1 Samuel 30 (BOLCB2)

1 Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango. 2 Bakangaki na bowumbu basi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna, ezala bilenge to mikolo, kasi babomaki moko te kati na bango. Bamemaki bango mpe bazongelaki nzela na bango. 3 Tango Davidi mpe bato na ye bakomaki na engumba Tsikilagi, bakutaki yango ebebisama na moto. Basi na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakomaki bawumbu. 4 Davidi mpe bato na ye balelaki makasi kino bazangaki makasi ya kolela. 5 Bamemaki mpe na bowumbu basi mibale ya Davidi : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, moto ya Karimeli, oyo akufisaki mobali, Nabali. 6 Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye. 7 Boye Davidi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki : « Memela ngai efode. » Mpe Abiatari amemelaki ye yango. 8 Bongo Davidi atunaki Yawe :— Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi ? Nakokoka na ngai kokanga bango ?Yawe azongiselaki ye :— Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami. 9 Davidi akendeki elongo na basoda na ye, nkama motoba. Bakomaki na moluka ya lubwaku ya Besori epai wapi ba-oyo bazalaki kotikala na sima batelemaki ; 10 pamba te mibali nkama mibale balembaki makasi, bongo bakokaki te kokatisa moluka. Kasi Davidi elongo na basoda na ye, nkama minei, bakobaki kolanda. 11 Basoda ya Davidi bakutanaki na mobali moko ya Ejipito kati na zamba mpe bamemaki ye epai ya Davidi. Bapesaki ye mayi ya komela mpe biloko ya kolia. 12 Bapesaki ye gato basala na bambuma ya figi mpe maboke mibale ya bambuma ya vino ekawuka. Sima na ye kolia yango, azwaki lisusu makasi, pamba te aliaki te mpe amelaki te wuta mikolo misato mpe babutu misato. 13 Davidi atunaki ye :— Ozali na ngambo ya banani mpe owuti wapi ?Azongiselaki ye :— Nazali moto ya Ejipito mpe mowumbu ya moto moko ya Amaleki. Esali mikolo misato wuta nkolo na ngai atikalaki kosundola ngai mpo ete nazalaki kobela. 14 Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi ; mpe totumbaki na moto Tsikilagi. 15 Davidi atunaki ye :— Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali ?Azongisaki :— Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai ; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali. 16 Boye amemaki Davidi na esika oyo bato ya Amaleki bazalaki. Mpe bamonaki ete bazalaki ya kopanzana na mboka mobimba, bazalaki kolia, komela mpe kobina mpo na ebele ya bomengo ya bitumba oyo babotolaki na mokili ya bato ya Filisitia mpe ya Yuda. 17 Davidi alongaki bango kobanda na tongo kino na pokwa ya mokolo oyo elandaki. Moko te abikaki, longola kaka bilenge mibali nkama minei oyo bamataki na likolo ya bashamo mpe bakimaki. 18 Davidi akangolaki biloko nyonso oyo bato ya Amaleki bazwaki elongo na basi na ye mibale. 19 Moto na bango moko te azangaki : ezala elenge, mokolo, mwana mobali, mwana mwasi, eloko moko kati na bomengo ya bitumba to eloko moko kati na biloko oyo babotolaki bango. Davidi azongaki na biloko nyonso. 20 Davidi akamataki bameme mpe bangombe nyonso. Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya bibwele mpo na kolakisa yango nzela bazalaki koloba : « Tala bomengo ya bitumba ya Davidi. » 21 Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote. 22 Kasi kati na bato oyo bakendeki elongo na Davidi, bato nyonso ya mabe mpe batomboki balobaki :— Lokola bakendeki na biso te, tokoki kokabola na bango te bomengo ya bitumba. Tika ete moto na moto azwa kaka mwasi na ye elongo na bana na ye mpe akende. 23 Kasi Davidi alobaki :— Te, bandeko na ngai ya mibali ! Bokoki kosala boye te mpo na biloko oyo Yawe apesi biso ! Pamba te abateli biso mpe akabi na maboko na biso mampinga nyonso oyo eyaki kobundisa biso. 24 Nani akoki kondima bino na makambo oyo bozali koloba ? Eteni ya moto oyo atikalaki kokengela biloko mpe eteni ya moto oyo akendeki na bitumba esengeli kozala ndenge moko. Tokokabola nyonso ndenge moko. 25 Kobanda mokolo wana kino lelo, Davidi akomisaki yango mobeko mpe malako kati na Isalaele. 26 Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki : « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. » 27 Atindaki ndambo epai ya ba-oyo bazalaki na Beteli, na ngambo ya sude ya Ramoti mpe na Yatiri ; 28 mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Aroeri, na Sipimoti, na Eshitemoa ; 29 mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Rakali, kati na bingumba ya bato ya Yerameeli, ya bato ya Keni ; 30 epai ya ba-oyo bazalaki na Orima, na Bori-Ashani, na Ataki ; 31 epai ya ba-oyo bazalaki na Ebron mpe na bisika nyonso oyo Davidi mpe bato na ye balekaki.

