Leviticus 22 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Talisa Aron mpe bana na ye ya mibali ndenge nini basengeli kozala mosika ya makabo oyo bana ya Isalaele babonzelaka Ngai, mpo ete babebisa te bosantu ya Kombo na Ngai ya bule ; Ngai nazali Yawe. 3 Loba na bango : ‹ Mpo na milongo oyo ekoya na sima mpe kati na bakitani na bino, soki moko azali mbindo mpe apusani pembeni ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Ngai Yawe, esengeli balongola moto wana na miso na Ngai. Nazali Yawe. 4 Soki moko ya bakitani ya Aron azali na bokono na poso ya nzoto lokola maba, bokono ya kobima tofina to makila na nzoto ya mibali, akoki te kolia likabo ya bule kino tango akokoma peto. Ndenge moko mpe, akozala mbindo soki asimbi eloko oyo ekomi mbindo mpo ete etuti ebembe to mobali oyo abimisi mayi ya mibali ; 5 soki asimbi nyama oyo etambolaka na libumu mpe ekomisaka mbindo to soki asimbi moto nyonso oyo akoki kokomisa ye mbindo ata na nzela ya ndenge nini. 6 Moto oyo akosimba eloko ya ndenge wana akozala mbindo kino na pokwa. Akoki kolia likabo ya bule te kino tango akosukola na mayi. 7 Akokoma peto tango moyi ekolala mpe sima na yango nde akoki kolia makabo ya bule, pamba te ezali bilei na ye. 8 Akoki te kolia nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama ya zamba ebomi, noki te akokoma mbindo na nzela na yango. Nazali Yawe. 9 Banganga-Nzambe bakotosa malako na Ngai tango nyonso mpo ete bamema ngambo te mpe bakufa te, noki te bakokufa solo. Ngai nazali Yawe oyo abulisaki bango mpe akomisaka bango basantu mpo na mosala na Ngai. 10 Moto moko te oyo azali na libota ya Banganga-Nzambe te akoki kolia makabo ya bule : ezala mopaya oyo Nganga-Nzambe abengi to mosali oyo Nganga-Nzambe azwi na mosala. 11 Kasi soki Nganga-Nzambe asombi mowumbu na mbongo na ye to soki mowumbu abotami na ndako na ye, mowumbu wana akolia makabo ya bule. 12 Soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe abali mobali oyo azali Nganga-Nzambe te, akolia te makabo ya bule. 13 Kasi soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe akufisi mobali to akabwani na mobali, bongo amiboteli mwana te mpe azongi kovanda na ndako ya tata na ye lokola tango azalaki elenge, akoki kolia biloko ya ndenge moko na tata na ye ; kasi moto oyo azali Nganga-Nzambe te akolia yango te. 14 Soki moto alie likabo ya bule na kozanga koyeba, asengeli kozongisa epai ya Nganga-Nzambe motuya ya likabo yango mpe akobakisa eteni moko kati na mitano ya motuya na yango. 15 Banganga-Nzambe basengeli te kobebisa lokumu ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe. 16 Soki, wana bazali mbindo, balie yango, bakomemisa bana ya Isalaele ngambo oyo ekosala ete bapesa likabo mpo na kozongisa boyokani, pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisaka bango mpo na mosala na Ngai. › » 17 Yawe alobaki na Moyize : 18 « Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele : ‹ Soki moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na Isalaele alingi kobonza mbeka ya kotumba epai na Yawe mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko, 19 asengeli kobonza nyama ya mobali oyo ezangi mbeba kati na bangombe, bameme to bantaba mpo ete Nzambe andima yango. 20 Asengeli te kobonza nyama oyo ezali na mbeba, pamba te ekondimama te. 21 Ndenge moko mpe, soki moto alingi kobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani oyo azwi kati na bangombe, bameme to bantaba, mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko, nyama yango esengeli kozala ezanga mbeba. 22 Bokobonza te epai na Yawe nyama oyo ekufa liso to ezoka, oyo ezali kotambola tengu-tengu to oyo ezali na bokono na poso ya nzoto, oyo ezali na makwanza to na mapalata ; bokoki te kotia nyama ya boye na likolo ya etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. 23 Nzokande bokoki mpe te kobonza mpo na Yawe lokola likabo oyo bopesi kolanda mokano ya mitema na bino moko, ngombe ya mobali to meme oyo ezali na makolo to maboko ekokana te. Mbeka ya boye ekoki kondimama te mpo na kokokisa ndayi. 24 Bokobonza kaka epai na Yawe, nyama oyo mapumbu na yango bafina penza to banika, balongola to bakata ; bokoki kosala bongo te kati na mboka na bino moko. 25 Bokoki kondima nyama ya lolenge oyo te na maboko ya bapaya mpo na kobonza yango epai na Yawe lokola bilei ya Nzambe na bino. Ekoki kondimama te, pamba te ezali na mbeba. › » 26 Yawe alobaki na Moyize : 27 « Soki mwana ngombe, mwana meme to mwana ntaba ebotami, ekosala mikolo sambo epai ya mama na yango, bongo na mokolo ya mwambe, ekondimama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. 28 Bokoki te kokata kingo ya ngombe ya mwasi to ya meme ya mwasi mokolo moko na mwana na yango. 29 Tango bokobonza mbeka ya kozongisa matondi epai na Yawe, bobonza yango na lolenge oyo ekosala ete Nzambe andima bino. 30 Esengeli bolia yango kaka mokolo wana. Bokotika eloko moko te kino na tongo. Nazali Yawe. 31 Bobatela mitindo na Ngai mpe bosalela yango. Nazali Yawe. 32 Bokobebisa te lokumu ya Kombo na Ngai ya bule, mpo ete bana ya Isalaele bayeba solo ete Ngai nazali Mosantu. Ezali Ngai Yawe nde nabulisaki bino. 33 Nabimisaki bino na mokili ya Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Nazali Yawe. »

