Numbers 15 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Sima na bino kokota na mokili oyo nakopesa bino, mokili epai wapi bokovanda, 3 bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule. 4 Boye, moto oyo akomema mbeka na ye asengeli kobonzela Yawe likabo ya gato, bakilo misato ya farine oyo basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive. 5 Mpo na bana meme moko na moko ya mbeka ya kotumba, bosengeli kobakisa balitele ya vino lokola likabo ya masanga. 6 Mpo na meme ya mobali, bokobongisa likabo ya gato, bakilo motoba ya farine oyo basangisa na balitele mibale na ndambo ya mafuta ya olive, 7 mpe balitele mibale na ndambo ya vino lokola likabo ya masanga. Bokobonza yango lokola malasi ya solo kitoko liboso ya Yawe. 8 Soki bobongisi mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokisa ndayi to mbeka ya boyokani mpo na Yawe ; 9 bokomema elongo na mwana ngombe, likabo ya gato, bakilo libwa ya farine basangisa na balitele minei ya mafuta. 10 Bokomema lisusu balitele minei ya vino lokola likabo ya masanga : ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. 11 Ezali ndenge wana nde esengeli kobongisa mbeka nyonso ya ngombe ya mobali to ya meme ya mobali to ya bana meme to mpe ya mwana ntaba. 12 Bokosala bongo mpo na nyama moko na moko, ezala soki motango na yango ezali boni. 13 Mwana mboka asengeli kosala bongo mpo na makabo wana tango akomema likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. 14 Pamba te, na milongo oyo ekoya, mopaya nyonso to moto mosusu oyo azali kowumela kati na bino, oyo akobonza likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, asengeli kosala ndenge kaka bino bozali kosala. 15 Mibeko ya kosalela ekozala ndenge moko mpo na lisanga mobimba, ezala bino to mopaya oyo akowumela kati na bino. Yango ekozala mobeko ya libela ezala mpo na milongo oyo ekoya. Bino na mopaya bozali ndenge moko liboso ya Yawe. 16 Ezala bino to mopaya oyo azali kati na bino, bokosalela kaka mibeko mpe mitindo moko. › » 17 Yawe alobaki na Moyize : 18 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nazali komema bino 19 mpe bokolia bilei ya mokili yango, bobonza ndambo lokola likabo epai na Yawe. 20 Bobonza gato oyo ewuti na farine ya liboso oyo bokonika, mpe bobonza yango lokola likabo oyo ewuti na mbuma ya liboso oyo elanga ya ble eboti. 21 Boye, bokobonzaka epai na Yawe bambuma ya liboso ya milona na bino : ekozala bongo mpo na milongo oyo ekoya na sima. 22 Soki esalemi ete bobuki na nko te moko kati na mibeko oyo Ngai Yawe napesaki na nzela ya Moyize, 23 moko kati na mitindo oyo Ngai Yawe napesaki bino na nzela ya Moyize, kobanda na mokolo oyo napesaki bino yango, mpe nazali kokoba kopesa yango kati na milongo oyo ekoya ; 24 mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu. 25 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na lisanga mobimba ya Isalaele, mpe bakolimbisama ; pamba te basalaki mabe na nko te mpe bamemelaki Yawe mpo na mabe na bango likabo bazikisa na moto mpe mbeka mpo na masumu. 26 Lisanga mobimba ya Isalaele elongo na bapaya oyo bazali kowumela kati na bango bakozwa bolimbisi, pamba te bato nyonso bamikotisaki na mbeba oyo esalemaki na nko te. 27 Kasi soki esalemi ete moto moko nde asali lisumu na nko te, asengeli komema mwana ntaba ya mwasi ya mobu moko lokola mbeka mpo na masumu. 28 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe mpo na moto oyo asalaki masumu na nko te. Mpe tango mosala ya bolimbisi masumu ekosalema mpo na ye, akolimbisama solo. 29 Bosengeli kosalela mobeko se moko, ezala mpo na mwana mboka kati na bana ya Isalaele to mpo na mopaya oyo azali kowumela kati na bino, oyo asali lisumu na nko te. 30 Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe ; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye. 31 Pamba te atioli Liloba na Yawe mpe abuki mitindo na ye. Solo, moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati na bato na ye mpe akomema ngambo ya mabe na ye. › » 32 Wana bana ya Isalaele bazalaki kati na esobe, bamonaki moto moko kolokota bakoni na mokolo ya Saba. 33 Bato oyo bamonaki ye kolokota bakoni bamemaki ye epai ya Moyize, Aron mpe lisanga mobimba. 34 Batiaki ye na esika oyo bazalaki kokengela ye malamu, pamba te bayebaki nanu malamu-malamu te nini esengelaki kosala mpo na ye. 35 Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Moto oyo asengeli kokufa. Bato nyonso ya lisanga basengeli komema ye libanda ya molako mpe koboma ye na mabanga. » 36 Bongo lisanga mobimba ememaki ye libanda ya molako mpe babambaki ye mabanga kino akufaki ndenge Yawe atindaki yango epai ya Moyize. 37 Yawe alobaki na Moyize : 38 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Na milongo oyo ekoya, bosengeli kotia singa ya langi ya ble na basonge ya bilamba na bino ; esengeli kokangisa kitendi moko na moko na singa ya langi ya ble. 39 Tango nyonso bokotala bitendi yango, bokobanda kokanisa mitindo nyonso ya Yawe, mpo ete botosa yango mpe botika kolanda baposa ya mitema na bino mpe ya miso na bino, oyo ekoki kotindika bino na kobungisa boyengebene. 40 Boye, bokokanisa mibeko na Ngai nyonso, bokotosa yango mpe bokozala bule mpo na Nzambe na bino. 41 Nazali Yawe, Nzambe na bino ; nabimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Solo, nazali Yawe, Nzambe na bino. › »