In Other Versions

1 Samuel 30 in the ANGEFD

1 Samuel 30 in the ANTPNG2D

1 Samuel 30 in the AS21

1 Samuel 30 in the BAGH

1 Samuel 30 in the BBPNG

1 Samuel 30 in the BBT1E

1 Samuel 30 in the BDS

1 Samuel 30 in the BEV

1 Samuel 30 in the BHAD

1 Samuel 30 in the BIB

1 Samuel 30 in the BLPT

1 Samuel 30 in the BNT

1 Samuel 30 in the BNTABOOT

1 Samuel 30 in the BNTLV

1 Samuel 30 in the BOATCB

1 Samuel 30 in the BOATCB2

1 Samuel 30 in the BOBCV

1 Samuel 30 in the BOCNT

1 Samuel 30 in the BOECS

1 Samuel 30 in the BOGWICC

1 Samuel 30 in the BOHCB

1 Samuel 30 in the BOHCV

1 Samuel 30 in the BOHLNT

1 Samuel 30 in the BOHNTLTAL

1 Samuel 30 in the BOICB

1 Samuel 30 in the BOILNTAP

1 Samuel 30 in the BOITCV

1 Samuel 30 in the BOKCV

1 Samuel 30 in the BOKCV2

1 Samuel 30 in the BOKHWOG

1 Samuel 30 in the BOKSSV

1 Samuel 30 in the BOLCB

1 Samuel 30 in the BOMCV

1 Samuel 30 in the BONAV

1 Samuel 30 in the BONCB

1 Samuel 30 in the BONLT

1 Samuel 30 in the BONUT2

1 Samuel 30 in the BOPLNT

1 Samuel 30 in the BOSCB

1 Samuel 30 in the BOSNC

1 Samuel 30 in the BOTLNT

1 Samuel 30 in the BOVCB

1 Samuel 30 in the BOYCB

1 Samuel 30 in the BPBB

1 Samuel 30 in the BPH

1 Samuel 30 in the BSB

1 Samuel 30 in the CCB

1 Samuel 30 in the CUV

1 Samuel 30 in the CUVS

1 Samuel 30 in the DBT

1 Samuel 30 in the DGDNT

1 Samuel 30 in the DHNT

1 Samuel 30 in the DNT

1 Samuel 30 in the ELBE

1 Samuel 30 in the EMTV

1 Samuel 30 in the ESV

1 Samuel 30 in the FBV

1 Samuel 30 in the FEB

1 Samuel 30 in the GGMNT

1 Samuel 30 in the GNT

1 Samuel 30 in the HARY

1 Samuel 30 in the HNT

1 Samuel 30 in the IRVA

1 Samuel 30 in the IRVB

1 Samuel 30 in the IRVG

1 Samuel 30 in the IRVH

1 Samuel 30 in the IRVK

1 Samuel 30 in the IRVM

1 Samuel 30 in the IRVM2

1 Samuel 30 in the IRVO

1 Samuel 30 in the IRVP

1 Samuel 30 in the IRVT

1 Samuel 30 in the IRVT2

1 Samuel 30 in the IRVU

1 Samuel 30 in the ISVN

1 Samuel 30 in the JSNT

1 Samuel 30 in the KAPI

1 Samuel 30 in the KBT1ETNIK

1 Samuel 30 in the KBV

1 Samuel 30 in the KJV

