Leviticus 8 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Mema Aron mpe bana na ye ya mibali, bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe, mafuta ya epakolami, mwana ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu, bameme mibale ya mibali, mpe kitunga oyo ezali na mapa ezanga levire ; 3 mpe sangisa lisanga mobimba na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. » 4 Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe lisanga esanganaki na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 5 Moyize alobaki na lisanga makambo oyo Yawe atindaki ye kosala. 6 Moyize amemaki Aron elongo na bana na ye ya mibali liboso mpe asukolaki bango na mayi. 7 Alatisaki Aron nzambala mpe akangaki ye mokaba na loketo ; alatisaki ye kazaka mpe efode, azingelaki ye na mokaba ya efode. 8 Alatisaki Aron elamba ya tolo mpe atiaki Urimi mpe tumimi likolo ya elamba yango. 9 Akangaki kitendi na moto ya Aron ; bongo liboso na yango, atiaki medaye ya wolo, elembo ya libulisi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. 10 Moyize azwaki mafuta ya epakolami mpe apakolaki Mongombo elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango ; na bongo nde abulisaki yango. 11 Asopaki na etumbelo ndambo ya mafuta mbala sambo mpe apakolaki mafuta mpo na kobulisa etumbelo, bisalelo na yango nyonso, sani monene mpe se na yango. 12 Asopaki ndambo ya mafuta ya epakolami na moto ya Aron mpe apakolaki ye mafuta yango mpo na kobulisa ye. 13 Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, alatisaki bango banzambala, akangaki bango mikaba na loketo mpe alatisaki bango bikoti, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. 14 Bongo amemaki ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu ; Aron elongo na bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto ya ngombe yango. 15 Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo ; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu. 16 Moyize azwaki lisusu mafuta nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango, atumbaki yango na etumbelo. 17 Kasi atumbaki na libanda ya molako ngombe yango ya mobali, poso na yango, misuni na yango mpe nyei na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. 18 Bongo amemaki meme ya mobali mpo na kobonza yango lokola mbeka ya kotumba ; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango. 19 Moyize akataki kingo ya meme yango mpe asopaki makila na yango na bapembeni nyonso ya etumbelo. 20 Akataki-kataki meme yango na biteni. Moyize atumbaki biteni yango, moto mpe mafuta. 21 Asukolaki na mayi biloko ya kati mpe makolo, atumbaki meme yango mobimba na likolo ya etumbelo ; ezalaki mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaki Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. 22 Bongo amemaki meme mosusu ya mobali mpo na libulisi ; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango. 23 Moyize akataki yango kingo, azwaki ndambo ya makila na yango mpe atiaki yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron, na mosapi ya monene ya loboko ya mobali ya Aron mpe na mosapi ya monene ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron. 24 Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, atiaki ndambo ya makila na basonge ya matoyi na bango ya ngambo ya loboko ya mobali, na misapi ya minene ya maboko na bango ya mobali mpe na misapi ya minene ya makolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali. Sima, asopaki makila na bangambo nyonso ya etumbelo. 25 Azwaki biteni oyo ya mafuta : mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali. 26 Kati na kitunga ya mapa ezanga levire oyo ezalaki liboso ya Yawe, azwaki lipa moko, gato moko balamba na mafuta mpe galeti moko ; atiaki yango likolo ya biteni ya mafuta mpe ya mopende ya ngambo ya loboko ya mobali. 27 Atiaki biloko yango nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bongo ayebisaki bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola. 28 Moyize azwaki yango lisusu na maboko na bango mpe atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba. Ezalaki mbeka ya libulisi, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. 29 Moyize azwaki tolo ya meme ya libulisi, atombolaki yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. 30 Moyize azwaki na etumbelo, mafuta ya epakolami mpe ndambo ya makila ; asopelaki yango Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. Bongo abulisaki Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. 31 Moyize alobaki na Aron mpe na bana na ye ya mibali : « Bolamba mosuni na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe bolia yango wana elongo na lipa oyo ezali kati na kitunga oyo ezali na mbeka ya libulisi, ndenge kaka natindaki tango nalobaki : ‹ Aron mpe bana na ye ya mibali nde bakolia yango. › 32 Oyo ekotikala kati na mosuni ya mbeka ya libulisi mpe lipa, bokotumba yango na moto. 33 Mikolo sambo, bokolongwa te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani kino mikolo ya libulisi na bino ekokoka, pamba te libulisi na bino ekowumela mikolo sambo. 34 Makambo oyo esalemi lelo, yango nde Yawe atindi mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na bino. 35 Bokovanda mikolo sambo, butu mpe moyi, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bokosala makambo oyo Yawe atindi mpo ete bokufa te. Pamba te, yango nde epesamelaki ngai lokola mitindo. » 36 Aron mpe bana na ye ya mibali basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.

