Malachi 1 (BOLCB2)
1 Liloba na Yawe. Liloba na Yawe epai ya Isalaele na nzela ya mosakoli Malashi. 2 « Ngai, nalingaki bino, »elobi Yawe,« kasi bino bozali kotuna Ngai :‹ Eloko nini ezali kolakisa ete olingaki biso ? ›Boni, Ezawu azalaki ndeko ya Jakobi te ? »elobi Yawe,« Nzokande, nalingaki Jakobi, 3 kasi nayinaki Ezawu ;bongo nabongolaki bangomba na ye esobempe nakabaki libula na ye epai ya bambwa ya zamba. » 4 Edomi akoki koloba :« Ata babebisi mokili na biso,tokotonga yango kaka lisusu ! »Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Solo, bakotonga na bango yango,kasi Ngai nakobuka yango !Bakobenga mokili yango :‹ Mokili ya makambo mabe,bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. › 5 Bokomona yango na miso na bino mokompe bokoloba : ‹ Yawe azali Monenekoleka ata bandelo ya etando ya Isalaele. › 6 Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.« Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? › 7 Bozali kotia bilei ya mbindo na etumbelo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tokomisi etumbelo na Yo mbindo ? ›Ezali tango bolobaka : ‹ Mesa ya Yawe ezali na tina te. › 8 Ezali tango bobonzaka lokola mbeka nyama oyo ekufa miso ; boni, yango ezali mabe te ? Bomeka nanu kopesa yango epai ya moyangeli na bino ; boni, akosepela na bino ? Akondima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 9 « Sik’oyo, bozali mpe kobondela Nzambe ete asalela bino ngolu na makabo ya lolenge oyo na maboko ! Boni, andima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 10 « Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino. 11 Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 12 « Kasi bino, bozali kosambwisa yango tango bozali koloba ete mesa ya Nkolo ezali na tina te mpe biloko na yango ezali mbindo. 13 Bozali koloba lisusu : ‹ Mokumba nini lisusu oyo ! › Bozali mpe kotiola Ngai lisusu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Tango bozali komema bibwele oyo ezoka, oyo etambolaka tengu-tengu to oyo ezali na bokono, mpe bozali kobonza yango lokola mbeka, boni, nandima yango na maboko na bino ? » elobi Yawe. 14 « Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.
In Other Versions
Malachi 1 in the ANGEFD
Malachi 1 in the ANTPNG2D
Malachi 1 in the AS21
Malachi 1 in the BAGH
Malachi 1 in the BBPNG
Malachi 1 in the BBT1E
Malachi 1 in the BDS
Malachi 1 in the BEV
Malachi 1 in the BHAD
Malachi 1 in the BIB
Malachi 1 in the BLPT
Malachi 1 in the BNT
Malachi 1 in the BNTABOOT
Malachi 1 in the BNTLV
Malachi 1 in the BOATCB
Malachi 1 in the BOATCB2
Malachi 1 in the BOBCV
Malachi 1 in the BOCNT
Malachi 1 in the BOECS
Malachi 1 in the BOGWICC
Malachi 1 in the BOHCB
Malachi 1 in the BOHCV
Malachi 1 in the BOHLNT
Malachi 1 in the BOHNTLTAL
Malachi 1 in the BOICB
Malachi 1 in the BOILNTAP
Malachi 1 in the BOITCV
Malachi 1 in the BOKCV
Malachi 1 in the BOKCV2
Malachi 1 in the BOKHWOG
Malachi 1 in the BOKSSV
Malachi 1 in the BOLCB
