1 Samuel 8 (BOLCB2)

1 Tango Samuele akomaki mobange, aponaki bana na ye ya mibali mpo ete bazala basambisi kati na Isalaele. 2 Kombo ya mwana na ye ya liboso ya mobali ezalaki « Joeli, » mpe ya mibale, « Abiya. » Bazalaki kosala mosala na bango na Beri-Sheba, 3 kasi batambolaki te na nzela ya Samuele, tata na bango : bamipesaki na lokoso ya mbongo, na kozwaka kanyaka mpe na kokataka makambo na bosembo te. 4 Mpo na yango, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele basanganaki elongo mpe bakendeki epai ya Samuele, na Rama. 5 Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. » 6 Kasi tango balobaki : « Pesa biso mokonzi oyo akokamba biso, » Samuele asepelaki na likambo yango te ; boye asambelaki Yawe. 7 Mpe Yawe azongiselaki Samuele : « Yoka makambo nyonso oyo bato bazali koloba na yo. Ezali yo te nde basundoli, kasi basundoli nde Ngai lokola Mokonzi na bango. 8 Bazali kosala yo ndenge kaka basalaki Ngai, banda mokolo oyo nabimisaki bango na Ejipito kino lelo : basundolaki Ngai mpe basalelaki banzambe mosusu. 9 Sik’oyo, yoka bango ; kasi kebisa bango malamu mpe yebisa bango makambo nyonso oyo mokonzi oyo akokonza bango akobanda kosala. » 10 Samuele ayebisaki bato oyo bazalaki kosenga ye mokonzi maloba nyonso ya Yawe. 11 Alobaki na bango :— Tala makambo oyo mokonzi oyo akokonza bino akobanda kosala : Akozwa bana na bino ya mibali mpe akotia bango na mosala ya kokumba bashar na ye kati na basoda na ye oyo babundaka na bampunda ; bakobanda kokima mbangu liboso ya shar na ye lokola bakengeli ya mokonzi. 12 Akotia bamoko, bakonzi ya bankoto ya basoda ; bamosusu, bakonzi ya basoda tuku mitano ; bamosusu, akotia bango na mosala ya kobalola mabele ya bilanga na ye, kobuka bambuma na ye mpe kosalela ye bibundeli ya bitumba mpe bisalelo mpo na bashar na ye. 13 Akokamata bana na bino ya basi mpo ete basalaka malasi, balambaka bilei mpe mapa. 14 Akokamata bilanga na bino ya vino mpe ya olive oyo eleki kitoko, mpe akopesa yango epai ya basali na ye. 15 Akokamata eteni ya zomi ya milona na bino mpe ya bilanga na bino ya vino, mpe akopesa yango epai ya kalaka na ye ya lokumu mpe epai ya basali na ye. 16 Bongo, kati na basali na bino ya mibali, basali na bino ya basi, bilenge na bino mpe ba-ane na bino, akokamata ba-oyo baleki kitoko mpo na misala na ye. 17 Akokamata eteni ya zomi ya bameme na bino, mpe bino moko bokokoma bawumbu na ye. 18 Bongo na mokolo wana, tango bokobanda kolelalela mpo na mokonzi oyo bino moko bokomiponela, na mokolo yango, Yawe akoyanola bino ata moke te. 19 Kasi bato baboyaki koyokela Samuele, balobaki :— Te ! Biso tolingi kaka mokonzi. 20 Na bongo, biso mpe tokozala lokola bikolo mosusu. Mokonzi na biso akokamba biso, akobima liboso na biso mpe akotambolisa biso na bitumba. 21 Tango Samuele ayokaki maloba nyonso ya bato, amemaki yango liboso ya Yawe. 22 Mpe Yawe alobaki na Samuele : « Yokela bango mpe pesa bango mokonzi ! »Bongo Samuele alobaki na bato ya Isalaele : « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye ! »