In Other Versions

Leviticus 22 in the ANGEFD

Leviticus 22 in the ANTPNG2D

Leviticus 22 in the AS21

Leviticus 22 in the BAGH

Leviticus 22 in the BBPNG

Leviticus 22 in the BBT1E

Leviticus 22 in the BDS

Leviticus 22 in the BEV

Leviticus 22 in the BHAD

Leviticus 22 in the BIB

Leviticus 22 in the BLPT

Leviticus 22 in the BNT

Leviticus 22 in the BNTABOOT

Leviticus 22 in the BNTLV

Leviticus 22 in the BOATCB

Leviticus 22 in the BOATCB2

Leviticus 22 in the BOBCV

Leviticus 22 in the BOCNT

Leviticus 22 in the BOECS

Leviticus 22 in the BOGWICC

Leviticus 22 in the BOHCB

Leviticus 22 in the BOHCV

Leviticus 22 in the BOHLNT

Leviticus 22 in the BOHNTLTAL

Leviticus 22 in the BOICB

Leviticus 22 in the BOILNTAP

Leviticus 22 in the BOITCV

Leviticus 22 in the BOKCV

Leviticus 22 in the BOKCV2

Leviticus 22 in the BOKHWOG

Leviticus 22 in the BOKSSV

Leviticus 22 in the BOLCB

Leviticus 22 in the BOMCV

Leviticus 22 in the BONAV

Leviticus 22 in the BONCB

Leviticus 22 in the BONLT

Leviticus 22 in the BONUT2

Leviticus 22 in the BOPLNT

Leviticus 22 in the BOSCB

Leviticus 22 in the BOSNC

Leviticus 22 in the BOTLNT

Leviticus 22 in the BOVCB

Leviticus 22 in the BOYCB

Leviticus 22 in the BPBB

Leviticus 22 in the BPH

Leviticus 22 in the BSB

Leviticus 22 in the CCB

Leviticus 22 in the CUV

Leviticus 22 in the CUVS

Leviticus 22 in the DBT

Leviticus 22 in the DGDNT

Leviticus 22 in the DHNT

Leviticus 22 in the DNT

Leviticus 22 in the ELBE

Leviticus 22 in the EMTV

Leviticus 22 in the ESV

Leviticus 22 in the FBV

Leviticus 22 in the FEB

Leviticus 22 in the GGMNT

Leviticus 22 in the GNT

Leviticus 22 in the HARY

Leviticus 22 in the HNT

Leviticus 22 in the IRVA

Leviticus 22 in the IRVB

Leviticus 22 in the IRVG

Leviticus 22 in the IRVH

Leviticus 22 in the IRVK

Leviticus 22 in the IRVM

Leviticus 22 in the IRVM2

Leviticus 22 in the IRVO

Leviticus 22 in the IRVP

Leviticus 22 in the IRVT

Leviticus 22 in the IRVT2

Leviticus 22 in the IRVU

Leviticus 22 in the ISVN

Leviticus 22 in the JSNT

Leviticus 22 in the KAPI

Leviticus 22 in the KBT1ETNIK

Leviticus 22 in the KBV

Leviticus 22 in the KJV

