Numbers 5 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe. 3 Azala mobali to mwasi, bobengana ye, bobimisa ye libanda ya molako mpo ete bakomisa molako na bango mbindo te, pamba te Ngai nazali kowumela elongo na bango. » 4 Bana ya Isalaele basalaki bongo ; babimisaki bango libanda ya molako. Basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize. 5 Yawe alobaki na Moyize : 6 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto, azala mobali to mwasi, atamboli na boyengebene te liboso ya Yawe wana asali moninga na ye mabe, azali na ngambo. 7 Boye asengeli koyambola lisumu oyo asalaki. Asengeli kozongisa epai ya moto oyo ye asali mabe : nyonso oyo azwaki mpe akobakisa likolo na yango, ndambo moko kati na mitano. 8 Kasi soki moto yango azali na ndeko te oyo akoki kozwa eloko oyo bakozongisa mpo na mabe oyo basalaki ye, bakopesa eloko oyo basengelaki kozongisela ye epai na Yawe na nzela ya Nganga-Nzambe, bakisa meme moko ya mobali oyo Nganga-Nzambe akosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na moto oyo asalaki mabe. 9 Biloko nyonso kati na makabo ya bule oyo bana ya Isalaele bakomema epai ya Nzambe ekozala ya Nganga-Nzambe. 10 Biloko oyo moto nyonso akotia pembeni mpo na Yawe ekopesama epai ya Nganga-Nzambe ; kasi eloko nyonso oyo moto akokabela Nganga-Nzambe ekokoma ya Nganga-Nzambe. › » 11 Bongo Yawe alobaki na Moyize : 12 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Soki mwasi akosi mobali na ye, wana abimi na mobali mosusu 13 mpe asangisi na ye nzoto, amikomisi mbindo atako esalemi na nkuku mpe moto moko te amoni ye ; mpe ezala mobali na ye ayebi eloko te. 14 Soki mobali asali zuwa mpe akomi kokanisa ete mwasi na ye akomi mbindo, azala mbindo to mbindo te, 15 mobali asengeli komema mwasi na ye epai ya Nganga-Nzambe mpe kopesa mpo na ye likabo ya bakilo misato ya farine ya orje ; akosopela yango mafuta te mpe akotia yango ansa te, pamba te ezali likabo oyo epesami mpo na zuwa, likabo mpo na kokanisa mbeba. 16 Nganga-Nzambe akobenga mwasi mpe akomema ye liboso ya Yawe. 17 Nganga-Nzambe akotoka mayi ya bule, na mbeki basala na mabele batumba mpe akozwa putulu ya mabele ya Mongombo mpo na kotia yango kati na mayi yango. 18 Nganga-Nzambe akotia mwasi ya kotelema liboso ya Yawe, akofungola ye suki mpe akotia na maboko na ye likabo ya zuwa, wana ye moko Nganga-Nzambe akobatela na maboko na ye mayi ya bololo oyo ememaka elakeli mabe. 19 Nganga-Nzambe akolapisa mwasi yango ndayi, akoloba na ye :‘ Soki mobali mosusu asangisaki na yo nzoto te, mpe soki omikomisaki mbindo te na kokosa mobali na yo wuta bobalana, wana tika ete mayi oyo ya bololo mpe ememaka elakeli mabe esala yo eloko moko te ! 20 Kasi soki, wana ozali ya kobala, okosaki mobali na yo mpe omikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu, ’ 21 Nganga-Nzambe asengeli awa kolapisa mwasi yango ndayi ya kondima kokweyela bilakeli mabe kowuta na maloba oyo : ‘ tika ete Yawe akomisa yo elakeli mabe mpe eloko ya nkele kati na bato na yo ! Tika ete akomisa yo ekomba mpe avimbisa yo libumu ! 22 Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba. ’Mwasi akozongisa :‘ Amen ! Tika ete esalema bongo ! ’ 23 Nganga-Nzambe akokoma maloba yango ya bilakeli mabe kati na buku mpe akokotisa yango kati na mayi ya bololo mpo na kolongola makomi yango. 24 Bongo akomelisa mwasi mayi oyo ya bololo, oyo ezali komema elakeli mabe mpo ete ekokota kati na ye. 25 Nganga-Nzambe akozwa wuta na maboko ya mwasi likabo ya zuwa, akotombola yango liboso ya Yawe mpe akomema yango na etumbelo. 26 Nganga-Nzambe akotondisa na loboko na ye, bambuma oyo akozwa kati na likabo yango ya zuwa lokola ekaniseli, mpe akotumba yango na likolo ya etumbelo ; sima na yango, akomelisa mwasi mayi. 27 Soki penza amikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu, mayi oyo ememaka elakeli mabe ekokota kati na ye, ekovimbisa libumu na ye, akokoma ekomba mpe akolakelama mabe kati na bato na ye. 28 Kasi soki mwasi amikomisaki mbindo te, soki azali penza peto, akomona pasi ata moko te mpe akoki kobota bana. 29 Wana nde ezali mobeko na tina na zuwa ; ekokanga mwasi ya libala oyo akosi mobali na ye mpe amikomisi mbindo. 30 Bakosalela yango mpe soki mobali asali zuwa mpe akanisi penza ete mwasi na ye abimi na mobali mosusu : mobali akomema mwasi mpe akotelemisa ye liboso ya Yawe ; bongo Nganga-Nzambe akosalela mobeko oyo na mobimba na yango epai ya mwasi. 31 Mobali akomema ngambo ata moke te kasi mwasi akozwa etumbu ya lisumu na ye. › »

