2 Kings 10 (BOLCB2)

1 Akabi azalaki na bana mibali tuku sambo na Samari. Jewu akomaki mikanda mpe atindaki yango na Samari epai ya bakalaka ya Jizireyeli, epai ya bampaka mpe epai ya babateli ya bana ya Akabi. Na mikanda yango, Jewu alobaki : 2 « Tango kaka mokanda oyo ekokomela bino, lokola bana mibali ya mokonzi na bino bazali elongo na bino, mpe lokola bozali na bashar mpe bampunda, engumba ya makasi mpe bibundeli, 3 bopona mwana mobali oyo aleki malamu mpe mayele kati na bana mibali ya mokonzi na bino, botia ye na kiti ya bokonzi ya tata na ye, mpe bobunda mpo na ndako ya mokonzi na bino. » 4 Kasi babangaki makasi mpe balobaki : « Soki kutu bakonzi mibale bakokaki te kobunda na ye, bongo ndenge nini biso tokobunda na ye ? » 5 Boye, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, moyangeli ya engumba, bampaka mpe babateli ya bana ya mokonzi batindaki sango oyo epai ya Jewu : « Tozali basali na yo mpe tokosala nyonso oyo okoloba. Tokotia moto mosusu te lokola mokonzi, tokosala nyonso oyo okomona malamu. » 6 Boye, Jewu akomelaki bango mokanda ya mibale oyo kati na yango alobaki :« Soki bozali na ngambo na ngai mpe bokotosa ngai, bozwa mito ya bana mibali nyonso ya mokonzi na bino mpe boya na yango epai na ngai, na Jizireyeli, lobi na tongo. »Nzokande bana mibali tuku sambo ya mokonzi bazalaki epai ya bato ya lokumu ya engumba, oyo bazalaki kobokola bango. 7 Tango mokanda ekomaki, bato wana bazwaki bana mibali ya mokonzi, babomaki bango nyonso tuku sambo, batiaki mito na bango na bitunga mpe batindaki yango epai ya Jewu, na Jizireyeli. 8 Ntoma moko akomaki mpe alobaki na Jewu :— Bamemi mito ya bana mibali ya mokonzi.Bongo Jewu apesaki mitindo :— Botia yango na mipiku mibale na ekuke ya engumba kino na tongo. 9 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jewu abimaki, atelemaki liboso ya bato nyonso mpe alobaki :— Bosali na bino mabe te. Ezalaki ngai nde nasalelaki nkolo na ngai likita mpo na kotelemela ye mpe koboma ye ; kasi nani abomi bato oyo nyonso ? 10 Boyeba ete liloba moko te oyo Yawe alobaki mpo na kotelemela ndako ya Akabi ekozanga kokokisama. Yawe akokisi makambo oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya. 11 Boye Jewu abomaki bato nyonso ya ndako ya Akabi, oyo batikalaki na Jizireyeli : bato na ye nyonso ya lokumu, baninga na ye, Banganga-Nzambe na ye. Atikaki ata moto na ye moko te na bomoi. 12 Jewu atelemaki mpe akendeki na Samari.Na Beti-Ekedi-Aron, 13 Jewu akutanaki na bandeko ya Akazia, mokonzi ya kala ya Yuda, mpe atunaki bango :— Bozali banani ?Bazongisaki :— Tozali bandeko ya Akazia. Toyei kopesa bana mibali ya mokonzi mpe mama ya mokonzi mbote. 14 Jewu apesaki mitindo :— Bokanga bango ya bomoi.Boye bakangaki bango ya bomoi mpe bakataki bango bakingo, pene ya libulu ya Beti-Ekedi. Bazalaki mibali tuku minei na mibale, mpe Jewu atikaki moto moko te na bomoi. 15 Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki :— Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo ?Yonadabi azongisaki :— Iyo, ezali bongo !Jewu alobaki :— Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo.Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar. 16 Jewu alobaki :— Yaka elongo na ngai, mpe okomona bolingo makasi na ngai mpo na Yawe.Boye, Jewu amemaki ye na shar na ye. 17 Tango Jewu akomaki na Samari, abomaki bato nyonso ya libota ya Akabi, oyo batikalaki kuna. Jewu abomaki bango kolanda Liloba na Yawe oyo alobaki na nzela ya Eliya. 