2 Kings 11 (BOLCB2)

1 Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya mokonzi. 2 Kasi Yeosheba, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe ndeko ya Akazia, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia ; alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto, mpo na kobomba ye mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te. 3 Abombamaki elongo na ndesi na ye mibu motoba kati na Tempelo ya Yawe, wana Atali azalaki kokonza mokili. 4 Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi. 5 Apesaki bango mitindo oyo : « Tala ndenge bokosala : kati na bandambo misato ya lisanga na bino, ndambo moko bakosala na mokolo ya Saba ; ndambo ya liboso bakokengela ndako ya mokonzi, 6 ndambo ya mibale bakozala na ekuke ya Suri, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke, na sima ya ndako ya bakengeli. Bandambo nyonso misato bakokitana, moko sima na mosusu, kati na mosala ya kokengela Tempelo. 7 Bandambo mibale oyo bakosala te na mokolo ya Saba bakokengela Tempelo ya Yawe mpo na mokonzi. 8 Bakozingela mokonzi, moto na moto na ebundeli na ye na loboko. Moto nyonso oyo akopusana na molongo na bino, bosengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. » 9 Bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko basalaki nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango, mpe akendeki epai ya Nganga-Nzambe Yeoyada. 10 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga mpe banguba oyo ezalaki ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe. 11 Bakengeli bazingelaki mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo. 12 Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! » 13 Tango Atali ayokaki makelele oyo bato mpe bakengeli bazalaki kosala, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe. 14 Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi ; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : « Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! » 15 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki mitindo epai ya bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : « Bobimisa ye na molongo ! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye ! » Pamba te Nganga-Nzambe alobaki : « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe ! » 16 Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna. 17 Yeoyada asalaki boyokani kati na Yawe, mokonzi mpe bato, mpo ete bazala bato ya Yawe ; asalaki lisusu boyokani kati na mokonzi mpe bato. 18 Bato nyonso ya mokili bakendeki na ndako ya nzambe Bala mpe babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. Nganga-Nzambe Yeoyada atiaki bakengeli ya Tempelo ya Yawe. 19 Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya Kari, bakengeli mpe bato nyonso ya mokili ; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya bakengeli. Bongo Joasi avandaki na kiti na ye ya bokonzi. 20 Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga kati na ndako ya mokonzi.