In Other Versions

Numbers 15 in the ANGEFD

Numbers 15 in the ANTPNG2D

Numbers 15 in the AS21

Numbers 15 in the BAGH

Numbers 15 in the BBPNG

Numbers 15 in the BBT1E

Numbers 15 in the BDS

Numbers 15 in the BEV

Numbers 15 in the BHAD

Numbers 15 in the BIB

Numbers 15 in the BLPT

Numbers 15 in the BNT

Numbers 15 in the BNTABOOT

Numbers 15 in the BNTLV

Numbers 15 in the BOATCB

Numbers 15 in the BOATCB2

Numbers 15 in the BOBCV

Numbers 15 in the BOCNT

Numbers 15 in the BOECS

Numbers 15 in the BOGWICC

Numbers 15 in the BOHCB

Numbers 15 in the BOHCV

Numbers 15 in the BOHLNT

Numbers 15 in the BOHNTLTAL

Numbers 15 in the BOICB

Numbers 15 in the BOILNTAP

Numbers 15 in the BOITCV

Numbers 15 in the BOKCV

Numbers 15 in the BOKCV2

Numbers 15 in the BOKHWOG

Numbers 15 in the BOKSSV

Numbers 15 in the BOLCB

Numbers 15 in the BOMCV

Numbers 15 in the BONAV

Numbers 15 in the BONCB

Numbers 15 in the BONLT

Numbers 15 in the BONUT2

Numbers 15 in the BOPLNT

Numbers 15 in the BOSCB

Numbers 15 in the BOSNC

Numbers 15 in the BOTLNT

Numbers 15 in the BOVCB

Numbers 15 in the BOYCB

Numbers 15 in the BPBB

Numbers 15 in the BPH

Numbers 15 in the BSB

Numbers 15 in the CCB

Numbers 15 in the CUV

Numbers 15 in the CUVS

Numbers 15 in the DBT

Numbers 15 in the DGDNT

Numbers 15 in the DHNT

Numbers 15 in the DNT

Numbers 15 in the ELBE

Numbers 15 in the EMTV

Numbers 15 in the ESV

Numbers 15 in the FBV

Numbers 15 in the FEB

Numbers 15 in the GGMNT

Numbers 15 in the GNT

Numbers 15 in the HARY

Numbers 15 in the HNT

Numbers 15 in the IRVA

Numbers 15 in the IRVB

Numbers 15 in the IRVG

Numbers 15 in the IRVH

Numbers 15 in the IRVK

Numbers 15 in the IRVM

Numbers 15 in the IRVM2

Numbers 15 in the IRVO

Numbers 15 in the IRVP

Numbers 15 in the IRVT

Numbers 15 in the IRVT2

Numbers 15 in the IRVU

Numbers 15 in the ISVN

Numbers 15 in the JSNT

Numbers 15 in the KAPI

Numbers 15 in the KBT1ETNIK

Numbers 15 in the KBV

Numbers 15 in the KJV

