2 Corinthians 9 (BOLCB2)

1 Mpo na ngai, ezali na tina te ya kokomela bino na tina na lisungi ya kopesa na basantu, 2 pamba te nayebi molende na bino mpo na kosunga, mpe nazalaki komikumisa na tina na yango epai ya bato ya Masedwane. Nazalaki koloba na bango : « Kati na Akayi, wuta na mobu oyo eleki, bazali ya kobongama mpo na kopesa. » Mpe bolingo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga. 3 Kasi nazali kotindela bino bandeko mpo ete, na likambo yango, lolendo na biso na tina na bino emonana te lokola ya pamba, kasi mpo ete bozala penza ya kobongama, ndenge kaka nalobaki yango. 4 Pamba te soki bato ya Masedwane bayei elongo na ngai mpe bakuti bino bozali ya kobongama te, tokoyoka penza soni, mpo ete tozali penza kotiela bino motema ; mpe ekozala soni na biso kaka te, kasi soni na bino mpe lokola. 5 Yango wana, namonaki ete ezali malamu kosenga na bandeko yango ete bakoma epai na bino liboso na ngai, mpo na kobongisa makabo oyo bolakaki. Boye ekomizalela tango ngai nakokoma, mpe ekolakisa ete bopesaki yango na esengo mpe na bonsomi, kasi na makasi te. 6 Bokanisaka likambo oyo : Moto oyo alonaka moke abukaka mpe moke, mpe moto oyo alonaka ebele abukaka mpe ebele. 7 Tika ete moko na moko kati na bino apesa oyo akanaki kopesa kati na motema na ye, na mawa te mpe na makasi te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo. 8 Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso, 9 kolanda ndenge ekomama :« Akabelaka babola na motema ya esengo,mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela. » 10 Mpe Ye oyo apesaka nkona epai ya moloni mpe lipa lokola bilei akopesa lisusu, akofulukisa nkona na bino mpe akokolisa bambuma ya bosembo na bino. 11 Boye bokokoma bazwi ya biloko nyonso mpo ete bokoka kokabaka tango nyonso ; bongo bato epai ya banani tokopesa makabo na bino bakozongisa matondi epai ya Nzambe. 12 Pamba te lotomo ya makabo na bino ezali kaka te mpo na kokokisa bosenga ya basantu, kasi ezali mpe mpo ete matondi mingi ezonga epai ya Nzambe. 13 Mpo ete lotomo yango ekotalisa bosolo ya komipesa na bino, basantu bakokumisa Nzambe mpo na botosi ya kondima na bino kati na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na esengo oyo mitema na bino ezali na yango mpo na kokabola biloko na bino elongo na bango mpe elongo na bato nyonso. 14 Mpe bakosambela mpo na bino, mpo na kolakisa bolingo makasi oyo bazali na yango mpo na bino, likolo ya ngolu monene oyo Nzambe apesa bino. 15 Tika ete matondi epesamela Nzambe mpo na likabo na Ye, oyo bato bakoki kolimbola te !

