Revelation 20 (BOLCB2)

1 Bongo namonaki anjelu moko kokita wuta na Lola ; asimbaki na loboko na ye fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi mpe monyololo moko ya monene. 2 Akamataki dalagona, nyoka wana ya kala oyo azali zabolo to Satana ; akangaki ye monyololo mpo na mibu nkoto moko. 3 Anjelu abwakaki ye kati na libulu wana ya monene mpe ya molili makasi ; akangaki yango mpe abetaki kashe na likolo na yango mpo ete akosa lisusu bikolo te kino tango mibu nkoto moko ekokoka. Sima na yango, bakotika ye mpo na mwa tango moke. 4 Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko. 5 Bato mosusu oyo bakufaki bazongaki na bomoi te liboso ete mibu nkoto moko esila. Yango nde lisekwa ya liboso. 6 Bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso bazali bato ya esengo mpe basantu ! Kufa ya mibale ezali na bokonzi te epai na bango, kasi bakozala Banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakokonza elongo na Ye mibu nkoto moko. 7 Tango mibu wana nkoto moko ekosila, bakobimisa Satana wuta na boloko na ye, 8 mpe akokende kokosa bikolo ya bangambo nyonso minei ya mokili mobimba, elingi koloba Gogi mpe Magogi. Akosangisa bango mpo na bitumba. Motango na bango ekozala lokola zelo ya ebale monene oyo bakoki kotanga te. 9 Bapanzanaki na mokili mobimba, bazingelaki molako ya basantu mpe engumba oyo Nzambe alingaka. Kasi moto ekitaki longwa na likolo mpe ezikisaki bango. 10 Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi. 11 Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te. 12 Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku. 13 Ebale monene esanzaki bakufi oyo bazalaki kati na yango ; kufa elongo na mboka ya bakufi esanzaki mpe bakufi oyo bazalaki kati na yango. Mpe bato nyonso basambisamaki, moto na moto kolanda misala na ye. 14 Bongo kufa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki kati na liziba ya moto. Liziba ya moto ezali kufa ya mibale. 15 Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto.