Numbers 15 in the KNFD

Numbers 15 in the LBA

Numbers 15 in the LBLA

Numbers 15 in the LNT

Numbers 15 in the LSV

Numbers 15 in the MAAL

Numbers 15 in the MBV

Numbers 15 in the MBV2

Numbers 15 in the MHNT

Numbers 15 in the MKNFD

Numbers 15 in the MNG

Numbers 15 in the MNT

Numbers 15 in the MNT2

Numbers 15 in the MRS1T

Numbers 15 in the NAA

Numbers 15 in the NASB

Numbers 15 in the NBLA

Numbers 15 in the NBS

Numbers 15 in the NBVTP

Numbers 15 in the NET2

Numbers 15 in the NIV11

Numbers 15 in the NNT

Numbers 15 in the NNT2

Numbers 15 in the NNT3

Numbers 15 in the PDDPT

Numbers 15 in the PFNT

Numbers 15 in the RMNT

Numbers 15 in the SBIAS

Numbers 15 in the SBIBS

Numbers 15 in the SBIBS2

Numbers 15 in the SBICS

Numbers 15 in the SBIDS

Numbers 15 in the SBIGS

Numbers 15 in the SBIHS

Numbers 15 in the SBIIS

Numbers 15 in the SBIIS2

Numbers 15 in the SBIIS3

Numbers 15 in the SBIKS

Numbers 15 in the SBIKS2

Numbers 15 in the SBIMS

Numbers 15 in the SBIOS

Numbers 15 in the SBIPS

Numbers 15 in the SBISS

Numbers 15 in the SBITS

Numbers 15 in the SBITS2

Numbers 15 in the SBITS3

Numbers 15 in the SBITS4

Numbers 15 in the SBIUS

Numbers 15 in the SBIVS

Numbers 15 in the SBT

Numbers 15 in the SBT1E

Numbers 15 in the SCHL

Numbers 15 in the SNT

Numbers 15 in the SUSU

Numbers 15 in the SUSU2

Numbers 15 in the SYNO

Numbers 15 in the TBIAOTANT

Numbers 15 in the TBT1E

Numbers 15 in the TBT1E2

Numbers 15 in the TFTIP

Numbers 15 in the TFTU

Numbers 15 in the TGNTATF3T

Numbers 15 in the THAI

Numbers 15 in the TNFD

Numbers 15 in the TNT

Numbers 15 in the TNTIK

Numbers 15 in the TNTIL

Numbers 15 in the TNTIN

Numbers 15 in the TNTIP

Numbers 15 in the TNTIZ

Numbers 15 in the TOMA

Numbers 15 in the TTENT

Numbers 15 in the UBG

Numbers 15 in the UGV

Numbers 15 in the UGV2

Numbers 15 in the UGV3

Numbers 15 in the VBL

Numbers 15 in the VDCC

Numbers 15 in the YALU

Numbers 15 in the YAPE

Numbers 15 in the YBVTP

Numbers 15 in the ZBP