Matthew 17 (BOLCB2)

1 Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi. 2 Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole. 3 Mbala moko, bamonaki Moyize mpe Eliya bazali kosolola na Yesu. 4 Petelo alobaki na Yesu :— Nkolo, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya ! 5 Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! » 6 Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi kino na mabele mpo ete somo makasi ekangaki bango. 7 Kasi Yesu apusanaki pene na bango, asimbaki bango mpe alobaki : — Botelema, bobanga te ! 8 Batombolaki miso mpe bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu. 9 Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo : — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi. 10 Bayekoli batunaki Yesu :— Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ? 11 Yesu azongisaki : — Solo, Eliya asengeli koya mpe akozongisa makambo nyonso na molongo. 12 Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto. 13 Bayekoli basosolaki ete azalaki kolobela bango na tina na Yoane Mobatisi. 14 Tango bakomaki pene ya esika oyo ebele ya bato bazalaki, moto moko apusanaki pene na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe alobaki : 15 — Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi. 16 Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye. 17 Yesu alobaki : — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango. 18 Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki. 19 Bongo bayekoli bakendeki na nkuku epai ya Yesu mpe batunaki :— Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ? 20 Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [ 21 Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.] 22 Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile ; Yesu alobaki na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, 23 bakoboma Ye, mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.Bayekoli bayokaki mawa mingi. 24 Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki :— Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te ? 25 Petelo azongisaki :— Afutaka !Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye : — Simona, okanisi nini ? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili : bana na bango to bapaya ? 26 Petelo azongisaki :— Bapaya.Yesu alobaki na ye : — Lokola ezali bongo, bana mboka basengeli kofuta te. 27 Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.

In Other Versions

Matthew 17 in the ANGEFD

Matthew 17 in the ANTPNG2D

Matthew 17 in the AS21

Matthew 17 in the BAGH

Matthew 17 in the BBPNG

Matthew 17 in the BBT1E

Matthew 17 in the BDS

Matthew 17 in the BEV

Matthew 17 in the BHAD

Matthew 17 in the BIB

Matthew 17 in the BLPT

Matthew 17 in the BNT

Matthew 17 in the BNTABOOT

Matthew 17 in the BNTLV

Matthew 17 in the BOATCB

Matthew 17 in the BOATCB2

Matthew 17 in the BOBCV

Matthew 17 in the BOCNT

Matthew 17 in the BOECS

Matthew 17 in the BOGWICC

Matthew 17 in the BOHCB

Matthew 17 in the BOHCV

Matthew 17 in the BOHLNT

Matthew 17 in the BOHNTLTAL

Matthew 17 in the BOICB

Matthew 17 in the BOILNTAP

Matthew 17 in the BOITCV

Matthew 17 in the BOKCV

Matthew 17 in the BOKCV2

Matthew 17 in the BOKHWOG

Matthew 17 in the BOKSSV

Matthew 17 in the BOLCB

Matthew 17 in the BOMCV

Matthew 17 in the BONAV

Matthew 17 in the BONCB

Matthew 17 in the BONLT

Matthew 17 in the BONUT2

Matthew 17 in the BOPLNT

Matthew 17 in the BOSCB

Matthew 17 in the BOSNC

Matthew 17 in the BOTLNT

Matthew 17 in the BOVCB

Matthew 17 in the BOYCB

Matthew 17 in the BPBB

Matthew 17 in the BPH

Matthew 17 in the BSB

Matthew 17 in the CCB

Matthew 17 in the CUV

Matthew 17 in the CUVS

Matthew 17 in the DBT

Matthew 17 in the DGDNT

Matthew 17 in the DHNT

Matthew 17 in the DNT

Matthew 17 in the ELBE

Matthew 17 in the EMTV

Matthew 17 in the ESV

Matthew 17 in the FBV

Matthew 17 in the FEB

Matthew 17 in the GGMNT

Matthew 17 in the GNT

Matthew 17 in the HARY

Matthew 17 in the HNT

Matthew 17 in the IRVA

Matthew 17 in the IRVB

Matthew 17 in the IRVG

Matthew 17 in the IRVH

Matthew 17 in the IRVK

Matthew 17 in the IRVM

Matthew 17 in the IRVM2

Matthew 17 in the IRVO

Matthew 17 in the IRVP

Matthew 17 in the IRVT

Matthew 17 in the IRVT2

Matthew 17 in the IRVU

Matthew 17 in the ISVN

Matthew 17 in the JSNT

Matthew 17 in the KAPI

Matthew 17 in the KBT1ETNIK

Matthew 17 in the KBV

Matthew 17 in the KJV

Matthew 17 in the KNFD

Matthew 17 in the LBA

Matthew 17 in the LBLA

Matthew 17 in the LNT

Matthew 17 in the LSV

Matthew 17 in the MAAL

Matthew 17 in the MBV

Matthew 17 in the MBV2

Matthew 17 in the MHNT

Matthew 17 in the MKNFD

Matthew 17 in the MNG

Matthew 17 in the MNT

Matthew 17 in the MNT2

Matthew 17 in the MRS1T

Matthew 17 in the NAA

Matthew 17 in the NASB

Matthew 17 in the NBLA

Matthew 17 in the NBS

Matthew 17 in the NBVTP

Matthew 17 in the NET2

Matthew 17 in the NIV11

Matthew 17 in the NNT

Matthew 17 in the NNT2

Matthew 17 in the NNT3

Matthew 17 in the PDDPT

Matthew 17 in the PFNT

Matthew 17 in the RMNT

Matthew 17 in the SBIAS

Matthew 17 in the SBIBS

Matthew 17 in the SBIBS2

Matthew 17 in the SBICS

Matthew 17 in the SBIDS

Matthew 17 in the SBIGS

Matthew 17 in the SBIHS

Matthew 17 in the SBIIS

Matthew 17 in the SBIIS2

Matthew 17 in the SBIIS3

Matthew 17 in the SBIKS

Matthew 17 in the SBIKS2

Matthew 17 in the SBIMS

Matthew 17 in the SBIOS

Matthew 17 in the SBIPS

Matthew 17 in the SBISS

Matthew 17 in the SBITS

Matthew 17 in the SBITS2

Matthew 17 in the SBITS3

Matthew 17 in the SBITS4

Matthew 17 in the SBIUS

Matthew 17 in the SBIVS

Matthew 17 in the SBT

Matthew 17 in the SBT1E

Matthew 17 in the SCHL

Matthew 17 in the SNT

Matthew 17 in the SUSU

Matthew 17 in the SUSU2

Matthew 17 in the SYNO

Matthew 17 in the TBIAOTANT

Matthew 17 in the TBT1E

Matthew 17 in the TBT1E2

Matthew 17 in the TFTIP

Matthew 17 in the TFTU

Matthew 17 in the TGNTATF3T

Matthew 17 in the THAI

Matthew 17 in the TNFD

Matthew 17 in the TNT

Matthew 17 in the TNTIK

Matthew 17 in the TNTIL

Matthew 17 in the TNTIN

Matthew 17 in the TNTIP

Matthew 17 in the TNTIZ

Matthew 17 in the TOMA

Matthew 17 in the TTENT

Matthew 17 in the UBG

Matthew 17 in the UGV

Matthew 17 in the UGV2

Matthew 17 in the UGV3

Matthew 17 in the VBL

Matthew 17 in the VDCC

Matthew 17 in the YALU

Matthew 17 in the YAPE

Matthew 17 in the YBVTP

Matthew 17 in the ZBP