1 Corinthians 10 (BOLCB2)

1 Bandeko, nalingi boyeba malamu likambo oyo : Bakoko na biso bazalaki bango nyonso na se ya lipata, bakatisaki bango nyonso ebale monene, 2 babatisamaki bango nyonso mpo na Moyize kati na lipata mpe kati na ebale monene, 3 baliaki bango nyonso bilei ya molimo ya ndenge moko, 4 mpe bamelaki bango nyonso mayi ya molimo ya ndenge moko ; pamba te bazalaki komela na libanga ya molimo, oyo ezalaki kotambola elongo na bango ; mpe libanga yango ezalaki Klisto. 5 Nzokande, Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango ; solo, babomaki bango kati na esobe. 6 Ezali bandakisa mpo na biso, mpo ete tolula makambo mabe te ndenge bango balulaki. 7 Bozala basambeli ya banzambe ya bikeko te, ndenge bamosusu kati na bango bazalaki, kolanda ndenge ekomama : « Bato bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela, mpe batelemaki mpo na kosakana. » 8 Tosengeli te kosala pite, ndenge bamosusu kati na bango basalaki ; mpe, na mokolo moko, bato nkoto tuku mibale na misato bakufaki. 9 Tosengeli mpe te komeka Klisto, ndenge bamosusu kati na bango basalaki ; mpe banyoka ebomaki bango mpo ete eswaki bango. 10 Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango. 11 Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka. 12 Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema asala keba ete akweya te ! 13 Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango. 14 Yango wana, balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko. 15 Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele ; botala bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe. 16 Boni, kopo ya elambo oyo, mpo na yango, tozongisaka matondi epai ya Nzambe, ekomisaka biso te moko na makila ya Klisto ? Lipa oyo tokataka ekomisaka biso te moko na nzoto ya Klisto ? 17 Lokola lipa ezali kaka moko, biso nyonso tozali kosala nzoto kaka moko atako tozali ebele, pamba te biso nyonso tokabolaka lipa yango kaka moko. 18 Bokanisa nanu Isalaele ! Boni, bato oyo baliaka banyama oyo epesami lokola mbeka bazalaka moko te na etumbelo ? 19 Nalingi koloba nini ? Nalingi koloba ete misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe yango moko nzambe ya ekeko, ezali na tina ? 20 Te ! Kasi lokola babonzaka bambeka na bango epai ya milimo mabe mpe epai ya oyo ezali Nzambe te, naboyi ete bozala moko na milimo mabe. 21 Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe ; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe. 22 Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Boni, tozali makasi koleka Ye ? 23 Bolobaka : « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso ezali na litomba te ; « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso elendisaka te. 24 Tika ete moto moko te aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya moto mosusu ! 25 Boliaka nyonso oyo etekamaka na zando, na komipesa mituna te na tina na yango, noki te bobebisa mitema na bino. 26 Pamba te mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Nkolo. 27 Soki moto oyo azali mondimi te abengisi yo, mpe ondimi kokende epai na ye, lia nyonso oyo bakopesa yo, na komipesa mituna te, noki te obebisa motema na yo. 28 Kasi soki moto moko alobi na yo : « Mosuni oyo ebonzamaki lokola mbeka epai ya nzambe ya ekeko, » kolia yango te, likolo ya moto oyo akebisi yo mpe mpo ete obebisa te motema na yo. 29 Awa, nazali koloba te na tina na motema na yo, kasi na tina na motema ya moto yango, pamba te mpo na nini motema ya moto mosusu elandela bonsomi na ngai ? 30 Soki naliaka na kozongisa matondi epai ya Nzambe, mpo na nini kopamela ngai na tina na oyo, ngai, nazongiselaka matondi epai ya Nzambe ? 31 Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe. 32 Bozalaka libaku te, ezala mpo na Bayuda, mpo na Bagreki to mpo na Lingomba ya Nzambe. 33 Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso ; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.