18 Jewu abengisaki bato nyonso mpe alobaki na bango : « Akabi azalaki kosalela Bala mingi te, kasi Jewu akosalela ye mingi. 19 Sik’oyo, bobengisa basakoli nyonso ya Bala, basambeli na ye nyonso mpe banganga-nzambe na ye nyonso. Bosala ete moto moko te azanga, pamba te nakobonza mbeka ya monene mpo na Bala. Moto nyonso oyo akozanga, akokufa. »Jewu asalelaki mayele mabe mpo na koboma basambeli ya Bala. 20 Jewu alobaki : « Bobengisa mayangani mpo na lokumu ya Bala. »Boye babengisaki mayangani yango. 21 Jewu apanzaki sango kati na Isalaele, basambeli nyonso ya Bala bayaki mpe moto moko te azangaki. Bakotaki ebele na ndako ya nzambe Bala mpe batondisaki yango kino na basuka nyonso. 22 Jewu alobaki na mobateli bilamba ya bonganga-nzambe ya Bala : « Yaka na bilamba mpo na basambeli nyonso ya Bala. »Boye abimisaki bilamba mpo na bango. 23 Bongo Jewu elongo na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, bakotaki na ndako ya nzambe Bala. Jewu alobaki na basambeli ya Bala : « Botala malamu-malamu na zingazinga na bino mpo ete basali ya Yawe bazala elongo na bino te, kaka basali ya Bala. » 24 Bakotaki mpo na kobongisa bambeka mpe batumbaki yango.Nzokande, Jewu atiaki bato tuku mwambe libanda na likebisi oyo : « Soki moto moko kati na bino akimisi moko kati na bato oyo napesi na maboko na bino, akofuta bomoi na ye na motuya ya bomoi ya moto oyo akimi. » 25 Tango kaka Jewu asilisaki kobongisa mbeka ya kotumba, apesaki mitindo epai na bakengeli mpe na bakambi na bango : « Bokota mpe boboma bango. Bokimisa moto moko te. »Boye, babomaki bango na mopanga. Bakengeli mpe bakonzi ya basoda babwakaki bibembe na libanda mpe bakotaki kino na esika ya bule ya ndako ya nzambe Bala. 26 Babimisaki libanga ya bule na libanda ya ndako ya nzambe Bala mpe batumbaki yango. 27 Babukaki libanga yango ya bule, bakweyisaki ndako ya nzambe Bala mpe bakomisaki yango zongo kino na mokolo ya lelo. 28 Ezali bongo nde Jewu asukisaki losambo ya Bala kati na Isalaele. 29 Kasi Jewu atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. Lisumu yango ezali : kosambela bikeko ya bangombe ya wolo, na Beteli mpe na Dani. 30 Yawe alobaki na Jewu : « Lokola osali malamu mpo na kokokisa oyo ezali sembo na miso na Ngai, mpe lokola osali na libota ya Akabi nyonso oyo nakanaki kosala, bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. » 31 Nzokande, Jewu asalaki bokebi te mpo na kobatela mibeko ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema na ye mobimba. Atikaki te masumu ya Jeroboami oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. 32 Na tango wana, Yawe abandaki kokomisa moke bandelo ya Isalaele. Azaeli alongaki bana ya Isalaele, na mokili na bango, 33 na este ya Yordani, na etuka nyonso ya Galadi (mabele ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya Manase), longwa na Aroeri oyo ezali pembeni ya moluka ya Arinoni kino na Galadi mpe Bashani. 34 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jewu, misala na ye nyonso mpe elonga na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 35 Jewu akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Yoakazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 36 Jewu akonzaki Isalaele, na Samari mibu tuku mibale na mwambe.

