2 Chronicles 28 (BOLCB2)

1 Akazi azalaki na mibu tuku mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; nzokande, Davidi, koko na ye, asalaki makambo ya sembo. 2 Alandaki banzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki kutu banzambe ya bikeko ya bibende banyangwisa na moto mpo na banzambe Bala. 3 Atumbaki mbeka ya malasi kati na Lubwaku ya Beni-Inomi mpe abonzaki bana na ye ya mibali na moto kolanda misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bana ya Isalaele. 4 Abonzaki bambeka mpe atumbaki mbeka ya malasi, na bisambelo ya likolo ya bangomba, na bangomba mike mpe na se ya banzete ya mibesu. 5 Yawe, Nzambe na ye, akabaki ye na maboko ya mokonzi ya Siri. Bato ya Siri babetaki ye, bazwaki bato na ye ebele na bowumbu mpe bamemaki bango na Damasi. Nzambe akabaki ye lisusu na maboko ya mokonzi ya Isalaele, oyo abebisaki biloko na ye mpe alongaki ye. 6 Na mokolo moko, Peka, mwana mobali ya Remalia, abomaki basoda nkoto nkama moko na tuku mibale kati na Yuda, bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko ; pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango. 7 Zikiri, moto ya bitumba ya Efrayimi, abomaki Maaseya, mwana mobali ya mokonzi ; Azirikami, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; mpe Elikana, molandi ya mokonzi. 8 Bato ya Isalaele bakangaki kati na bandeko na bango bato nkoto nkama mibale : basi, bana mibali mpe bana basi ; bazwaki bomengo ebele ya bitumba mpe bamemaki yango na Samari. 9 Kuna na Samari, ezalaki na mosakoli moko ya Yawe, kombo na ye « Odedi. » Abimaki liboso ya mampinga tango bazalaki kozonga na Samari mpe alobaki na bango : « Tala, na kanda makasi na Ye mpo na Yuda, Yawe, Nzambe ya batata na bino, akabi bango na maboko na bino, mpe bobomi bango na kanda oyo ekomi kino na likolo. 10 Mpe sik’oyo, bolingi kokomisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi bawumbu na bino ? Kasi bino moko, bozali mpe na ngambo te liboso ya Yawe, Nzambe na bino ? 11 Boyoka ngai sik’oyo ! Bozongisa bandeko na bino, oyo bokangi lokola bawumbu, pamba te kanda makasi ya Yawe ezali likolo na bino. » 12 Kati na bakambi ya Efrayimi, bamosusu batelemelaki ba-oyo bawutaki na bitumba. Ezalaki Azaria, mwana mobali ya Yoanani ; Berekia, mwana mobali ya Meshilemoti ; Ezekiasi, mwana mobali ya Shalumi ; mpe Amasa, mwana mobali ya Adilayi. 13 Balobaki na bango : « Bosengeli te komema bakangami oyo awa, soki te tokomema ngambo epai na Yawe. Boni, bolingi lisusu kobakisa masumu mpe ngambo na biso ! Ngambo na biso eleki penza monene, mpe kanda makasi ya Yawe ezali likolo ya Isalaele. » 14 Basoda batikaki bakangami mpe bomengo ya bitumba na miso ya bakambi mpe ya lisanga mobimba. 15 Sima, bato oyo baponaki na bakombo na bango bazwaki bakangami mpe balendisaki bango ; bazwaki kati na bomengo ya bitumba bilamba, mpe balatisaki ba-oyo nyonso bazalaki bolumbu. Bapesaki bango bilamba, basapato, bilei mpe masanga ; mpe bapakolaki ba-oyo bazokaki kisi, bamemaki na likolo ya ba-ane ba-oyo bakokaki kotambola te mpe bazongisaki bango na Jeriko, engumba ya banzete ya mbila, epai ya bandeko na bango. Sima, bazongaki na Samari. 16 Na tango yango, mokonzi Akazi atindaki bato epai ya bakonzi ya Asiri mpo na kosenga lisungi. 17 Bato ya Edomi bayaki lisusu kobundisa Yuda mpe bamemaki bakangami, 18 wana bato ya Filisitia bakotaki na makasi kati na bingumba ya etando mpe ya sude ya Yuda. Bazwaki na makasi Beti-Shemeshi, Ayaloni, Gederoti, Soko, Timina mpe Gimizo elongo na bamboka na yango ya zingazinga, mpe bavandaki kuna. 19 Yawe asambwisaki Yuda likolo ya Akazi, mokonzi ya Isalaele, pamba te atindikaki bato ya Yuda na mabe mpe azangaki boyengebene liboso ya Yawe. 20 Na esika ya kosunga ye, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa ye mpe azwaki ye lokola monguna. 21 Akazi azwaki ndambo ya biloko ya Tempelo ya Yawe, ya ndako ya mokonzi mpe ya bandako ya bakambi ; mpe apesaki yango epai ya mokonzi ya Asiri. Kasi atako bongo, azwaki kaka lisungi te. 22 Wana azalaki kati na pasi, mokonzi Akazi akobaki lisusu kosala makambo ya nkele na miso ya Yawe : 23 abonzaki bambeka epai ya banzambe ya Damasi oyo elongaki ye, pamba te amilobelaki : « Lokola banzambe ya bakonzi ya Siri bayaka kosunga bato na bango, ngai mpe nakobonzela bango bambeka mpo ete baya kosunga ngai ! »Kasi esalaki ete ye akweyisama, Isalaele mobimba mpe ekweyisama. 24 Akazi asangisaki bisalelo nyonso ya Tempelo ya Nzambe mpe abukaki-bukaki yango. Akangaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe atongaki bitumbelo na babalabala nyonso ya Yelusalemi. 25 Kati na bingumba nyonso ya Yuda, asalaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na kobonza mbeka ya malasi epai ya banzambe mosusu. Na bongo, apesaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, kanda makasi. 26 Makambo mosusu oyo etali mokonzi Akazi mpe etamboli na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele. 27 Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba Yelusalemi, kasi kati na bakunda ya bakonzi ya Isalaele te. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

