Ruth 4 (BOLCB2)

1 Wana Boazi akendeki na ekuke ya engumba mpe avandaki kuna, amonaki mosikoli, oyo Boazi alobaki ete ye nde azali na ndingisa ya kosikola Rite, azali koleka. Boazi alobaki na ye : « Ndeko na ngai ya mobali, yaka nanu mpe vanda awa. » Moto yango apusanaki mpe avandaki. 2 Boazi abengaki mibali zomi kati na bakambi ya engumba mpe asengaki ete bavanda na bango elongo. Tango bavandaki, 3 Boazi alobaki na mosikoli ya Rite :— Naomi oyo awutaki na mokili ya Moabi azali koteka elanga ya Elimeleki, ndeko na biso. 4 Ngai nazwaki likanisi ya koyebisa yo mpe kosenga na yo ete osomba na yo yango na miso ya bavandi ya engumba mpe ya bakambi oyo bazali awa. Soki ondimi kosomba yango, somba na yo. Soki te, yebisa ngai mpo ete nayeba ; pamba te yo nde ozali moto ya liboso oyo azali na ndingisa ya kosomba yango, mpe ngai nazali na ndingisa sima na yo.Moto yango azongiselaki ye :— Iyo, nakosomba yango. 5 Boazi alobaki :— Na mokolo oyo okosomba elanga na maboko ya Naomi, okozwa mpe Rite, moto ya Moabi, mwasi akufisa mobali ; mpo na kosala ete kombo ya mowei etikala na libula na ye. 6 Mosikoli alobaki :— Nakoki kosikola yango te, noki te nakotia mobulu kati na libula na ngai. Sikola yango yo moko, pamba te ngai nakoki te kosala yango. 7 Nzokande, na tango ya kala kati na Isalaele, mpo na kosikola mpe kopesa libula, moto moko azalaki kolongola sapatu na ye mpe kopesa yango epai ya moto mosusu. Sapatu yango ezalaki lokola elembo ya litatoli kati na Isalaele. 8 Mosikoli alobaki na Boazi :— Yo moko somba yango.Boye, alongolaki sapatu na ye. 9 Boazi ayebisaki bampaka mpe bato nyonso :— Bino moko bozali batatoli ete nasombi na maboko ya Naomi libula nyonso ya Elimeleki, ya Kilioni mpe ya Maaloni. 10 Nazwi lisusu Rite, moto ya Moabi, oyo azalaki mwasi ya Maaloni oyo akufa, mpo ete azala mwasi na ngai, mpo na kosala ete kombo na ye etikala na libula na ye, ete ebunga te kati na bandeko na ye mpe kati na buku ya leta ya engumba na ye. Bino bozali batatoli na yango lelo. 11 Boye, bampaka mpe bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya engumba balobaki :— Iyo, biso moko tozali batatoli. Tika ete Yawe akomisa mwasi oyo azali koya na ndako na yo, lokola Rasheli mpe Lea, oyo batongaki elongo libota ya Isalaele. Tika ete okoma moto monene kati na Efrata mpe moto ya lokumu kati na Beteleemi ! 12 Tika ete bakitani oyo Yawe akopesa yo na nzela ya elenge mwasi oyo, bakomisa ndako na yo lokola ndako ya Peretsi oyo Tamari abotelaki Yuda ! 13 Boye, Boazi akamataki Rite mpe abalaki ye. Sima na Boazi kosangisa na ye nzoto, Yawe asalelaki Rite ngolu : azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. 14 Basi balobaki na Naomi :« Tika ete Yawe akumisama ;Ye oyo, na mokolo ya lelo, atiki yo tekozanga mosikoli oyo kombo na yeekokende sango kati na Isalaele ! 15 Akoyeisa bomoi na yo sikampe akosunga yo na kimobange na yo,pamba te bokilo na yo, oyo alingaka yompe azali na motuya na miso na yokoleka bana mibali sambo,aboteli yo mwana mobali. » 16 Naomi azwaki mwana, atiaki ye na tolo na ye mpe akomaki mama mobokoli na ye. 17 Basi ya mboka wana balobaki : « Naomi aboti mwana mobali ! » Bapesaki mwana mobali yango kombo « Obedi. » Obedi abotaki Izayi, mpe Izayi abotaki Davidi. 18 Tala libota ya Peretsi : Peretsi abotaki Etsironi, 19 Etsironi abotaki Rami,Rami abotaki Aminadabi, 20 Aminadabi abotaki Nashoni,Nashoni abotaki Salima, 21 Salima abotaki Boazi,Boazi abotaki Obedi, 22 Obedi abotaki Izayi,Izayi abotaki Davidi.

