1 Kings 21 (BOLCB2)

1 Sima na mwa tango, likama moko ekweyelaki Naboti, moto ya Jizireyeli, likolo ya elanga na ye ya vino oyo ezalaki na Jizireyeli, pembeni ya ndako ya Akabi, mokonzi na Samari. 2 Mokolo moko, Akabi alobaki na Naboti :— Pesa ngai elanga na yo ya vino mpo ete nakomisa yango elanga na ngai ya ndunda, pamba te ezali pene ya ndako na ngai ; mpe ngai nakopesa yo elanga mosusu ya vino oyo eleki kitoko na esika ya elanga na yo ; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango. 3 Kasi Naboti azongiselaki Akabi :— Na Kombo na Yawe, nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai. 4 Akabi azongaki epai na ye na mawa mpe na kanda mpo na maloba oyo Naboti, moto ya Jizireyeli, ayebisaki ye : « Nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai. » Alalaki na mbeto na ye, atalisaki elongi na ye na mir mpe aboyaki kolia. 5 Mwasi na ye, Jezabeli, ayaki epai na ye mpe atunaki ye :— Mpo na nini ozali na mawa mpe oboyi kolia ? 6 Akabi azongiselaki ye :— Ezali mpo ete tango nawuti epai ya Naboti ya Jizireyeli mpe nalobi na ye : « Tekela ngai elanga na yo ya vino ; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango. » Kasi ye azongiseli ngai : « Nakoki te kopesa yo elanga na ngai ya vino. » 7 Bongo mwasi na ye, Jezabeli, alobaki na ye :— Boni, ezali yo nde ozali mokonzi ya Isalaele to te ? Lamuka ! Lia mpe sepela ! Nakopesa yo elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli. 8 Boye, Jezabeli akomaki mikanda na kombo ya Akabi, atiaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango epai ya bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti. 9 Tala makambo oyo akomaki na mikanda yango :« Bobongisa mokolo moko ya kokila bilei mpe bobengisa bato na mayangani epai wapi bokotia Naboti na esika ya liboso. 10 Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo : ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. » 11 Boye, bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti batosaki mitindo oyo Jezabeli apesaki bango na nzela na mikanda. 12 Babongisaki mokolo ya kokila bilei mpe bavandisaki Naboti na esika ya liboso kati na bato. 13 Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! »Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga. 14 Bongo bampaka mpe bankumu batindaki maloba oyo epai ya Jezabeli : « Basili koboma Naboti na mabanga. » 15 Tango Jezabeli ayokaki ete babomi Naboti na mabanga, alobaki na Akabi : « Telema, kende kokamata elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli, elanga oyo aboyaki kotekela yo, pamba te Naboti azali lisusu na bomoi te, asili kokufa. » 16 Tango kaka Akabi ayokaki ete Naboti, moto ya Jizireyeli, asili kokufa, atelemaki mpe akendeki kokamata elanga ya vino ya Naboti. 17 Bongo Yawe alobaki na Eliya, moto ya Tishibe, maloba oyo : 18 « Kende kokutana na Akabi, mokonzi ya Isalaele, oyo azali kokonza wuta na Samari. Na ngonga oyo, azali kati na elanga ya vino ya Naboti epai wapi akendeki mpo na kokamata yango. 19 Okoyebisa ye makambo oyo : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te ? › Okobakisa lisusu : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › » 20 Tango Akabi amonaki Eliya, alobaki :— Ah, monguna na ngai, omoni ngai kaka !Eliya azongisaki :— Solo, namoni yo ; pamba te omitekaki yo moko mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe. 21 Boye, tala makambo oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo pasi ya makasi. Nakokombola bakitani na yo mpe nakolongola epai ya Akabi mwana mobali nyonso ya libota na yo : azala mowumbu to monsomi kati na Isalaele. 22 Nakokomisa ndako na yo lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe lokola ndako ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya ; pamba te opesi Ngai kanda mpe osali ete Isalaele asala masumu. » 23 Tala lisusu makambo oyo Yawe alobi na tina na Jezabeli : « Bambwa ekolia Jezabeli pene ya mir ya Jizireyeli. 24 Moto nyonso ya libota ya Akabi oyo akokufa kati na engumba, bambwa ekolia ye ; mpe oyo nyonso akokufa na zamba, bandeke ya likolo ekotobola-tobola ye. » 25 Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe. 26 Asalaki makambo ya nkele koleka na kosambela banzambe ya bikeko ndenge bato ya Amori oyo Yawe abenganaki liboso ya Isalaele bazalaki kosala. 27 Tango Akabi ayokaki makambo oyo, apasolaki bilamba na ye, alataki bilamba ya saki mpe akilaki bilei. Azalaki kolala na bilamba ya saki mpe azalaki kotambola malembe-malembe. 28 Bongo Yawe alobaki lisusu na Eliya, moto ya Tishibe : 29 « Omoni ndenge nini Akabi amikitisi liboso na Ngai ? Lokola amikitisi liboso na ngai, nakoyeisa pasi te wana ye akozala nanu na bomoi ; kasi nakotinda pasi yango na tango mwana na ye ya mobali akozala na bokonzi. »

