Numbers 32 (BOLCB2)

1 Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki na bibwele mingi penza. Bamonaki ete mokili ya Yaezeri mpe ya Galadi ezali malamu mingi mpo na kobokola bibwele. 2 Bongo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bayaki koloba na Moyize, na Nganga-Nzambe Eleazari mpe na bakambi ya lisanga : 3 « Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni ; 4 bituka oyo Yawe akweyisaki liboso ya bato ya Isalaele, ezali malamu mpo na kobokola bibwele ; nzokande, basali na yo bazali mpe na bibwele. » 5 Balobaki lisusu : « Soki tozwi ngolu na miso na yo, tika ete mokili oyo epesamela basali na yo lokola libula na biso mpe okatisa biso na ngambo ya Yordani te. » 6 Moyize alobaki na bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni :— Boni, bandeko na bino bakende na bitumba, bongo bino botikala awa ? 7 Mpo na nini bolingi lisusu kolembisa mitema ya bana ya Isalaele oyo bazali kokende na mokili oyo Yawe apesaki bango ? 8 Oyo ezali penza makambo oyo batata na bino basalaki tango natindaki bango wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kokende kononga mokili. 9 Sima na bango komata na lubwaku ya Eshikoli mpe komona mokili yango, balembisaki mitema ya bana ya Isalaele oyo balingaki kokota na mokili oyo Yawe apesaki bango. 10 Na mokolo wana, kanda ya Yawe epelaki mpe alapaki ndayi oyo : 11 « Lokola batosaki Ngai te na motema mobimba, moko te kati na bato oyo bazali na mibu tuku mibale mpe komata, ba-oyo babimaki na Ejipito, akomona mokili oyo nalakaki, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi 12 longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya libota ya Kenizi, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni, pamba te batosaki Ngai Yawe na mitema na bango mobimba. » 13 Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa. 14 Bino mpe bozali kaka ndenge moko, libota ya bato ya masumu, bozali kaka kosala makambo ndenge moko na batata na bino mpe bozali kopelisa lisusu koleka kanda ya Yawe likolo ya Isalaele. 15 Soki boboyi kolanda nzela na Ye, akotika lisusu bato oyo nyonso na esobe mpe bato oyo bakobebisama likolo na bino. 16 Babelemaki pene na Moyize mpe balobaki :— Te, tolingi nde kotonga mapango mpo na bibwele na biso mpe bingumba mpo na basi mpe bana na biso awa. 17 Kasi tozali kolata na lombangu bibundeli na biso mpe kokende na liboso ya bana ya Isalaele kino tango tokokomisa bango na esika na bango. Bongo, na tango yango, basi mpe bana na biso bakotikala awa, kati na bingumba batonga makasi, mpo na komibatela liboso ya bavandi ya mokili oyo. 18 Tokotikala kozonga na bandako na biso te soki moto moko na moko ya Isalaele azwi libula na ye te ; 19 mpe tokotikala kozwa libula moko te elongo na bango na ngambo mosusu ya Yordani, pamba te libula oyo esengeli kopesamela biso ezali na ngambo ya este ya Yordani. 