Psalms 12 (BOLCB2)
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe. 2 Yawe, sunga biso !Pamba te bayengebene bazali lisusu te ;bato ya kotiela motema bazali lisusu tekati na bana na bato. 3 Bato nyonso bazali kokosana bango na bango,bazali kolobana maloba ya sukali,kasi mitema na bango ezali sembo te. 4 Tika ete Yawe aboma bato nyonsooyo balobaka maloba ya sukalimpe batondi na lolendo, 5 ba-oyo balobaka :« Tokolonga na nzela ya lolemo na biso,bibebu na biso ekolobela biso ;nani akoluka kozala nkolo na biso ? » 6 Yawe alobi :« Mpo ete bazali konyokola babolampe kolelisa bato oyo bakelela,natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. » 7 Maloba ya Yawe ezalaka petolokola palata oyo balekisi na motompe bapetoli mbala sambo. 8 Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela,okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe. 9 Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipaisoki bato bapesi bozoba lokumu.