Acts 19 (BOLCB2)

1 Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli 2 mpe atunaki bango :— Boni, bozwaki Molimo Mosantu tango bokomaki bandimi ?Bazongisaki :— Te ! Totikala nanu koyoka te ete Molimo Mosantu azalaka. 3 Polo atunaki bango lisusu :— Bongo libatisi ya ndenge nini penza bozwaki ?Bazongisaki :— Tozwaki libatisi ya Yoane. 4 Polo alobaki na bango :— Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema ; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu. 5 Boye, bayokelaki ye mpe bazwaki libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu. 6 Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na nkota ya sika mpe kosakola. 7 Bango nyonso bazalaki bato pene zomi na mibale. 8 Bongo, Polo akendeki na ndako ya mayangani epai wapi, na basanza misato, azalaki koloba na molende epai na bato ; azalaki koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe mpe kondimisa bango yango. 9 Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga ; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi. 10 Esalaki bongo mibu mibale ; boye Bayuda nyonso mpe bato nyonso ya Grese, oyo bazalaki kovanda na mokili ya Azia bayokaki Liloba na Nkolo. 11 Nzambe azalaki kosala bikamwa ya somo na nzela ya Polo. 12 Boye bato bakomaki kokamata miswale mpe bilamba oyo etuti nzoto ya Polo, mpo na kotia yango na banzoto ya babeli, bongo bokono ya bato yango ezalaki kosila, mpe milimo mabe ezalaki kobima kati na bango. 13 Ndambo ya Bayuda oyo bazalaki kotambola-tambola mpo na kobengana milimo mabe bamekaki kobelela Kombo ya Nkolo Yesu mpo na koluka kokangola bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe ; bazalaki koloba :— Na Kombo ya Yesu oyo Polo ateyaka, napesi bino mitindo ya kobima. 14 Bana mibali sambo ya Moyuda Seva, moko kati na bakonzi ya Banganga-Nzambe, bazalaki kosala bongo. 15 Mokolo moko, molimo mabe ezongiselaki bango :— Nayebi Yesu, nayebi mpe soki Polo azali nani ; kasi bino, bozali banani ? 16 Mpe moto oyo azalaki na molimo mabe apumbwelaki bango, akangaki bango mpe abetaki bango nyonso makasi penza kino babimaki na ndako bolumbu mpe batonda na bapota. 17 Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya Grese oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi. 18 Mingi kati na bato oyo bakomaki bandimi bazalaki koya kondima mpe kotubela polele misala na bango ya mabe. 19 Mpe bato mingi ya maji bamemaki babuku na bango mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Tango balukaki koyeba motuya ya babuku yango, emonanaki ete ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende nkoto tuku mitano. 20 Ezali ndenge wana nde Liloba na Nkolo ezalaki kokoba kopanzana mpe komonana ete etonda na nguya ya Nzambe. 21 Sima na makambo oyo nyonso, Polo, na bokambami ya Molimo, azwaki mokano ya kolekela na Masedwane mpe na Akayi mpo na kokende na Yelusalemi. Alobaki :— Soki nalongwe kuna, nakokende lisusu na Rome. 22 Atindaki na Masedwane, mibale kati na basungi na ye ya mosala, Timote mpe Erasite, wana ye moko atikalaki mwa mikolo na Azia. 23 Ezalaki na tango wana nde mobulu makasi esalemaki na Efeso na tina na Nzela ya Nkolo. 