Malachi 1 in the BOMCV
Malachi 1 in the BONAV
Malachi 1 in the BONCB
Malachi 1 in the BONLT
Malachi 1 in the BONUT2
Malachi 1 in the BOPLNT
Malachi 1 in the BOSCB
Malachi 1 in the BOSNC
Malachi 1 in the BOTLNT
Malachi 1 in the BOVCB
Malachi 1 in the BOYCB
Malachi 1 in the BPBB
Malachi 1 in the BPH
Malachi 1 in the BSB
Malachi 1 in the CCB
Malachi 1 in the CUV
Malachi 1 in the CUVS
Malachi 1 in the DBT
Malachi 1 in the DGDNT
Malachi 1 in the DHNT
Malachi 1 in the DNT
Malachi 1 in the ELBE
Malachi 1 in the EMTV
Malachi 1 in the ESV
Malachi 1 in the FBV
Malachi 1 in the FEB
Malachi 1 in the GGMNT
Malachi 1 in the GNT
Malachi 1 in the HARY
Malachi 1 in the HNT
Malachi 1 in the IRVA
Malachi 1 in the IRVB
Malachi 1 in the IRVG
Malachi 1 in the IRVH
Malachi 1 in the IRVK
Malachi 1 in the IRVM
Malachi 1 in the IRVM2
Malachi 1 in the IRVO
Malachi 1 in the IRVP
Malachi 1 in the IRVT
Malachi 1 in the IRVT2
Malachi 1 in the IRVU
Malachi 1 in the ISVN
Malachi 1 in the JSNT
Malachi 1 in the KAPI
Malachi 1 in the KBT1ETNIK
Malachi 1 in the KBV
Malachi 1 in the KJV
Malachi 1 in the KNFD
Malachi 1 in the LBA
Malachi 1 in the LBLA
Malachi 1 in the LNT
Malachi 1 in the LSV
Malachi 1 in the MAAL
Malachi 1 in the MBV
Malachi 1 in the MBV2
Malachi 1 in the MHNT
Malachi 1 in the MKNFD
Malachi 1 in the MNG
Malachi 1 in the MNT
Malachi 1 in the MNT2
Malachi 1 in the MRS1T
Malachi 1 in the NAA
Malachi 1 in the NASB
Malachi 1 in the NBLA
Malachi 1 in the NBS
Malachi 1 in the NBVTP
Malachi 1 in the NET2
Malachi 1 in the NIV11
Malachi 1 in the NNT
Malachi 1 in the NNT2
Malachi 1 in the NNT3
Malachi 1 in the PDDPT
Malachi 1 in the PFNT
Malachi 1 in the RMNT
Malachi 1 in the SBIAS
Malachi 1 in the SBIBS
Malachi 1 in the SBIBS2
Malachi 1 in the SBICS
Malachi 1 in the SBIDS
Malachi 1 in the SBIGS
Malachi 1 in the SBIHS
Malachi 1 in the SBIIS
Malachi 1 in the SBIIS2
Malachi 1 in the SBIIS3
Malachi 1 in the SBIKS
Malachi 1 in the SBIKS2
Malachi 1 in the SBIMS
Malachi 1 in the SBIOS
Malachi 1 in the SBIPS
Malachi 1 in the SBISS
Malachi 1 in the SBITS
Malachi 1 in the SBITS2
Malachi 1 in the SBITS3
Malachi 1 in the SBITS4
Malachi 1 in the SBIUS
Malachi 1 in the SBIVS
Malachi 1 in the SBT
Malachi 1 in the SBT1E
Malachi 1 in the SCHL
Malachi 1 in the SNT
Malachi 1 in the SUSU
Malachi 1 in the SUSU2
Malachi 1 in the SYNO
Malachi 1 in the TBIAOTANT
Malachi 1 in the TBT1E
Malachi 1 in the TBT1E2
Malachi 1 in the TFTIP
Malachi 1 in the TFTU
Malachi 1 in the TGNTATF3T
Malachi 1 in the THAI
Malachi 1 in the TNFD
Malachi 1 in the TNT
Malachi 1 in the TNTIK
Malachi 1 in the TNTIL
Malachi 1 in the TNTIN
Malachi 1 in the TNTIP
Malachi 1 in the TNTIZ
Malachi 1 in the TOMA
Malachi 1 in the TTENT
Malachi 1 in the UBG
Malachi 1 in the UGV
Malachi 1 in the UGV2
Malachi 1 in the UGV3
Malachi 1 in the VBL
Malachi 1 in the VDCC
Malachi 1 in the YALU
Malachi 1 in the YAPE
Malachi 1 in the YBVTP
Malachi 1 in the ZBP