2 Chronicles 28 in the ANGEFD

2 Chronicles 28 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 28 in the AS21

2 Chronicles 28 in the BAGH

2 Chronicles 28 in the BBPNG

2 Chronicles 28 in the BBT1E

2 Chronicles 28 in the BDS

2 Chronicles 28 in the BEV

2 Chronicles 28 in the BHAD

2 Chronicles 28 in the BIB

2 Chronicles 28 in the BLPT

2 Chronicles 28 in the BNT

2 Chronicles 28 in the BNTABOOT

2 Chronicles 28 in the BNTLV

2 Chronicles 28 in the BOATCB

2 Chronicles 28 in the BOATCB2

2 Chronicles 28 in the BOBCV

2 Chronicles 28 in the BOCNT

2 Chronicles 28 in the BOECS

2 Chronicles 28 in the BOGWICC

2 Chronicles 28 in the BOHCB

2 Chronicles 28 in the BOHCV

2 Chronicles 28 in the BOHLNT

2 Chronicles 28 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 28 in the BOICB

2 Chronicles 28 in the BOILNTAP

2 Chronicles 28 in the BOITCV

2 Chronicles 28 in the BOKCV

2 Chronicles 28 in the BOKCV2

2 Chronicles 28 in the BOKHWOG

2 Chronicles 28 in the BOKSSV

2 Chronicles 28 in the BOLCB

2 Chronicles 28 in the BOMCV

2 Chronicles 28 in the BONAV

2 Chronicles 28 in the BONCB

2 Chronicles 28 in the BONLT

2 Chronicles 28 in the BONUT2

2 Chronicles 28 in the BOPLNT

2 Chronicles 28 in the BOSCB

2 Chronicles 28 in the BOSNC

2 Chronicles 28 in the BOTLNT

2 Chronicles 28 in the BOVCB

2 Chronicles 28 in the BOYCB

2 Chronicles 28 in the BPBB

2 Chronicles 28 in the BPH

2 Chronicles 28 in the BSB

2 Chronicles 28 in the CCB

2 Chronicles 28 in the CUV

2 Chronicles 28 in the CUVS

2 Chronicles 28 in the DBT

2 Chronicles 28 in the DGDNT

2 Chronicles 28 in the DHNT

2 Chronicles 28 in the DNT

2 Chronicles 28 in the ELBE

2 Chronicles 28 in the EMTV

2 Chronicles 28 in the ESV

2 Chronicles 28 in the FBV

2 Chronicles 28 in the FEB

2 Chronicles 28 in the GGMNT

2 Chronicles 28 in the GNT

2 Chronicles 28 in the HARY

2 Chronicles 28 in the HNT

2 Chronicles 28 in the IRVA

2 Chronicles 28 in the IRVB

2 Chronicles 28 in the IRVG

2 Chronicles 28 in the IRVH

2 Chronicles 28 in the IRVK

2 Chronicles 28 in the IRVM

2 Chronicles 28 in the IRVM2

2 Chronicles 28 in the IRVO

2 Chronicles 28 in the IRVP

2 Chronicles 28 in the IRVT

2 Chronicles 28 in the IRVT2

2 Chronicles 28 in the IRVU

2 Chronicles 28 in the ISVN

2 Chronicles 28 in the JSNT

2 Chronicles 28 in the KAPI

2 Chronicles 28 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 28 in the KBV

2 Chronicles 28 in the KJV