20 Moyize alobaki na bango :— Soki bosali bongo, soki bolati bibundeli mpo na kokende na bitumba liboso ya Yawe, 21 mpe soki bino nyonso oyo bosimbi bibundeli bokeyi na ngambo mosusu ya Yordani liboso ya Yawe, kino abengana banguna na Ye 22 mpe mokili ekoma na se ya bokonzi ya Yawe, nde bokoki kozonga. Ezali na nzela wana nde bokolongwa na ngambo na miso ya Yawe mpe na miso ya bana ya Isalaele, mpe mokili oyo ekokoma libula na bino na miso ya Yawe. 23 Kasi soki bosali bongo te, bokosala nde lisumu na miso ya Yawe mpe boyeba ete, lisumu na bino ekolanda bino. 24 Botonga bingumba makasi mpo na basi mpe bana na bino, botonga mapango mpo na bibwele na bino, kasi bokokisa mpe elaka oyo bopesi. 25 Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni balobaki na Moyize :— Basali na yo bakotosa mitindo ya nkolo na biso. 26 Bana mpe basi na biso elongo na banyama mpe bibwele na biso bakotikala awa, na bingumba ya Galadi. 27 Kasi mpo na biso basali na yo, mobali nyonso akosimba bibundeli mpo na kokende na bitumba ; tokokatisa na ngambo mpo na kobunda liboso ya Yawe ndenge kaka nkolo na biso asili koloba. 28 Boye, Moyize apesaki mitindo na tina na bango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakambi ya mabota ya Isalaele. 29 Moyize alobaki na bango :— Soki bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni, bango nyonso basimbi bibundeli mpo na kokende na bitumba, bakatisi ngambo ya Yordani elongo na bino liboso ya Yawe, mpe tango mokili ekokoma na se ya bokonzi na bino, bopesa bango mokili ya Galadi lokola libula na bango. 30 Kasi soki bakatisi elongo na bino te mpo na kokende na bitumba, bakozwa libula elongo na bino, na mokili ya Kanana. 31 Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni bazongisaki :— Basali na yo bakosala makambo oyo Yawe alobaki na biso. 32 Tokokatisa na ngambo mosusu liboso ya Yawe kino na mokili ya Kanana mpo na bitumba. Kasi mabele oyo biso tosengeli kozwa lokola libula ekozala na ngambo oyo ya Yordani. 33 Boye, Moyize apesaki epai ya bakitani ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani : mokili mobimba elongo na bingumba na yango mpe mboka mike oyo ezingelaki yango. 34 Bakitani ya Gadi batongaki bingumba oyo : Diboni, Ataroti, Aroeri ; 35 Aroti-Shofani, Yaezeri, Yogibeka ; 36 Beti-Nimira mpe Beti-Arani lokola bingumba ya makasi ; mpe batongaki lisusu mapango mpo na bibwele na bango. 37 Bakitani ya libota ya Ribeni batongaki bingumba oyo : Eshiboni, Eleale mpe Kiriatayimi 38 elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki. 39 Bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase bakendeki kino na Galadi, babotolaki yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna. 40 Boye, Moyize apesaki mokili ya Galadi epai ya bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase, mpe bakomaki kovanda kuna. 41 Yairi, moko kati na bakitani ya Manase, abotolaki bamboka na yango ya mike mpe abengaki yango Avoti Yairi. 42 Mpe Noba abotolaki Kenati mpe bamboka na yango ya mike oyo ya zingazinga mpe abengaki yango Noba, ndenge ezalaki kombo na ye.