In Other Versions

Revelation 20 in the ANGEFD

Revelation 20 in the ANTPNG2D

Revelation 20 in the AS21

Revelation 20 in the BAGH

Revelation 20 in the BBPNG

Revelation 20 in the BBT1E

Revelation 20 in the BDS

Revelation 20 in the BEV

Revelation 20 in the BHAD

Revelation 20 in the BIB

Revelation 20 in the BLPT

Revelation 20 in the BNT

Revelation 20 in the BNTABOOT

Revelation 20 in the BNTLV

Revelation 20 in the BOATCB

Revelation 20 in the BOATCB2

Revelation 20 in the BOBCV

Revelation 20 in the BOCNT

Revelation 20 in the BOECS

Revelation 20 in the BOGWICC

Revelation 20 in the BOHCB

Revelation 20 in the BOHCV

Revelation 20 in the BOHLNT

Revelation 20 in the BOHNTLTAL

Revelation 20 in the BOICB

Revelation 20 in the BOILNTAP

Revelation 20 in the BOITCV

Revelation 20 in the BOKCV

Revelation 20 in the BOKCV2

Revelation 20 in the BOKHWOG

Revelation 20 in the BOKSSV

Revelation 20 in the BOLCB

Revelation 20 in the BOMCV

Revelation 20 in the BONAV

Revelation 20 in the BONCB

Revelation 20 in the BONLT

Revelation 20 in the BONUT2

Revelation 20 in the BOPLNT

Revelation 20 in the BOSCB

Revelation 20 in the BOSNC

Revelation 20 in the BOTLNT

Revelation 20 in the BOVCB

Revelation 20 in the BOYCB

Revelation 20 in the BPBB

Revelation 20 in the BPH

Revelation 20 in the BSB

Revelation 20 in the CCB

Revelation 20 in the CUV

Revelation 20 in the CUVS

Revelation 20 in the DBT

Revelation 20 in the DGDNT

Revelation 20 in the DHNT

Revelation 20 in the DNT

Revelation 20 in the ELBE

Revelation 20 in the EMTV

Revelation 20 in the ESV

Revelation 20 in the FBV

Revelation 20 in the FEB

Revelation 20 in the GGMNT

Revelation 20 in the GNT

Revelation 20 in the HARY

Revelation 20 in the HNT

Revelation 20 in the IRVA

Revelation 20 in the IRVB

Revelation 20 in the IRVG

Revelation 20 in the IRVH

Revelation 20 in the IRVK

Revelation 20 in the IRVM

Revelation 20 in the IRVM2

Revelation 20 in the IRVO

Revelation 20 in the IRVP

Revelation 20 in the IRVT

Revelation 20 in the IRVT2

Revelation 20 in the IRVU

Revelation 20 in the ISVN

Revelation 20 in the JSNT

Revelation 20 in the KAPI

Revelation 20 in the KBT1ETNIK

Revelation 20 in the KBV

Revelation 20 in the KJV

Revelation 20 in the KNFD

Revelation 20 in the LBA

Revelation 20 in the LBLA

Revelation 20 in the LNT

Revelation 20 in the LSV

Revelation 20 in the MAAL

Revelation 20 in the MBV

Revelation 20 in the MBV2

Revelation 20 in the MHNT

Revelation 20 in the MKNFD

Revelation 20 in the MNG

Revelation 20 in the MNT

Revelation 20 in the MNT2

Revelation 20 in the MRS1T

Revelation 20 in the NAA

Revelation 20 in the NASB

Revelation 20 in the NBLA

Revelation 20 in the NBS

Revelation 20 in the NBVTP

Revelation 20 in the NET2

Revelation 20 in the NIV11

Revelation 20 in the NNT

Revelation 20 in the NNT2

Revelation 20 in the NNT3

Revelation 20 in the PDDPT

Revelation 20 in the PFNT

Revelation 20 in the RMNT

Revelation 20 in the SBIAS

Revelation 20 in the SBIBS

Revelation 20 in the SBIBS2

Revelation 20 in the SBICS

Revelation 20 in the SBIDS

Revelation 20 in the SBIGS

Revelation 20 in the SBIHS

Revelation 20 in the SBIIS

Revelation 20 in the SBIIS2

Revelation 20 in the SBIIS3

Revelation 20 in the SBIKS

Revelation 20 in the SBIKS2

Revelation 20 in the SBIMS

Revelation 20 in the SBIOS

Revelation 20 in the SBIPS

Revelation 20 in the SBISS

Revelation 20 in the SBITS

Revelation 20 in the SBITS2

Revelation 20 in the SBITS3

Revelation 20 in the SBITS4

Revelation 20 in the SBIUS

Revelation 20 in the SBIVS

Revelation 20 in the SBT

Revelation 20 in the SBT1E

Revelation 20 in the SCHL

Revelation 20 in the SNT

Revelation 20 in the SUSU

Revelation 20 in the SUSU2

Revelation 20 in the SYNO

Revelation 20 in the TBIAOTANT

Revelation 20 in the TBT1E

Revelation 20 in the TBT1E2

Revelation 20 in the TFTIP

Revelation 20 in the TFTU

Revelation 20 in the TGNTATF3T

Revelation 20 in the THAI

Revelation 20 in the TNFD

Revelation 20 in the TNT

Revelation 20 in the TNTIK

Revelation 20 in the TNTIL

Revelation 20 in the TNTIN

Revelation 20 in the TNTIP

Revelation 20 in the TNTIZ

Revelation 20 in the TOMA

Revelation 20 in the TTENT

Revelation 20 in the UBG

Revelation 20 in the UGV

Revelation 20 in the UGV2

Revelation 20 in the UGV3

Revelation 20 in the VBL

Revelation 20 in the VDCC

Revelation 20 in the YALU

Revelation 20 in the YAPE

Revelation 20 in the YBVTP

Revelation 20 in the ZBP