In Other Versions

Leviticus 8 in the ANGEFD

Leviticus 8 in the ANTPNG2D

Leviticus 8 in the AS21

Leviticus 8 in the BAGH

Leviticus 8 in the BBPNG

Leviticus 8 in the BBT1E

Leviticus 8 in the BDS

Leviticus 8 in the BEV

Leviticus 8 in the BHAD

Leviticus 8 in the BIB

Leviticus 8 in the BLPT

Leviticus 8 in the BNT

Leviticus 8 in the BNTABOOT

Leviticus 8 in the BNTLV

Leviticus 8 in the BOATCB

Leviticus 8 in the BOATCB2

Leviticus 8 in the BOBCV

Leviticus 8 in the BOCNT

Leviticus 8 in the BOECS

Leviticus 8 in the BOGWICC

Leviticus 8 in the BOHCB

Leviticus 8 in the BOHCV

Leviticus 8 in the BOHLNT

Leviticus 8 in the BOHNTLTAL

Leviticus 8 in the BOICB

Leviticus 8 in the BOILNTAP

Leviticus 8 in the BOITCV

Leviticus 8 in the BOKCV

Leviticus 8 in the BOKCV2

Leviticus 8 in the BOKHWOG

Leviticus 8 in the BOKSSV

Leviticus 8 in the BOLCB

Leviticus 8 in the BOMCV

Leviticus 8 in the BONAV

Leviticus 8 in the BONCB

Leviticus 8 in the BONLT

Leviticus 8 in the BONUT2

Leviticus 8 in the BOPLNT

Leviticus 8 in the BOSCB

Leviticus 8 in the BOSNC

Leviticus 8 in the BOTLNT

Leviticus 8 in the BOVCB

Leviticus 8 in the BOYCB

Leviticus 8 in the BPBB

Leviticus 8 in the BPH

Leviticus 8 in the BSB

Leviticus 8 in the CCB

Leviticus 8 in the CUV

Leviticus 8 in the CUVS

Leviticus 8 in the DBT

Leviticus 8 in the DGDNT

Leviticus 8 in the DHNT

Leviticus 8 in the DNT

Leviticus 8 in the ELBE

Leviticus 8 in the EMTV

Leviticus 8 in the ESV

Leviticus 8 in the FBV

Leviticus 8 in the FEB

Leviticus 8 in the GGMNT

Leviticus 8 in the GNT

Leviticus 8 in the HARY

Leviticus 8 in the HNT

Leviticus 8 in the IRVA

Leviticus 8 in the IRVB

Leviticus 8 in the IRVG

Leviticus 8 in the IRVH

Leviticus 8 in the IRVK

Leviticus 8 in the IRVM

Leviticus 8 in the IRVM2

Leviticus 8 in the IRVO

Leviticus 8 in the IRVP

Leviticus 8 in the IRVT

Leviticus 8 in the IRVT2

Leviticus 8 in the IRVU

Leviticus 8 in the ISVN

Leviticus 8 in the JSNT

Leviticus 8 in the KAPI

Leviticus 8 in the KBT1ETNIK

Leviticus 8 in the KBV

Leviticus 8 in the KJV

Leviticus 8 in the KNFD

Leviticus 8 in the LBA

Leviticus 8 in the LBLA

Leviticus 8 in the LNT

Leviticus 8 in the LSV

Leviticus 8 in the MAAL

Leviticus 8 in the MBV

Leviticus 8 in the MBV2

Leviticus 8 in the MHNT

Leviticus 8 in the MKNFD

Leviticus 8 in the MNG

Leviticus 8 in the MNT

Leviticus 8 in the MNT2

Leviticus 8 in the MRS1T

Leviticus 8 in the NAA

Leviticus 8 in the NASB

Leviticus 8 in the NBLA

Leviticus 8 in the NBS

Leviticus 8 in the NBVTP

Leviticus 8 in the NET2

Leviticus 8 in the NIV11

Leviticus 8 in the NNT

Leviticus 8 in the NNT2

Leviticus 8 in the NNT3

Leviticus 8 in the PDDPT

Leviticus 8 in the PFNT

Leviticus 8 in the RMNT

Leviticus 8 in the SBIAS

Leviticus 8 in the SBIBS

Leviticus 8 in the SBIBS2

Leviticus 8 in the SBICS

Leviticus 8 in the SBIDS

Leviticus 8 in the SBIGS

Leviticus 8 in the SBIHS

Leviticus 8 in the SBIIS

Leviticus 8 in the SBIIS2

Leviticus 8 in the SBIIS3

Leviticus 8 in the SBIKS

Leviticus 8 in the SBIKS2

Leviticus 8 in the SBIMS

Leviticus 8 in the SBIOS

Leviticus 8 in the SBIPS

Leviticus 8 in the SBISS

Leviticus 8 in the SBITS

Leviticus 8 in the SBITS2

Leviticus 8 in the SBITS3

Leviticus 8 in the SBITS4

Leviticus 8 in the SBIUS

Leviticus 8 in the SBIVS

Leviticus 8 in the SBT

Leviticus 8 in the SBT1E

Leviticus 8 in the SCHL

Leviticus 8 in the SNT

Leviticus 8 in the SUSU

Leviticus 8 in the SUSU2

Leviticus 8 in the SYNO

Leviticus 8 in the TBIAOTANT

Leviticus 8 in the TBT1E

Leviticus 8 in the TBT1E2

Leviticus 8 in the TFTIP

Leviticus 8 in the TFTU

Leviticus 8 in the TGNTATF3T

Leviticus 8 in the THAI

Leviticus 8 in the TNFD

Leviticus 8 in the TNT

Leviticus 8 in the TNTIK

Leviticus 8 in the TNTIL

Leviticus 8 in the TNTIN

Leviticus 8 in the TNTIP

Leviticus 8 in the TNTIZ

Leviticus 8 in the TOMA

Leviticus 8 in the TTENT

Leviticus 8 in the UBG

Leviticus 8 in the UGV

Leviticus 8 in the UGV2

Leviticus 8 in the UGV3

Leviticus 8 in the VBL

Leviticus 8 in the VDCC

Leviticus 8 in the YALU

Leviticus 8 in the YAPE

Leviticus 8 in the YBVTP

Leviticus 8 in the ZBP