Matthew 28 (BOLCB2)
1 Sima na mokolo ya Saba, na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bakendeki kotala kunda. 2 Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango. 3 Azalaki kongenga lokola mikalikali, mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe. 4 Bakengeli bakomaki kolenga mpo na somo mpe bakomaki lokola bato ya kokufa. 5 Kasi anjelu alobaki na basi : « Bobanga te ! Nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu. 6 Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki, 7 mpe bokende noki koyebisa bayekoli na Ye : ‹ Asili kosekwa kati na bakufi ; akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye. › Yango nde makambo oyo nazalaki na yango ya koyebisa bino. » 8 Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi ; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye. 9 Mbala moko, Yesu akutanaki na bango mpe alobaki : — Mbote na bino !Bapusanaki pene na Ye, basimbaki makolo na Ye mpe bagumbamelaki Ye. 10 Yesu alobaki na bango : — Bobanga te ! Bokende koyebisa bandeko na Ngai ete bakende na Galile ; ezali kuna nde bakomona Ngai. 11 Wana basi bazalaki kokende, ndambo ya bakengeli bazongaki kati na engumba mpo na koyebisa na bakonzi ya Banganga-Nzambe, makambo nyonso oyo ewutaki koleka. 12 Bakonzi ya Banganga-Nzambe babengaki bakambi ya bato mpe, elongo na bango, basalaki mwango moko, bapesaki mbongo ebele epai ya basoda 13 mpe balobaki na bango : « Tala ndenge bosengeli koloba : ‹ Wana tozalaki kati na pongi, bayekoli na ye bayaki koyiba nzoto na ye, na butu. › 14 Soki likambo yango ekomi na matoyi ya moyangeli, tokoyeba kosolola na ye mpe kosala nyonso mpo ete bomema ngambo te. » 15 Basoda bazwaki mbongo mpe basalaki ndenge kaka batindaki bango. Lisolo yango epanzanaki kati na Bayuda mpe ezali kolobama kino na mokolo ya lelo. 16 Bayekoli zomi na moko bakendeki na Galile, na ngomba oyo Yesu ayebisaki bango ete bakende. 17 Tango bamonaki Ye, bagumbamelaki Ye ; kasi bamosusu kati na bango bandimaki te. 18 Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili. 19 Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ; 20 bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.
In Other Versions
Matthew 28 in the ANGEFD
Matthew 28 in the ANTPNG2D
Matthew 28 in the AS21
Matthew 28 in the BAGH
Matthew 28 in the BBPNG
Matthew 28 in the BBT1E
Matthew 28 in the BDS
Matthew 28 in the BEV
Matthew 28 in the BHAD
Matthew 28 in the BIB
Matthew 28 in the BLPT
Matthew 28 in the BNT
Matthew 28 in the BNTABOOT
Matthew 28 in the BNTLV
Matthew 28 in the BOATCB
Matthew 28 in the BOATCB2
Matthew 28 in the BOBCV
Matthew 28 in the BOCNT
Matthew 28 in the BOECS
Matthew 28 in the BOGWICC
Matthew 28 in the BOHCB
Matthew 28 in the BOHCV
Matthew 28 in the BOHLNT
Matthew 28 in the BOHNTLTAL
Matthew 28 in the BOICB
Matthew 28 in the BOILNTAP
Matthew 28 in the BOITCV
Matthew 28 in the BOKCV
Matthew 28 in the BOKCV2
Matthew 28 in the BOKHWOG
Matthew 28 in the BOKSSV
Matthew 28 in the BOLCB
Matthew 28 in the BOMCV
Matthew 28 in the BONAV
