1 Chronicles 11 (BOLCB2)

1 Bato nyonso ya Isalaele basanganaki na Ebron, epai ya Davidi mpe balobaki : « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko na yo. 2 Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › » 3 Tango bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi, Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, kolanda Liloba na Yawe na nzela ya Samuele. 4 Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bakendeki kobundisa Yelusalemi oyo bazalaki kobenga « Yebusi. » Bato oyo bazalaki kovanda kuna bazali bato ya Yebusi. 5 Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te ! »Kasi Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi. 6 Davidi alobaki na bato na ye : « Moto oyo akobundisa mpe akolonga bato ya Yebusi, akokoma mokonzi ya liboso ya basoda. »Joabi, mwana mobali ya Tseruya, atelemaki moto ya liboso mpo na kobundisa bato ya Yebusi mpe akomaki mokonzi ya liboso ya mampinga. 7 Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi ; yango wana babengaki yango « Engumba ya Davidi. » 8 Mpe atongaki bandako zingazinga na yango, longwa na Milo kino na mir ya kati. Bongo Joabi abongisaki bisika oyo etikalaki kati na engumba. 9 Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, azalaki elongo na ye. 10 Tala bakombo ya bakonzi ya basoda ya mpiko ya Davidi oyo, elongo na Isalaele mobimba, basungaki ye mpo na kokomisa bokonzi na ye makasi, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. 11 Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi :Yashobeami, mwana mobali ya Akimoni, azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko ; abomaki na likonga bato nkama misato na etumba moko. 12 Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi : azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko ; 13 mpe azalaki elongo na Davidi, na engumba Pasi-Damini, tango bato ya Filisitia basanganaki mpo na bitumba, mpe basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango. Ezalaki kuna mpe na elanga moko etonda na bambuma ya orje. 14 Kasi basoda ya Eleazari babombamaki kati na elanga, babundelaki yango mpe babomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene. 15 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, misato bayaki epai ya Davidi, na libanga monene oyo ezalaki pene ya ebombamelo ya mabanga ya Adulami. Nzokande, basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya bakitani ya Rafa. 16 Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki kati na Beteleemi. 17 Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki : « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela ? » 18 Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango ; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe. 19 Davidi alobaki : « Tika ete Nzambe na ngai apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo ! Boni, namela penza mayi oyo ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende mpe batekaki milimo na bango mpo ete batoka yango ? »Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki. 20 Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka. 21 Kati na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya mibale, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso. 22 Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya mboka Moabi ; mpe na mokolo moko ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi. 23 Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo azalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe asimbaki na loboko na ye likonga moko lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. Abundisaki moto ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko. 24 Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki ; ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko. 25 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye. 26 Basoda ya mpiko bazalaki : Asaeli, ndeko mobali ya Joabi~;Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi~; 27 Shamoti, moto ya Arori ;Eletsi, moto ya Peloni~; 28 Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa ;Abiezeri, moto ya Anatoti~; 29 Sibekayi, moto ya Usha ;Ilayi, moto ya Aoyi~; 30 Maarayi, moto ya Netofa ;Eledi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa~; 31 Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame ;Benaya, moto ya Piratoni~; 32 Urayi, moto ya mabwaku ya Gashi ;Abieli, moto ya Beti-Ariba~; 33 Azimaveti, moto ya Baarumi ;Eliaba, moto ya Shaaliboni~; 34 Beni-Ashemi, moto ya Gizoni ;Jonatan, mwana mobali ya Shage, moto ya Arari~; 35 Ayami, mwana mobali ya Sakari, moto ya Arari ;Elifali, mwana mobali ya Uri~; 36 Eferi, moto ya Mekera ;Ayiya, moto ya Peloni~; 37 Etsiro, moto ya Karimeli ;Naarayi, mwana mobali ya Ezibayi~; 38 Joeli, ndeko mobali ya Natan ;Mibiari, mwana mobali ya Agiri~; 39 Tseleki, moto ya Amoni ;Naarayi, moto ya Beroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya~; 40 Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri ; 41 Iri, moto ya Iti ;Zabadi, mwana mobali ya Akilayi~; 42 Adina, mwana mobali ya Shiza ya ekolo ya Ribeni mpe mokambi ya mampinga tuku misato ya mpiko ; 43 Anani, mwana mobali ya Maaka ;Jozafati, moto ya Mitini~; 44 Uzia, moto ya Ashitaroti ;Shama mpe Yeyeli, bana mibali ya Otami, moto ya Aroeri~; 45 Yediayeli, mwana mobali ya Shimiri ;Yoa, ndeko na ye ya mobali, moto ya Tishi~; 46 Elieli, moto ya Maavimi ;Yeribayi mpe Yoshavia, bana mibali ya Elinaami~;Yitima, moto ya Moabi~; 47 Elieli, Obedi mpe Yaasieli, bato ya Metsobaya.