In Other Versions

Numbers 32 in the ANGEFD

Numbers 32 in the ANTPNG2D

Numbers 32 in the AS21

Numbers 32 in the BAGH

Numbers 32 in the BBPNG

Numbers 32 in the BBT1E

Numbers 32 in the BDS

Numbers 32 in the BEV

Numbers 32 in the BHAD

Numbers 32 in the BIB

Numbers 32 in the BLPT

Numbers 32 in the BNT

Numbers 32 in the BNTABOOT

Numbers 32 in the BNTLV

Numbers 32 in the BOATCB

Numbers 32 in the BOATCB2

Numbers 32 in the BOBCV

Numbers 32 in the BOCNT

Numbers 32 in the BOECS

Numbers 32 in the BOGWICC

Numbers 32 in the BOHCB

Numbers 32 in the BOHCV

Numbers 32 in the BOHLNT

Numbers 32 in the BOHNTLTAL

Numbers 32 in the BOICB

Numbers 32 in the BOILNTAP

Numbers 32 in the BOITCV

Numbers 32 in the BOKCV

Numbers 32 in the BOKCV2

Numbers 32 in the BOKHWOG

Numbers 32 in the BOKSSV

Numbers 32 in the BOLCB

Numbers 32 in the BOMCV

Numbers 32 in the BONAV

Numbers 32 in the BONCB

Numbers 32 in the BONLT

Numbers 32 in the BONUT2

Numbers 32 in the BOPLNT

Numbers 32 in the BOSCB

Numbers 32 in the BOSNC

Numbers 32 in the BOTLNT

Numbers 32 in the BOVCB

Numbers 32 in the BOYCB

Numbers 32 in the BPBB

Numbers 32 in the BPH

Numbers 32 in the BSB

Numbers 32 in the CCB

Numbers 32 in the CUV

Numbers 32 in the CUVS

Numbers 32 in the DBT

Numbers 32 in the DGDNT

Numbers 32 in the DHNT

Numbers 32 in the DNT

Numbers 32 in the ELBE

Numbers 32 in the EMTV

Numbers 32 in the ESV

Numbers 32 in the FBV

Numbers 32 in the FEB

Numbers 32 in the GGMNT

Numbers 32 in the GNT

Numbers 32 in the HARY

Numbers 32 in the HNT

Numbers 32 in the IRVA

Numbers 32 in the IRVB

Numbers 32 in the IRVG

Numbers 32 in the IRVH

Numbers 32 in the IRVK

Numbers 32 in the IRVM

Numbers 32 in the IRVM2

Numbers 32 in the IRVO

Numbers 32 in the IRVP

Numbers 32 in the IRVT

Numbers 32 in the IRVT2

Numbers 32 in the IRVU

Numbers 32 in the ISVN

Numbers 32 in the JSNT

Numbers 32 in the KAPI

Numbers 32 in the KBT1ETNIK

Numbers 32 in the KBV

Numbers 32 in the KJV

Numbers 32 in the KNFD

Numbers 32 in the LBA

Numbers 32 in the LBLA

Numbers 32 in the LNT

Numbers 32 in the LSV

Numbers 32 in the MAAL

Numbers 32 in the MBV

Numbers 32 in the MBV2

Numbers 32 in the MHNT

Numbers 32 in the MKNFD

Numbers 32 in the MNG

Numbers 32 in the MNT

Numbers 32 in the MNT2

Numbers 32 in the MRS1T

Numbers 32 in the NAA

Numbers 32 in the NASB

Numbers 32 in the NBLA

Numbers 32 in the NBS

Numbers 32 in the NBVTP

Numbers 32 in the NET2

Numbers 32 in the NIV11

Numbers 32 in the NNT

Numbers 32 in the NNT2

Numbers 32 in the NNT3

Numbers 32 in the PDDPT

Numbers 32 in the PFNT

Numbers 32 in the RMNT

Numbers 32 in the SBIAS

Numbers 32 in the SBIBS

Numbers 32 in the SBIBS2

Numbers 32 in the SBICS

Numbers 32 in the SBIDS

Numbers 32 in the SBIGS

Numbers 32 in the SBIHS

Numbers 32 in the SBIIS

Numbers 32 in the SBIIS2

Numbers 32 in the SBIIS3

Numbers 32 in the SBIKS

Numbers 32 in the SBIKS2

Numbers 32 in the SBIMS

Numbers 32 in the SBIOS

Numbers 32 in the SBIPS

Numbers 32 in the SBISS

Numbers 32 in the SBITS

Numbers 32 in the SBITS2

Numbers 32 in the SBITS3

Numbers 32 in the SBITS4

Numbers 32 in the SBIUS

Numbers 32 in the SBIVS

Numbers 32 in the SBT

Numbers 32 in the SBT1E

Numbers 32 in the SCHL

Numbers 32 in the SNT

Numbers 32 in the SUSU

Numbers 32 in the SUSU2

Numbers 32 in the SYNO

Numbers 32 in the TBIAOTANT

Numbers 32 in the TBT1E

Numbers 32 in the TBT1E2

Numbers 32 in the TFTIP

Numbers 32 in the TFTU

Numbers 32 in the TGNTATF3T

Numbers 32 in the THAI

Numbers 32 in the TNFD

Numbers 32 in the TNT

Numbers 32 in the TNTIK

Numbers 32 in the TNTIL

Numbers 32 in the TNTIN

Numbers 32 in the TNTIP

Numbers 32 in the TNTIZ

Numbers 32 in the TOMA

Numbers 32 in the TTENT

Numbers 32 in the UBG

Numbers 32 in the UGV

Numbers 32 in the UGV2

Numbers 32 in the UGV3

Numbers 32 in the VBL

Numbers 32 in the VDCC

Numbers 32 in the YALU

Numbers 32 in the YAPE

Numbers 32 in the YBVTP

Numbers 32 in the ZBP