In Other Versions

2 Kings 11 in the ANGEFD

2 Kings 11 in the ANTPNG2D

2 Kings 11 in the AS21

2 Kings 11 in the BAGH

2 Kings 11 in the BBPNG

2 Kings 11 in the BBT1E

2 Kings 11 in the BDS

2 Kings 11 in the BEV

2 Kings 11 in the BHAD

2 Kings 11 in the BIB

2 Kings 11 in the BLPT

2 Kings 11 in the BNT

2 Kings 11 in the BNTABOOT

2 Kings 11 in the BNTLV

2 Kings 11 in the BOATCB

2 Kings 11 in the BOATCB2

2 Kings 11 in the BOBCV

2 Kings 11 in the BOCNT

2 Kings 11 in the BOECS

2 Kings 11 in the BOGWICC

2 Kings 11 in the BOHCB

2 Kings 11 in the BOHCV

2 Kings 11 in the BOHLNT

2 Kings 11 in the BOHNTLTAL

2 Kings 11 in the BOICB

2 Kings 11 in the BOILNTAP

2 Kings 11 in the BOITCV

2 Kings 11 in the BOKCV

2 Kings 11 in the BOKCV2

2 Kings 11 in the BOKHWOG

2 Kings 11 in the BOKSSV

2 Kings 11 in the BOLCB

2 Kings 11 in the BOMCV

2 Kings 11 in the BONAV

2 Kings 11 in the BONCB

2 Kings 11 in the BONLT

2 Kings 11 in the BONUT2

2 Kings 11 in the BOPLNT

2 Kings 11 in the BOSCB

2 Kings 11 in the BOSNC

2 Kings 11 in the BOTLNT

2 Kings 11 in the BOVCB

2 Kings 11 in the BOYCB

2 Kings 11 in the BPBB

2 Kings 11 in the BPH

2 Kings 11 in the BSB

2 Kings 11 in the CCB

2 Kings 11 in the CUV

2 Kings 11 in the CUVS

2 Kings 11 in the DBT

2 Kings 11 in the DGDNT

2 Kings 11 in the DHNT

2 Kings 11 in the DNT

2 Kings 11 in the ELBE

2 Kings 11 in the EMTV

2 Kings 11 in the ESV

2 Kings 11 in the FBV

2 Kings 11 in the FEB

2 Kings 11 in the GGMNT

2 Kings 11 in the GNT

2 Kings 11 in the HARY

2 Kings 11 in the HNT

2 Kings 11 in the IRVA

2 Kings 11 in the IRVB

2 Kings 11 in the IRVG

2 Kings 11 in the IRVH

2 Kings 11 in the IRVK

2 Kings 11 in the IRVM

2 Kings 11 in the IRVM2

2 Kings 11 in the IRVO

2 Kings 11 in the IRVP

2 Kings 11 in the IRVT

2 Kings 11 in the IRVT2

2 Kings 11 in the IRVU

2 Kings 11 in the ISVN

2 Kings 11 in the JSNT

2 Kings 11 in the KAPI

2 Kings 11 in the KBT1ETNIK

2 Kings 11 in the KBV

2 Kings 11 in the KJV

2 Kings 11 in the KNFD

2 Kings 11 in the LBA

2 Kings 11 in the LBLA

2 Kings 11 in the LNT

2 Kings 11 in the LSV

2 Kings 11 in the MAAL

2 Kings 11 in the MBV

2 Kings 11 in the MBV2

2 Kings 11 in the MHNT

2 Kings 11 in the MKNFD

2 Kings 11 in the MNG

2 Kings 11 in the MNT

2 Kings 11 in the MNT2

2 Kings 11 in the MRS1T

2 Kings 11 in the NAA

2 Kings 11 in the NASB

2 Kings 11 in the NBLA

2 Kings 11 in the NBS

2 Kings 11 in the NBVTP

2 Kings 11 in the NET2

2 Kings 11 in the NIV11

2 Kings 11 in the NNT

2 Kings 11 in the NNT2

2 Kings 11 in the NNT3

2 Kings 11 in the PDDPT

2 Kings 11 in the PFNT

2 Kings 11 in the RMNT

2 Kings 11 in the SBIAS

2 Kings 11 in the SBIBS

2 Kings 11 in the SBIBS2

2 Kings 11 in the SBICS

2 Kings 11 in the SBIDS

2 Kings 11 in the SBIGS

2 Kings 11 in the SBIHS

2 Kings 11 in the SBIIS

2 Kings 11 in the SBIIS2

2 Kings 11 in the SBIIS3

2 Kings 11 in the SBIKS

2 Kings 11 in the SBIKS2

2 Kings 11 in the SBIMS

2 Kings 11 in the SBIOS

2 Kings 11 in the SBIPS

2 Kings 11 in the SBISS

2 Kings 11 in the SBITS

2 Kings 11 in the SBITS2

2 Kings 11 in the SBITS3

2 Kings 11 in the SBITS4

2 Kings 11 in the SBIUS

2 Kings 11 in the SBIVS

2 Kings 11 in the SBT

2 Kings 11 in the SBT1E

2 Kings 11 in the SCHL

2 Kings 11 in the SNT

2 Kings 11 in the SUSU

2 Kings 11 in the SUSU2

2 Kings 11 in the SYNO

2 Kings 11 in the TBIAOTANT

2 Kings 11 in the TBT1E

2 Kings 11 in the TBT1E2

2 Kings 11 in the TFTIP

2 Kings 11 in the TFTU

2 Kings 11 in the TGNTATF3T

2 Kings 11 in the THAI

2 Kings 11 in the TNFD

2 Kings 11 in the TNT

2 Kings 11 in the TNTIK

2 Kings 11 in the TNTIL

2 Kings 11 in the TNTIN

2 Kings 11 in the TNTIP

2 Kings 11 in the TNTIZ

2 Kings 11 in the TOMA

2 Kings 11 in the TTENT

2 Kings 11 in the UBG

2 Kings 11 in the UGV

2 Kings 11 in the UGV2

2 Kings 11 in the UGV3

2 Kings 11 in the VBL

2 Kings 11 in the VDCC

2 Kings 11 in the YALU

2 Kings 11 in the YAPE

2 Kings 11 in the YBVTP

2 Kings 11 in the ZBP