In Other Versions

1 Samuel 8 in the ANGEFD

1 Samuel 8 in the ANTPNG2D

1 Samuel 8 in the AS21

1 Samuel 8 in the BAGH

1 Samuel 8 in the BBPNG

1 Samuel 8 in the BBT1E

1 Samuel 8 in the BDS

1 Samuel 8 in the BEV

1 Samuel 8 in the BHAD

1 Samuel 8 in the BIB

1 Samuel 8 in the BLPT

1 Samuel 8 in the BNT

1 Samuel 8 in the BNTABOOT

1 Samuel 8 in the BNTLV

1 Samuel 8 in the BOATCB

1 Samuel 8 in the BOATCB2

1 Samuel 8 in the BOBCV

1 Samuel 8 in the BOCNT

1 Samuel 8 in the BOECS

1 Samuel 8 in the BOGWICC

1 Samuel 8 in the BOHCB

1 Samuel 8 in the BOHCV

1 Samuel 8 in the BOHLNT

1 Samuel 8 in the BOHNTLTAL

1 Samuel 8 in the BOICB

1 Samuel 8 in the BOILNTAP

1 Samuel 8 in the BOITCV

1 Samuel 8 in the BOKCV

1 Samuel 8 in the BOKCV2

1 Samuel 8 in the BOKHWOG

1 Samuel 8 in the BOKSSV

1 Samuel 8 in the BOLCB

1 Samuel 8 in the BOMCV

1 Samuel 8 in the BONAV

1 Samuel 8 in the BONCB

1 Samuel 8 in the BONLT

1 Samuel 8 in the BONUT2

1 Samuel 8 in the BOPLNT

1 Samuel 8 in the BOSCB

1 Samuel 8 in the BOSNC

1 Samuel 8 in the BOTLNT

1 Samuel 8 in the BOVCB

1 Samuel 8 in the BOYCB

1 Samuel 8 in the BPBB

1 Samuel 8 in the BPH

1 Samuel 8 in the BSB

1 Samuel 8 in the CCB

1 Samuel 8 in the CUV

1 Samuel 8 in the CUVS

1 Samuel 8 in the DBT

1 Samuel 8 in the DGDNT

1 Samuel 8 in the DHNT

1 Samuel 8 in the DNT

1 Samuel 8 in the ELBE

1 Samuel 8 in the EMTV

1 Samuel 8 in the ESV

1 Samuel 8 in the FBV

1 Samuel 8 in the FEB

1 Samuel 8 in the GGMNT

1 Samuel 8 in the GNT

1 Samuel 8 in the HARY

1 Samuel 8 in the HNT

1 Samuel 8 in the IRVA

1 Samuel 8 in the IRVB

1 Samuel 8 in the IRVG

1 Samuel 8 in the IRVH

1 Samuel 8 in the IRVK

1 Samuel 8 in the IRVM

1 Samuel 8 in the IRVM2

1 Samuel 8 in the IRVO

1 Samuel 8 in the IRVP

1 Samuel 8 in the IRVT

1 Samuel 8 in the IRVT2

1 Samuel 8 in the IRVU

1 Samuel 8 in the ISVN

1 Samuel 8 in the JSNT

1 Samuel 8 in the KAPI

1 Samuel 8 in the KBT1ETNIK

1 Samuel 8 in the KBV

1 Samuel 8 in the KJV

1 Samuel 8 in the KNFD

1 Samuel 8 in the LBA

1 Samuel 8 in the LBLA

1 Samuel 8 in the LNT

1 Samuel 8 in the LSV

1 Samuel 8 in the MAAL

1 Samuel 8 in the MBV

1 Samuel 8 in the MBV2

1 Samuel 8 in the MHNT

1 Samuel 8 in the MKNFD

1 Samuel 8 in the MNG

1 Samuel 8 in the MNT

1 Samuel 8 in the MNT2

1 Samuel 8 in the MRS1T

1 Samuel 8 in the NAA

1 Samuel 8 in the NASB

1 Samuel 8 in the NBLA

1 Samuel 8 in the NBS

1 Samuel 8 in the NBVTP

1 Samuel 8 in the NET2

1 Samuel 8 in the NIV11

1 Samuel 8 in the NNT

1 Samuel 8 in the NNT2

1 Samuel 8 in the NNT3

1 Samuel 8 in the PDDPT

1 Samuel 8 in the PFNT

1 Samuel 8 in the RMNT

1 Samuel 8 in the SBIAS

1 Samuel 8 in the SBIBS

1 Samuel 8 in the SBIBS2

1 Samuel 8 in the SBICS

1 Samuel 8 in the SBIDS

1 Samuel 8 in the SBIGS

1 Samuel 8 in the SBIHS

1 Samuel 8 in the SBIIS

1 Samuel 8 in the SBIIS2

1 Samuel 8 in the SBIIS3

1 Samuel 8 in the SBIKS

1 Samuel 8 in the SBIKS2

1 Samuel 8 in the SBIMS

1 Samuel 8 in the SBIOS

1 Samuel 8 in the SBIPS

1 Samuel 8 in the SBISS

1 Samuel 8 in the SBITS

1 Samuel 8 in the SBITS2

1 Samuel 8 in the SBITS3

1 Samuel 8 in the SBITS4

1 Samuel 8 in the SBIUS

1 Samuel 8 in the SBIVS

1 Samuel 8 in the SBT

1 Samuel 8 in the SBT1E

1 Samuel 8 in the SCHL

1 Samuel 8 in the SNT

1 Samuel 8 in the SUSU

1 Samuel 8 in the SUSU2

1 Samuel 8 in the SYNO

1 Samuel 8 in the TBIAOTANT

1 Samuel 8 in the TBT1E

1 Samuel 8 in the TBT1E2

1 Samuel 8 in the TFTIP

1 Samuel 8 in the TFTU

1 Samuel 8 in the TGNTATF3T

1 Samuel 8 in the THAI

1 Samuel 8 in the TNFD

1 Samuel 8 in the TNT

1 Samuel 8 in the TNTIK

1 Samuel 8 in the TNTIL

1 Samuel 8 in the TNTIN

1 Samuel 8 in the TNTIP

1 Samuel 8 in the TNTIZ

1 Samuel 8 in the TOMA

1 Samuel 8 in the TTENT

1 Samuel 8 in the UBG

1 Samuel 8 in the UGV

1 Samuel 8 in the UGV2

1 Samuel 8 in the UGV3

1 Samuel 8 in the VBL

1 Samuel 8 in the VDCC

1 Samuel 8 in the YALU

1 Samuel 8 in the YAPE

1 Samuel 8 in the YBVTP

1 Samuel 8 in the ZBP