2 Chronicles 28 in the KNFD

2 Chronicles 28 in the LBA

2 Chronicles 28 in the LBLA

2 Chronicles 28 in the LNT

2 Chronicles 28 in the LSV

2 Chronicles 28 in the MAAL

2 Chronicles 28 in the MBV

2 Chronicles 28 in the MBV2

2 Chronicles 28 in the MHNT

2 Chronicles 28 in the MKNFD

2 Chronicles 28 in the MNG

2 Chronicles 28 in the MNT

2 Chronicles 28 in the MNT2

2 Chronicles 28 in the MRS1T

2 Chronicles 28 in the NAA

2 Chronicles 28 in the NASB

2 Chronicles 28 in the NBLA

2 Chronicles 28 in the NBS

2 Chronicles 28 in the NBVTP

2 Chronicles 28 in the NET2

2 Chronicles 28 in the NIV11

2 Chronicles 28 in the NNT

2 Chronicles 28 in the NNT2

2 Chronicles 28 in the NNT3

2 Chronicles 28 in the PDDPT

2 Chronicles 28 in the PFNT

2 Chronicles 28 in the RMNT

2 Chronicles 28 in the SBIAS

2 Chronicles 28 in the SBIBS

2 Chronicles 28 in the SBIBS2

2 Chronicles 28 in the SBICS

2 Chronicles 28 in the SBIDS

2 Chronicles 28 in the SBIGS

2 Chronicles 28 in the SBIHS

2 Chronicles 28 in the SBIIS

2 Chronicles 28 in the SBIIS2

2 Chronicles 28 in the SBIIS3

2 Chronicles 28 in the SBIKS

2 Chronicles 28 in the SBIKS2

2 Chronicles 28 in the SBIMS

2 Chronicles 28 in the SBIOS

2 Chronicles 28 in the SBIPS

2 Chronicles 28 in the SBISS

2 Chronicles 28 in the SBITS

2 Chronicles 28 in the SBITS2

2 Chronicles 28 in the SBITS3

2 Chronicles 28 in the SBITS4

2 Chronicles 28 in the SBIUS

2 Chronicles 28 in the SBIVS

2 Chronicles 28 in the SBT

2 Chronicles 28 in the SBT1E

2 Chronicles 28 in the SCHL

2 Chronicles 28 in the SNT

2 Chronicles 28 in the SUSU

2 Chronicles 28 in the SUSU2

2 Chronicles 28 in the SYNO

2 Chronicles 28 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 28 in the TBT1E

2 Chronicles 28 in the TBT1E2

2 Chronicles 28 in the TFTIP

2 Chronicles 28 in the TFTU

2 Chronicles 28 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 28 in the THAI

2 Chronicles 28 in the TNFD

2 Chronicles 28 in the TNT

2 Chronicles 28 in the TNTIK

2 Chronicles 28 in the TNTIL

2 Chronicles 28 in the TNTIN

2 Chronicles 28 in the TNTIP

2 Chronicles 28 in the TNTIZ

2 Chronicles 28 in the TOMA

2 Chronicles 28 in the TTENT

2 Chronicles 28 in the UBG

2 Chronicles 28 in the UGV

2 Chronicles 28 in the UGV2

2 Chronicles 28 in the UGV3

2 Chronicles 28 in the VBL

2 Chronicles 28 in the VDCC

2 Chronicles 28 in the YALU

2 Chronicles 28 in the YAPE

2 Chronicles 28 in the YBVTP

2 Chronicles 28 in the ZBP