1 Corinthians 11 (BOLCB2)

1 Bolanda ndakisa na ngai, ndenge ngai nalandaka ndakisa ya Klisto. 2 Nakumisaka bino kati na makambo nyonso, pamba te bokanisaka ngai mpe bopengwaka te kati na malakisi oyo napesaki bino. 3 Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto. 4 Mobali nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali ya kozipama, ayokisaka Mokonzi na ye soni. 5 Kasi mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali polele, ayokisaka mokonzi na ye soni, pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki. 6 Mwasi oyo alataka kitambala te na moto na ye asengeli kokokola suki na ye. Kasi soki ezali soni mpo na mwasi kokatisa to kokokola suki, ekoleka malamu mpo na ye kolata kitambala na moto na ye. 7 Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe ; kasi mwasi azali lokumu ya mobali. 8 Pamba te mobali akelama te wuta na mwasi, kasi mwasi akelama wuta na mobali. 9 Mobali akelama te mpo na mwasi, kasi mwasi akelama mpo na mobali. 10 Yango wana, likolo ya ba-anjelu, mwasi asengeli kozala na elembo ya bokonzi na moto na ye. 11 Nzokande, kati na Nkolo, mwasi azali te soki mobali azali te, mpe mobali azali te soki mwasi azali te. 12 Pamba te ndenge mwasi akelamaki wuta na mobali, ndenge mpe mobali abotamaki na nzela ya mwasi. Kasi makambo nyonso ewutaka na Nzambe. 13 Botala nanu bino moko : boni, ezali malamu mpo na mwasi kosambela Nzambe moto polele ? 14 Boni, mokili yango moko eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi, 15 kasi ezali nde lokumu mpo na mwasi kozala na suki milayi ? Pamba te suki epesama na mwasi lokola kitambala. 16 Soki moto moko akanisi ete ezali malamu mpo na ye kotia tembe na tina na likambo oyo, biso elongo na Mangomba ya Nzambe tozalaka na ezaleli wana te. 17 Kati na malako oyo ezali kolanda, nakokumisa bino te ; pamba te mayangani na bino esungaka bino te mpo bokoma bato ya esengo koleka, kasi ekomisaka bino lisusu bato na pasi makasi. 18 Liboso, nazali koyoka ete bozalaka na bokabwani kati na bino, tango boyaka na mayangani ; mpe nazali kondima yango mwa moke. 19 Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino. 20 Boye, tango boyaka na mayangani, ezalaka lisusu te mpo na kolia bilei ya Nkolo ; 21 pamba te emonanaka ete, soki kaka bokomi na mesa, moto na moto awelaka nanu kolia bilei na ye moko ; mpe mpo na yango, bamoko batikalaka na nzala, mpe bamosusu balangwaka. 22 Boni, bozangi bandako oyo kati na yango bokoki kolia mpe komela ? Boni, bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe mpe kosambwisa bato oyo bazangi bilei ?Nini nakoki koloba na bino ? Nakumisa bino ? Na likambo oyo, nakokumisa bino te ! 23 Pamba te, nateyaki bino makambo oyo nazwaki epai ya Nkolo : Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki Ye, azwaki lipa ; 24 mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe alobaki : « Oyo ezali nzoto na Ngai ; epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. » 25 Ndenge moko mpe, sima na Ye kolia, azwaki kopo mpe alobaki : « Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai ! Tango nyonso bokobanda komela yango, bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. » 26 Boye, tango nyonso bokozala kolia lipa oyo mpe komela kopo oyo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino akozonga. 27 Yango wana, moto nyonso oyo akolia lipa to akomela kopo ya Nkolo na lolenge oyo ebongi te, akomema ngambo epai ya nzoto mpe makila ya Nkolo. 28 Boye tika ete moto nyonso amitala malamu liboso ya kolia lipa mpe komela wuta na kopo ! 29 Pamba te moto oyo azali kolia lipa mpe komela, na kozanga kososola ete ezali nzoto ya Nkolo, azali komikatela etumbu na kolia mpe komela bongo. 30 Yango wana mingi kati na bino bakoma na bolembu mpe na bokono, mpe ebele kati na bino bakufa. 31 Kasi soki tozalaki kososola oyo tozali, tolingaki kozwa etumbu te. 32 Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili. 33 Boye bandeko na ngai, tango boyaka na mayangani mpo na kolia elongo, bozelanaka. 34 Moto nyonso oyo azali na nzala asengeli nanu kolia na ndako na ye, mpo ete mayangani na bino ememela bino etumbu te. Mpe na tina na makambo oyo etikali, nakopesela yango malako tango nakoya.

