2 Kings 21 (BOLCB2)

1 Manase azalaki na mibu zomi na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Efitsiba. » 2 Manase asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele. 3 Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki ; atongaki mpe bitumbelo mpo na nzambe Bala mpe atelemisaki likonzi mpo na nzambe mwasi Ashera, ndenge Akabi, mokonzi ya Isalaele, asalaki ; afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo. 4 Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki : « Nakotia Kombo na Ngai kati na Yelusalemi. » 5 Atongaki kati na mapango nyonso mibale ya Tempelo ya Yawe bitumbelo mpo na mampinga nyonso ya likolo. 6 Abonzaki na moto, lokola mbeka, mwana na ye ya mobali ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji. Atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; mpe, na bongo, apelisaki kanda ya Yawe. 7 Atiaki kati na Tempelo ya Yawe ekeko ya Ashera, oyo asalisaki ; nzokande, Yawe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali : « Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele. 8 Soki kaka bato ya Isalaele batosi mibeko mpe mitindo nyonso oyo napesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ngai, nakosala ete bayengayenga lisusu te mosika ya mabele oyo napesaki epai ya batata na bango. » 9 Kasi bato ya Isalaele batosaki te. Manase apengwisaki bango, mpe basalaki lisusu mabe koleka bikolo oyo Yawe abebisaki liboso ya bato ya Isalaele. 10 Yawe alobaki na nzela ya basali na ye, basakoli : 11 « Lokola Manase, mokonzi ya Yuda, asalaki makambo ya nkele, lokola asalaki makambo mabe koleka ata bato ya Amori oyo bazalaki liboso na ye, mpe lokola apengwisaki Yuda na nzela ya banzambe na ye ya bikeko, 12 tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakoyeisa kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda pasi oyo ekozala lokola kake na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka sango na yango. 13 Nakobebisa Yelusalemi ndenge nabebisaki Samari, mpe nakokomisa yango lokola ndako ya Akabi. Nakonika Yelusalemi ndenge banikaka mpe babalolaka nzungu. 14 Nakosundola ndambo ya libula na Ngai oyo ekotikala, nakokaba bango na maboko ya banguna na bango. Banguna na bango bakobebisa bango mpe bakobotola biloko na bango, 15 pamba te basalaki mabe na miso na Ngai mpe bapelisaki kanda na Ngai, wuta na mokolo oyo batata na bango babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo. › » 16 Mpe lisusu, Manase asopaki makila ya bato oyo bayebi likambo te mpe atondisaki Yelusalemi na makila yango na bisika nyonso —kotanga te masumu oyo apengwisaki na yango Yuda mpo na kosala mabe na miso ya Yawe. 17 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Manase, misala na ye nyonso mpe masumu oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 18 Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, oyo babengaka elanga ya Uza. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 19 Amoni azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Meshulemeti. » Meshulemeti azalaki mwana mwasi ya Arutsi, moto ya Yotiba. 20 Amoni asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Manase, tata na ye, asalaki. 21 Atambolaki na banzela nyonso ya tata na ye, na kosambelaka banzambe ya bikeko oyo tata na ye asambelaki mpe agumbamelaki. 22 Asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye, mpe atambolaki na banzela ya Yawe te. 23 Bakalaka ya Amoni basalelaki ye likita mpe babomaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. 24 Bongo bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita mpe bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi na esika na ye. 25 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amoni, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 26 Bakundaki ye kati na kunda na ye, kati na elanga ya Uza ; mpe Joziasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

