1 Samuel 11 (BOLCB2)

1 Naashi, moto ya Amoni, ayaki kotonga molako na ye liboso ya Yabeshi ya Galadi. Mpe bato nyonso ya engumba Yabeshi balobaki na Naashi :— Sala boyokani elongo na biso, mpe tokokoma bawumbu na yo. 2 Kasi Naashi, moto ya Amoni, azongisaki :— Nakoki kosala boyokani elongo na bino soki kaka bondimi ete natobola bino nyonso liso ya ngambo ya mobali. Na bongo, nakoyokisa Isalaele mobimba soni. 3 Bampaka ya Yabeshi balobaki na ye :— Pesa biso mikolo sambo mpo ete totinda bantoma kati na mokili mobimba ya Isalaele ; soki moto moko te ayei kobikisa biso, wana tokomikaba na maboko na yo. 4 Tango bantoma bakomaki na Gibea, engumba ya Saulo, mpe balobaki na bato makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bato nyonso balelaki makasi. 5 Kaka na tango yango, Saulo awutaki na bilanga, sima na bangombe na ye. Atunaki : « Likambo nini ya mabe ekweyeli bato mpo ete balela boye ? »Bayebisaki ye makambo nyonso oyo bato ya Yabeshi balobaki. 6 Tango Saulo ayokaki maloba na bango, Molimo na Nzambe akitelaki ye na nguya mpe asilikaki makasi. 7 Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo : « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. »Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko. 8 Saulo atangaki bango, na Bezeki ; motango ezalaki : mibali ya Isalaele nkoto nkama misato, mpe mibali ya Yuda nkoto tuku misato. 9 Balobaki na bantoma oyo bawutaki na Yabeshi : « Bokende koloba na mibali ya Yabeshi ya Galadi : ‹ Bokokangolama lobi, na tango moyi ekongala makasi. › »Tango bantoma bakendeki mpe bapesaki sango yango epai ya bato ya Yabeshi, bato yango basepelaki makasi. 10 Boye bato ya Yabeshi balobaki na bato ya Amoni : « Tokomikaba lobi na maboko na bino, mpe bokosala biso nyonso oyo bokomona ete ezali malamu. » 11 Mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki mibali na ye na masanga misato. Mpe liboso ete tongo etana, bakotaki na molako ya bato ya Amoni mpe babomaki bango kino na tango oyo moyi engalaki makasi. Bapanzaki bato oyo babikaki na lolenge oyo esalaki ete etikalaki ata na mibali mibale te kati na bango oyo bakobaki kozala esika moko. 12 Bato balobaki na Samuele :— Wapi bato oyo bazalaki koloba : « Boni, Saulo akoyangela biso ? » Bomemela biso bato yango mpo ete toboma bango. 13 Kasi Saulo alobaki :— Moto moko te akokufa na mokolo ya lelo, pamba te Yawe akangoli Isalaele na mokolo ya lelo. 14 Samuele alobaki na bato :— Boya ! Tokende na Giligali mpo na kovandisa kuna bokonzi ya Saulo. 15 Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.