Leviticus 22 in the KNFD

Leviticus 22 in the LBA

Leviticus 22 in the LBLA

Leviticus 22 in the LNT

Leviticus 22 in the LSV

Leviticus 22 in the MAAL

Leviticus 22 in the MBV

Leviticus 22 in the MBV2

Leviticus 22 in the MHNT

Leviticus 22 in the MKNFD

Leviticus 22 in the MNG

Leviticus 22 in the MNT

Leviticus 22 in the MNT2

Leviticus 22 in the MRS1T

Leviticus 22 in the NAA

Leviticus 22 in the NASB

Leviticus 22 in the NBLA

Leviticus 22 in the NBS

Leviticus 22 in the NBVTP

Leviticus 22 in the NET2

Leviticus 22 in the NIV11

Leviticus 22 in the NNT

Leviticus 22 in the NNT2

Leviticus 22 in the NNT3

Leviticus 22 in the PDDPT

Leviticus 22 in the PFNT

Leviticus 22 in the RMNT

Leviticus 22 in the SBIAS

Leviticus 22 in the SBIBS

Leviticus 22 in the SBIBS2

Leviticus 22 in the SBICS

Leviticus 22 in the SBIDS

Leviticus 22 in the SBIGS

Leviticus 22 in the SBIHS

Leviticus 22 in the SBIIS

Leviticus 22 in the SBIIS2

Leviticus 22 in the SBIIS3

Leviticus 22 in the SBIKS

Leviticus 22 in the SBIKS2

Leviticus 22 in the SBIMS

Leviticus 22 in the SBIOS

Leviticus 22 in the SBIPS

Leviticus 22 in the SBISS

Leviticus 22 in the SBITS

Leviticus 22 in the SBITS2

Leviticus 22 in the SBITS3

Leviticus 22 in the SBITS4

Leviticus 22 in the SBIUS

Leviticus 22 in the SBIVS

Leviticus 22 in the SBT

Leviticus 22 in the SBT1E

Leviticus 22 in the SCHL

Leviticus 22 in the SNT

Leviticus 22 in the SUSU

Leviticus 22 in the SUSU2

Leviticus 22 in the SYNO

Leviticus 22 in the TBIAOTANT

Leviticus 22 in the TBT1E

Leviticus 22 in the TBT1E2

Leviticus 22 in the TFTIP

Leviticus 22 in the TFTU

Leviticus 22 in the TGNTATF3T

Leviticus 22 in the THAI

Leviticus 22 in the TNFD

Leviticus 22 in the TNT

Leviticus 22 in the TNTIK

Leviticus 22 in the TNTIL

Leviticus 22 in the TNTIN

Leviticus 22 in the TNTIP

Leviticus 22 in the TNTIZ

Leviticus 22 in the TOMA

Leviticus 22 in the TTENT

Leviticus 22 in the UBG

Leviticus 22 in the UGV

Leviticus 22 in the UGV2

Leviticus 22 in the UGV3

Leviticus 22 in the VBL

Leviticus 22 in the VDCC

Leviticus 22 in the YALU

Leviticus 22 in the YAPE

Leviticus 22 in the YBVTP

Leviticus 22 in the ZBP