In Other Versions

1 Corinthians 11 in the ANGEFD

1 Corinthians 11 in the ANTPNG2D

1 Corinthians 11 in the AS21

1 Corinthians 11 in the BAGH

1 Corinthians 11 in the BBPNG

1 Corinthians 11 in the BBT1E

1 Corinthians 11 in the BDS

1 Corinthians 11 in the BEV

1 Corinthians 11 in the BHAD

1 Corinthians 11 in the BIB

1 Corinthians 11 in the BLPT

1 Corinthians 11 in the BNT

1 Corinthians 11 in the BNTABOOT

1 Corinthians 11 in the BNTLV

1 Corinthians 11 in the BOATCB

1 Corinthians 11 in the BOATCB2

1 Corinthians 11 in the BOBCV

1 Corinthians 11 in the BOCNT

1 Corinthians 11 in the BOECS

1 Corinthians 11 in the BOGWICC

1 Corinthians 11 in the BOHCB

1 Corinthians 11 in the BOHCV

1 Corinthians 11 in the BOHLNT

1 Corinthians 11 in the BOHNTLTAL

1 Corinthians 11 in the BOICB

1 Corinthians 11 in the BOILNTAP

1 Corinthians 11 in the BOITCV

1 Corinthians 11 in the BOKCV

1 Corinthians 11 in the BOKCV2

1 Corinthians 11 in the BOKHWOG

1 Corinthians 11 in the BOKSSV

1 Corinthians 11 in the BOLCB

1 Corinthians 11 in the BOMCV

1 Corinthians 11 in the BONAV

1 Corinthians 11 in the BONCB

1 Corinthians 11 in the BONLT

1 Corinthians 11 in the BONUT2

1 Corinthians 11 in the BOPLNT

1 Corinthians 11 in the BOSCB

1 Corinthians 11 in the BOSNC

1 Corinthians 11 in the BOTLNT

1 Corinthians 11 in the BOVCB

1 Corinthians 11 in the BOYCB

1 Corinthians 11 in the BPBB

1 Corinthians 11 in the BPH

1 Corinthians 11 in the BSB

1 Corinthians 11 in the CCB

1 Corinthians 11 in the CUV

1 Corinthians 11 in the CUVS

1 Corinthians 11 in the DBT

1 Corinthians 11 in the DGDNT

1 Corinthians 11 in the DHNT

1 Corinthians 11 in the DNT

1 Corinthians 11 in the ELBE

1 Corinthians 11 in the EMTV

1 Corinthians 11 in the ESV

1 Corinthians 11 in the FBV

1 Corinthians 11 in the FEB

1 Corinthians 11 in the GGMNT

1 Corinthians 11 in the GNT

1 Corinthians 11 in the HARY

1 Corinthians 11 in the HNT

1 Corinthians 11 in the IRVA

1 Corinthians 11 in the IRVB

1 Corinthians 11 in the IRVG

1 Corinthians 11 in the IRVH

1 Corinthians 11 in the IRVK

1 Corinthians 11 in the IRVM

1 Corinthians 11 in the IRVM2

1 Corinthians 11 in the IRVO

1 Corinthians 11 in the IRVP

1 Corinthians 11 in the IRVT

1 Corinthians 11 in the IRVT2

1 Corinthians 11 in the IRVU

1 Corinthians 11 in the ISVN

1 Corinthians 11 in the JSNT

1 Corinthians 11 in the KAPI

1 Corinthians 11 in the KBT1ETNIK

1 Corinthians 11 in the KBV

1 Corinthians 11 in the KJV