In Other Versions

2 Corinthians 9 in the ANGEFD

2 Corinthians 9 in the ANTPNG2D

2 Corinthians 9 in the AS21

2 Corinthians 9 in the BAGH

2 Corinthians 9 in the BBPNG

2 Corinthians 9 in the BBT1E

2 Corinthians 9 in the BDS

2 Corinthians 9 in the BEV

2 Corinthians 9 in the BHAD

2 Corinthians 9 in the BIB

2 Corinthians 9 in the BLPT

2 Corinthians 9 in the BNT

2 Corinthians 9 in the BNTABOOT

2 Corinthians 9 in the BNTLV

2 Corinthians 9 in the BOATCB

2 Corinthians 9 in the BOATCB2

2 Corinthians 9 in the BOBCV

2 Corinthians 9 in the BOCNT

2 Corinthians 9 in the BOECS

2 Corinthians 9 in the BOGWICC

2 Corinthians 9 in the BOHCB

2 Corinthians 9 in the BOHCV

2 Corinthians 9 in the BOHLNT

2 Corinthians 9 in the BOHNTLTAL

2 Corinthians 9 in the BOICB

2 Corinthians 9 in the BOILNTAP

2 Corinthians 9 in the BOITCV

2 Corinthians 9 in the BOKCV

2 Corinthians 9 in the BOKCV2

2 Corinthians 9 in the BOKHWOG

2 Corinthians 9 in the BOKSSV

2 Corinthians 9 in the BOLCB

2 Corinthians 9 in the BOMCV

2 Corinthians 9 in the BONAV

2 Corinthians 9 in the BONCB

2 Corinthians 9 in the BONLT

2 Corinthians 9 in the BONUT2

2 Corinthians 9 in the BOPLNT

2 Corinthians 9 in the BOSCB

2 Corinthians 9 in the BOSNC

2 Corinthians 9 in the BOTLNT

2 Corinthians 9 in the BOVCB

2 Corinthians 9 in the BOYCB

2 Corinthians 9 in the BPBB

2 Corinthians 9 in the BPH

2 Corinthians 9 in the BSB

2 Corinthians 9 in the CCB

2 Corinthians 9 in the CUV

2 Corinthians 9 in the CUVS

2 Corinthians 9 in the DBT

2 Corinthians 9 in the DGDNT

2 Corinthians 9 in the DHNT

2 Corinthians 9 in the DNT

2 Corinthians 9 in the ELBE

2 Corinthians 9 in the EMTV

2 Corinthians 9 in the ESV

2 Corinthians 9 in the FBV

2 Corinthians 9 in the FEB

2 Corinthians 9 in the GGMNT

2 Corinthians 9 in the GNT

2 Corinthians 9 in the HARY

2 Corinthians 9 in the HNT

2 Corinthians 9 in the IRVA

2 Corinthians 9 in the IRVB

2 Corinthians 9 in the IRVG

2 Corinthians 9 in the IRVH

2 Corinthians 9 in the IRVK

2 Corinthians 9 in the IRVM

2 Corinthians 9 in the IRVM2

2 Corinthians 9 in the IRVO

2 Corinthians 9 in the IRVP

2 Corinthians 9 in the IRVT

2 Corinthians 9 in the IRVT2

2 Corinthians 9 in the IRVU

2 Corinthians 9 in the ISVN

2 Corinthians 9 in the JSNT

2 Corinthians 9 in the KAPI

2 Corinthians 9 in the KBT1ETNIK

2 Corinthians 9 in the KBV

2 Corinthians 9 in the KJV

2 Corinthians 9 in the KNFD

2 Corinthians 9 in the LBA

2 Corinthians 9 in the LBLA

2 Corinthians 9 in the LNT

2 Corinthians 9 in the LSV

2 Corinthians 9 in the MAAL

2 Corinthians 9 in the MBV

2 Corinthians 9 in the MBV2

2 Corinthians 9 in the MHNT

2 Corinthians 9 in the MKNFD

2 Corinthians 9 in the MNG

2 Corinthians 9 in the MNT

2 Corinthians 9 in the MNT2

2 Corinthians 9 in the MRS1T

2 Corinthians 9 in the NAA

2 Corinthians 9 in the NASB

2 Corinthians 9 in the NBLA

2 Corinthians 9 in the NBS

2 Corinthians 9 in the NBVTP

2 Corinthians 9 in the NET2

2 Corinthians 9 in the NIV11

2 Corinthians 9 in the NNT

2 Corinthians 9 in the NNT2

2 Corinthians 9 in the NNT3

2 Corinthians 9 in the PDDPT

2 Corinthians 9 in the PFNT

2 Corinthians 9 in the RMNT

2 Corinthians 9 in the SBIAS

2 Corinthians 9 in the SBIBS

2 Corinthians 9 in the SBIBS2

2 Corinthians 9 in the SBICS

2 Corinthians 9 in the SBIDS

2 Corinthians 9 in the SBIGS

2 Corinthians 9 in the SBIHS

2 Corinthians 9 in the SBIIS

2 Corinthians 9 in the SBIIS2

2 Corinthians 9 in the SBIIS3

2 Corinthians 9 in the SBIKS

2 Corinthians 9 in the SBIKS2

2 Corinthians 9 in the SBIMS

2 Corinthians 9 in the SBIOS

2 Corinthians 9 in the SBIPS

2 Corinthians 9 in the SBISS

2 Corinthians 9 in the SBITS

2 Corinthians 9 in the SBITS2

2 Corinthians 9 in the SBITS3

2 Corinthians 9 in the SBITS4

2 Corinthians 9 in the SBIUS

2 Corinthians 9 in the SBIVS

2 Corinthians 9 in the SBT

2 Corinthians 9 in the SBT1E

2 Corinthians 9 in the SCHL

2 Corinthians 9 in the SNT

2 Corinthians 9 in the SUSU

2 Corinthians 9 in the SUSU2

2 Corinthians 9 in the SYNO

2 Corinthians 9 in the TBIAOTANT

2 Corinthians 9 in the TBT1E

2 Corinthians 9 in the TBT1E2

2 Corinthians 9 in the TFTIP

2 Corinthians 9 in the TFTU

2 Corinthians 9 in the TGNTATF3T

2 Corinthians 9 in the THAI

2 Corinthians 9 in the TNFD

2 Corinthians 9 in the TNT

2 Corinthians 9 in the TNTIK

2 Corinthians 9 in the TNTIL

2 Corinthians 9 in the TNTIN

2 Corinthians 9 in the TNTIP

2 Corinthians 9 in the TNTIZ

2 Corinthians 9 in the TOMA

2 Corinthians 9 in the TTENT

2 Corinthians 9 in the UBG

2 Corinthians 9 in the UGV

2 Corinthians 9 in the UGV2

2 Corinthians 9 in the UGV3

2 Corinthians 9 in the VBL

2 Corinthians 9 in the VDCC

2 Corinthians 9 in the YALU

2 Corinthians 9 in the YAPE

2 Corinthians 9 in the YBVTP

2 Corinthians 9 in the ZBP