In Other Versions

1 Kings 21 in the ANGEFD

1 Kings 21 in the ANTPNG2D

1 Kings 21 in the AS21

1 Kings 21 in the BAGH

1 Kings 21 in the BBPNG

1 Kings 21 in the BBT1E

1 Kings 21 in the BDS

1 Kings 21 in the BEV

1 Kings 21 in the BHAD

1 Kings 21 in the BIB

1 Kings 21 in the BLPT

1 Kings 21 in the BNT

1 Kings 21 in the BNTABOOT

1 Kings 21 in the BNTLV

1 Kings 21 in the BOATCB

1 Kings 21 in the BOATCB2

1 Kings 21 in the BOBCV

1 Kings 21 in the BOCNT

1 Kings 21 in the BOECS

1 Kings 21 in the BOGWICC

1 Kings 21 in the BOHCB

1 Kings 21 in the BOHCV

1 Kings 21 in the BOHLNT

1 Kings 21 in the BOHNTLTAL

1 Kings 21 in the BOICB

1 Kings 21 in the BOILNTAP

1 Kings 21 in the BOITCV

1 Kings 21 in the BOKCV

1 Kings 21 in the BOKCV2

1 Kings 21 in the BOKHWOG

1 Kings 21 in the BOKSSV

1 Kings 21 in the BOLCB

1 Kings 21 in the BOMCV

1 Kings 21 in the BONAV

1 Kings 21 in the BONCB

1 Kings 21 in the BONLT

1 Kings 21 in the BONUT2

1 Kings 21 in the BOPLNT

1 Kings 21 in the BOSCB

1 Kings 21 in the BOSNC

1 Kings 21 in the BOTLNT

1 Kings 21 in the BOVCB

1 Kings 21 in the BOYCB

1 Kings 21 in the BPBB

1 Kings 21 in the BPH

1 Kings 21 in the BSB

1 Kings 21 in the CCB

1 Kings 21 in the CUV

1 Kings 21 in the CUVS

1 Kings 21 in the DBT

1 Kings 21 in the DGDNT

1 Kings 21 in the DHNT

1 Kings 21 in the DNT

1 Kings 21 in the ELBE

1 Kings 21 in the EMTV

1 Kings 21 in the ESV

1 Kings 21 in the FBV

1 Kings 21 in the FEB

1 Kings 21 in the GGMNT

1 Kings 21 in the GNT

1 Kings 21 in the HARY

1 Kings 21 in the HNT

1 Kings 21 in the IRVA

1 Kings 21 in the IRVB

1 Kings 21 in the IRVG

1 Kings 21 in the IRVH

1 Kings 21 in the IRVK

1 Kings 21 in the IRVM

1 Kings 21 in the IRVM2

1 Kings 21 in the IRVO

1 Kings 21 in the IRVP

1 Kings 21 in the IRVT

1 Kings 21 in the IRVT2

1 Kings 21 in the IRVU

1 Kings 21 in the ISVN

1 Kings 21 in the JSNT

1 Kings 21 in the KAPI

1 Kings 21 in the KBT1ETNIK

1 Kings 21 in the KBV

1 Kings 21 in the KJV

1 Kings 21 in the KNFD

1 Kings 21 in the LBA

1 Kings 21 in the LBLA

1 Kings 21 in the LNT

1 Kings 21 in the LSV

1 Kings 21 in the MAAL

1 Kings 21 in the MBV

1 Kings 21 in the MBV2

1 Kings 21 in the MHNT

1 Kings 21 in the MKNFD

1 Kings 21 in the MNG

1 Kings 21 in the MNT

1 Kings 21 in the MNT2

1 Kings 21 in the MRS1T

1 Kings 21 in the NAA

1 Kings 21 in the NASB

1 Kings 21 in the NBLA

1 Kings 21 in the NBS

1 Kings 21 in the NBVTP

1 Kings 21 in the NET2

1 Kings 21 in the NIV11

1 Kings 21 in the NNT

1 Kings 21 in the NNT2

1 Kings 21 in the NNT3

1 Kings 21 in the PDDPT

1 Kings 21 in the PFNT

1 Kings 21 in the RMNT

1 Kings 21 in the SBIAS

1 Kings 21 in the SBIBS

1 Kings 21 in the SBIBS2

1 Kings 21 in the SBICS

1 Kings 21 in the SBIDS

1 Kings 21 in the SBIGS

1 Kings 21 in the SBIHS

1 Kings 21 in the SBIIS

1 Kings 21 in the SBIIS2

1 Kings 21 in the SBIIS3

1 Kings 21 in the SBIKS

1 Kings 21 in the SBIKS2

1 Kings 21 in the SBIMS

1 Kings 21 in the SBIOS

1 Kings 21 in the SBIPS

1 Kings 21 in the SBISS

1 Kings 21 in the SBITS

1 Kings 21 in the SBITS2

1 Kings 21 in the SBITS3

1 Kings 21 in the SBITS4

1 Kings 21 in the SBIUS

1 Kings 21 in the SBIVS

1 Kings 21 in the SBT

1 Kings 21 in the SBT1E

1 Kings 21 in the SCHL

1 Kings 21 in the SNT

1 Kings 21 in the SUSU

1 Kings 21 in the SUSU2

1 Kings 21 in the SYNO

1 Kings 21 in the TBIAOTANT

1 Kings 21 in the TBT1E

1 Kings 21 in the TBT1E2

1 Kings 21 in the TFTIP

1 Kings 21 in the TFTU

1 Kings 21 in the TGNTATF3T

1 Kings 21 in the THAI

1 Kings 21 in the TNFD

1 Kings 21 in the TNT

1 Kings 21 in the TNTIK

1 Kings 21 in the TNTIL

1 Kings 21 in the TNTIN

1 Kings 21 in the TNTIP

1 Kings 21 in the TNTIZ

1 Kings 21 in the TOMA

1 Kings 21 in the TTENT

1 Kings 21 in the UBG

1 Kings 21 in the UGV

1 Kings 21 in the UGV2

1 Kings 21 in the UGV3

1 Kings 21 in the VBL

1 Kings 21 in the VDCC

1 Kings 21 in the YALU

1 Kings 21 in the YAPE

1 Kings 21 in the YBVTP

1 Kings 21 in the ZBP