24 Demetriusi, mosali ya babiju, azalaki kosala na palata bililingi ya batempelo ya nzambe Artemisi. Na mosala yango, azalaki kofuta basali na ye mbongo mingi. 25 Asangisaki bango elongo na bato ya misala ya maboko, oyo basalaka mosala moko na ye, mpe alobaki na bango :— Baninga na ngai, boyebi malamu ete mosala oyo efutaka biso malamu. 26 Nzokande, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato mpe kobenda sima na ye bato ebele awa kaka na Efeso te, kasi mpe na etuka mobimba ya Azia ; azali koloba ete banzambe oyo esalemi na maboko ya bato ezali banzambe te. 27 Makambo oyo Polo azali kosala ezali koluka kaka te kobebisa lokumu ya mosala na biso, kasi ezali mpe kosilisa lokumu ya tempelo ya Artemisi, nzambe monene ya mwasi ; ezali lisusu kosilisa nkembo ya Artemisi oyo Azia mobimba mpe mokili mobimba ezali kogumbamela. 28 Tango kaka bayokaki bongo, basilikaki makasi mpe bakomaki koganga :— Artemisi ya Efeso azali monene ! 29 Mbala moko, mobulu ekotaki kati na engumba mobimba. Bakangaki Gayusi mpe Arisitarke, bato mibale ya Masedwane, oyo bazalaki kotambola elongo na Polo ; mpe bato nyonso bakendeki na lombangu na ndako ya masano. 30 Polo azalaki na posa ya kobima na miso ya bato, kasi bayekoli bapekisaki ye. 31 Ezala mpe baninga na ye, oyo bazalaki bakambi ya etuka, batindelaki ye maloba mpo na kosenga na ye ete ameka te kosala liseki ya kokende na ndako ya masano. 32 Mobulu makasi ekotaki kati na ebele ya bato : bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Mingi kati na bango bazalaki koyeba te tina nini basangani wana. 33 Bayuda kati na ebele ya bato batindikaki Alekizandre na liboso, mpe batalisaki ye likambo yango ndenge ezali. Bongo Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi kozwa maloba mpo na kotalisa na bato. 34 Kasi tango basosolaki ete azali Moyuda, bango nyonso basalaki pene bangonga mibale ya koganga lokola moto moko :— Artemisi ya Efeso azali monene ! 35 Suka na suka, mokomi mikanda ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato ; alobaki :— Bato ya Efeso ! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya Artemisi, nzambe mwasi monene, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo ? 36 Yango wana, lokola moko te akoki kotia tembe na likambo oyo, bovanda kimia mpe bosala makambo ya bozoba te. 37 Bato oyo bomemi awa babebisi ndako ya nzambe na biso te mpe bafingi ye te. 38 Soki Demetriusi mpe basali na ye bazwi moto likambo, esambiselo ezali, basambisi mpe bazali. Ebongi malamu ete bakende kofunda. 39 Mpe soki bozali na likambo mosusu ya koloba, tokoyekola yango malamu kati na mayangani oyo mibeko epesa ndingisa. 40 Soki tokebi te, bakoki kofunda biso ete botombokisi bato, mpo na makambo oyo esalemi lelo. Na bongo, tokolonga te kolimbola tina oyo bato basangani awa.Tango kaka asilisaki koloba, apesaki mitindo ete bato bapanzana.

