2 Chronicles 32 (BOLCB2)

1 Sima na Ezekiasi kotalisa boyengebene na ye epai ya Nzambe, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Yuda. Azingelaki bingumba batonga makasi, pamba te azalaki na posa ya kobotola yango. 2 Tango Ezekiasi amonaki ete Senakeribe ayei mpe azali na makanisi ya kobundisa Yelusalemi, 3 apesaki bakalaka mpe bakonzi ya basoda na ye likanisi ya kokanga bitima oyo ezalaki na libanda ya engumba. Bango nyonso bandimaki likanisi yango mpe basungaki ye. 4 Bato ebele basanganaki mpe bakangaki bitima nyonso elongo na mayi oyo ezalaki kotiola na se ya mabele. Balobaki :— Mpo na nini bakonzi ya Asiri baya kokuta mayi ebele ? 5 Ezekiasi asalaki mosala makasi ya kobamba madusu ya mir mpe ya kobakisa bosanda ya bandako milayi ; atongaki mir mosusu na libanda, alendisaki mir ya engumba ya Davidi mpe asalaki lisusu makonga mpe banguba ebele. 6 Atiaki bakonzi ya basoda mpo ete bakamba bato mpe asangisaki bango liboso na ye, na esika oyo ezali pene ya ekuke ya engumba. Alendisaki bango na maloba oyo : 7 — Bozala makasi mpe boyika mpiko ! Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mokonzi ya Asiri mpe ya mampinga ya basoda ebele oyo bazali elongo na ye, pamba te Ye oyo azali elongo na biso azali na nguya monene koleka ye. 8 Mokonzi oyo ya Asiri azali kaka na nguya ya bomoto ; kasi biso, tozali elongo na Yawe, Nzambe na biso, oyo akosunga mpe akobundela biso bitumba.Boye bato batiaki elikya na maloba oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alobaki. 9 Sima na yango, wana Senakeribe, mokonzi ya Asiri, elongo na mampinga ya basoda na ye nyonso bazingelaki engumba Lakishi, atindaki bakonzi ya basoda na ye epai ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpe epai ya bato nyonso ya Yuda, oyo bazalaki na Yelusalemi ; atindaki bango kopesa sango oyo : 10 « Tala makambo oyo Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alobi : Botie elikya na bino na nini mpo ete bowumela kati na Yelusalemi oyo bazingeli ? 11 Bozali komona te ete Ezekiasi azali kokosa bino mpo ete bokufa na nzala mpe na posa ya mayi tango azali koloba : ‹ Yawe, Nzambe na biso, akokangola biso na loboko ya mokonzi ya Asiri ? › 12 Boni, ezali kaka Ezekiasi wana te oyo alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo ya banzambe tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‹ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo moko kaka mpe kobonza mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo yango ? › 13 Boyebi te makambo oyo ngai mpe batata na ngai tosalaki bato nyonso ya bikolo mosusu ? Boni, banzambe ya bikolo wana bakokaki solo kokangola mikili na bango na maboko na ngai ? 14 Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo batata na ngai babebisaki, nani akokaki kokangola bato na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Nzambe na bino akoka solo kokangola bino na maboko na ngai ? 