1 Chronicles 21 (BOLCB2)

1 Satana atelemelaki Isalaele mpe atindikaki Davidi na kotanga motango ya bato ya Isalaele. 2 Boye, Davidi apesaki mitindo na Joabi mpe na bakambi ya bato :— Bokende kotanga bato ya Isalaele, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpe boyebisa ngai motango na bango mpo ete nayeba. 3 Kasi Joabi azongisaki :— Tika ete Yawe akomisa bato na Ye ebele koleka mbala nkama ! Oh mokonzi, nkolo na ngai, bango nyonso bazali te basali ya nkolo na ngai ? Mpo na nini nkolo na ngai alingi kosala bongo ? Mpo na nini komemisa Isalaele ngambo ? 4 Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi. Boye, Joabi abimaki, atambolaki kati na Isalaele mobimba mpe azongaki na Yelusalemi. 5 Joabi ayebisaki Davidi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato monkoko moko na nkoto nkama moko kati na Isalaele mobimba, mpe nkoto nkama minei na tuku sambo kati na Yuda. 6 Kasi kati na bango, Joabi atangaki te ekolo ya Levi mpe ya Benjame ; pamba te etinda ya mokonzi esepelisaki ye te. 7 Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu. 8 Davidi alobaki na Nzambe :— Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma. 9 Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya Davidi : 10 — Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › » 11 Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye :— Tala makambo oyo Yawe alobi : « Oponi etumbu nini : 12 mibu misato ya nzala makasi ; sanza misato oyo banguna na yo bakolonga yo mpe mipanga na bango ekoboma basoda na yo ; to mikolo misato elongo na mopanga ya Yawe mpe bokono oyo ebomaka, mikolo oyo anjelu ya Yawe akobebisa etuka nyonso ya Isalaele ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai. » 13 Davidi azongiselaki Gadi :— Nazali na pasi makasi kati na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato ! 14 Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, mpe bato ya Isalaele nkoto tuku sambo bakufaki. 15 Nzambe atindaki anjelu na Yelusalemi mpo na kobebisa yango ; kasi wana anjelu azalaki kobebisa, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! »Anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orinani, moto ya Yebusi. 16 Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo.Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele. 17 Davidi alobaki na Nzambe :— Boni, ezali ngai nde napesaki mitindo ete batanga motango ya bato ? Ngai moko nde nasalaki masumu, ngai moko nde nasalaki mbeba oyo eleki mabe. Bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te. Oh Yawe, Nzambe na ngai, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ; kasi tika ete bokono oyo ebomaka ekweyela te bato na Yo ! 18 Anjelu na Yawe atindaki Gadi koloba na Davidi :— Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orinani, moto ya Yebusi. 19 Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe. 20 Bongo, wana Orinani azalaki kotuta ble, abalukaki mpe amonaki anjelu. Boye bana na ye ya mibali minei oyo bazalaki na ye elongo babombamaki. 21 Davidi apusanaki pembeni ya Orinani ; mpe tango Orinani atalaki mpe amonaki Davidi, abimaki na etando mpe agumbamaki liboso ya Davidi, elongi kino na mabele. 22 Davidi alobaki na Orinani :— Pesa ngai etando na yo, tekela ngai yango na motuya ya mbongo oyo ekoki na yango, mpo ete natonga etumbelo mpo na Yawe ; tekela ngai yango mpo ete etumbu ya bokono oyo ezali koboma bato esila. 23 Orinani azongiselaki Davidi :— Kamata yango ; mpe tika ete mokonzi, nkolo na ngai, asala na yango nyonso oyo amoni ete ezali malamu mpo na ye. Tala, ngai, nakopesa bangombe ya mibali lokola mbeka ya kotumba, banzete oyo babetelaka ble lokola koni, mpe ble lokola mbeka ya bambuma. Nakopesa nyonso wana. 24 Kasi mokonzi Davidi alobaki na Orinani :— Te ! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango ; nakomema te epai na Yawe eloko oyo ezali ya yo, nakobonzela Yawe te bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele. 25 Boye, Davidi asombaki etando yango epai ya Orinani, na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo, nkama motoba. 26 Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka. 27 Boye Yawe alobaki na anjelu, mpe anjelu azongisaki mopanga na ye na ebombelo na yango. 28 Banda na tango wana, lokola Davidi amonaki ete Yawe ayanolaki ye na etando ya Orinani, moto ya Yebusi, akomaki kobonza bambeka tango nyonso na esika wana. 29 Mongombo na Yawe oyo Moyize atongaki na esobe mpe etumbelo ya bambeka ya kotumba ezalaki na tango wana, na esambelo ya likolo ya ngomba ya Gabaoni. 30 Nzokande Davidi azalaki kokoka te kozwa mokano ya kokende kotuna Nzambe liboso ya Mongombo, pamba te azalaki kobanga mopanga na Yawe.

