Nehemiah 6 (BOLCB2)
1 Tango Sanibala, Tobiya, Geshemi, moto ya mokili ya Arabi, mpe banguna na biso mosusu bayokaki ete nasilisi kotonga lisusu mir mpe etikali na lidusu ata moko te, atako na tango wana namitielaki nanu bizipelo ya bikuke te, 2 Sanibala mpe Geshemi batindelaki ngai maloba oyo :— Yaka, tokutana na Kefirimi, kati na lubwaku ya Ono.Bazalaki na likanisi ya kosala ngai mabe. 3 Natindelaki bango bamemi sango koyebisa bango eyano oyo :— Nazali na mosala monene ya kosala, nakokoka te koya kuna. Mpo na nini mosala etelema tango nakotika yango mpo na koya kokutana na bino ? 4 Mbala minei, batindelaki ngai sango kaka moko ; mpe tango nyonso, ngai mpe nazalaki kozongisela bango eyano kaka moko. 5 Na mbala ya mitano, Sanibala atindelaki ngai sango moko kaka wana na nzela ya mosali na ye, oyo asimbaki mokanda ya kofungwama na loboko na ye. 6 Kati na mokanda yango, bakomaki :« Sango ezali kopanzana kati na bikolo, Geshemi abeti kutu sete mpo na koloba na ngai ete ezali penza solo, ete yo mpe Bayuda bozali komibongisa mpo na kotomboka, mpe ezali mpo na yango nde bozali kotonga lisusu mir oyo. Kolanda sango yango, ozali na posa ya kokoma mokonzi na bango ; 7 mpe osili kutu kopona basakoli mpo ete bapanza sango kati na Yelusalemi ete okomi mokonzi ya Yuda ! Sik’oyo, yeba ete sango oyo ekokoma kino penza na matoyi ya mokonzi. Boye, yaka mpo ete tosolola na tina na yango ! » 8 Natindelaki ye eyano oyo :— Kati na nyonso oyo olobi, moko te ezali solo. Ezali makambo oyo yo moko ozali kokanisa na moto na yo ! 9 Bato wana nyonso bazalaki koluka kobangisa biso ; bazalaki komilobela :— Maboko na bango ekolemba makasi, ekokoka lisusu kosala te ; mpe mosala ekosila te, ekotelema ! Bakolemba nzoto mpe bakosundola mosala !Kasi ngai nasambelaki :— Sik’oyo, oh Yawe, lendisa maboko na ngai ! 10 Mokolo moko, nakendeki na ndako ya Shemaya, mwana mobali ya Delaya, koko ya Metabeyeli, oyo amikangelaki na ndako na ye. Alobaki :— Tokutana kati na Ndako ya Nzambe, na kati-kati ya Esika ya bule, mpe tokanga bikuke na yango, pamba te bato bazali koya mpo na koboma yo ; bakoya na butu mpo na koboma yo. 11 Kasi nazongiselaki na ye :— Boni, moto lokola ngai akoki penza kokima ! Kutu, moto nani lokola ngai akoki kokimela kati na Ndako ya Nzambe mpe abikisa bomoi na ye ? Nakokende te ! 12 Nasosolaki mbala moko ete ezali Nzambe te nde atindi ye. Kasi apesaki lisakoli wana na tina na ngai, pamba te Tobiya mpe Sanibala bapesaki ye kanyaka. 13 Bapesaki ye kanyaka mpo na kobangisa ngai, mpo ete nasala masumu tango nakolanda toli na ye ; mpe mpo ete babebisa lokumu ya kombo na ngai mpe bayokisa ngai soni. 14 Oh Nzambe na ngai, kanisa Tobiya mpe Sanibala mpo na misala na bango ! Kanisa lisusu Noadia, mwasi mosakoli, elongo na basakoli mosusu oyo bazalaki komeka kobangisa ngai ! 15 Boye, misala ya kotonga mir esilaki na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya Eluli ; esalaki mikolo tuku mitano na mibale. 16 Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki. 17 Na mikolo wana, bankumu ya Yuda bazalaki kotinda mikanda ebele epai ya Tobiya, mpe biyano ya Tobiya ezalaki kokomela bango. 18 Pamba te bato ebele ya Yuda basalaki boyokani elongo na ye, na nzela ya ndayi, mpo ete azalaki bokilo ya Shekania, mwana mobali ya Ara, mpe mpo ete Yoanani, mwana na ye ya mobali, abalaki mwana mwasi ya Meshulami, mwana mobali ya Berekia. 19 Bazalaki kutu kokumisa misala na ye na miso na ngai mpe koyebisa ye maloba na ngai. Ezalaki Tobiya wana moto azalaki kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai.
