1 John 3 (BOLCB2)

1 Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe ! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te : ezali mpo ete eyebi Nzambe te. 2 Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka. 3 Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto. 4 Moto nyonso oyo asalaka masumu abukaka mibeko ya Nzambe ; pamba te kosala lisumu ezali : kobuka mibeko ya Nzambe. 5 Nzokande, boyebi malamu ete Klisto ayaki mpo na kolongola masumu ; mpe kati na Ye, lisumu ezali te. 6 Moto nyonso oyo azali moko na Klisto asalaka masumu te, mpe moto nyonso oyo asalaka masumu atikala nanu te komona mpe koyeba Yesu. 7 Bana na ngai, tika ete moto moko te akosa bino. Moto oyo atambolaka na bosembo azali sembo ndenge Ye moko Klisto azali sembo. 8 Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana. 9 Moto nyonso oyo akoma mwana na Nzambe akobaka te kosala masumu, pamba te nguya ya bomoi ya bonzambe ezali kosala kati na ye ; akoki te kokoba kosala masumu, pamba te azali mwana na Nzambe. 10 Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana : moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te. 11 Pamba te, tala Sango Malamu oyo boyokaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso. 12 Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye ? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo. 13 Bandeko na ngai, bokamwa te soki mokili ezali koyina bino. 14 Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa. 15 Moto nyonso oyo ayinaka ndeko na ye azali mobomi ; mpe boyebi malamu ete mobomi ata moko te azali na bomoi ya seko kati na ye. 16 Tala ndenge nini toyebi ndimbola ya bolingo : Yesu-Klisto akabaki bomoi na Ye mpo na biso. Boye biso mpe tosengeli kokaba bomoi na biso mpo na bandeko na biso. 17 Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ? 18 Bana na ngai, tika ete bolingo na biso esukaka kaka te na lolemo to na maloba ya sukali ; kasi tika ete emonisamaka nde na misala mpe na solo. 19 Ezali na ndenge wana nde tokoyeba ete tozali kati na solo, mpe mitema na biso ekotonda na elikya liboso ya Nzambe ; 20 pamba te soki ata mitema na biso elongisi biso te, toyebi ete Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi nyonso. 21 Balingami na ngai, soki mpe mitema na biso elongisi biso, tokozala kaka na elikya makasi na Nzambe. 22 Apesaka biso nyonso oyo tosengaka epai na Ye, pamba te totosaka mibeko na Ye mpe tosalaka makambo oyo esepelisaka Ye. 23 Mpe tala mobeko oyo apesa biso : kondima Yesu-Klisto, Mwana na Ye, mpe kolingana biso na biso, ndenge atindaki biso. 24 Moto oyo atosaka mibeko na Ye awumelaka kati na Nzambe, mpe Nzambe awumelaka kati na ye. Bongo ndenge nini toyebaka ete Nzambe azali kowumela kati na biso ? Ezali na nzela ya Molimo Mosantu oyo apesaki biso.