In Other Versions

1 Chronicles 21 in the ANGEFD

1 Chronicles 21 in the ANTPNG2D

1 Chronicles 21 in the AS21

1 Chronicles 21 in the BAGH

1 Chronicles 21 in the BBPNG

1 Chronicles 21 in the BBT1E

1 Chronicles 21 in the BDS

1 Chronicles 21 in the BEV

1 Chronicles 21 in the BHAD

1 Chronicles 21 in the BIB

1 Chronicles 21 in the BLPT

1 Chronicles 21 in the BNT

1 Chronicles 21 in the BNTABOOT

1 Chronicles 21 in the BNTLV

1 Chronicles 21 in the BOATCB

1 Chronicles 21 in the BOATCB2

1 Chronicles 21 in the BOBCV

1 Chronicles 21 in the BOCNT

1 Chronicles 21 in the BOECS

1 Chronicles 21 in the BOGWICC

1 Chronicles 21 in the BOHCB

1 Chronicles 21 in the BOHCV

1 Chronicles 21 in the BOHLNT

1 Chronicles 21 in the BOHNTLTAL

1 Chronicles 21 in the BOICB

1 Chronicles 21 in the BOILNTAP

1 Chronicles 21 in the BOITCV

1 Chronicles 21 in the BOKCV

1 Chronicles 21 in the BOKCV2

1 Chronicles 21 in the BOKHWOG

1 Chronicles 21 in the BOKSSV

1 Chronicles 21 in the BOLCB

1 Chronicles 21 in the BOMCV

1 Chronicles 21 in the BONAV

1 Chronicles 21 in the BONCB

1 Chronicles 21 in the BONLT

1 Chronicles 21 in the BONUT2

1 Chronicles 21 in the BOPLNT

1 Chronicles 21 in the BOSCB

1 Chronicles 21 in the BOSNC

1 Chronicles 21 in the BOTLNT

1 Chronicles 21 in the BOVCB

1 Chronicles 21 in the BOYCB

1 Chronicles 21 in the BPBB

1 Chronicles 21 in the BPH

1 Chronicles 21 in the BSB

1 Chronicles 21 in the CCB

1 Chronicles 21 in the CUV

1 Chronicles 21 in the CUVS

1 Chronicles 21 in the DBT

1 Chronicles 21 in the DGDNT

1 Chronicles 21 in the DHNT

1 Chronicles 21 in the DNT

1 Chronicles 21 in the ELBE

1 Chronicles 21 in the EMTV

1 Chronicles 21 in the ESV

1 Chronicles 21 in the FBV

1 Chronicles 21 in the FEB

1 Chronicles 21 in the GGMNT

1 Chronicles 21 in the GNT

1 Chronicles 21 in the HARY

1 Chronicles 21 in the HNT

1 Chronicles 21 in the IRVA

1 Chronicles 21 in the IRVB

1 Chronicles 21 in the IRVG

1 Chronicles 21 in the IRVH

1 Chronicles 21 in the IRVK

1 Chronicles 21 in the IRVM

1 Chronicles 21 in the IRVM2

1 Chronicles 21 in the IRVO

1 Chronicles 21 in the IRVP

1 Chronicles 21 in the IRVT

1 Chronicles 21 in the IRVT2

1 Chronicles 21 in the IRVU

1 Chronicles 21 in the ISVN

1 Chronicles 21 in the JSNT

1 Chronicles 21 in the KAPI

1 Chronicles 21 in the KBT1ETNIK

1 Chronicles 21 in the KBV

1 Chronicles 21 in the KJV