In Other Versions

1 Chronicles 11 in the ANGEFD

1 Chronicles 11 in the ANTPNG2D

1 Chronicles 11 in the AS21

1 Chronicles 11 in the BAGH

1 Chronicles 11 in the BBPNG

1 Chronicles 11 in the BBT1E

1 Chronicles 11 in the BDS

1 Chronicles 11 in the BEV

1 Chronicles 11 in the BHAD

1 Chronicles 11 in the BIB

1 Chronicles 11 in the BLPT

1 Chronicles 11 in the BNT

1 Chronicles 11 in the BNTABOOT

1 Chronicles 11 in the BNTLV

1 Chronicles 11 in the BOATCB

1 Chronicles 11 in the BOATCB2

1 Chronicles 11 in the BOBCV

1 Chronicles 11 in the BOCNT

1 Chronicles 11 in the BOECS

1 Chronicles 11 in the BOGWICC

1 Chronicles 11 in the BOHCB

1 Chronicles 11 in the BOHCV

1 Chronicles 11 in the BOHLNT

1 Chronicles 11 in the BOHNTLTAL

1 Chronicles 11 in the BOICB

1 Chronicles 11 in the BOILNTAP

1 Chronicles 11 in the BOITCV

1 Chronicles 11 in the BOKCV

1 Chronicles 11 in the BOKCV2

1 Chronicles 11 in the BOKHWOG

1 Chronicles 11 in the BOKSSV

1 Chronicles 11 in the BOLCB

1 Chronicles 11 in the BOMCV

1 Chronicles 11 in the BONAV

1 Chronicles 11 in the BONCB

1 Chronicles 11 in the BONLT

1 Chronicles 11 in the BONUT2

1 Chronicles 11 in the BOPLNT

1 Chronicles 11 in the BOSCB

1 Chronicles 11 in the BOSNC

1 Chronicles 11 in the BOTLNT

1 Chronicles 11 in the BOVCB

1 Chronicles 11 in the BOYCB

1 Chronicles 11 in the BPBB

1 Chronicles 11 in the BPH

1 Chronicles 11 in the BSB

1 Chronicles 11 in the CCB

1 Chronicles 11 in the CUV

1 Chronicles 11 in the CUVS

1 Chronicles 11 in the DBT

1 Chronicles 11 in the DGDNT

1 Chronicles 11 in the DHNT

1 Chronicles 11 in the DNT

1 Chronicles 11 in the ELBE

1 Chronicles 11 in the EMTV

1 Chronicles 11 in the ESV

1 Chronicles 11 in the FBV

1 Chronicles 11 in the FEB

1 Chronicles 11 in the GGMNT

1 Chronicles 11 in the GNT

1 Chronicles 11 in the HARY

1 Chronicles 11 in the HNT

1 Chronicles 11 in the IRVA

1 Chronicles 11 in the IRVB

1 Chronicles 11 in the IRVG

1 Chronicles 11 in the IRVH

1 Chronicles 11 in the IRVK

1 Chronicles 11 in the IRVM

1 Chronicles 11 in the IRVM2

1 Chronicles 11 in the IRVO

1 Chronicles 11 in the IRVP

1 Chronicles 11 in the IRVT

1 Chronicles 11 in the IRVT2

1 Chronicles 11 in the IRVU

1 Chronicles 11 in the ISVN

1 Chronicles 11 in the JSNT

1 Chronicles 11 in the KAPI

1 Chronicles 11 in the KBT1ETNIK

1 Chronicles 11 in the KBV

1 Chronicles 11 in the KJV