1 Samuel 30 in the KNFD

1 Samuel 30 in the LBA

1 Samuel 30 in the LBLA

1 Samuel 30 in the LNT

1 Samuel 30 in the LSV

1 Samuel 30 in the MAAL

1 Samuel 30 in the MBV

1 Samuel 30 in the MBV2

1 Samuel 30 in the MHNT

1 Samuel 30 in the MKNFD

1 Samuel 30 in the MNG

1 Samuel 30 in the MNT

1 Samuel 30 in the MNT2

1 Samuel 30 in the MRS1T

1 Samuel 30 in the NAA

1 Samuel 30 in the NASB

1 Samuel 30 in the NBLA

1 Samuel 30 in the NBS

1 Samuel 30 in the NBVTP

1 Samuel 30 in the NET2

1 Samuel 30 in the NIV11

1 Samuel 30 in the NNT

1 Samuel 30 in the NNT2

1 Samuel 30 in the NNT3

1 Samuel 30 in the PDDPT

1 Samuel 30 in the PFNT

1 Samuel 30 in the RMNT

1 Samuel 30 in the SBIAS

1 Samuel 30 in the SBIBS

1 Samuel 30 in the SBIBS2

1 Samuel 30 in the SBICS

1 Samuel 30 in the SBIDS

1 Samuel 30 in the SBIGS

1 Samuel 30 in the SBIHS

1 Samuel 30 in the SBIIS

1 Samuel 30 in the SBIIS2

1 Samuel 30 in the SBIIS3

1 Samuel 30 in the SBIKS

1 Samuel 30 in the SBIKS2

1 Samuel 30 in the SBIMS

1 Samuel 30 in the SBIOS

1 Samuel 30 in the SBIPS

1 Samuel 30 in the SBISS

1 Samuel 30 in the SBITS

1 Samuel 30 in the SBITS2

1 Samuel 30 in the SBITS3

1 Samuel 30 in the SBITS4

1 Samuel 30 in the SBIUS

1 Samuel 30 in the SBIVS

1 Samuel 30 in the SBT

1 Samuel 30 in the SBT1E

1 Samuel 30 in the SCHL

1 Samuel 30 in the SNT

1 Samuel 30 in the SUSU

1 Samuel 30 in the SUSU2

1 Samuel 30 in the SYNO

1 Samuel 30 in the TBIAOTANT

1 Samuel 30 in the TBT1E

1 Samuel 30 in the TBT1E2

1 Samuel 30 in the TFTIP

1 Samuel 30 in the TFTU

1 Samuel 30 in the TGNTATF3T

1 Samuel 30 in the THAI

1 Samuel 30 in the TNFD

1 Samuel 30 in the TNT

1 Samuel 30 in the TNTIK

1 Samuel 30 in the TNTIL

1 Samuel 30 in the TNTIN

1 Samuel 30 in the TNTIP

1 Samuel 30 in the TNTIZ

1 Samuel 30 in the TOMA

1 Samuel 30 in the TTENT

1 Samuel 30 in the UBG

1 Samuel 30 in the UGV

1 Samuel 30 in the UGV2

1 Samuel 30 in the UGV3

1 Samuel 30 in the VBL

1 Samuel 30 in the VDCC

1 Samuel 30 in the YALU

1 Samuel 30 in the YAPE

1 Samuel 30 in the YBVTP

1 Samuel 30 in the ZBP