15 Sik’oyo, botika te ete Ezekiasi amema bino na libunga mpe akosa bino ndenge wana ; bondimela ye te ! Pamba te soki nzambe moko te ya ekolo songolo to ya mokili pakala alongaki kokangola bato na ye na loboko na ngai mpe na loboko ya batata na ngai, bongo nzambe na bino nde akolonga kokangola bino na loboko na ngai ? » 16 Bakonzi ya basoda ya Senakeribe bakobaki koloba mabe na tina na Yawe Nzambe mpe Ezekiasi, mosali na Ye. 17 Senakeribe akomaki lisusu mikanda mpo na kofinga Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala maloba mabe oyo akomaki na tina na Ye :« Ndenge banzambe ya bato ya bikolo mosusu balongaki te kokangola bato na bango, ndenge wana mpe nzambe ya Ezekiasi akolonga te kokangola bato na ye na maboko na ngai. » 18 Boye bagangaki na lokota ya Ebre mpo na kolengisa mpe kobangisa bato ya Yelusalemi oyo batelemaki likolo ya mir, mpo ete bakoka kobotola engumba. 19 Balobaki na tina na Nzambe ya Yelusalemi lokola bato oyo bazali kolobela nzambe moko ya bapagano, nzambe oyo bato basali na ndenge mpe na maboko na bango ! 20 Mokonzi Ezekiasi mpe mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, babondelaki Nzambe na tina na yango mpe bagangaki na ngambo ya Lola mpo na kosenga lisungi. 21 Yawe atindaki anjelu moko oyo abomaki basoda nyonso ya mpiko, bakonzi ya basoda elongo na bakambi kati molako ya mokonzi ya Asiri. Mokonzi ya Asiri azongaki na mokili na ye na soni makasi. Mpe tango akotaki na ndako ya nzambe na ye, bana na ye ya mibali babomaki ye na mopanga. 22 Ezalaki ndenge wana nde Yawe akangolaki Ezekiasi mpe bato ya Yelusalemi na maboko ya Senakeribe, mokonzi ya Asiri, mpe na maboko ya banguna mosusu ; mpe apesaki bango kimia na bangambo nyonso. 23 Bato ebele bamemaki na Yelusalemi makabo mpo na Yawe mpe bakado ya motuya mpo na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda. Wuta tango wana, lokumu ya Ezekiasi emataki makasi na miso ya bikolo nyonso. 24 Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Asambelaki Yawe ; mpe Yawe ayanolaki, apesaki ye elembo moko ya kokamwa. 25 Kasi mpo ete Ezekiasi akomaki na lolendo, atambolaki lisusu te na lolenge ya kondima bolamu ya Nzambe mpe ya kozongisela Ye matondi ; mpo na yango, Yawe asilikelaki ye, Yuda mpe Yelusalemi. 26 Bongo Ezekiasi amikitisaki, atikaki lolendo na ye mpe abongolaki motema. Bato ya Yelusalemi mpe basalaki lokola Ezekiasi. Boye, Yawe akweyiselaki bango kanda na Ye te na mikolo nyonso oyo Ezekiasi azalaki mokonzi. 27 Ezekiasi azalaki na bozwi ebele mpe na lokumu mingi, abombaki palata, wolo, mabanga ya talo, biloko ya solo kitoko, banguba mpe biloko nyonso ya talo. 28 Atongaki bibombelo ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta ; atongaki lisusu mapango mpe bandako mpo na bibwele na ye. 29 Atongaki bingumba mpe akomaki na bibwele ebele : bantaba, bameme mpe bangombe. Nzambe apesaki ye bozwi mingi. 30 Ezali mpe Ezekiasi moto akangaki monoko ya etima ya Giyoni mpe alekisaki mayi na yango na se ya mabele, na ngambo ya weste ya engumba ya Davidi. Ezekiasi azalaki kolonga na misala na ye nyonso. 31 Kasi tango bakambi ya Babiloni batindelaki ye bakalaka mpo na kotuna ye na tina na elembo ya kokamwa oyo esalemaki kati na mokili, Nzambe atikaki Ezekiasi kosala na ndenge na ye moko mpo na komeka ye mpe koyeba mozindo ya motema na ye. 32 Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Nzambe, ekomama kati na emoniseli ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, mpe kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele. 33 Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na ngomba moke epai wapi bakunda ya bakitani ya Davidi ezali. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bapesaki ye lokumu tango akufaki, mpe Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