In Other Versions

Ruth 4 in the ANGEFD

Ruth 4 in the ANTPNG2D

Ruth 4 in the AS21

Ruth 4 in the BAGH

Ruth 4 in the BBPNG

Ruth 4 in the BBT1E

Ruth 4 in the BDS

Ruth 4 in the BEV

Ruth 4 in the BHAD

Ruth 4 in the BIB

Ruth 4 in the BLPT

Ruth 4 in the BNT

Ruth 4 in the BNTABOOT

Ruth 4 in the BNTLV

Ruth 4 in the BOATCB

Ruth 4 in the BOATCB2

Ruth 4 in the BOBCV

Ruth 4 in the BOCNT

Ruth 4 in the BOECS

Ruth 4 in the BOGWICC

Ruth 4 in the BOHCB

Ruth 4 in the BOHCV

Ruth 4 in the BOHLNT

Ruth 4 in the BOHNTLTAL

Ruth 4 in the BOICB

Ruth 4 in the BOILNTAP

Ruth 4 in the BOITCV

Ruth 4 in the BOKCV

Ruth 4 in the BOKCV2

Ruth 4 in the BOKHWOG

Ruth 4 in the BOKSSV

Ruth 4 in the BOLCB

Ruth 4 in the BOMCV

Ruth 4 in the BONAV

Ruth 4 in the BONCB

Ruth 4 in the BONLT

Ruth 4 in the BONUT2

Ruth 4 in the BOPLNT

Ruth 4 in the BOSCB

Ruth 4 in the BOSNC

Ruth 4 in the BOTLNT

Ruth 4 in the BOVCB

Ruth 4 in the BOYCB

Ruth 4 in the BPBB

Ruth 4 in the BPH

Ruth 4 in the BSB

Ruth 4 in the CCB

Ruth 4 in the CUV

Ruth 4 in the CUVS

Ruth 4 in the DBT

Ruth 4 in the DGDNT

Ruth 4 in the DHNT

Ruth 4 in the DNT

Ruth 4 in the ELBE

Ruth 4 in the EMTV

Ruth 4 in the ESV

Ruth 4 in the FBV

Ruth 4 in the FEB

Ruth 4 in the GGMNT

Ruth 4 in the GNT

Ruth 4 in the HARY

Ruth 4 in the HNT

Ruth 4 in the IRVA

Ruth 4 in the IRVB

Ruth 4 in the IRVG

Ruth 4 in the IRVH

Ruth 4 in the IRVK

Ruth 4 in the IRVM

Ruth 4 in the IRVM2

Ruth 4 in the IRVO

Ruth 4 in the IRVP

Ruth 4 in the IRVT

Ruth 4 in the IRVT2

Ruth 4 in the IRVU

Ruth 4 in the ISVN

Ruth 4 in the JSNT

Ruth 4 in the KAPI

Ruth 4 in the KBT1ETNIK

Ruth 4 in the KBV

Ruth 4 in the KJV

Ruth 4 in the KNFD

Ruth 4 in the LBA

Ruth 4 in the LBLA

Ruth 4 in the LNT

Ruth 4 in the LSV

Ruth 4 in the MAAL

Ruth 4 in the MBV

Ruth 4 in the MBV2

Ruth 4 in the MHNT

Ruth 4 in the MKNFD

Ruth 4 in the MNG

Ruth 4 in the MNT

Ruth 4 in the MNT2

Ruth 4 in the MRS1T

Ruth 4 in the NAA

Ruth 4 in the NASB

Ruth 4 in the NBLA

Ruth 4 in the NBS

Ruth 4 in the NBVTP

Ruth 4 in the NET2

Ruth 4 in the NIV11

Ruth 4 in the NNT

Ruth 4 in the NNT2

Ruth 4 in the NNT3

Ruth 4 in the PDDPT

Ruth 4 in the PFNT

Ruth 4 in the RMNT

Ruth 4 in the SBIAS

Ruth 4 in the SBIBS

Ruth 4 in the SBIBS2

Ruth 4 in the SBICS

Ruth 4 in the SBIDS

Ruth 4 in the SBIGS

Ruth 4 in the SBIHS

Ruth 4 in the SBIIS

Ruth 4 in the SBIIS2

Ruth 4 in the SBIIS3

Ruth 4 in the SBIKS

Ruth 4 in the SBIKS2

Ruth 4 in the SBIMS

Ruth 4 in the SBIOS

Ruth 4 in the SBIPS

Ruth 4 in the SBISS

Ruth 4 in the SBITS

Ruth 4 in the SBITS2

Ruth 4 in the SBITS3

Ruth 4 in the SBITS4

Ruth 4 in the SBIUS

Ruth 4 in the SBIVS

Ruth 4 in the SBT

Ruth 4 in the SBT1E

Ruth 4 in the SCHL

Ruth 4 in the SNT

Ruth 4 in the SUSU

Ruth 4 in the SUSU2

Ruth 4 in the SYNO

Ruth 4 in the TBIAOTANT

Ruth 4 in the TBT1E

Ruth 4 in the TBT1E2

Ruth 4 in the TFTIP

Ruth 4 in the TFTU

Ruth 4 in the TGNTATF3T

Ruth 4 in the THAI

Ruth 4 in the TNFD

Ruth 4 in the TNT

Ruth 4 in the TNTIK

Ruth 4 in the TNTIL

Ruth 4 in the TNTIN

Ruth 4 in the TNTIP

Ruth 4 in the TNTIZ

Ruth 4 in the TOMA

Ruth 4 in the TTENT

Ruth 4 in the UBG

Ruth 4 in the UGV

Ruth 4 in the UGV2

Ruth 4 in the UGV3

Ruth 4 in the VBL

Ruth 4 in the VDCC

Ruth 4 in the YALU

Ruth 4 in the YAPE

Ruth 4 in the YBVTP

Ruth 4 in the ZBP