In Other Versions
Nehemiah 6 in the ANGEFD
Nehemiah 6 in the ANTPNG2D
Nehemiah 6 in the AS21
Nehemiah 6 in the BAGH
Nehemiah 6 in the BBPNG
Nehemiah 6 in the BBT1E
Nehemiah 6 in the BDS
Nehemiah 6 in the BEV
Nehemiah 6 in the BHAD
Nehemiah 6 in the BIB
Nehemiah 6 in the BLPT
Nehemiah 6 in the BNT
Nehemiah 6 in the BNTABOOT
Nehemiah 6 in the BNTLV
Nehemiah 6 in the BOATCB
Nehemiah 6 in the BOATCB2
Nehemiah 6 in the BOBCV
Nehemiah 6 in the BOCNT
Nehemiah 6 in the BOECS
Nehemiah 6 in the BOGWICC
Nehemiah 6 in the BOHCB
Nehemiah 6 in the BOHCV
Nehemiah 6 in the BOHLNT
Nehemiah 6 in the BOHNTLTAL
Nehemiah 6 in the BOICB
Nehemiah 6 in the BOILNTAP
Nehemiah 6 in the BOITCV
Nehemiah 6 in the BOKCV
Nehemiah 6 in the BOKCV2
Nehemiah 6 in the BOKHWOG
Nehemiah 6 in the BOKSSV
Nehemiah 6 in the BOLCB
Nehemiah 6 in the BOMCV
Nehemiah 6 in the BONAV
Nehemiah 6 in the BONCB
Nehemiah 6 in the BONLT
Nehemiah 6 in the BONUT2
Nehemiah 6 in the BOPLNT
Nehemiah 6 in the BOSCB
Nehemiah 6 in the BOSNC
Nehemiah 6 in the BOTLNT
Nehemiah 6 in the BOVCB
Nehemiah 6 in the BOYCB
Nehemiah 6 in the BPBB
Nehemiah 6 in the BPH
Nehemiah 6 in the BSB
Nehemiah 6 in the CCB
Nehemiah 6 in the CUV
Nehemiah 6 in the CUVS
Nehemiah 6 in the DBT
Nehemiah 6 in the DGDNT
Nehemiah 6 in the DHNT
Nehemiah 6 in the DNT
Nehemiah 6 in the ELBE
Nehemiah 6 in the EMTV
Nehemiah 6 in the ESV
Nehemiah 6 in the FBV
Nehemiah 6 in the FEB
Nehemiah 6 in the GGMNT
Nehemiah 6 in the GNT
Nehemiah 6 in the HARY
Nehemiah 6 in the HNT
Nehemiah 6 in the IRVA
Nehemiah 6 in the IRVB
Nehemiah 6 in the IRVG
Nehemiah 6 in the IRVH
Nehemiah 6 in the IRVK
Nehemiah 6 in the IRVM
Nehemiah 6 in the IRVM2
Nehemiah 6 in the IRVO
Nehemiah 6 in the IRVP
Nehemiah 6 in the IRVT
Nehemiah 6 in the IRVT2
Nehemiah 6 in the IRVU
Nehemiah 6 in the ISVN
Nehemiah 6 in the JSNT
Nehemiah 6 in the KAPI
Nehemiah 6 in the KBT1ETNIK
Nehemiah 6 in the KBV
Nehemiah 6 in the KJV
Nehemiah 6 in the KNFD
Nehemiah 6 in the LBA
Nehemiah 6 in the LBLA
Nehemiah 6 in the LNT
Nehemiah 6 in the LSV
Nehemiah 6 in the MAAL
Nehemiah 6 in the MBV
Nehemiah 6 in the MBV2
Nehemiah 6 in the MHNT
Nehemiah 6 in the MKNFD
Nehemiah 6 in the MNG
Nehemiah 6 in the MNT
Nehemiah 6 in the MNT2
Nehemiah 6 in the MRS1T
Nehemiah 6 in the NAA
Nehemiah 6 in the NASB
Nehemiah 6 in the NBLA
Nehemiah 6 in the NBS
Nehemiah 6 in the NBVTP
Nehemiah 6 in the NET2
Nehemiah 6 in the NIV11
Nehemiah 6 in the NNT
Nehemiah 6 in the NNT2
Nehemiah 6 in the NNT3
Nehemiah 6 in the PDDPT
Nehemiah 6 in the PFNT
Nehemiah 6 in the RMNT
Nehemiah 6 in the SBIAS
Nehemiah 6 in the SBIBS
Nehemiah 6 in the SBIBS2
Nehemiah 6 in the SBICS
Nehemiah 6 in the SBIDS
Nehemiah 6 in the SBIGS
Nehemiah 6 in the SBIHS
Nehemiah 6 in the SBIIS
Nehemiah 6 in the SBIIS2
Nehemiah 6 in the SBIIS3
Nehemiah 6 in the SBIKS
Nehemiah 6 in the SBIKS2
Nehemiah 6 in the SBIMS
Nehemiah 6 in the SBIOS
Nehemiah 6 in the SBIPS
Nehemiah 6 in the SBISS
Nehemiah 6 in the SBITS
Nehemiah 6 in the SBITS2
Nehemiah 6 in the SBITS3
Nehemiah 6 in the SBITS4
Nehemiah 6 in the SBIUS
Nehemiah 6 in the SBIVS
Nehemiah 6 in the SBT
Nehemiah 6 in the SBT1E
Nehemiah 6 in the SCHL
Nehemiah 6 in the SNT
Nehemiah 6 in the SUSU
Nehemiah 6 in the SUSU2
Nehemiah 6 in the SYNO
Nehemiah 6 in the TBIAOTANT
Nehemiah 6 in the TBT1E
Nehemiah 6 in the TBT1E2
Nehemiah 6 in the TFTIP
Nehemiah 6 in the TFTU
Nehemiah 6 in the TGNTATF3T
Nehemiah 6 in the THAI
Nehemiah 6 in the TNFD
Nehemiah 6 in the TNT
Nehemiah 6 in the TNTIK
Nehemiah 6 in the TNTIL
Nehemiah 6 in the TNTIN
Nehemiah 6 in the TNTIP
Nehemiah 6 in the TNTIZ
Nehemiah 6 in the TOMA
Nehemiah 6 in the TTENT
Nehemiah 6 in the UBG
Nehemiah 6 in the UGV
Nehemiah 6 in the UGV2
Nehemiah 6 in the UGV3
Nehemiah 6 in the VBL
Nehemiah 6 in the VDCC
Nehemiah 6 in the YALU
Nehemiah 6 in the YAPE
Nehemiah 6 in the YBVTP
Nehemiah 6 in the ZBP