Matthew 28 in the BONCB
Matthew 28 in the BONLT
Matthew 28 in the BONUT2
Matthew 28 in the BOPLNT
Matthew 28 in the BOSCB
Matthew 28 in the BOSNC
Matthew 28 in the BOTLNT
Matthew 28 in the BOVCB
Matthew 28 in the BOYCB
Matthew 28 in the BPBB
Matthew 28 in the BPH
Matthew 28 in the BSB
Matthew 28 in the CCB
Matthew 28 in the CUV
Matthew 28 in the CUVS
Matthew 28 in the DBT
Matthew 28 in the DGDNT
Matthew 28 in the DHNT
Matthew 28 in the DNT
Matthew 28 in the ELBE
Matthew 28 in the EMTV
Matthew 28 in the ESV
Matthew 28 in the FBV
Matthew 28 in the FEB
Matthew 28 in the GGMNT
Matthew 28 in the GNT
Matthew 28 in the HARY
Matthew 28 in the HNT
Matthew 28 in the IRVA
Matthew 28 in the IRVB
Matthew 28 in the IRVG
Matthew 28 in the IRVH
Matthew 28 in the IRVK
Matthew 28 in the IRVM
Matthew 28 in the IRVM2
Matthew 28 in the IRVO
Matthew 28 in the IRVP
Matthew 28 in the IRVT
Matthew 28 in the IRVT2
Matthew 28 in the IRVU
Matthew 28 in the ISVN
Matthew 28 in the JSNT
Matthew 28 in the KAPI
Matthew 28 in the KBT1ETNIK
Matthew 28 in the KBV
Matthew 28 in the KJV
Matthew 28 in the KNFD
Matthew 28 in the LBA
Matthew 28 in the LBLA
Matthew 28 in the LNT
Matthew 28 in the LSV
Matthew 28 in the MAAL
Matthew 28 in the MBV
Matthew 28 in the MBV2
Matthew 28 in the MHNT
Matthew 28 in the MKNFD
Matthew 28 in the MNG
Matthew 28 in the MNT
Matthew 28 in the MNT2
Matthew 28 in the MRS1T
Matthew 28 in the NAA
Matthew 28 in the NASB
Matthew 28 in the NBLA
Matthew 28 in the NBS
Matthew 28 in the NBVTP
Matthew 28 in the NET2
Matthew 28 in the NIV11
Matthew 28 in the NNT
Matthew 28 in the NNT2
Matthew 28 in the NNT3
Matthew 28 in the PDDPT
Matthew 28 in the PFNT
Matthew 28 in the RMNT
Matthew 28 in the SBIAS
Matthew 28 in the SBIBS
Matthew 28 in the SBIBS2
Matthew 28 in the SBICS
Matthew 28 in the SBIDS
Matthew 28 in the SBIGS
Matthew 28 in the SBIHS
Matthew 28 in the SBIIS
Matthew 28 in the SBIIS2
Matthew 28 in the SBIIS3
Matthew 28 in the SBIKS
Matthew 28 in the SBIKS2
Matthew 28 in the SBIMS
Matthew 28 in the SBIOS
Matthew 28 in the SBIPS
Matthew 28 in the SBISS
Matthew 28 in the SBITS
Matthew 28 in the SBITS2
Matthew 28 in the SBITS3
Matthew 28 in the SBITS4
Matthew 28 in the SBIUS
Matthew 28 in the SBIVS
Matthew 28 in the SBT
Matthew 28 in the SBT1E
Matthew 28 in the SCHL
Matthew 28 in the SNT
Matthew 28 in the SUSU
Matthew 28 in the SUSU2
Matthew 28 in the SYNO
Matthew 28 in the TBIAOTANT
Matthew 28 in the TBT1E
Matthew 28 in the TBT1E2
Matthew 28 in the TFTIP
Matthew 28 in the TFTU
Matthew 28 in the TGNTATF3T
Matthew 28 in the THAI
Matthew 28 in the TNFD
Matthew 28 in the TNT
Matthew 28 in the TNTIK
Matthew 28 in the TNTIL
Matthew 28 in the TNTIN
Matthew 28 in the TNTIP
Matthew 28 in the TNTIZ
Matthew 28 in the TOMA
Matthew 28 in the TTENT
Matthew 28 in the UBG
Matthew 28 in the UGV
Matthew 28 in the UGV2
Matthew 28 in the UGV3
Matthew 28 in the VBL
Matthew 28 in the VDCC
Matthew 28 in the YALU
Matthew 28 in the YAPE
Matthew 28 in the YBVTP
Matthew 28 in the ZBP