1 Chronicles 11 in the KNFD

1 Chronicles 11 in the LBA

1 Chronicles 11 in the LBLA

1 Chronicles 11 in the LNT

1 Chronicles 11 in the LSV

1 Chronicles 11 in the MAAL

1 Chronicles 11 in the MBV

1 Chronicles 11 in the MBV2

1 Chronicles 11 in the MHNT

1 Chronicles 11 in the MKNFD

1 Chronicles 11 in the MNG

1 Chronicles 11 in the MNT

1 Chronicles 11 in the MNT2

1 Chronicles 11 in the MRS1T

1 Chronicles 11 in the NAA

1 Chronicles 11 in the NASB

1 Chronicles 11 in the NBLA

1 Chronicles 11 in the NBS

1 Chronicles 11 in the NBVTP

1 Chronicles 11 in the NET2

1 Chronicles 11 in the NIV11

1 Chronicles 11 in the NNT

1 Chronicles 11 in the NNT2

1 Chronicles 11 in the NNT3

1 Chronicles 11 in the PDDPT

1 Chronicles 11 in the PFNT

1 Chronicles 11 in the RMNT

1 Chronicles 11 in the SBIAS

1 Chronicles 11 in the SBIBS

1 Chronicles 11 in the SBIBS2

1 Chronicles 11 in the SBICS

1 Chronicles 11 in the SBIDS

1 Chronicles 11 in the SBIGS

1 Chronicles 11 in the SBIHS

1 Chronicles 11 in the SBIIS

1 Chronicles 11 in the SBIIS2

1 Chronicles 11 in the SBIIS3

1 Chronicles 11 in the SBIKS

1 Chronicles 11 in the SBIKS2

1 Chronicles 11 in the SBIMS

1 Chronicles 11 in the SBIOS

1 Chronicles 11 in the SBIPS

1 Chronicles 11 in the SBISS

1 Chronicles 11 in the SBITS

1 Chronicles 11 in the SBITS2

1 Chronicles 11 in the SBITS3

1 Chronicles 11 in the SBITS4

1 Chronicles 11 in the SBIUS

1 Chronicles 11 in the SBIVS

1 Chronicles 11 in the SBT

1 Chronicles 11 in the SBT1E

1 Chronicles 11 in the SCHL

1 Chronicles 11 in the SNT

1 Chronicles 11 in the SUSU

1 Chronicles 11 in the SUSU2

1 Chronicles 11 in the SYNO

1 Chronicles 11 in the TBIAOTANT

1 Chronicles 11 in the TBT1E

1 Chronicles 11 in the TBT1E2

1 Chronicles 11 in the TFTIP

1 Chronicles 11 in the TFTU

1 Chronicles 11 in the TGNTATF3T

1 Chronicles 11 in the THAI

1 Chronicles 11 in the TNFD

1 Chronicles 11 in the TNT

1 Chronicles 11 in the TNTIK

1 Chronicles 11 in the TNTIL

1 Chronicles 11 in the TNTIN

1 Chronicles 11 in the TNTIP

1 Chronicles 11 in the TNTIZ

1 Chronicles 11 in the TOMA

1 Chronicles 11 in the TTENT

1 Chronicles 11 in the UBG

1 Chronicles 11 in the UGV

1 Chronicles 11 in the UGV2

1 Chronicles 11 in the UGV3

1 Chronicles 11 in the VBL

1 Chronicles 11 in the VDCC

1 Chronicles 11 in the YALU

1 Chronicles 11 in the YAPE

1 Chronicles 11 in the YBVTP

1 Chronicles 11 in the ZBP