1 Corinthians 11 in the KNFD

1 Corinthians 11 in the LBA

1 Corinthians 11 in the LBLA

1 Corinthians 11 in the LNT

1 Corinthians 11 in the LSV

1 Corinthians 11 in the MAAL

1 Corinthians 11 in the MBV

1 Corinthians 11 in the MBV2

1 Corinthians 11 in the MHNT

1 Corinthians 11 in the MKNFD

1 Corinthians 11 in the MNG

1 Corinthians 11 in the MNT

1 Corinthians 11 in the MNT2

1 Corinthians 11 in the MRS1T

1 Corinthians 11 in the NAA

1 Corinthians 11 in the NASB

1 Corinthians 11 in the NBLA

1 Corinthians 11 in the NBS

1 Corinthians 11 in the NBVTP

1 Corinthians 11 in the NET2

1 Corinthians 11 in the NIV11

1 Corinthians 11 in the NNT

1 Corinthians 11 in the NNT2

1 Corinthians 11 in the NNT3

1 Corinthians 11 in the PDDPT

1 Corinthians 11 in the PFNT

1 Corinthians 11 in the RMNT

1 Corinthians 11 in the SBIAS

1 Corinthians 11 in the SBIBS

1 Corinthians 11 in the SBIBS2

1 Corinthians 11 in the SBICS

1 Corinthians 11 in the SBIDS

1 Corinthians 11 in the SBIGS

1 Corinthians 11 in the SBIHS

1 Corinthians 11 in the SBIIS

1 Corinthians 11 in the SBIIS2

1 Corinthians 11 in the SBIIS3

1 Corinthians 11 in the SBIKS

1 Corinthians 11 in the SBIKS2

1 Corinthians 11 in the SBIMS

1 Corinthians 11 in the SBIOS

1 Corinthians 11 in the SBIPS

1 Corinthians 11 in the SBISS

1 Corinthians 11 in the SBITS

1 Corinthians 11 in the SBITS2

1 Corinthians 11 in the SBITS3

1 Corinthians 11 in the SBITS4

1 Corinthians 11 in the SBIUS

1 Corinthians 11 in the SBIVS

1 Corinthians 11 in the SBT

1 Corinthians 11 in the SBT1E

1 Corinthians 11 in the SCHL

1 Corinthians 11 in the SNT

1 Corinthians 11 in the SUSU

1 Corinthians 11 in the SUSU2

1 Corinthians 11 in the SYNO

1 Corinthians 11 in the TBIAOTANT

1 Corinthians 11 in the TBT1E

1 Corinthians 11 in the TBT1E2

1 Corinthians 11 in the TFTIP

1 Corinthians 11 in the TFTU

1 Corinthians 11 in the TGNTATF3T

1 Corinthians 11 in the THAI

1 Corinthians 11 in the TNFD

1 Corinthians 11 in the TNT

1 Corinthians 11 in the TNTIK

1 Corinthians 11 in the TNTIL

1 Corinthians 11 in the TNTIN

1 Corinthians 11 in the TNTIP

1 Corinthians 11 in the TNTIZ

1 Corinthians 11 in the TOMA

1 Corinthians 11 in the TTENT

1 Corinthians 11 in the UBG

1 Corinthians 11 in the UGV

1 Corinthians 11 in the UGV2

1 Corinthians 11 in the UGV3

1 Corinthians 11 in the VBL

1 Corinthians 11 in the VDCC

1 Corinthians 11 in the YALU

1 Corinthians 11 in the YAPE

1 Corinthians 11 in the YBVTP

1 Corinthians 11 in the ZBP