In Other Versions

1 Samuel 11 in the ANGEFD

1 Samuel 11 in the ANTPNG2D

1 Samuel 11 in the AS21

1 Samuel 11 in the BAGH

1 Samuel 11 in the BBPNG

1 Samuel 11 in the BBT1E

1 Samuel 11 in the BDS

1 Samuel 11 in the BEV

1 Samuel 11 in the BHAD

1 Samuel 11 in the BIB

1 Samuel 11 in the BLPT

1 Samuel 11 in the BNT

1 Samuel 11 in the BNTABOOT

1 Samuel 11 in the BNTLV

1 Samuel 11 in the BOATCB

1 Samuel 11 in the BOATCB2

1 Samuel 11 in the BOBCV

1 Samuel 11 in the BOCNT

1 Samuel 11 in the BOECS

1 Samuel 11 in the BOGWICC

1 Samuel 11 in the BOHCB

1 Samuel 11 in the BOHCV

1 Samuel 11 in the BOHLNT

1 Samuel 11 in the BOHNTLTAL

1 Samuel 11 in the BOICB

1 Samuel 11 in the BOILNTAP

1 Samuel 11 in the BOITCV

1 Samuel 11 in the BOKCV

1 Samuel 11 in the BOKCV2

1 Samuel 11 in the BOKHWOG

1 Samuel 11 in the BOKSSV

1 Samuel 11 in the BOLCB

1 Samuel 11 in the BOMCV

1 Samuel 11 in the BONAV

1 Samuel 11 in the BONCB

1 Samuel 11 in the BONLT

1 Samuel 11 in the BONUT2

1 Samuel 11 in the BOPLNT

1 Samuel 11 in the BOSCB

1 Samuel 11 in the BOSNC

1 Samuel 11 in the BOTLNT

1 Samuel 11 in the BOVCB

1 Samuel 11 in the BOYCB

1 Samuel 11 in the BPBB

1 Samuel 11 in the BPH

1 Samuel 11 in the BSB

1 Samuel 11 in the CCB

1 Samuel 11 in the CUV

1 Samuel 11 in the CUVS

1 Samuel 11 in the DBT

1 Samuel 11 in the DGDNT

1 Samuel 11 in the DHNT

1 Samuel 11 in the DNT

1 Samuel 11 in the ELBE

1 Samuel 11 in the EMTV

1 Samuel 11 in the ESV

1 Samuel 11 in the FBV

1 Samuel 11 in the FEB

1 Samuel 11 in the GGMNT

1 Samuel 11 in the GNT

1 Samuel 11 in the HARY

1 Samuel 11 in the HNT

1 Samuel 11 in the IRVA

1 Samuel 11 in the IRVB

1 Samuel 11 in the IRVG

1 Samuel 11 in the IRVH

1 Samuel 11 in the IRVK

1 Samuel 11 in the IRVM

1 Samuel 11 in the IRVM2

1 Samuel 11 in the IRVO

1 Samuel 11 in the IRVP

1 Samuel 11 in the IRVT

1 Samuel 11 in the IRVT2

1 Samuel 11 in the IRVU

1 Samuel 11 in the ISVN

1 Samuel 11 in the JSNT

1 Samuel 11 in the KAPI

1 Samuel 11 in the KBT1ETNIK

1 Samuel 11 in the KBV

1 Samuel 11 in the KJV

1 Samuel 11 in the KNFD

1 Samuel 11 in the LBA

1 Samuel 11 in the LBLA

1 Samuel 11 in the LNT

1 Samuel 11 in the LSV

1 Samuel 11 in the MAAL

1 Samuel 11 in the MBV

1 Samuel 11 in the MBV2

1 Samuel 11 in the MHNT

1 Samuel 11 in the MKNFD

1 Samuel 11 in the MNG

1 Samuel 11 in the MNT

1 Samuel 11 in the MNT2

1 Samuel 11 in the MRS1T

1 Samuel 11 in the NAA

1 Samuel 11 in the NASB

1 Samuel 11 in the NBLA

1 Samuel 11 in the NBS

1 Samuel 11 in the NBVTP

1 Samuel 11 in the NET2

1 Samuel 11 in the NIV11

1 Samuel 11 in the NNT

1 Samuel 11 in the NNT2

1 Samuel 11 in the NNT3

1 Samuel 11 in the PDDPT

1 Samuel 11 in the PFNT

1 Samuel 11 in the RMNT

1 Samuel 11 in the SBIAS

1 Samuel 11 in the SBIBS

1 Samuel 11 in the SBIBS2

1 Samuel 11 in the SBICS

1 Samuel 11 in the SBIDS

1 Samuel 11 in the SBIGS

1 Samuel 11 in the SBIHS

1 Samuel 11 in the SBIIS

1 Samuel 11 in the SBIIS2

1 Samuel 11 in the SBIIS3

1 Samuel 11 in the SBIKS

1 Samuel 11 in the SBIKS2

1 Samuel 11 in the SBIMS

1 Samuel 11 in the SBIOS

1 Samuel 11 in the SBIPS

1 Samuel 11 in the SBISS

1 Samuel 11 in the SBITS

1 Samuel 11 in the SBITS2

1 Samuel 11 in the SBITS3

1 Samuel 11 in the SBITS4

1 Samuel 11 in the SBIUS

1 Samuel 11 in the SBIVS

1 Samuel 11 in the SBT

1 Samuel 11 in the SBT1E

1 Samuel 11 in the SCHL

1 Samuel 11 in the SNT

1 Samuel 11 in the SUSU

1 Samuel 11 in the SUSU2

1 Samuel 11 in the SYNO

1 Samuel 11 in the TBIAOTANT

1 Samuel 11 in the TBT1E

1 Samuel 11 in the TBT1E2

1 Samuel 11 in the TFTIP

1 Samuel 11 in the TFTU

1 Samuel 11 in the TGNTATF3T

1 Samuel 11 in the THAI

1 Samuel 11 in the TNFD

1 Samuel 11 in the TNT

1 Samuel 11 in the TNTIK

1 Samuel 11 in the TNTIL

1 Samuel 11 in the TNTIN

1 Samuel 11 in the TNTIP

1 Samuel 11 in the TNTIZ

1 Samuel 11 in the TOMA

1 Samuel 11 in the TTENT

1 Samuel 11 in the UBG

1 Samuel 11 in the UGV

1 Samuel 11 in the UGV2

1 Samuel 11 in the UGV3

1 Samuel 11 in the VBL

1 Samuel 11 in the VDCC

1 Samuel 11 in the YALU

1 Samuel 11 in the YAPE

1 Samuel 11 in the YBVTP

1 Samuel 11 in the ZBP