In Other Versions

Acts 19 in the ANGEFD

Acts 19 in the ANTPNG2D

Acts 19 in the AS21

Acts 19 in the BAGH

Acts 19 in the BBPNG

Acts 19 in the BBT1E

Acts 19 in the BDS

Acts 19 in the BEV

Acts 19 in the BHAD

Acts 19 in the BIB

Acts 19 in the BLPT

Acts 19 in the BNT

Acts 19 in the BNTABOOT

Acts 19 in the BNTLV

Acts 19 in the BOATCB

Acts 19 in the BOATCB2

Acts 19 in the BOBCV

Acts 19 in the BOCNT

Acts 19 in the BOECS

Acts 19 in the BOGWICC

Acts 19 in the BOHCB

Acts 19 in the BOHCV

Acts 19 in the BOHLNT

Acts 19 in the BOHNTLTAL

Acts 19 in the BOICB

Acts 19 in the BOILNTAP

Acts 19 in the BOITCV

Acts 19 in the BOKCV

Acts 19 in the BOKCV2

Acts 19 in the BOKHWOG

Acts 19 in the BOKSSV

Acts 19 in the BOLCB

Acts 19 in the BOMCV

Acts 19 in the BONAV

Acts 19 in the BONCB

Acts 19 in the BONLT

Acts 19 in the BONUT2

Acts 19 in the BOPLNT

Acts 19 in the BOSCB

Acts 19 in the BOSNC

Acts 19 in the BOTLNT

Acts 19 in the BOVCB

Acts 19 in the BOYCB

Acts 19 in the BPBB

Acts 19 in the BPH

Acts 19 in the BSB

Acts 19 in the CCB

Acts 19 in the CUV

Acts 19 in the CUVS

Acts 19 in the DBT

Acts 19 in the DGDNT

Acts 19 in the DHNT

Acts 19 in the DNT

Acts 19 in the ELBE

Acts 19 in the EMTV

Acts 19 in the ESV

Acts 19 in the FBV

Acts 19 in the FEB

Acts 19 in the GGMNT

Acts 19 in the GNT

Acts 19 in the HARY

Acts 19 in the HNT

Acts 19 in the IRVA

Acts 19 in the IRVB

Acts 19 in the IRVG

Acts 19 in the IRVH

Acts 19 in the IRVK

Acts 19 in the IRVM

Acts 19 in the IRVM2

Acts 19 in the IRVO

Acts 19 in the IRVP

Acts 19 in the IRVT

Acts 19 in the IRVT2

Acts 19 in the IRVU

Acts 19 in the ISVN

Acts 19 in the JSNT

Acts 19 in the KAPI

Acts 19 in the KBT1ETNIK

Acts 19 in the KBV

Acts 19 in the KJV

Acts 19 in the KNFD

Acts 19 in the LBA

Acts 19 in the LBLA

Acts 19 in the LNT

Acts 19 in the LSV

Acts 19 in the MAAL

Acts 19 in the MBV

Acts 19 in the MBV2

Acts 19 in the MHNT

Acts 19 in the MKNFD

Acts 19 in the MNG

Acts 19 in the MNT

Acts 19 in the MNT2

Acts 19 in the MRS1T

Acts 19 in the NAA

Acts 19 in the NASB

Acts 19 in the NBLA

Acts 19 in the NBS

Acts 19 in the NBVTP

Acts 19 in the NET2

Acts 19 in the NIV11

Acts 19 in the NNT

Acts 19 in the NNT2

Acts 19 in the NNT3

Acts 19 in the PDDPT

Acts 19 in the PFNT

Acts 19 in the RMNT

Acts 19 in the SBIAS

Acts 19 in the SBIBS

Acts 19 in the SBIBS2

Acts 19 in the SBICS

Acts 19 in the SBIDS

Acts 19 in the SBIGS

Acts 19 in the SBIHS

Acts 19 in the SBIIS

Acts 19 in the SBIIS2

Acts 19 in the SBIIS3

Acts 19 in the SBIKS

Acts 19 in the SBIKS2

Acts 19 in the SBIMS

Acts 19 in the SBIOS

Acts 19 in the SBIPS

Acts 19 in the SBISS

Acts 19 in the SBITS

Acts 19 in the SBITS2

Acts 19 in the SBITS3

Acts 19 in the SBITS4

Acts 19 in the SBIUS

Acts 19 in the SBIVS

Acts 19 in the SBT

Acts 19 in the SBT1E

Acts 19 in the SCHL

Acts 19 in the SNT

Acts 19 in the SUSU

Acts 19 in the SUSU2

Acts 19 in the SYNO

Acts 19 in the TBIAOTANT

Acts 19 in the TBT1E

Acts 19 in the TBT1E2

Acts 19 in the TFTIP

Acts 19 in the TFTU

Acts 19 in the TGNTATF3T

Acts 19 in the THAI

Acts 19 in the TNFD

Acts 19 in the TNT

Acts 19 in the TNTIK

Acts 19 in the TNTIL

Acts 19 in the TNTIN

Acts 19 in the TNTIP

Acts 19 in the TNTIZ

Acts 19 in the TOMA

Acts 19 in the TTENT

Acts 19 in the UBG

Acts 19 in the UGV

Acts 19 in the UGV2

Acts 19 in the UGV3

Acts 19 in the VBL

Acts 19 in the VDCC

Acts 19 in the YALU

Acts 19 in the YAPE

Acts 19 in the YBVTP

Acts 19 in the ZBP