In Other Versions

2 Kings 10 in the ANGEFD

2 Kings 10 in the ANTPNG2D

2 Kings 10 in the AS21

2 Kings 10 in the BAGH

2 Kings 10 in the BBPNG

2 Kings 10 in the BBT1E

2 Kings 10 in the BDS

2 Kings 10 in the BEV

2 Kings 10 in the BHAD

2 Kings 10 in the BIB

2 Kings 10 in the BLPT

2 Kings 10 in the BNT

2 Kings 10 in the BNTABOOT

2 Kings 10 in the BNTLV

2 Kings 10 in the BOATCB

2 Kings 10 in the BOATCB2

2 Kings 10 in the BOBCV

2 Kings 10 in the BOCNT

2 Kings 10 in the BOECS

2 Kings 10 in the BOGWICC

2 Kings 10 in the BOHCB

2 Kings 10 in the BOHCV

2 Kings 10 in the BOHLNT

2 Kings 10 in the BOHNTLTAL

2 Kings 10 in the BOICB

2 Kings 10 in the BOILNTAP

2 Kings 10 in the BOITCV

2 Kings 10 in the BOKCV

2 Kings 10 in the BOKCV2

2 Kings 10 in the BOKHWOG

2 Kings 10 in the BOKSSV

2 Kings 10 in the BOLCB

2 Kings 10 in the BOMCV

2 Kings 10 in the BONAV

2 Kings 10 in the BONCB

2 Kings 10 in the BONLT

2 Kings 10 in the BONUT2

2 Kings 10 in the BOPLNT

2 Kings 10 in the BOSCB

2 Kings 10 in the BOSNC

2 Kings 10 in the BOTLNT

2 Kings 10 in the BOVCB

2 Kings 10 in the BOYCB

2 Kings 10 in the BPBB

2 Kings 10 in the BPH

2 Kings 10 in the BSB

2 Kings 10 in the CCB

2 Kings 10 in the CUV

2 Kings 10 in the CUVS

2 Kings 10 in the DBT

2 Kings 10 in the DGDNT

2 Kings 10 in the DHNT

2 Kings 10 in the DNT

2 Kings 10 in the ELBE

2 Kings 10 in the EMTV

2 Kings 10 in the ESV

2 Kings 10 in the FBV

2 Kings 10 in the FEB

2 Kings 10 in the GGMNT

2 Kings 10 in the GNT

2 Kings 10 in the HARY

2 Kings 10 in the HNT

2 Kings 10 in the IRVA

2 Kings 10 in the IRVB

2 Kings 10 in the IRVG

2 Kings 10 in the IRVH

2 Kings 10 in the IRVK

2 Kings 10 in the IRVM

2 Kings 10 in the IRVM2

2 Kings 10 in the IRVO

2 Kings 10 in the IRVP

2 Kings 10 in the IRVT

2 Kings 10 in the IRVT2

2 Kings 10 in the IRVU

2 Kings 10 in the ISVN

2 Kings 10 in the JSNT

2 Kings 10 in the KAPI

2 Kings 10 in the KBT1ETNIK

2 Kings 10 in the KBV

2 Kings 10 in the KJV

2 Kings 10 in the KNFD

2 Kings 10 in the LBA

2 Kings 10 in the LBLA

2 Kings 10 in the LNT

2 Kings 10 in the LSV

2 Kings 10 in the MAAL

2 Kings 10 in the MBV

2 Kings 10 in the MBV2

2 Kings 10 in the MHNT

2 Kings 10 in the MKNFD

2 Kings 10 in the MNG

2 Kings 10 in the MNT

2 Kings 10 in the MNT2

2 Kings 10 in the MRS1T

2 Kings 10 in the NAA

2 Kings 10 in the NASB

2 Kings 10 in the NBLA

2 Kings 10 in the NBS

2 Kings 10 in the NBVTP

2 Kings 10 in the NET2

2 Kings 10 in the NIV11

2 Kings 10 in the NNT

2 Kings 10 in the NNT2

2 Kings 10 in the NNT3

2 Kings 10 in the PDDPT

2 Kings 10 in the PFNT

2 Kings 10 in the RMNT

2 Kings 10 in the SBIAS

2 Kings 10 in the SBIBS

2 Kings 10 in the SBIBS2

2 Kings 10 in the SBICS

2 Kings 10 in the SBIDS

2 Kings 10 in the SBIGS

2 Kings 10 in the SBIHS

2 Kings 10 in the SBIIS

2 Kings 10 in the SBIIS2

2 Kings 10 in the SBIIS3

2 Kings 10 in the SBIKS

2 Kings 10 in the SBIKS2

2 Kings 10 in the SBIMS

2 Kings 10 in the SBIOS

2 Kings 10 in the SBIPS

2 Kings 10 in the SBISS

2 Kings 10 in the SBITS

2 Kings 10 in the SBITS2

2 Kings 10 in the SBITS3

2 Kings 10 in the SBITS4

2 Kings 10 in the SBIUS

2 Kings 10 in the SBIVS

2 Kings 10 in the SBT

2 Kings 10 in the SBT1E

2 Kings 10 in the SCHL

2 Kings 10 in the SNT

2 Kings 10 in the SUSU

2 Kings 10 in the SUSU2

2 Kings 10 in the SYNO

2 Kings 10 in the TBIAOTANT

2 Kings 10 in the TBT1E

2 Kings 10 in the TBT1E2

2 Kings 10 in the TFTIP

2 Kings 10 in the TFTU

2 Kings 10 in the TGNTATF3T

2 Kings 10 in the THAI

2 Kings 10 in the TNFD

2 Kings 10 in the TNT

2 Kings 10 in the TNTIK

2 Kings 10 in the TNTIL

2 Kings 10 in the TNTIN

2 Kings 10 in the TNTIP

2 Kings 10 in the TNTIZ

2 Kings 10 in the TOMA

2 Kings 10 in the TTENT

2 Kings 10 in the UBG

2 Kings 10 in the UGV

2 Kings 10 in the UGV2

2 Kings 10 in the UGV3

2 Kings 10 in the VBL

2 Kings 10 in the VDCC

2 Kings 10 in the YALU

2 Kings 10 in the YAPE

2 Kings 10 in the YBVTP

2 Kings 10 in the ZBP