1 Chronicles 21 in the KNFD

1 Chronicles 21 in the LBA

1 Chronicles 21 in the LBLA

1 Chronicles 21 in the LNT

1 Chronicles 21 in the LSV

1 Chronicles 21 in the MAAL

1 Chronicles 21 in the MBV

1 Chronicles 21 in the MBV2

1 Chronicles 21 in the MHNT

1 Chronicles 21 in the MKNFD

1 Chronicles 21 in the MNG

1 Chronicles 21 in the MNT

1 Chronicles 21 in the MNT2

1 Chronicles 21 in the MRS1T

1 Chronicles 21 in the NAA

1 Chronicles 21 in the NASB

1 Chronicles 21 in the NBLA

1 Chronicles 21 in the NBS

1 Chronicles 21 in the NBVTP

1 Chronicles 21 in the NET2

1 Chronicles 21 in the NIV11

1 Chronicles 21 in the NNT

1 Chronicles 21 in the NNT2

1 Chronicles 21 in the NNT3

1 Chronicles 21 in the PDDPT

1 Chronicles 21 in the PFNT

1 Chronicles 21 in the RMNT

1 Chronicles 21 in the SBIAS

1 Chronicles 21 in the SBIBS

1 Chronicles 21 in the SBIBS2

1 Chronicles 21 in the SBICS

1 Chronicles 21 in the SBIDS

1 Chronicles 21 in the SBIGS

1 Chronicles 21 in the SBIHS

1 Chronicles 21 in the SBIIS

1 Chronicles 21 in the SBIIS2

1 Chronicles 21 in the SBIIS3

1 Chronicles 21 in the SBIKS

1 Chronicles 21 in the SBIKS2

1 Chronicles 21 in the SBIMS

1 Chronicles 21 in the SBIOS

1 Chronicles 21 in the SBIPS

1 Chronicles 21 in the SBISS

1 Chronicles 21 in the SBITS

1 Chronicles 21 in the SBITS2

1 Chronicles 21 in the SBITS3

1 Chronicles 21 in the SBITS4

1 Chronicles 21 in the SBIUS

1 Chronicles 21 in the SBIVS

1 Chronicles 21 in the SBT

1 Chronicles 21 in the SBT1E

1 Chronicles 21 in the SCHL

1 Chronicles 21 in the SNT

1 Chronicles 21 in the SUSU

1 Chronicles 21 in the SUSU2

1 Chronicles 21 in the SYNO

1 Chronicles 21 in the TBIAOTANT

1 Chronicles 21 in the TBT1E

1 Chronicles 21 in the TBT1E2

1 Chronicles 21 in the TFTIP

1 Chronicles 21 in the TFTU

1 Chronicles 21 in the TGNTATF3T

1 Chronicles 21 in the THAI

1 Chronicles 21 in the TNFD

1 Chronicles 21 in the TNT

1 Chronicles 21 in the TNTIK

1 Chronicles 21 in the TNTIL

1 Chronicles 21 in the TNTIN

1 Chronicles 21 in the TNTIP

1 Chronicles 21 in the TNTIZ

1 Chronicles 21 in the TOMA

1 Chronicles 21 in the TTENT

1 Chronicles 21 in the UBG

1 Chronicles 21 in the UGV

1 Chronicles 21 in the UGV2

1 Chronicles 21 in the UGV3

1 Chronicles 21 in the VBL

1 Chronicles 21 in the VDCC

1 Chronicles 21 in the YALU

1 Chronicles 21 in the YAPE

1 Chronicles 21 in the YBVTP

1 Chronicles 21 in the ZBP