2 Kings 21 in the ANGEFD

2 Kings 21 in the ANTPNG2D

2 Kings 21 in the AS21

2 Kings 21 in the BAGH

2 Kings 21 in the BBPNG

2 Kings 21 in the BBT1E

2 Kings 21 in the BDS

2 Kings 21 in the BEV

2 Kings 21 in the BHAD

2 Kings 21 in the BIB

2 Kings 21 in the BLPT

2 Kings 21 in the BNT

2 Kings 21 in the BNTABOOT

2 Kings 21 in the BNTLV

2 Kings 21 in the BOATCB

2 Kings 21 in the BOATCB2

2 Kings 21 in the BOBCV

2 Kings 21 in the BOCNT

2 Kings 21 in the BOECS

2 Kings 21 in the BOGWICC

2 Kings 21 in the BOHCB

2 Kings 21 in the BOHCV

2 Kings 21 in the BOHLNT

2 Kings 21 in the BOHNTLTAL

2 Kings 21 in the BOICB

2 Kings 21 in the BOILNTAP

2 Kings 21 in the BOITCV

2 Kings 21 in the BOKCV

2 Kings 21 in the BOKCV2

2 Kings 21 in the BOKHWOG

2 Kings 21 in the BOKSSV

2 Kings 21 in the BOLCB

2 Kings 21 in the BOMCV

2 Kings 21 in the BONAV

2 Kings 21 in the BONCB

2 Kings 21 in the BONLT

2 Kings 21 in the BONUT2

2 Kings 21 in the BOPLNT

2 Kings 21 in the BOSCB

2 Kings 21 in the BOSNC

2 Kings 21 in the BOTLNT

2 Kings 21 in the BOVCB

2 Kings 21 in the BOYCB

2 Kings 21 in the BPBB

2 Kings 21 in the BPH

2 Kings 21 in the BSB

2 Kings 21 in the CCB

2 Kings 21 in the CUV

2 Kings 21 in the CUVS

2 Kings 21 in the DBT

2 Kings 21 in the DGDNT

2 Kings 21 in the DHNT

2 Kings 21 in the DNT

2 Kings 21 in the ELBE

2 Kings 21 in the EMTV

2 Kings 21 in the ESV

2 Kings 21 in the FBV

2 Kings 21 in the FEB

2 Kings 21 in the GGMNT

2 Kings 21 in the GNT

2 Kings 21 in the HARY

2 Kings 21 in the HNT

2 Kings 21 in the IRVA

2 Kings 21 in the IRVB

2 Kings 21 in the IRVG

2 Kings 21 in the IRVH

2 Kings 21 in the IRVK

2 Kings 21 in the IRVM

2 Kings 21 in the IRVM2

2 Kings 21 in the IRVO

2 Kings 21 in the IRVP

2 Kings 21 in the IRVT

2 Kings 21 in the IRVT2

2 Kings 21 in the IRVU

2 Kings 21 in the ISVN

2 Kings 21 in the JSNT

2 Kings 21 in the KAPI

2 Kings 21 in the KBT1ETNIK

2 Kings 21 in the KBV

2 Kings 21 in the KJV

2 Kings 21 in the KNFD

2 Kings 21 in the LBA

2 Kings 21 in the LBLA

2 Kings 21 in the LNT

2 Kings 21 in the LSV

2 Kings 21 in the MAAL

2 Kings 21 in the MBV

2 Kings 21 in the MBV2

2 Kings 21 in the MHNT

2 Kings 21 in the MKNFD

2 Kings 21 in the MNG

2 Kings 21 in the MNT

2 Kings 21 in the MNT2

2 Kings 21 in the MRS1T

2 Kings 21 in the NAA

2 Kings 21 in the NASB

2 Kings 21 in the NBLA

2 Kings 21 in the NBS

2 Kings 21 in the NBVTP

2 Kings 21 in the NET2

2 Kings 21 in the NIV11

2 Kings 21 in the NNT

2 Kings 21 in the NNT2

2 Kings 21 in the NNT3

2 Kings 21 in the PDDPT

2 Kings 21 in the PFNT

2 Kings 21 in the RMNT

2 Kings 21 in the SBIAS

2 Kings 21 in the SBIBS

2 Kings 21 in the SBIBS2

2 Kings 21 in the SBICS

2 Kings 21 in the SBIDS

2 Kings 21 in the SBIGS

2 Kings 21 in the SBIHS

2 Kings 21 in the SBIIS

2 Kings 21 in the SBIIS2

2 Kings 21 in the SBIIS3

2 Kings 21 in the SBIKS

2 Kings 21 in the SBIKS2

2 Kings 21 in the SBIMS

2 Kings 21 in the SBIOS

2 Kings 21 in the SBIPS

2 Kings 21 in the SBISS

2 Kings 21 in the SBITS

2 Kings 21 in the SBITS2

2 Kings 21 in the SBITS3

2 Kings 21 in the SBITS4

2 Kings 21 in the SBIUS

2 Kings 21 in the SBIVS

2 Kings 21 in the SBT

2 Kings 21 in the SBT1E

2 Kings 21 in the SCHL

2 Kings 21 in the SNT

2 Kings 21 in the SUSU

2 Kings 21 in the SUSU2

2 Kings 21 in the SYNO

2 Kings 21 in the TBIAOTANT

2 Kings 21 in the TBT1E

2 Kings 21 in the TBT1E2

2 Kings 21 in the TFTIP

2 Kings 21 in the TFTU

2 Kings 21 in the TGNTATF3T

2 Kings 21 in the THAI

2 Kings 21 in the TNFD

2 Kings 21 in the TNT

2 Kings 21 in the TNTIK

2 Kings 21 in the TNTIL

2 Kings 21 in the TNTIN

2 Kings 21 in the TNTIP

2 Kings 21 in the TNTIZ

2 Kings 21 in the TOMA

2 Kings 21 in the TTENT

2 Kings 21 in the UBG

2 Kings 21 in the UGV

2 Kings 21 in the UGV2

2 Kings 21 in the UGV3

2 Kings 21 in the VBL

2 Kings 21 in the VDCC

2 Kings 21 in the YALU

2 Kings 21 in the YAPE

2 Kings 21 in the YBVTP

2 Kings 21 in the ZBP