2 Kings 12 (BOLCB2)

1 Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi. 2 Ezalaki tango Jewu akokisaki mibu sambo na bokonzi nde Joasi akomaki mokonzi. Joasi akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba. 3 Joasi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe na mikolo nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada azalaki koteya ye. 4 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. 5 Joasi alobaki na Banganga-Nzambe : « Bosangisa mbongo nyonso oyo bamemi lokola makabo ya bule kati na Tempelo ya Yawe : mbongo oyo bazwi na nzela ya kotanga bato, mbongo oyo bazwi lokola mpako mpo na kosikola bato kolanda motuya oyo ekatama, mpe mbongo oyo moto na moto apesi na Ndako ya Nzambe na motema ya esengo. 6 Tika ete Nganga-Nzambe moko na moko akamata mbongo na maboko ya babombi mbongo mpe basalela yango mpo na kobongisa eloko nyonso oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe. » 7 Kasi tango mokonzi Joasi akokisaki mibu pene tuku mibale na misato na bokonzi, Banganga-Nzambe babongisaki nanu Ndako ya Nzambe te. 8 Boye, mokonzi Joasi abengisaki Nganga-Nzambe Yeoyada mpe Banganga-Nzambe mosusu. Atunaki bango : « Mpo na nini bozali kobongisa te biloko oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe ? Sik’oyo, bokozwa lisusu mbongo te na maboko ya babombi mbongo na bino, kasi botika yango mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe. » 9 Banganga-Nzambe bandimaki kotika kokongola mbongo na maboko ya bato mpe kotika kobongisa Ndako ya Nzambe. 10 Nganga-Nzambe Yeoyada akamataki sanduku moko mpe atobolaki mofinuku na yango. Atiaki sanduku pembeni ya etumbelo, na ngambo ya loboko ya mobali tango ozali kokota kati na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobatela ekuke batiaki kati na sanduku mbongo nyonso oyo bazalaki komema na Tempelo ya Yawe. 11 Tango nyonso bazalaki komona ete mbongo ekomi ebele kati na sanduku, mokomi mikanda ya mokonzi elongo na mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kotanga mbongo oyo bato bazalaki komema na Tempelo ya Yawe ; bongo bazalaki kotia yango na basaki. 12 Soki bayebi motuya na yango, bazalaki kopesa mbongo yango epai ya bato oyo bazalaki kosalisa misala kati na Ndako ya Nzambe. Na mbongo yango, bazalaki kofuta bato oyo bazalaki kosala kati na Tempelo ya Yawe : basharipantie, 13 batongi ndako mpe bato oyo bakataka mabanga. Bazalaki kosomba mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe : mabaya mpe mabanga bakata. Bazalaki mpe kobimisa mbongo mpo na misala mosusu ya kobongisa Tempelo ya Yawe. 14 Kasi bazalaki kobimisa te mbongo oyo bazalaki komema na Ndako ya Nzambe, mpo na kosalela basani ya minene ya palata, bambeli, basani oyo babwakelaka na yango mayi, bakelelo mpe biloko mosusu oyo esalemi na wolo to na palata mpo na Tempelo ya Yawe. 15 Mbongo yango ezalaki bobele mpo na kofuta basali oyo bazalaki kobongisa Ndako ya Yawe. 16 Bazalaki kolandela te mbongo oyo bapesaki na bato mpo na kofuta basali, pamba te bazalaki kosalela yango na bosembo. 17 Bazalaki komema te na Tempelo ya Yawe, mbongo oyo ewutaki na makabo ya kimia mpe na mbeka mpo na masumu ; yango ezalaki mpo na Banganga-Nzambe. 18 Na tango wana, Azaeli, mokonzi ya Siri, akendeki kobundisa engumba Gati mpe abotolaki yango. Sima, Azaeli abalukaki mpo na kobundisa Yelusalemi. 19 Kasi Joasi, mokonzi ya Yuda, azwaki biloko nyonso ya bule oyo bakoko na ye —Jozafati, Yorami mpe Akazia, bakonzi ya Yuda— babulisaki. Joasi azwaki mpe bakado oyo ye moko abulisaki mpe wolo nyonso oyo amonaki kati na bibombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe mpe na ndako ya mokonzi. Atindaki yango epai ya Azaeli, mokonzi ya Siri. Sima na yango, Azaeli akendeki mosika ya Yelusalemi. 20 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 21 Basali na ye batombokelaki ye mpe basalelaki ye likita. Babomaki Joasi, na Beti-Milo, na nzela oyo ekenda na Sila. 22 Tala bakombo ya basali oyo babomaki Joasi : Yozabadi, mwana mobali ya Shimeati, mpe Yeozabadi, mwana mobali ya Shomeri. Joasi akufaki mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

