2 Kings 8 (BOLCB2)

1 Elize alobaki na mama ya mwana mobali oyo asekwisaki : « Kende elongo na libota na yo na esika oyo bokoki kovanda, pamba te Yawe abengi nzala makasi kati na mokili oyo ; ekowumela mibu sambo. » 2 Mwasi asalaki ndenge moto na Nzambe alobaki. Ye elongo na libota na ye bakendeki mpe bavandaki mibu sambo na mokili ya Filisitia. 3 Tango mibu yango sambo ekokaki, mwasi azongaki na mboka na ye wuta na mokili ya Filisitia ; akendeki epai ya mokonzi mpo ete bazongisela ye ndako mpe mabele na ye. 4 Mokonzi azalaki kosolola na Geazi, mosali ya moto na Nzambe, mpe alobaki : « Yebisa ngai makambo minene nyonso oyo moto na Nzambe, Elize, asalaki. » 5 Wana Geazi azalaki koyebisa mokonzi ndenge nini Elize asekwisaki ebembe ya mwana oyo akufaki, mama ya mwana yango ayaki kobondela mokonzi ete azongisa ndako mpe mabele na ye. Geazi alobaki : « Mokonzi, nkolo na ngai, tala mwasi oyo mpe mwana na ye ya mobali oyo Elize asekwisaki. » 6 Mokonzi atunaki na mwasi yango mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Na sima, mokonzi aponaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe apesaki ye mitindo : « Zongisela ye biloko na ye nyonso mpe bambuma nyonso ya bilanga oyo mabele na ye ebotaki wuta mokolo oyo alongwaki na mboka na biso kino lelo. » 7 Elize akendeki na Damasi, wana Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, azalaki kobela. Tango bayebisaki mokonzi ete moto na Nzambe akomi kati na engumba, 8 mokonzi alobaki na Azaeli : « Kamata likabo mpe kende kokutana na moto na Nzambe. Tuna Yawe na nzela ya moto na Nzambe : ‹ Boni, nakobika solo na bokono oyo ? › » 9 Azaeli akendeki kokutana na Elize, amemaki elongo na ye likabo ya biloko nyonso ya Damasi ; bamemaki yango na likolo ya bashamo tuku minei. Azaeli akitaki, atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki :— Mwana na yo ya mobali Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, atindi ngai ; atuni : « Boni, nakobika solo na bokono oyo ? » 10 Elize azongisaki :— Loba na ye : « Solo, okobika na bokono oyo. » Nzokande, Yawe amonisi ngai ete akokufa. 11 Elize atalaki ye malamu-malamu, mpe Azaeli ayokaki soni. Mpe moto na Nzambe alelaki. 12 Azaeli atunaki :— Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ?Elize azongisaki :— Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi. 13 Azaeli akamwaki mpe azongisaki :— Mpo na nini okosala makambo ya boye na mosali na yo ? Ata kutu mbwa eleki ngai na tina !Elize alobaki lisusu :— Yawe amonisi ngai ete okokoma mokonzi ya Siri. 14 Azaeli atikaki Elize mpe azongaki epai ya mokonzi na ye. Bongo mokonzi na ye atunaki ye :— Elize alobi na yo nini ?Azongisaki :— Alobi na ngai : « Solo, okobika na bokono oyo. » 15 Mokolo oyo elandaki, Azaeli azwaki bulangeti, azindisaki yango na mayi, mpe afinikaki na yango elongi ya mokonzi mpo na kokanga ye pema ; mpe mokonzi akufaki. Azaeli akitanaki na ye na bokonzi. 16 Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mitano na bokonzi —Jozafati azalaki mokonzi ya Yuda— Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. 17 Azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. 18 Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana na ye ya mwasi. 19 Kasi Yawe alingaki te kobebisa Yuda mpo na Davidi, mowumbu na Ye, pamba te alakaki kopesa bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye mpo na libela. 20 Na tango ya Yorami, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi. 21 Boye Yorami akendeki na Tsayiri elongo na bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar ; kasi basoda ya Yuda bakimaki na bandako na bango ya kapo. 22 Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokaki. 23 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yorami mpe misala na ye nyonso ekomami na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 24 Yorami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 25 Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Yorami, akomaki mokonzi ya Yuda. 26 Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri, mokonzi ya Isalaele. 27 Alandaki nzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki na libota ya Akabi. 28 Akazia akendeki elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Bato ya Arami bazokisaki Yorami. 29 Boye, mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli mpo na kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.