2 Chronicles 32 in the ANGEFD

2 Chronicles 32 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 32 in the AS21

2 Chronicles 32 in the BAGH

2 Chronicles 32 in the BBPNG

2 Chronicles 32 in the BBT1E

2 Chronicles 32 in the BDS

2 Chronicles 32 in the BEV

2 Chronicles 32 in the BHAD

2 Chronicles 32 in the BIB

2 Chronicles 32 in the BLPT

2 Chronicles 32 in the BNT

2 Chronicles 32 in the BNTABOOT

2 Chronicles 32 in the BNTLV

2 Chronicles 32 in the BOATCB

2 Chronicles 32 in the BOATCB2

2 Chronicles 32 in the BOBCV

2 Chronicles 32 in the BOCNT

2 Chronicles 32 in the BOECS

2 Chronicles 32 in the BOGWICC

2 Chronicles 32 in the BOHCB

2 Chronicles 32 in the BOHCV

2 Chronicles 32 in the BOHLNT

2 Chronicles 32 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 32 in the BOICB

2 Chronicles 32 in the BOILNTAP

2 Chronicles 32 in the BOITCV

2 Chronicles 32 in the BOKCV

2 Chronicles 32 in the BOKCV2

2 Chronicles 32 in the BOKHWOG

2 Chronicles 32 in the BOKSSV

2 Chronicles 32 in the BOLCB

2 Chronicles 32 in the BOMCV

2 Chronicles 32 in the BONAV

2 Chronicles 32 in the BONCB

2 Chronicles 32 in the BONLT

2 Chronicles 32 in the BONUT2

2 Chronicles 32 in the BOPLNT

2 Chronicles 32 in the BOSCB

2 Chronicles 32 in the BOSNC

2 Chronicles 32 in the BOTLNT

2 Chronicles 32 in the BOVCB

2 Chronicles 32 in the BOYCB

2 Chronicles 32 in the BPBB

2 Chronicles 32 in the BPH

2 Chronicles 32 in the BSB

2 Chronicles 32 in the CCB

2 Chronicles 32 in the CUV

2 Chronicles 32 in the CUVS

2 Chronicles 32 in the DBT

2 Chronicles 32 in the DGDNT

2 Chronicles 32 in the DHNT

2 Chronicles 32 in the DNT

2 Chronicles 32 in the ELBE

2 Chronicles 32 in the EMTV

2 Chronicles 32 in the ESV

2 Chronicles 32 in the FBV

2 Chronicles 32 in the FEB

2 Chronicles 32 in the GGMNT

2 Chronicles 32 in the GNT

2 Chronicles 32 in the HARY

2 Chronicles 32 in the HNT

2 Chronicles 32 in the IRVA

2 Chronicles 32 in the IRVB

2 Chronicles 32 in the IRVG

2 Chronicles 32 in the IRVH

2 Chronicles 32 in the IRVK

2 Chronicles 32 in the IRVM

2 Chronicles 32 in the IRVM2

2 Chronicles 32 in the IRVO

2 Chronicles 32 in the IRVP

2 Chronicles 32 in the IRVT

2 Chronicles 32 in the IRVT2

2 Chronicles 32 in the IRVU

2 Chronicles 32 in the ISVN

2 Chronicles 32 in the JSNT

2 Chronicles 32 in the KAPI

2 Chronicles 32 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 32 in the KBV

2 Chronicles 32 in the KJV

2 Chronicles 32 in the KNFD

2 Chronicles 32 in the LBA

2 Chronicles 32 in the LBLA

2 Chronicles 32 in the LNT

2 Chronicles 32 in the LSV

2 Chronicles 32 in the MAAL

2 Chronicles 32 in the MBV

2 Chronicles 32 in the MBV2

2 Chronicles 32 in the MHNT

2 Chronicles 32 in the MKNFD

2 Chronicles 32 in the MNG

2 Chronicles 32 in the MNT

2 Chronicles 32 in the MNT2

2 Chronicles 32 in the MRS1T

2 Chronicles 32 in the NAA

2 Chronicles 32 in the NASB

2 Chronicles 32 in the NBLA

2 Chronicles 32 in the NBS

2 Chronicles 32 in the NBVTP

2 Chronicles 32 in the NET2

2 Chronicles 32 in the NIV11

2 Chronicles 32 in the NNT

2 Chronicles 32 in the NNT2

2 Chronicles 32 in the NNT3

2 Chronicles 32 in the PDDPT

2 Chronicles 32 in the PFNT

2 Chronicles 32 in the RMNT

2 Chronicles 32 in the SBIAS

2 Chronicles 32 in the SBIBS

2 Chronicles 32 in the SBIBS2

2 Chronicles 32 in the SBICS

2 Chronicles 32 in the SBIDS

2 Chronicles 32 in the SBIGS

2 Chronicles 32 in the SBIHS

2 Chronicles 32 in the SBIIS

2 Chronicles 32 in the SBIIS2

2 Chronicles 32 in the SBIIS3

2 Chronicles 32 in the SBIKS

2 Chronicles 32 in the SBIKS2

2 Chronicles 32 in the SBIMS

2 Chronicles 32 in the SBIOS

2 Chronicles 32 in the SBIPS

2 Chronicles 32 in the SBISS

2 Chronicles 32 in the SBITS

2 Chronicles 32 in the SBITS2

2 Chronicles 32 in the SBITS3

2 Chronicles 32 in the SBITS4

2 Chronicles 32 in the SBIUS

2 Chronicles 32 in the SBIVS

2 Chronicles 32 in the SBT

2 Chronicles 32 in the SBT1E

2 Chronicles 32 in the SCHL

2 Chronicles 32 in the SNT

2 Chronicles 32 in the SUSU

2 Chronicles 32 in the SUSU2

2 Chronicles 32 in the SYNO

2 Chronicles 32 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 32 in the TBT1E

2 Chronicles 32 in the TBT1E2

2 Chronicles 32 in the TFTIP

2 Chronicles 32 in the TFTU

2 Chronicles 32 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 32 in the THAI

2 Chronicles 32 in the TNFD

2 Chronicles 32 in the TNT

2 Chronicles 32 in the TNTIK

2 Chronicles 32 in the TNTIL

2 Chronicles 32 in the TNTIN

2 Chronicles 32 in the TNTIP

2 Chronicles 32 in the TNTIZ

2 Chronicles 32 in the TOMA

2 Chronicles 32 in the TTENT

2 Chronicles 32 in the UBG

2 Chronicles 32 in the UGV

2 Chronicles 32 in the UGV2

2 Chronicles 32 in the UGV3

2 Chronicles 32 in the VBL

2 Chronicles 32 in the VDCC

2 Chronicles 32 in the YALU

2 Chronicles 32 in the YAPE

2 Chronicles 32 in the YBVTP

2 Chronicles 32 in the ZBP