In Other Versions

Numbers 5 in the ANGEFD

Numbers 5 in the ANTPNG2D

Numbers 5 in the AS21

Numbers 5 in the BAGH

Numbers 5 in the BBPNG

Numbers 5 in the BBT1E

Numbers 5 in the BDS

Numbers 5 in the BEV

Numbers 5 in the BHAD

Numbers 5 in the BIB

Numbers 5 in the BLPT

Numbers 5 in the BNT

Numbers 5 in the BNTABOOT

Numbers 5 in the BNTLV

Numbers 5 in the BOATCB

Numbers 5 in the BOATCB2

Numbers 5 in the BOBCV

Numbers 5 in the BOCNT

Numbers 5 in the BOECS

Numbers 5 in the BOGWICC

Numbers 5 in the BOHCB

Numbers 5 in the BOHCV

Numbers 5 in the BOHLNT

Numbers 5 in the BOHNTLTAL

Numbers 5 in the BOICB

Numbers 5 in the BOILNTAP

Numbers 5 in the BOITCV

Numbers 5 in the BOKCV

Numbers 5 in the BOKCV2

Numbers 5 in the BOKHWOG

Numbers 5 in the BOKSSV

Numbers 5 in the BOLCB

Numbers 5 in the BOMCV

Numbers 5 in the BONAV

Numbers 5 in the BONCB

Numbers 5 in the BONLT

Numbers 5 in the BONUT2

Numbers 5 in the BOPLNT

Numbers 5 in the BOSCB

Numbers 5 in the BOSNC

Numbers 5 in the BOTLNT

Numbers 5 in the BOVCB

Numbers 5 in the BOYCB

Numbers 5 in the BPBB

Numbers 5 in the BPH

Numbers 5 in the BSB

Numbers 5 in the CCB

Numbers 5 in the CUV

Numbers 5 in the CUVS

Numbers 5 in the DBT

Numbers 5 in the DGDNT

Numbers 5 in the DHNT

Numbers 5 in the DNT

Numbers 5 in the ELBE

Numbers 5 in the EMTV

Numbers 5 in the ESV

Numbers 5 in the FBV

Numbers 5 in the FEB

Numbers 5 in the GGMNT

Numbers 5 in the GNT

Numbers 5 in the HARY

Numbers 5 in the HNT

Numbers 5 in the IRVA

Numbers 5 in the IRVB

Numbers 5 in the IRVG

Numbers 5 in the IRVH

Numbers 5 in the IRVK

Numbers 5 in the IRVM

Numbers 5 in the IRVM2

Numbers 5 in the IRVO

Numbers 5 in the IRVP

Numbers 5 in the IRVT

Numbers 5 in the IRVT2

Numbers 5 in the IRVU

Numbers 5 in the ISVN

Numbers 5 in the JSNT

Numbers 5 in the KAPI

Numbers 5 in the KBT1ETNIK

Numbers 5 in the KBV

Numbers 5 in the KJV

Numbers 5 in the KNFD

Numbers 5 in the LBA

Numbers 5 in the LBLA

Numbers 5 in the LNT

Numbers 5 in the LSV

Numbers 5 in the MAAL

Numbers 5 in the MBV

Numbers 5 in the MBV2

Numbers 5 in the MHNT

Numbers 5 in the MKNFD

Numbers 5 in the MNG

Numbers 5 in the MNT

Numbers 5 in the MNT2

Numbers 5 in the MRS1T

Numbers 5 in the NAA

Numbers 5 in the NASB

Numbers 5 in the NBLA

Numbers 5 in the NBS

Numbers 5 in the NBVTP

Numbers 5 in the NET2

Numbers 5 in the NIV11

Numbers 5 in the NNT

Numbers 5 in the NNT2

Numbers 5 in the NNT3

Numbers 5 in the PDDPT

Numbers 5 in the PFNT

Numbers 5 in the RMNT

Numbers 5 in the SBIAS

Numbers 5 in the SBIBS

Numbers 5 in the SBIBS2

Numbers 5 in the SBICS

Numbers 5 in the SBIDS

Numbers 5 in the SBIGS

Numbers 5 in the SBIHS

Numbers 5 in the SBIIS

Numbers 5 in the SBIIS2

Numbers 5 in the SBIIS3

Numbers 5 in the SBIKS

Numbers 5 in the SBIKS2

Numbers 5 in the SBIMS

Numbers 5 in the SBIOS

Numbers 5 in the SBIPS

Numbers 5 in the SBISS

Numbers 5 in the SBITS

Numbers 5 in the SBITS2

Numbers 5 in the SBITS3

Numbers 5 in the SBITS4

Numbers 5 in the SBIUS

Numbers 5 in the SBIVS

Numbers 5 in the SBT

Numbers 5 in the SBT1E

Numbers 5 in the SCHL

Numbers 5 in the SNT

Numbers 5 in the SUSU

Numbers 5 in the SUSU2

Numbers 5 in the SYNO

Numbers 5 in the TBIAOTANT

Numbers 5 in the TBT1E

Numbers 5 in the TBT1E2

Numbers 5 in the TFTIP

Numbers 5 in the TFTU

Numbers 5 in the TGNTATF3T

Numbers 5 in the THAI

Numbers 5 in the TNFD

Numbers 5 in the TNT

Numbers 5 in the TNTIK

Numbers 5 in the TNTIL

Numbers 5 in the TNTIN

Numbers 5 in the TNTIP

Numbers 5 in the TNTIZ

Numbers 5 in the TOMA

Numbers 5 in the TTENT

Numbers 5 in the UBG

Numbers 5 in the UGV

Numbers 5 in the UGV2

Numbers 5 in the UGV3

Numbers 5 in the VBL

Numbers 5 in the VDCC

Numbers 5 in the YALU

Numbers 5 in the YAPE

Numbers 5 in the YBVTP

Numbers 5 in the ZBP