In Other Versions

2 Kings 8 in the ANGEFD

2 Kings 8 in the ANTPNG2D

2 Kings 8 in the AS21

2 Kings 8 in the BAGH

2 Kings 8 in the BBPNG

2 Kings 8 in the BBT1E

2 Kings 8 in the BDS

2 Kings 8 in the BEV

2 Kings 8 in the BHAD

2 Kings 8 in the BIB

2 Kings 8 in the BLPT

2 Kings 8 in the BNT

2 Kings 8 in the BNTABOOT

2 Kings 8 in the BNTLV

2 Kings 8 in the BOATCB

2 Kings 8 in the BOATCB2

2 Kings 8 in the BOBCV

2 Kings 8 in the BOCNT

2 Kings 8 in the BOECS

2 Kings 8 in the BOGWICC

2 Kings 8 in the BOHCB

2 Kings 8 in the BOHCV

2 Kings 8 in the BOHLNT

2 Kings 8 in the BOHNTLTAL

2 Kings 8 in the BOICB

2 Kings 8 in the BOILNTAP

2 Kings 8 in the BOITCV

2 Kings 8 in the BOKCV

2 Kings 8 in the BOKCV2

2 Kings 8 in the BOKHWOG

2 Kings 8 in the BOKSSV

2 Kings 8 in the BOLCB

2 Kings 8 in the BOMCV

2 Kings 8 in the BONAV

2 Kings 8 in the BONCB

2 Kings 8 in the BONLT

2 Kings 8 in the BONUT2

2 Kings 8 in the BOPLNT

2 Kings 8 in the BOSCB

2 Kings 8 in the BOSNC

2 Kings 8 in the BOTLNT

2 Kings 8 in the BOVCB

2 Kings 8 in the BOYCB

2 Kings 8 in the BPBB

2 Kings 8 in the BPH

2 Kings 8 in the BSB

2 Kings 8 in the CCB

2 Kings 8 in the CUV

2 Kings 8 in the CUVS

2 Kings 8 in the DBT

2 Kings 8 in the DGDNT

2 Kings 8 in the DHNT

2 Kings 8 in the DNT

2 Kings 8 in the ELBE

2 Kings 8 in the EMTV

2 Kings 8 in the ESV

2 Kings 8 in the FBV

2 Kings 8 in the FEB

2 Kings 8 in the GGMNT

2 Kings 8 in the GNT

2 Kings 8 in the HARY

2 Kings 8 in the HNT

2 Kings 8 in the IRVA

2 Kings 8 in the IRVB

2 Kings 8 in the IRVG

2 Kings 8 in the IRVH

2 Kings 8 in the IRVK

2 Kings 8 in the IRVM

2 Kings 8 in the IRVM2

2 Kings 8 in the IRVO

2 Kings 8 in the IRVP

2 Kings 8 in the IRVT

2 Kings 8 in the IRVT2

2 Kings 8 in the IRVU

2 Kings 8 in the ISVN

2 Kings 8 in the JSNT

2 Kings 8 in the KAPI

2 Kings 8 in the KBT1ETNIK

2 Kings 8 in the KBV

2 Kings 8 in the KJV

2 Kings 8 in the KNFD

2 Kings 8 in the LBA

2 Kings 8 in the LBLA

2 Kings 8 in the LNT

2 Kings 8 in the LSV

2 Kings 8 in the MAAL

2 Kings 8 in the MBV

2 Kings 8 in the MBV2

2 Kings 8 in the MHNT

2 Kings 8 in the MKNFD

2 Kings 8 in the MNG

2 Kings 8 in the MNT

2 Kings 8 in the MNT2

2 Kings 8 in the MRS1T

2 Kings 8 in the NAA

2 Kings 8 in the NASB

2 Kings 8 in the NBLA

2 Kings 8 in the NBS

2 Kings 8 in the NBVTP

2 Kings 8 in the NET2

2 Kings 8 in the NIV11

2 Kings 8 in the NNT

2 Kings 8 in the NNT2

2 Kings 8 in the NNT3

2 Kings 8 in the PDDPT

2 Kings 8 in the PFNT

2 Kings 8 in the RMNT

2 Kings 8 in the SBIAS

2 Kings 8 in the SBIBS

2 Kings 8 in the SBIBS2

2 Kings 8 in the SBICS

2 Kings 8 in the SBIDS

2 Kings 8 in the SBIGS

2 Kings 8 in the SBIHS

2 Kings 8 in the SBIIS

2 Kings 8 in the SBIIS2

2 Kings 8 in the SBIIS3

2 Kings 8 in the SBIKS

2 Kings 8 in the SBIKS2

2 Kings 8 in the SBIMS

2 Kings 8 in the SBIOS

2 Kings 8 in the SBIPS

2 Kings 8 in the SBISS

2 Kings 8 in the SBITS

2 Kings 8 in the SBITS2

2 Kings 8 in the SBITS3

2 Kings 8 in the SBITS4

2 Kings 8 in the SBIUS

2 Kings 8 in the SBIVS

2 Kings 8 in the SBT

2 Kings 8 in the SBT1E

2 Kings 8 in the SCHL

2 Kings 8 in the SNT

2 Kings 8 in the SUSU

2 Kings 8 in the SUSU2

2 Kings 8 in the SYNO

2 Kings 8 in the TBIAOTANT

2 Kings 8 in the TBT1E

2 Kings 8 in the TBT1E2

2 Kings 8 in the TFTIP

2 Kings 8 in the TFTU

2 Kings 8 in the TGNTATF3T

2 Kings 8 in the THAI

2 Kings 8 in the TNFD

2 Kings 8 in the TNT

2 Kings 8 in the TNTIK

2 Kings 8 in the TNTIL

2 Kings 8 in the TNTIN

2 Kings 8 in the TNTIP

2 Kings 8 in the TNTIZ

2 Kings 8 in the TOMA

2 Kings 8 in the TTENT

2 Kings 8 in the UBG

2 Kings 8 in the UGV

2 Kings 8 in the UGV2

2 Kings 8 in the UGV3

2 Kings 8 in the VBL

2 Kings 8 in the VDCC

2 Kings 8 in the YALU

2 Kings 8 in the YAPE

2 Kings 8 in the YBVTP

2 Kings 8 in the ZBP