In Other Versions

1 John 3 in the ANGEFD

1 John 3 in the ANTPNG2D

1 John 3 in the AS21

1 John 3 in the BAGH

1 John 3 in the BBPNG

1 John 3 in the BBT1E

1 John 3 in the BDS

1 John 3 in the BEV

1 John 3 in the BHAD

1 John 3 in the BIB

1 John 3 in the BLPT

1 John 3 in the BNT

1 John 3 in the BNTABOOT

1 John 3 in the BNTLV

1 John 3 in the BOATCB

1 John 3 in the BOATCB2

1 John 3 in the BOBCV

1 John 3 in the BOCNT

1 John 3 in the BOECS

1 John 3 in the BOGWICC

1 John 3 in the BOHCB

1 John 3 in the BOHCV

1 John 3 in the BOHLNT

1 John 3 in the BOHNTLTAL

1 John 3 in the BOICB

1 John 3 in the BOILNTAP

1 John 3 in the BOITCV

1 John 3 in the BOKCV

1 John 3 in the BOKCV2

1 John 3 in the BOKHWOG

1 John 3 in the BOKSSV

1 John 3 in the BOLCB

1 John 3 in the BOMCV

1 John 3 in the BONAV

1 John 3 in the BONCB

1 John 3 in the BONLT

1 John 3 in the BONUT2

1 John 3 in the BOPLNT

1 John 3 in the BOSCB

1 John 3 in the BOSNC

1 John 3 in the BOTLNT

1 John 3 in the BOVCB

1 John 3 in the BOYCB

1 John 3 in the BPBB

1 John 3 in the BPH

1 John 3 in the BSB

1 John 3 in the CCB

1 John 3 in the CUV

1 John 3 in the CUVS

1 John 3 in the DBT

1 John 3 in the DGDNT

1 John 3 in the DHNT

1 John 3 in the DNT

1 John 3 in the ELBE

1 John 3 in the EMTV

1 John 3 in the ESV

1 John 3 in the FBV

1 John 3 in the FEB

1 John 3 in the GGMNT

1 John 3 in the GNT

1 John 3 in the HARY

1 John 3 in the HNT

1 John 3 in the IRVA

1 John 3 in the IRVB

1 John 3 in the IRVG

1 John 3 in the IRVH

1 John 3 in the IRVK

1 John 3 in the IRVM

1 John 3 in the IRVM2

1 John 3 in the IRVO

1 John 3 in the IRVP

1 John 3 in the IRVT

1 John 3 in the IRVT2

1 John 3 in the IRVU

1 John 3 in the ISVN

1 John 3 in the JSNT

1 John 3 in the KAPI

1 John 3 in the KBT1ETNIK

1 John 3 in the KBV

1 John 3 in the KJV

1 John 3 in the KNFD

1 John 3 in the LBA

1 John 3 in the LBLA

1 John 3 in the LNT

1 John 3 in the LSV

1 John 3 in the MAAL

1 John 3 in the MBV

1 John 3 in the MBV2

1 John 3 in the MHNT

1 John 3 in the MKNFD

1 John 3 in the MNG

1 John 3 in the MNT

1 John 3 in the MNT2

1 John 3 in the MRS1T

1 John 3 in the NAA

1 John 3 in the NASB

1 John 3 in the NBLA

1 John 3 in the NBS

1 John 3 in the NBVTP

1 John 3 in the NET2

1 John 3 in the NIV11

1 John 3 in the NNT

1 John 3 in the NNT2

1 John 3 in the NNT3

1 John 3 in the PDDPT

1 John 3 in the PFNT

1 John 3 in the RMNT

1 John 3 in the SBIAS

1 John 3 in the SBIBS

1 John 3 in the SBIBS2

1 John 3 in the SBICS

1 John 3 in the SBIDS

1 John 3 in the SBIGS

1 John 3 in the SBIHS

1 John 3 in the SBIIS

1 John 3 in the SBIIS2

1 John 3 in the SBIIS3

1 John 3 in the SBIKS

1 John 3 in the SBIKS2

1 John 3 in the SBIMS

1 John 3 in the SBIOS

1 John 3 in the SBIPS

1 John 3 in the SBISS

1 John 3 in the SBITS

1 John 3 in the SBITS2

1 John 3 in the SBITS3

1 John 3 in the SBITS4

1 John 3 in the SBIUS

1 John 3 in the SBIVS

1 John 3 in the SBT

1 John 3 in the SBT1E

1 John 3 in the SCHL

1 John 3 in the SNT

1 John 3 in the SUSU

1 John 3 in the SUSU2

1 John 3 in the SYNO

1 John 3 in the TBIAOTANT

1 John 3 in the TBT1E

1 John 3 in the TBT1E2

1 John 3 in the TFTIP

1 John 3 in the TFTU

1 John 3 in the TGNTATF3T

1 John 3 in the THAI

1 John 3 in the TNFD

1 John 3 in the TNT

1 John 3 in the TNTIK

1 John 3 in the TNTIL

1 John 3 in the TNTIN

1 John 3 in the TNTIP

1 John 3 in the TNTIZ

1 John 3 in the TOMA

1 John 3 in the TTENT

1 John 3 in the UBG

1 John 3 in the UGV

1 John 3 in the UGV2

1 John 3 in the UGV3

1 John 3 in the VBL

1 John 3 in the VDCC

1 John 3 in the YALU

1 John 3 in the YAPE

1 John 3 in the YBVTP

1 John 3 in the ZBP