Psalms 150 (BOLCB2)
1 Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule,bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya moneneepai wapi avandi na nguya makasi ! 2 Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye !Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo ! 3 Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ;bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda ! 4 Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina !Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite ! 5 Bokumisa Ye na lokito ya manzanza !Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene ! 6 Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !