2 Kings 24 (BOLCB2)

1 Wana Yeoyakimi azalaki mokonzi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akotaki na makasi kati na mokili ; mpe Yeoyakimi akomaki mosali na ye mibu misato. Kasi sima, abongolaki makanisi mpe atombokelaki Nabukodonozori. 2 Yawe atindaki mampinga ya bato ya Chalide, ya Siri, ya Moabi mpe ya Amoni mpo na kobundisa ye. Yawe atindaki bango mpo na kobebisa Yuda kolanda liloba oyo Yawe asakolaki na nzela ya basali na Ye, basakoli. 3 Solo, makambo yango ekomelaki Yuda kolanda mitindo na Yawe mpo na kolongola bango na miso na Ye likolo ya masumu ya Manase mpe likolo ya makambo nyonso oyo asalaki ; 4 bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te ; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye. 5 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yeoyakimi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 6 Tango Yeoyakimi akufaki, Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 7 Mokonzi ya Ejipito azalaki kobima lisusu te elongo na mampinga na ye mpo na kokota na mikili mosusu, mpo ete mokonzi ya Babiloni abotolaki mabele na ye nyonso, longwa na moluka ya nor ya Ejipito kino na ebale Efrate. 8 Yeoyakini azalaki na mibu zomi na mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Newushita. » Newushita azalaki mwana ya Elinatani, moto ya Yelusalemi. 9 Yeoyakini asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge kaka tata na ye asalaki. 10 Ezalaki na tango wana nde bakonzi ya basoda ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, babundisaki Yelusalemi mpe bazingelaki engumba yango. 11 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki ye moko na engumba tango basoda na ye bazalaki kozingela yango. 12 Yeoyakini, mokonzi ya Yuda ; mama na ye, basali na ye, bakambi na ye mpe bakalaka na ye ya lokumu bamipesaki bango nyonso epai ya mokonzi Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Yeoyakini na boloko na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye. 13 Ndenge Yawe alobaki yango, Nabukodonozori azwaki bomengo nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako ya mokonzi ; bongo amemaki biloko nyonso ya wolo oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, asalaki mpo na Tempelo ya Yawe. 14 Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu : bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili. 15 Nabukodonozori amemaki Yeoyakini na bowumbu na Babiloni ; amemaki mpe, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, mama ya mokonzi, basi ya mokonzi, bakalaka ya lokumu mpe bankumu ya mokili. 16 Mokonzi ya Babiloni amemaki mpe na bowumbu na Babiloni mampinga nyonso ya bato nkoto sambo oyo bazalaki makasi mpe babongisama mpo na bitumba, bakisa bato nkoto moko oyo basalaka misala ya maboko mpe oyo basalelaka bibende. 17 Mokonzi ya Babiloni akomisaki Matania, noko ya Yeoyakini, mokonzi na esika na ye ; mpe abongolaki kombo na ye, akomisaki yango « Sedesiasi. » 18 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Amutali. » Amutali azalaki mwana ya Jeremi, moto ya Libina. 19 Sedesiasi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Yeoyakimi asalaki. 20 Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika ya elongi na Ye.Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.

In Other Versions

2 Kings 24 in the ANGEFD

2 Kings 24 in the ANTPNG2D

2 Kings 24 in the AS21

2 Kings 24 in the BAGH

2 Kings 24 in the BBPNG

2 Kings 24 in the BBT1E

2 Kings 24 in the BDS

2 Kings 24 in the BEV

2 Kings 24 in the BHAD

2 Kings 24 in the BIB

2 Kings 24 in the BLPT

2 Kings 24 in the BNT

2 Kings 24 in the BNTABOOT

2 Kings 24 in the BNTLV

2 Kings 24 in the BOATCB

2 Kings 24 in the BOATCB2

2 Kings 24 in the BOBCV

2 Kings 24 in the BOCNT

2 Kings 24 in the BOECS

2 Kings 24 in the BOGWICC

2 Kings 24 in the BOHCB

2 Kings 24 in the BOHCV

2 Kings 24 in the BOHLNT

2 Kings 24 in the BOHNTLTAL

2 Kings 24 in the BOICB

2 Kings 24 in the BOILNTAP

2 Kings 24 in the BOITCV

2 Kings 24 in the BOKCV

2 Kings 24 in the BOKCV2

2 Kings 24 in the BOKHWOG

2 Kings 24 in the BOKSSV

2 Kings 24 in the BOLCB

2 Kings 24 in the BOMCV

2 Kings 24 in the BONAV

2 Kings 24 in the BONCB

2 Kings 24 in the BONLT

2 Kings 24 in the BONUT2

2 Kings 24 in the BOPLNT

2 Kings 24 in the BOSCB

2 Kings 24 in the BOSNC

2 Kings 24 in the BOTLNT

2 Kings 24 in the BOVCB

2 Kings 24 in the BOYCB

2 Kings 24 in the BPBB

2 Kings 24 in the BPH

2 Kings 24 in the BSB

2 Kings 24 in the CCB

2 Kings 24 in the CUV

2 Kings 24 in the CUVS

2 Kings 24 in the DBT

2 Kings 24 in the DGDNT

2 Kings 24 in the DHNT

2 Kings 24 in the DNT

2 Kings 24 in the ELBE

2 Kings 24 in the EMTV

2 Kings 24 in the ESV

2 Kings 24 in the FBV

2 Kings 24 in the FEB

2 Kings 24 in the GGMNT

2 Kings 24 in the GNT

2 Kings 24 in the HARY

2 Kings 24 in the HNT

2 Kings 24 in the IRVA

2 Kings 24 in the IRVB

2 Kings 24 in the IRVG

2 Kings 24 in the IRVH

2 Kings 24 in the IRVK

2 Kings 24 in the IRVM

2 Kings 24 in the IRVM2

2 Kings 24 in the IRVO

2 Kings 24 in the IRVP

2 Kings 24 in the IRVT

2 Kings 24 in the IRVT2

2 Kings 24 in the IRVU

2 Kings 24 in the ISVN

2 Kings 24 in the JSNT

2 Kings 24 in the KAPI

2 Kings 24 in the KBT1ETNIK

2 Kings 24 in the KBV

2 Kings 24 in the KJV

2 Kings 24 in the KNFD

2 Kings 24 in the LBA

2 Kings 24 in the LBLA

2 Kings 24 in the LNT

2 Kings 24 in the LSV

2 Kings 24 in the MAAL

2 Kings 24 in the MBV

2 Kings 24 in the MBV2

2 Kings 24 in the MHNT

2 Kings 24 in the MKNFD

2 Kings 24 in the MNG

2 Kings 24 in the MNT

2 Kings 24 in the MNT2

2 Kings 24 in the MRS1T

2 Kings 24 in the NAA

2 Kings 24 in the NASB

2 Kings 24 in the NBLA

2 Kings 24 in the NBS

2 Kings 24 in the NBVTP

2 Kings 24 in the NET2

2 Kings 24 in the NIV11

2 Kings 24 in the NNT

2 Kings 24 in the NNT2

2 Kings 24 in the NNT3

2 Kings 24 in the PDDPT

2 Kings 24 in the PFNT

2 Kings 24 in the RMNT

2 Kings 24 in the SBIAS

2 Kings 24 in the SBIBS

2 Kings 24 in the SBIBS2

2 Kings 24 in the SBICS

2 Kings 24 in the SBIDS

2 Kings 24 in the SBIGS

2 Kings 24 in the SBIHS

2 Kings 24 in the SBIIS

2 Kings 24 in the SBIIS2

2 Kings 24 in the SBIIS3

2 Kings 24 in the SBIKS

2 Kings 24 in the SBIKS2

2 Kings 24 in the SBIMS

2 Kings 24 in the SBIOS

2 Kings 24 in the SBIPS

2 Kings 24 in the SBISS

2 Kings 24 in the SBITS

2 Kings 24 in the SBITS2

2 Kings 24 in the SBITS3

2 Kings 24 in the SBITS4

2 Kings 24 in the SBIUS

2 Kings 24 in the SBIVS

2 Kings 24 in the SBT

2 Kings 24 in the SBT1E

2 Kings 24 in the SCHL

2 Kings 24 in the SNT

2 Kings 24 in the SUSU

2 Kings 24 in the SUSU2

2 Kings 24 in the SYNO

2 Kings 24 in the TBIAOTANT

2 Kings 24 in the TBT1E

2 Kings 24 in the TBT1E2

2 Kings 24 in the TFTIP

2 Kings 24 in the TFTU

2 Kings 24 in the TGNTATF3T

2 Kings 24 in the THAI

2 Kings 24 in the TNFD

2 Kings 24 in the TNT

2 Kings 24 in the TNTIK

2 Kings 24 in the TNTIL

2 Kings 24 in the TNTIN

2 Kings 24 in the TNTIP

2 Kings 24 in the TNTIZ

2 Kings 24 in the TOMA

2 Kings 24 in the TTENT

2 Kings 24 in the UBG

2 Kings 24 in the UGV

2 Kings 24 in the UGV2

2 Kings 24 in the UGV3

2 Kings 24 in the VBL

2 Kings 24 in the VDCC

2 Kings 24 in the YALU

2 Kings 24 in the YAPE

2 Kings 24 in the YBVTP

2 Kings 24 in the ZBP