2 Kings 12 in the ANGEFD

2 Kings 12 in the ANTPNG2D

2 Kings 12 in the AS21

2 Kings 12 in the BAGH

2 Kings 12 in the BBPNG

2 Kings 12 in the BBT1E

2 Kings 12 in the BDS

2 Kings 12 in the BEV

2 Kings 12 in the BHAD

2 Kings 12 in the BIB

2 Kings 12 in the BLPT

2 Kings 12 in the BNT

2 Kings 12 in the BNTABOOT

2 Kings 12 in the BNTLV

2 Kings 12 in the BOATCB

2 Kings 12 in the BOATCB2

2 Kings 12 in the BOBCV

2 Kings 12 in the BOCNT

2 Kings 12 in the BOECS

2 Kings 12 in the BOGWICC

2 Kings 12 in the BOHCB

2 Kings 12 in the BOHCV

2 Kings 12 in the BOHLNT

2 Kings 12 in the BOHNTLTAL

2 Kings 12 in the BOICB

2 Kings 12 in the BOILNTAP

2 Kings 12 in the BOITCV

2 Kings 12 in the BOKCV

2 Kings 12 in the BOKCV2

2 Kings 12 in the BOKHWOG

2 Kings 12 in the BOKSSV

2 Kings 12 in the BOLCB

2 Kings 12 in the BOMCV

2 Kings 12 in the BONAV

2 Kings 12 in the BONCB

2 Kings 12 in the BONLT

2 Kings 12 in the BONUT2

2 Kings 12 in the BOPLNT

2 Kings 12 in the BOSCB

2 Kings 12 in the BOSNC

2 Kings 12 in the BOTLNT

2 Kings 12 in the BOVCB

2 Kings 12 in the BOYCB

2 Kings 12 in the BPBB

2 Kings 12 in the BPH

2 Kings 12 in the BSB

2 Kings 12 in the CCB

2 Kings 12 in the CUV

2 Kings 12 in the CUVS

2 Kings 12 in the DBT

2 Kings 12 in the DGDNT

2 Kings 12 in the DHNT

2 Kings 12 in the DNT

2 Kings 12 in the ELBE

2 Kings 12 in the EMTV

2 Kings 12 in the ESV

2 Kings 12 in the FBV

2 Kings 12 in the FEB

2 Kings 12 in the GGMNT

2 Kings 12 in the GNT

2 Kings 12 in the HARY

2 Kings 12 in the HNT

2 Kings 12 in the IRVA

2 Kings 12 in the IRVB

2 Kings 12 in the IRVG

2 Kings 12 in the IRVH

2 Kings 12 in the IRVK

2 Kings 12 in the IRVM

2 Kings 12 in the IRVM2

2 Kings 12 in the IRVO

2 Kings 12 in the IRVP

2 Kings 12 in the IRVT

2 Kings 12 in the IRVT2

2 Kings 12 in the IRVU

2 Kings 12 in the ISVN

2 Kings 12 in the JSNT

2 Kings 12 in the KAPI

2 Kings 12 in the KBT1ETNIK

2 Kings 12 in the KBV

2 Kings 12 in the KJV

2 Kings 12 in the KNFD

2 Kings 12 in the LBA

2 Kings 12 in the LBLA

2 Kings 12 in the LNT

2 Kings 12 in the LSV

2 Kings 12 in the MAAL

2 Kings 12 in the MBV

2 Kings 12 in the MBV2

2 Kings 12 in the MHNT

2 Kings 12 in the MKNFD

2 Kings 12 in the MNG

2 Kings 12 in the MNT

2 Kings 12 in the MNT2

2 Kings 12 in the MRS1T

2 Kings 12 in the NAA

2 Kings 12 in the NASB

2 Kings 12 in the NBLA

2 Kings 12 in the NBS

2 Kings 12 in the NBVTP

2 Kings 12 in the NET2

2 Kings 12 in the NIV11

2 Kings 12 in the NNT

2 Kings 12 in the NNT2

2 Kings 12 in the NNT3

2 Kings 12 in the PDDPT

2 Kings 12 in the PFNT

2 Kings 12 in the RMNT

2 Kings 12 in the SBIAS

2 Kings 12 in the SBIBS

2 Kings 12 in the SBIBS2

2 Kings 12 in the SBICS

2 Kings 12 in the SBIDS

2 Kings 12 in the SBIGS

2 Kings 12 in the SBIHS

2 Kings 12 in the SBIIS

2 Kings 12 in the SBIIS2

2 Kings 12 in the SBIIS3

2 Kings 12 in the SBIKS

2 Kings 12 in the SBIKS2

2 Kings 12 in the SBIMS

2 Kings 12 in the SBIOS

2 Kings 12 in the SBIPS

2 Kings 12 in the SBISS

2 Kings 12 in the SBITS

2 Kings 12 in the SBITS2

2 Kings 12 in the SBITS3

2 Kings 12 in the SBITS4

2 Kings 12 in the SBIUS

2 Kings 12 in the SBIVS

2 Kings 12 in the SBT

2 Kings 12 in the SBT1E

2 Kings 12 in the SCHL

2 Kings 12 in the SNT

2 Kings 12 in the SUSU

2 Kings 12 in the SUSU2

2 Kings 12 in the SYNO

2 Kings 12 in the TBIAOTANT

2 Kings 12 in the TBT1E

2 Kings 12 in the TBT1E2

2 Kings 12 in the TFTIP

2 Kings 12 in the TFTU

2 Kings 12 in the TGNTATF3T

2 Kings 12 in the THAI

2 Kings 12 in the TNFD

2 Kings 12 in the TNT

2 Kings 12 in the TNTIK

2 Kings 12 in the TNTIL

2 Kings 12 in the TNTIN

2 Kings 12 in the TNTIP

2 Kings 12 in the TNTIZ

2 Kings 12 in the TOMA

2 Kings 12 in the TTENT

2 Kings 12 in the UBG

2 Kings 12 in the UGV

2 Kings 12 in the UGV2

2 Kings 12 in the UGV3

2 Kings 12 in the VBL

2 Kings 12 in the VDCC

2 Kings 12 in the YALU

2 Kings 12 in the YAPE

2 Kings 12 in the YBVTP

2 Kings 12 in the ZBP