In Other Versions

1 Corinthians 10 in the ANGEFD

1 Corinthians 10 in the ANTPNG2D

1 Corinthians 10 in the AS21

1 Corinthians 10 in the BAGH

1 Corinthians 10 in the BBPNG

1 Corinthians 10 in the BBT1E

1 Corinthians 10 in the BDS

1 Corinthians 10 in the BEV

1 Corinthians 10 in the BHAD

1 Corinthians 10 in the BIB

1 Corinthians 10 in the BLPT

1 Corinthians 10 in the BNT

1 Corinthians 10 in the BNTABOOT

1 Corinthians 10 in the BNTLV

1 Corinthians 10 in the BOATCB

1 Corinthians 10 in the BOATCB2

1 Corinthians 10 in the BOBCV

1 Corinthians 10 in the BOCNT

1 Corinthians 10 in the BOECS

1 Corinthians 10 in the BOGWICC

1 Corinthians 10 in the BOHCB

1 Corinthians 10 in the BOHCV

1 Corinthians 10 in the BOHLNT

1 Corinthians 10 in the BOHNTLTAL

1 Corinthians 10 in the BOICB

1 Corinthians 10 in the BOILNTAP

1 Corinthians 10 in the BOITCV

1 Corinthians 10 in the BOKCV

1 Corinthians 10 in the BOKCV2

1 Corinthians 10 in the BOKHWOG

1 Corinthians 10 in the BOKSSV

1 Corinthians 10 in the BOLCB

1 Corinthians 10 in the BOMCV

1 Corinthians 10 in the BONAV

1 Corinthians 10 in the BONCB

1 Corinthians 10 in the BONLT

1 Corinthians 10 in the BONUT2

1 Corinthians 10 in the BOPLNT

1 Corinthians 10 in the BOSCB

1 Corinthians 10 in the BOSNC

1 Corinthians 10 in the BOTLNT

1 Corinthians 10 in the BOVCB

1 Corinthians 10 in the BOYCB

1 Corinthians 10 in the BPBB

1 Corinthians 10 in the BPH

1 Corinthians 10 in the BSB

1 Corinthians 10 in the CCB

1 Corinthians 10 in the CUV

1 Corinthians 10 in the CUVS

1 Corinthians 10 in the DBT

1 Corinthians 10 in the DGDNT

1 Corinthians 10 in the DHNT

1 Corinthians 10 in the DNT

1 Corinthians 10 in the ELBE

1 Corinthians 10 in the EMTV

1 Corinthians 10 in the ESV

1 Corinthians 10 in the FBV

1 Corinthians 10 in the FEB

1 Corinthians 10 in the GGMNT

1 Corinthians 10 in the GNT

1 Corinthians 10 in the HARY

1 Corinthians 10 in the HNT

1 Corinthians 10 in the IRVA

1 Corinthians 10 in the IRVB

1 Corinthians 10 in the IRVG

1 Corinthians 10 in the IRVH

1 Corinthians 10 in the IRVK

1 Corinthians 10 in the IRVM

1 Corinthians 10 in the IRVM2

1 Corinthians 10 in the IRVO

1 Corinthians 10 in the IRVP

1 Corinthians 10 in the IRVT

1 Corinthians 10 in the IRVT2

1 Corinthians 10 in the IRVU

1 Corinthians 10 in the ISVN

1 Corinthians 10 in the JSNT

1 Corinthians 10 in the KAPI

1 Corinthians 10 in the KBT1ETNIK

1 Corinthians 10 in the KBV

1 Corinthians 10 in the KJV

1 Corinthians 10 in the KNFD

1 Corinthians 10 in the LBA

1 Corinthians 10 in the LBLA

1 Corinthians 10 in the LNT

1 Corinthians 10 in the LSV

1 Corinthians 10 in the MAAL

1 Corinthians 10 in the MBV

1 Corinthians 10 in the MBV2

1 Corinthians 10 in the MHNT

1 Corinthians 10 in the MKNFD

1 Corinthians 10 in the MNG

1 Corinthians 10 in the MNT

1 Corinthians 10 in the MNT2

1 Corinthians 10 in the MRS1T

1 Corinthians 10 in the NAA

1 Corinthians 10 in the NASB

1 Corinthians 10 in the NBLA

1 Corinthians 10 in the NBS

1 Corinthians 10 in the NBVTP

1 Corinthians 10 in the NET2

1 Corinthians 10 in the NIV11

1 Corinthians 10 in the NNT

1 Corinthians 10 in the NNT2

1 Corinthians 10 in the NNT3

1 Corinthians 10 in the PDDPT

1 Corinthians 10 in the PFNT

1 Corinthians 10 in the RMNT

1 Corinthians 10 in the SBIAS

1 Corinthians 10 in the SBIBS

1 Corinthians 10 in the SBIBS2

1 Corinthians 10 in the SBICS

1 Corinthians 10 in the SBIDS

1 Corinthians 10 in the SBIGS

1 Corinthians 10 in the SBIHS

1 Corinthians 10 in the SBIIS

1 Corinthians 10 in the SBIIS2

1 Corinthians 10 in the SBIIS3

1 Corinthians 10 in the SBIKS

1 Corinthians 10 in the SBIKS2

1 Corinthians 10 in the SBIMS

1 Corinthians 10 in the SBIOS

1 Corinthians 10 in the SBIPS

1 Corinthians 10 in the SBISS

1 Corinthians 10 in the SBITS

1 Corinthians 10 in the SBITS2

1 Corinthians 10 in the SBITS3

1 Corinthians 10 in the SBITS4

1 Corinthians 10 in the SBIUS

1 Corinthians 10 in the SBIVS

1 Corinthians 10 in the SBT

1 Corinthians 10 in the SBT1E

1 Corinthians 10 in the SCHL

1 Corinthians 10 in the SNT

1 Corinthians 10 in the SUSU

1 Corinthians 10 in the SUSU2

1 Corinthians 10 in the SYNO

1 Corinthians 10 in the TBIAOTANT

1 Corinthians 10 in the TBT1E

1 Corinthians 10 in the TBT1E2

1 Corinthians 10 in the TFTIP

1 Corinthians 10 in the TFTU

1 Corinthians 10 in the TGNTATF3T

1 Corinthians 10 in the THAI

1 Corinthians 10 in the TNFD

1 Corinthians 10 in the TNT

1 Corinthians 10 in the TNTIK

1 Corinthians 10 in the TNTIL

1 Corinthians 10 in the TNTIN

1 Corinthians 10 in the TNTIP

1 Corinthians 10 in the TNTIZ

1 Corinthians 10 in the TOMA

1 Corinthians 10 in the TTENT

1 Corinthians 10 in the UBG

1 Corinthians 10 in the UGV

1 Corinthians 10 in the UGV2

1 Corinthians 10 in the UGV3

1 Corinthians 10 in the VBL

1 Corinthians 10 in the VDCC

1 Corinthians 10 in the YALU

1 Corinthians 10 in the YAPE

1 Corinthians 10 in the YBVTP

1 Corinthians 10 in the ZBP