU

Leviticus 19 in the TGNTATF3T

Leviticus 19 in the THAI

Leviticus 19 in the TNFD

Leviticus 19 in the TNT

Leviticus 19 in the TNTIK

Leviticus 19 in the TNTIL

Leviticus 19 in the TNTIN

Leviticus 19 in the TNTIP

Leviticus 19 in the TNTIZ

Leviticus 19 in the TOMA

Leviticus 19 in the TTENT

Leviticus 19 in the UBG

Leviticus 19 in the UGV

Leviticus 19 in the UGV2

Leviticus 19 in the UGV3

Leviticus 19 in the VBL

Leviticus 19 in the VDCC

Leviticus 19 in the YALU

Leviticus 19 in the YAPE

Leviticus 19 in the YBVTP

Leviticus 19 in the ZBP